< Matayo 25 >

1 Bokonzi ya Likolo ekozala lokola baseka zomi oyo bakamataki minda na bango mpe bakendeki kokutana na mobali ya libala.
“At that time the kingdom of heaven will be like ten virgins who took their lamps and went out to meet the bridegroom.
2 Kati na bango, mitano bazalaki bazoba, mpe mitano bazalaki mayele.
Five of them were foolish, and five were wise.
3 Baseka oyo bazalaki bazoba bakamataki minda na bango, kasi bamemaki mafuta te;
The foolish ones took their lamps but did not take along any extra oil.
4 ba-oyo bazalaki mayele bakamataki minda na bango mpe milangi oyo ezalaki na mafuta kati na yango.
But the wise ones took oil in flasks along with their lamps.
5 Lokola mobali ya libala azalaki kowumela mpo na kokoma, baseka nyonso wana bayokaki pongi mpe balalaki.
When the bridegroom was delayed, they all became drowsy and fell asleep.
6 Na ngonga ya midi ya butu, mongongo moko eyokanaki: « Mobali ya libala ayei! Bokende kokutana na ye! »
At midnight the cry rang out: ‘Here is the bridegroom! Come out to meet him!’
7 Baseka nyonso balamukaki mpe babongisaki minda na bango.
Then all the virgins woke up and trimmed their lamps.
8 Baseka oyo bazalaki bazoba balobaki na ba-oyo bazalaki mayele: « Bopesa biso ndambo ya mafuta na bino, pamba te minda na biso ekomi pene ya kokufa. »
The foolish ones said to the wise, ‘Give us some of your oil; our lamps are going out.’
9 Kasi baseka oyo bazalaki mayele bazongisaki: « Te! Ekokoka te mpo na biso mpe bino! Ebongi nde bokima mbangu epai ya bateki mafuta mpo ete bosomba mafuta na bino moko. »
‘No,’ said the wise ones, ‘or there may not be enough for both us and you. Instead, go to those who sell oil and buy some for yourselves.’
10 Wana bazalaki kokende kosomba mafuta, mobali ya libala akomaki: baseka oyo bamilengelaki bakotaki elongo na mobali ya libala kati na ndako oyo basalelaka feti ya libala, mpe bakangaki ekuke.
But while they were on their way to buy it, the bridegroom arrived. Those who were ready went in with him to the wedding banquet, and the door was shut.
11 Na sima, baseka mosusu mpe bayaki; balobaki: « Nkolo, nkolo, fungolela biso ekuke! »
Later the other virgins arrived and said, ‘Lord, lord, open the door for us!’
12 Kasi azongiselaki bango: « Nazali koloba na bino penza ya solo: nayebi bino te. »
But he replied, ‘Truly I tell you, I do not know you.’
13 Boye bosenzela, pamba te boyebi mokolo te, boyebi mpe ngonga te.
Therefore keep watch, because you do not know the day or the hour.
14 Ekozala lisusu lokola moto moko oyo, wana akomaki pene ya kokende na mobembo, abengaki basali na ye mpe apesaki bango mokumba ya kobatela bozwi na ye.
For it is just like a man going on a journey, who called his servants and entrusted them with his possessions.
15 Apesaki na mosali ya liboso batalanta mitano; na mosali ya mibale, batalanta mibale; mpe na mosali ya misato, talanta moko. Apesaki bango yango kolanda makoki ya moko na moko, mpe akendeki na mobembo.
To one he gave five talents, to another two talents, and to another one talent—each according to his own ability. And he went on his journey.
16 Mosali oyo azwaki batalanta mitano abandaki mbala moko kobalola yango na mombongo, mpe mombongo yango ebotaki batalanta mosusu mitano lokola mileki.
The servant who had received the five talents went at once and put them to work and gained five more.
17 Mosali oyo azwaki batalanta mibale asalaki mpe ndenge moko. Mombongo na ye ebotaki batalanta mosusu mibale lokola mileki.
Likewise, the one with the two talents gained two more.
18 Kasi moto oyo azwaki kaka talanta moko atimolaki libulu kati na mabele mpe abombaki talanta ya nkolo na ye.
But the servant who had received the one talent went off, dug a hole in the ground, and hid his master’s money.
19 Sima na mikolo ebele, nkolo ya basali wana azongaki mpe alobaki na bango: « Boyebisa ngai ndenge nini bosalelaki bozwi na ngai. »
After a long time the master of those servants returned to settle accounts with them.
20 Mosali oyo azwaki batalanta mitano apusanaki mpe amemaki batalanta mitano mosusu oyo azwaki lokola mileki. Alobaki: « Nkolo na ngai, opesaki ngai batalanta mitano; tala, nazwi batalanta mitano mosusu lokola mileki. »
The servant who had received the five talents came and presented five more. ‘Master,’ he said, ‘you entrusted me with five talents. See, I have gained five more.’
21 Nkolo azongiselaki ye: « Malamu! Ozali mosali malamu mpe ya sembo. Lokola ozalaki sembo na biloko moke, nakopesa yo mokumba ya kobatela biloko ebele. Yaka kosepela elongo na nkolo na yo. »
His master replied, ‘Well done, good and faithful servant! You have been faithful with a few things; I will put you in charge of many things. Enter into the joy of your master!’
22 Mosali oyo azwaki batalanta mibale ayaki mpe alobaki: « Nkolo na ngai, opesaki ngai batalanta mibale; tala, nazwi batalanta mibale mosusu lokola mileki. »
The servant who had received the two talents also came and said, ‘Master, you entrusted me with two talents. See, I have gained two more.’
23 Nkolo azongiselaki ye: « Malamu! Ozali mosali malamu mpe ya sembo. Lokola ozalaki sembo na biloko moke, nakopesa yo mokumba ya kobatela biloko ebele. Yaka kosepela elongo na nkolo na yo. »
His master replied, ‘Well done, good and faithful servant! You have been faithful with a few things; I will put you in charge of many things. Enter into the joy of your master!’
24 Bongo mosali oyo azwaki talanta moko ayaki mpe alobaki: « Nkolo na ngai, nayebaki ete ozali moto ya matata, obukaka bambuma na elanga oyo olonaki te mpe olokotaka bambuma na esika oyo obwakaki ata nkona moko te.
Finally, the servant who had received the one talent came and said, ‘Master, I knew that you are a hard man, reaping where you have not sown and gathering where you have not scattered seed.
25 Yango wana, nabangaki mpe nakendeki kobomba talanta na yo na se ya mabele. Tala yango oyo, kamata talanta na yo. »
So I was afraid and went out and hid your talent in the ground. See, you have what belongs to you.’
26 Nkolo na ye azongisaki: « Mosali mabe mpe ya goyigoyi! Lokola oyebaki ete nabukaka bambuma na elanga oyo nalonaki te mpe nalokotaka bambuma na esika oyo nabwakaki ata nkona moko te,
‘You wicked, lazy servant!’ replied his master. ‘You knew that I reap where I have not sown and gather where I have not scattered seed.
27 mpo na nini opesaki te talanta na ngai epai ya babombi misolo mpo ete, na bozongi na ngai, nakoka kozwa yango elongo na mileki?
Then you should have deposited my money with the bankers, and on my return I would have received it back with interest.
28 Bobotola ye talanta yango mpe bopesa yango epai ya moto oyo azali na batalanta zomi.
Therefore take the talent from him and give it to the one who has ten talents.
29 Pamba te, na moto oyo azali na eloko, bakopesa ye lisusu, mpe akokoma na bofuluki; kasi na moto oyo azangi, bakobotola ye ata oyo azali na yango.
For everyone who has will be given more, and he will have an abundance. But the one who does not have, even what he has will be taken away from him.
30 Bongo na oyo etali mosali mabe oyo, bobwaka ye kati na molili ya libanda, epai wapi kolela mpe koswa minu ezali. »
And throw that worthless servant into the outer darkness, where there will be weeping and gnashing of teeth.’
31 Tango Mwana na Moto akoya kati na nkembo na Ye elongo na ba-anjelu na Ye nyonso, akovanda na Kiti ya Bokonzi na Ye ya nkembo.
When the Son of Man comes in His glory, and all the angels with Him, He will sit on His glorious throne.
32 Bikolo nyonso ya mokili ekosangana liboso na Ye. Bongo akokabola bango na masanga mibale ndenge mobateli bibwele akabolaka bameme mpe bantaba:
All the nations will be gathered before Him, and He will separate the people one from another, as a shepherd separates the sheep from the goats.
33 akotia bameme na ngambo ya loboko na Ye ya mobali, mpe bantaba, na ngambo ya loboko na Ye ya mwasi.
He will place the sheep on His right and the goats on His left.
34 Sima na yango, Mokonzi akoloba na bato oyo bakozala na ngambo ya loboko na Ye ya mobali: « Boya, bino bato oyo Tata na Ngai apambola, bokamata libula na bino, Bokonzi oyo babongisela bino wuta mokili ekelama.
Then the King will say to those on His right, ‘Come, you who are blessed by My Father, inherit the kingdom prepared for you from the foundation of the world.
35 Pamba te nayokaki nzala, mpe bopesaki Ngai bilei; nayokaki posa ya mayi, mpe bopesaki Ngai mayi ya komela; nazalaki mopaya, mpe boyambaki Ngai malamu;
For I was hungry and you gave Me something to eat, I was thirsty and you gave Me something to drink, I was a stranger and you took Me in,
36 nazalaki bolumbu, mpe bolatisaki Ngai bilamba; nabelaki, mpe bosungaki Ngai; nakotaki na boloko, mpe boyaki kotala Ngai. »
I was naked and you clothed Me, I was sick and you looked after Me, I was in prison and you visited Me.’
37 Bongo, bato ya sembo bakoloba na Ye: « Nkolo, tango nini tomonaki Yo na nzala mpe topesaki Yo bilei; tango nini tomonaki na posa ya mayi, mpe topesaki yo mayi ya komela?
Then the righteous will answer Him, ‘Lord, when did we see You hungry and feed You, or thirsty and give You something to drink?
38 Tango nini tomonaki Yo mopaya, mpe toyambaki Yo malamu; tango nini ozalaki bolumbu, mpe biso tolatisaki Yo?
When did we see You a stranger and take You in, or naked and clothe You?
39 Tango nini tomonaki Yo kobela to kati na boloko mpe toyaki kotala Yo? »
When did we see You sick or in prison and visit You?’
40 Mokonzi akozongisela bango: « Nazali koloba na bino penza ya solo: eloko nyonso oyo bosalaki mpo na moko kati na bandeko na Ngai, oyo bazali bato pamba, boyeba malamu ete bosalaki yango nde epai na Ngai. »
And the King will reply, ‘Truly I tell you, whatever you did for one of the least of these brothers of Mine, you did for Me.’
41 Bongo akoloba na bato oyo bakozala na ngambo ya loboko na Ye ya mwasi: « Bokende mosika na Ngai, bino bato oyo Nzambe alakela mabe; bokende na moto ya libela na libela, oyo ebongisama mpo na Satana elongo na ba-anjelu na ye. (aiōnios g166)
Then He will say to those on His left, ‘Depart from Me, you who are cursed, into the eternal fire prepared for the devil and his angels. (aiōnios g166)
42 Pamba te nayokaki nzala, kasi bopesaki Ngai bilei te; nayokaki posa ya mayi, kasi bopesaki Ngai te mayi ya komela;
For I was hungry and you gave Me nothing to eat, I was thirsty and you gave Me nothing to drink,
43 nazalaki mopaya, kasi boyambaki Ngai malamu te epai na bino; nazalaki bolumbu, kasi bolatisaki Ngai te; nabelaki mpe nakotaki na boloko, kasi bosungaki Ngai te. »
I was a stranger and you did not take Me in, I was naked and you did not clothe Me, I was sick and in prison and you did not visit Me.’
44 Bango mpe bakotuna Ye: « Nkolo, tango nini tomonaki Yo na nzala to na posa ya mayi; tango nini tomonaki Yo mopaya, ozangi bilamba, ozali kobela to okoti na boloko, bongo tosungaki Yo te? »
And they too will reply, ‘Lord, when did we see You hungry or thirsty or a stranger or naked or sick or in prison, and did not minister to You?’
45 Akozongisela bango: « Nazali koloba na bino penza ya solo: eloko nyonso oyo bosalaki te mpo na moko kati na bato pamba oyo, boyeba malamu ete bozangaki nde kosala yango epai na Ngai. »
Then the King will answer, ‘Truly I tell you, whatever you did not do for one of the least of these, you did not do for Me.’
46 Boye, bakokende na etumbu ya seko, kasi bato ya sembo bakozwa bomoi ya seko. (aiōnios g166)
And they will go away into eternal punishment, but the righteous into eternal life.” (aiōnios g166)

< Matayo 25 >