< Matayo 24 >
1 Wana Yesu azalaki kobima longwa na lopango ya Tempelo, bayekoli na Ye bapusanaki pene na Ye mpo na kotalisa Ye ndenge batonga Tempelo.
Jesus had left the Temple and was going on His way, when His disciples came and called His attention to the Temple buildings.
2 Kasi Yesu alobaki na bango: — Bomoni nyonso oyo? Nazali koloba na bino penza ya solo: nyonso ekobukama, libanga moko te ekotikala awa na likolo ya libanga mosusu.
"You see all these?" He replied; "in solemn truth I tell you that there will not be left here one stone upon another that will not be pulled down."
3 Lokola Yesu avandaki na ngomba ya banzete ya olive, bayekoli bapusanaki pene na Ye mpe batunaki Ye, na esika oyo bazalaki bango moko kaka: — Yebisa biso: makambo wana ekosalema tango nini? Mpe elembo nini ekotalisa koya na Yo mpe suka ya mokili? (aiōn )
Afterwards He was on the Mount of Olives and was seated there when the disciples came to Him, apart from the others, and said, "Tell us when this will be; and what will be the sign of your Coming and of the Close of the Age?" (aiōn )
4 Yesu azongisaki: — Bosala keba ete moto moko te akosa bino!
"Take care that no one misleads you," answered Jesus;
5 Pamba te bato mingi bakoya na Kombo na Ngai mpe bakoloba: « Ngai nde Masiya, » mpe bakokosa bato ebele.
"for many will come assuming my name and saying 'I am the Christ;' and they will mislead many.
6 Bokoyoka basango ya bitumba mpe nungunungu na tina na bitumba, kasi bomitungisa te mpo na yango; pamba te makambo wana esengeli kosalema, kasi ekozala nanu suka ya mokili te.
And before long you will hear of wars and rumours of wars. Do not be alarmed, for such things must be; but the End is not yet.
7 Ekolo moko ekotelemela ekolo mosusu, bokonzi moko ekobundisa bokonzi mosusu, nzala ekozala makasi penza, mpe mabele ekoningana bipai na bipai.
For nation will rise in arms against nation, kingdom against kingdom, and there will be famines and earthquakes in various places;
8 Makambo nyonso wana ekozala kaka ebandeli ya pasi lokola pasi ya mwasi oyo azali kobota.
but all these miseries are but like the early pains of childbirth.
9 Bongo, bakokaba bino mpo ete bomona pasi, bakoboma bino; bikolo nyonso ekoyina bino mpo na Kombo na Ngai.
"At that time they will deliver you up to punishment and will put you to death; and you will be objects of hatred to all the nations because you are called by my name.
10 Mpo na yango, bato ebele bakokweyisa kondima na bango, bakokaba mpe bakoyina baninga na bango.
Then will many stumble and fall, and they will betray one another and hate one another.
11 Basakoli ebele ya lokuta bakobima mpe bakokosa bato ebele.
Many false prophets will rise up and lead multitudes astray;
12 Lokola mabe ekokola se kokola, bolingo ya bato ebele ekokita.
and because of the prevalent disregard of God's law the love of the great majority will grow cold;
13 Kasi moto oyo akoyika mpiko kino na suka akobika.
but those who stand firm to the End shall be saved.
14 Sango Malamu oyo ya Bokonzi ekoteyama na mokili mobimba mpo ete ezala litatoli epai ya bikolo nyonso; sima na yango kaka nde suka ekoya.
And this Good News of the Kingdom shall be proclaimed throughout the whole world to set the evidence before all the Gentiles; and then the End will come.
15 Yango wana, tango bokomona makambo ya nkele oyo epesaka bato pasi na motema, oyo mosakoli Daniele alobelaki, kosalema kati na Esika ya bule, —tika ete motangi asosola malamu—
"When you have seen (to use the language of the Prophet Daniel) the 'Abomination of Desolation', standing in the Holy Place" --let the reader observe those words--
16 wana tika ete bato oyo bakozala kati na Yuda bakima na bangomba;
"then let those who are in Judaea escape to the hills;
17 tika ete moto oyo akozala na likolo ya ndako akita te, mpo na kokende kozwa eloko songolo kati na ndako na ye,
let him who is on the roof not go down to fetch what is in his house;
18 mpe tika ete moto oyo akozala kati na bilanga azonga na ndako te, mpo na kokende kozwa elamba na ye!
nor let him who is outside the city stay to pick up his outer garment.
19 Na mikolo wana, mawa na basi oyo bakozala na bazemi mpe na ba-oyo bakozala komelisa bana mabele!
And alas for the women who at that time are with child or have infants!
20 Bosambela mpo ete makambo wana esalema te na eleko ya malili makasi to na mokolo ya Saba.
"But pray that your flight may not be in winter, nor on the Sabbath;
21 Pamba te pasi ekozala makasi, na lolenge oyo etikala nanu kozala te, wuta na ebandeli ya mokili kino sik’oyo, mpe na lolenge oyo ekotikala kozala lisusu te.
for it will be a time of great suffering, such as never has been from the beginning of the world till now, and assuredly never will be again.
22 Mpe soki Nkolo ayeisaki te mikolo yango moke, moto ata moko te akokaki kobika; kasi mpo na baponami na Ye, akoyeisa yango moke.
And if those days had not been cut short, no one would escape; but for the sake of God's own People those days will be cut short.
23 Na tango wana, soki moto moko alobi na bino: « Klisto azali awa! » to « Azali kuna, » bondima ye te.
"If at that time any one should say to you, 'See, here is the Christ!' or 'Here!' give no credence to it.
24 Pamba te bamasiya ya lokuta mpe basakoli ya lokuta bakobima, bakosala bilembo minene mpe bikamwa mpo na kokosa ata baponami, soki ekokaki kosalema.
For there will rise up false Christs and false prophets, displaying wonderful signs and prodigies, so as to deceive, were it possible, even God's own People.
25 Namiyebiseli bino mpo ete bosala keba!
Remember, I have forewarned you.
26 Soki moto moko alobi na bino: « Botala, azali kati na esobe, » bokende kuna te; to « Azali awa, kati na esika ebombama, » bondima yango te.
If therefore they should say to you, 'See, He is in the Desert!' do not go out there: or 'See, He is indoors in the room!' do not believe it.
27 Solo, ndenge mokalikali oyo ebimi na este engengisaka kino na weste, ndenge wana mpe koya ya Mwana na Moto ekozala.
For just as the lightning flashes in the east and is seen to the very west, so will be the Coming of the Son of Man.
28 Esika nyonso ebembe ezali kopola, bandeke oyo eliaka bibembe esanganaka wana.
Wherever the dead body is, there will the vultures flock together.
29 Tango kaka mikolo yango ya pasi ekoleka, « moyi ekokoma molili, sanza ekongenga lisusu te, minzoto ekokweya longwa na likolo, mpe banguya ya Likolo ekoningisama. »
"But immediately after those times of distress the sun will be darkened, the moon will not shed her light, the stars will fall from the firmament, and the forces which control the heavens will be disordered and disturbed.
30 Sima na yango, elembo ya Mwana na Moto ekomonana na likolo; bongo bikolo nyonso ya mokili ekokoma kolelalela mpe ekomona Mwana na Moto koya na likolo ya mapata ya likolo, kati na nguya mpe na nkembo monene.
Then will appear the Sign of the Son of Man in the sky; and then will all the nations of the earth lament, when they see the Son of Man coming on the clouds of the sky with great power and glory.
31 Mpe na lokito monene ya kelelo, akotinda ba-anjelu na Ye kosangisa baponami na Ye longwa na bangambo nyonso minei ya mokili: longwa na suka moko ya Likolo kino na suka mosusu.
And He will send out His angels with a loud trumpet-blast, and they will bring together His own People to Him from north, south, east and west--from one extremity of the world to the other.
32 Tika ete lisese ya nzete ya figi eteya bino: soki kaka bitape na yango elembi mpe ebandi kobimisa makasa, boyebaka ete eleko ya moyi makasi ekomi pene.
"Now learn from the fig-tree the lesson it teaches. As soon as its branches have now become soft and it is bursting into leaf, you all know that summer is near.
33 Ndenge moko mpe mpo na bino; tango bokomona makambo wana nyonso, boyeba ete Mwana na Moto akomi pene, lokola na bikuke ya engumba.
So you also, when you see all these signs, may be sure that He is near--at your very door.
34 Nazali koloba na bino penza ya solo: bato ya ekeke oyo bakoleka te kino makambo wana nyonso ekosalema.
I tell you in solemn truth that the present generation will certainly not pass away without all these things having first taken place.
35 Likolo mpe mabele ekoleka, kasi maloba na Ngai ekoleka te.
Earth and sky will pass away, but it is certain that my words will not pass away.
36 Mpo na oyo etali mokolo to ngonga, moko te ayebi yango, ezala ba-anjelu ya Likolo to Mwana; Ye moko kaka Tata nde ayebi yango.
"But as to that day and the exact time no one knows--not even the angels of heaven, nor the Son, but the Father alone.
37 Ndenge esalemaki na tango ya Noa, ndenge wana mpe ekosalema na koya ya Mwana na Moto;
'For as it was in the time of Noah, so it will be at the Coming of the Son of Man.
38 pamba te liboso ete mpela eya, bato bazalaki kolia mpe komela, kobala mpe kobalisa bana na bango, kino na mokolo oyo Noa akotaki na masuwa;
At that time, before the Deluge, men were busy eating and drinking, taking wives or giving them, up to the very day when Noah entered the Ark,
39 bayebaki eloko moko te na tina na oyo elingaki kosalema, kino mpela eyaki mpe ekumbaki bango nyonso. Ekozala mpe bongo na koya ya Mwana na Moto.
nor did they realise any danger till the Deluge came and swept them all away; so will it be at the Coming of the Son of Man.
40 Mibali mibale bakozala na elanga: moko akokamatama, mpe mosusu akotikala;
Then will two men be in the open country: one will be taken away, and one left behind.
41 basi mibale bakozala konika bambuma na enikelo; moko akokamatama, mpe mosusu akotikala.
Two women will be grinding at the mill: one will be taken away, and one left behind.
42 Yango wana, bosenzela; pamba te boyebi te mokolo nini Nkolo na bino akoya.
Be on the alert therefore, for you do not know the day on which your Lord is coming.
43 Bososola malamu likambo oyo: soki nkolo ndako ayebaki ngonga ya butu oyo moyibi akoya, alingaki kosenzela mpe kopekisa ye kokota kati na ndako na ye.
But of this be assured, that if the master of the house had known the hour at which the robber was coming, he would have kept awake, and not have allowed his house to be broken into.
44 Yango wana, bino mpe, bomibongisa, pamba te Mwana na Moto akoya na ngonga oyo bozali kokanisa kutu te.
Therefore you also must be ready; for it is at a time when you do not expect Him that the Son of Man will come.
45 Nani azali mowumbu ya sembo mpe ya mayele epai ya nani nkolo apesaki mokumba ya kokamba basali kati na ndako na ye, mpo ete apesaka bango bilei na bango na tango oyo ekoki?
"Who therefore is the loyal and intelligent servant to whom his master has entrusted the control of his household to give them their rations at the appointed time?
46 Esengo na mowumbu oyo nkolo na ye, tango akozonga, akokuta azali kosala bongo.
Blessed is that servant whom his master when he comes shall find so doing!
47 Nazali koloba na bino penza ya solo: nkolo na ye akopesa ye mokumba ya kobatela bozwi na ye nyonso.
In solemn truth I tell you that he will give him the management of all his wealth.
48 Kasi soki azali mowumbu mabe oyo amilobeli: « Nkolo na ngai awumeli mpo na kozonga, »
But if the man, being a bad servant, should say in his heart, 'My master is a long time in coming,'
49 mpe akomi kobeta baninga na ye ya mosala, bawumbu lokola ye, kolia mpe komela masanga mesa moko elongo na balangwi masanga,
and should begin to beat his fellow servants, while he eats and drinks with drunkards;
50 nkolo na ye akozonga na mokolo oyo ye, mowumbu, azali kozela te mpe na ngonga oyo ayebi te;
the master of that servant will arrive on a day when he is not expecting him and at an hour of which he has not been informed;
51 akokata-kata ye na biteni mpe akotia ye esika moko na bato ya bilongi mibale, na esika oyo ekozala kolela mpe koswa minu.
he will treat him with the utmost severity and assign him a place among the hypocrites: there will be the weeping and the gnashing of teeth.