< Matayo 23 >
1 Yesu alobaki na ebele ya bato mpe na bayekoli na Ye:
Тоді промовив Ісус до народу й до учнів Своїх,
2 « Balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo bazali na mokumba ya koteya bato mibeko ya Moyize.
і сказав: „На сиді́нні Мойсеєвім усілися книжники та фарисеї.
3 Boye, bosengeli kosala keba na mateya nyonso oyo bateyaka bino, mpe bobongisa etamboli na bino kolanda mateya na bango; kasi bomekola te misala na bango, pamba te batiaka mateya na bango na misala te.
Тож усе, що́ вони скажуть вам, — робіть і виконуйте; та за вчинками їхніми не робіть, бо говорять вони — та не роблять того́!
4 Babongisaka mikumba ya kilo makasi mpe batiaka yango na mapeka ya bato mosusu, kasi bango moko balingaka ata moke te kotombola mosapi oyo ya moke mpo na kosunga bato yango na komema mikumba yango.
Вони ж в'яжуть тяжкі тягарі, і кладуть їх на лю́дські раме́на, самі ж навіть пальцем своїм не хотять їх пору́шити.
5 Misala nyonso oyo basalaka, basalaka yango kaka mpo ete bato bamona bango. Boye, bayeisaka minene mikanda na bango, oyo bakoma biteni ya Makomi, mpe milayi, basonge ya banzambala na bango.
Усі ж учинки свої вони роблять, щоб їх бачили люди, і богомі́лля свої розширяють, і здовжують ки́тиці.
6 Balingaka kovanda na bisika ya lokumu kati na bafeti, mpe na bisika ya liboso kati na bandako ya mayangani;
І люблять вони передніші місця на бенке́тах, і передніші лавки́ в синагогах,
7 balingaka ete bato bapesa bango mbote, na bisika oyo bato ebele bakutanaka, mpe babenga bango ‹ Moteyi. ›
і привіти на ринках, і щоб звали їх люди: Учителю!
8 Kasi bino, bolinga te ete bato babenga bino ‹ Moteyi, › pamba te bozali na Moteyi kaka moko, mpe bino nyonso bozali bandeko.
А ви вчителями не звіться, — бо один вам Учитель, а ви всі брати́.
9 Bobenga moto moko te awa na mokili ‹ Tata, › pamba te bozali kaka na Tata moko, mpe azali kati na Likolo.
І не називайте нікого отцем на землі, — бо один вам Отець, що на небі.
10 Bolinga te ete bato babenga bino ‹ bakonzi, › pamba te bozali kaka na Mokonzi moko, Klisto.
І не звіться наста́вниками, — бо один вам Наста́вник, — Христос.
11 Moto oyo aleki monene kati na bino akozala mosali na bino.
Хто між вами найбільший, хай слугою вам буде!
12 Pamba te moto oyo amitombolaka, bakokitisa ye; mpe oyo amikitisaka, bakotombola ye.
Хто бо підно́ситься, — буде понижений, хто ж понижується, той піднесе́ться.
13 Mawa na bino, balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo, bato ya bilongi mibale! Bokangaka nzela mpo ete bato mosusu bakota te kati na Bokonzi ya Likolo; bino moko, bozali kokota kuna te, kasi bozali lisusu kokanga nzela mpo ete bato oyo bazali na posa ya kokota bakota te. [
Горе ж вам, книжники та фарисеї, лицеміри, що перед людьми́ зачиняєте Царство Небесне, — бо й самі ви не вхо́дите, ані тих, хто хоче ввійти, увійти не пускаєте!
14 Mawa na bino, balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo, bato ya bilongi mibale! Boyibaka biloko ya basi oyo bakufisa mibali, mpe bosalaka mabondeli ya milayi-milayi mpo na kokosa bato. Mpo na yango, bokozwa etumbu oyo eleki makasi.]
(Горе ж вам, книжники та фарисеї, лицеміри, що вдови́ні хати поїдаєте, і напо́каз молитесь довго, — через те осуд тяжчий ви при́ймете!)
15 Mawa na bino, balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo: bato ya bilongi mibale! Bosalaka mibembo na ebale mpe na mokili mpo na koluka kozwa kaka mopagano moko oyo akondima kosambela na lingomba na bino; mpe soki kaka andimi, bokomisaka ye moto ya lifelo mbala mibale koleka bino moko. (Geenna )
Горе вам, книжники та фарисеї, лицеміри, що обходите море та землю, щоб придбати нововірця одно́го; а коли те стається, то робите його сином геє́нни, вдвоє гіршим від вас! (Geenna )
16 Mawa na bino, batambolisi bakufa miso! Bolobaka: ‹ Soki moto alapi ndayi na kombo ya Tempelo, wana ezali likambo te; kasi soki alapi ndayi na kombo ya wolo ya Tempelo, wana asengeli kokokisa ndayi na ye. ›
Горе вам, проводирі́ ви сліпі, що говорите: „Коли хто поклянеться храмом, то нічого; а хто поклянеться золотом храму, то той винуватий“.
17 Bino, bakufi miso, bozali penza bazoba! Eloko nini eleki motuya: wolo to Tempelo oyo ekomisaka wolo bule?
Нерозумні й сліпі, — що бо більше: чи золото, чи той храм, що освячує золото?
18 Bolobaka lisusu: ‹ Soki moto alapi ndayi na kombo ya etumbelo, wana ezali likambo te; kasi soki alapi ndayi na kombo ya likabo oyo ezali na likolo ya etumbelo, asengeli kokokisa ndayi na ye. ›
І: „Коли хто поклянеться же́ртівником, — то нічого, а хто поклянеться жертвою, що на нім, то він винуватий“.
19 Bakufi miso! Eloko nini eleki motuya: likabo to etumbelo oyo ekomisi likabo bule?
Нерозумні й сліпі, — що́ бо більше: чи жертва, чи той же́ртівник, що освячує жертву?
20 Pamba te moto oyo alapi ndayi na kombo ya etumbelo alapi yango na kombo ya etumbelo yango mpe na kombo ya biloko nyonso oyo ezali na likolo na yango.
Отож, хто клянеться же́ртівником, — клянеться ним та всім, що на ньому.
21 Moto oyo mpe alapi ndayi na kombo ya Tempelo alapi yango na kombo ya Tempelo yango mpe na Kombo ya Ye oyo avandaka kati na yango.
І хто храмом клянеться, — клянеться ним та Тим, Хто живе в нім.
22 Mpe moto oyo alapi ndayi na kombo ya Likolo alapi yango na kombo ya Kiti ya Bokonzi ya Nzambe mpe na Kombo ya Ye oyo avandelaka yango.
І хто небом клянеться, — клянеться Божим престолом і Тим, Хто на ньому сидить.
23 Mawa na bino, balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo, bato ya bilongi mibale! Solo, bofutaka eteni ya zomi ya bandembi, ya bamusikadi mpe ya biloko ya mike-mike ya solo kitoko; kasi bomonaka pamba makambo oyo eleki motuya kati na Mobeko: bosembo, motema mawa mpe kondima. Nzokande, bosengeli nde kotia yango na misala mpe kozwa na motuya likambo oyo wana ya kofuta eteni ya zomi.
Горе вам, книжники та фарисеї, лицеміри, що даєте десятину із м'я́ти, і га́нусу й кми́ну, але найважливіше в Зако́ні поки́нули: суд, милосе́рдя та віру; це треба робити, і того не ки́дати.
24 Bino, batambolisi bakufa miso! Solo, bolongolaka nzinzi oyo ekweyaka na masanga na bino, kasi bomelaka shamo mobimba.
Проводирі́ ви сліпі, що відціджуєте комаря́, а верблю́да ковтаєте!
25 Mawa na bino, balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo, bato ya bilongi mibale! Bosukolaka malamu libanda ya bakopo mpe ya basani, kasi botondisaka yango na biloko ya moyibi mpe ya lokoso na bino.
Горе вам, книжники та фарисеї, лицеміри, що чистите зовнішність ку́хля та миски, а всере́дині повні вони здирства й кривди!
26 Mofarizeo mokufi miso! Banda nanu na kopetola kati ya kopo mpe ya sani, bongo libanda ekokoma peto.
Фарисею сліпий, — очисти перше сере́дину кухля, щоб чистий він був і назо́вні!
27 Mawa na bino, balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo, bato ya bilongi mibale! Bozali lokola bakunda oyo bapakola langi ya pembe: emonanaka kitoko na libanda, kasi etonda na mikuwa ya bakufi mpe na lolenge nyonso ya mbindo.
Горе вам, книжники та фарисеї, лицеміри, що подібні до гробі́в побі́лених, які гарними зверху здаються, а всере́дині повні трупних кісто́к та всякої нечи́стости!
28 Ndenge moko mpe mpo na bino: na libanda, bomonanaka lokola bato ya sembo na miso ya bato; kasi na kati, botondi na lokuta mpe na mabe.
Так і ви, — назовні здаєтеся лю́дям за праведних, а всере́дині повні лицемі́рства та беззаконня!
29 Mawa na bino, balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo, bato ya bilongi mibale! Botongaka bakunda mpo na basakoli, mpe bokomisaka kitoko malita ya bato ya sembo.
Горе вам, книжники та фарисеї, лицеміри, що пророкам надгро́бники ставите, і праведникам прикраша́єте пам'ятники,
30 Bolobaka: ‹ Soki tozalaki na bomoi na tango ya bakoko na biso, tolingaki kosangana te elongo na bango mpo na kotangisa makila ya basakoli. ›
та говорите: „Якби ми жили́ за днів наших батьків, то ми не були б спільника́ми їхніми в крові пророків“.
31 Boye, na maloba na bino moko, bondimaka ete bozali penza bakitani ya bato oyo babomaki basakoli.
Тим самим на себе свідкуєте, що сини ви убивців пророків.
32 Bokoba malamu na mosala oyo batata na bino babandaki, mosala ya koboma basakoli!
Доповніть і ви міру провини ваших батьків!
33 Bino, banyoka, libota ya bitupa! Ndenge nini bokoki kokanisa ete bokokima etumbu ya lifelo? (Geenna )
О змії, о ро́де гадю́чий, — я́к ви втечете від за́суду до геє́нни? (Geenna )
34 Mpo na yango, Ngai nakotindela bino basakoli, bato ya bwanya mpe balakisi ya Mobeko. Bokoboma mpe bokobaka bamoko na ekulusu, bokobeta bamosusu fimbu kati na bandako na bino ya mayangani mpe bokobengana bango na engumba moko na moko,
І ось тому́ посилаю до вас Я пророків, і мудрих, і книжників; частину їх ви повбиваєте та розіпне́те, а частину їх ви бичува́тимете в синагогах своїх, і будете гнати з міста до міста.
35 mpo ete makila ya bato nyonso ya sembo, oyo basopa na mabele, etangama na mito na bino, kobanda na makila ya Abele, moto ya sembo, kino na makila ya Zakari, mwana mobali ya Barashi, oyo bobomaki kati ya Tempelo mpe etumbelo.
Щоб спала на вас уся праведна кров, що пролита була на землі, від крови Авеля праведного, аж до крови Заха́рія, Варахі́їного сина, що ви замордували його між храмом і же́ртівником!
36 Nazali koloba na bino penza ya solo: etumbu oyo esengeli mpo na mabe wana nyonso ekokweyela bato ya ekeke oyo.
Поправді кажу вам: Оце все спаде на рід цей!
37 Yelusalemi, Yelusalemi, yo oyo obomaka basakoli mpe obambaka bato oyo Nzambe atindelaka yo mabanga, mbala boni nalingaki kosangisa bana na yo, ndenge soso ya mwasi esangisaka bana na yango na se ya mapapu na yango, kasi boboyaki!
Єрусалиме, Єрусалиме, що вбиваєш пророків та каменуєш посланих до те́бе! Скільки разів Я хотів зібрати діти твої, як квочка збирає під крила курчаток своїх, — та ви не захотіли!
38 Sik’oyo, ndako na bino ezali kosundolama.
Ось ваш дім залиша́ється порожній для вас!
39 Pamba te, nazali koloba na bino: Kobanda lelo, bokotikala komona Ngai lisusu te kino bokoloba: ‹ Tika ete apambolama, Ye oyo ayei na Kombo ya Nkolo! › »
Говорю́ бо Я вам: Відтепер ви Мене не побачите, аж поки не скажете: „Благословенний, Хто йде у Господнє їм'я́!“