< Matayo 22 >

1 Yesu alobaki na bango lisusu na masese:
Once more Jesus spoke to them in parables.
2 — Bokonzi ya Likolo ekokani na mokonzi moko oyo asalaki feti ya libala mpo na mwana na ye ya mobali.
“The kingdom of heaven,” he said, “may be compared to a king who gave a banquet in honor of his son’s wedding.
3 Atindaki basali na ye kokende koyebisa babengami na feti ete baya na feti, kasi babengami yango baboyaki.
He sent his servants to call those who had been invited to the banquet, but they were unwilling to come.
4 Atindaki lisusu basali mosusu mpe alobaki na bango: « Bosengela ngai epai ya babengami na feti ete baya penza, mpe boyebisa bango ete nasili kobongisa bilei: nabomi bangombe na ngai ya mibali mpe banyama na ngai ya mafuta; mpe sik’oyo, nyonso esili kobongisama malamu. Boloba na bango ete bazanga te na feti. »
A second time he sent some servants, with orders to say to those who had been invited ‘I have prepared my meal, my cattle and fat beasts are killed and everything is ready; come to the banquet.’
5 Kasi babengami na feti bazwaki kobengama yango na pamba: bamoko bakendeki na bilanga na bango; bamosusu, na mombongo na bango;
They, however, took no notice, but went off, one to their farm, another to their business;
6 mpe bamosusu bakangaki basali ya mokonzi, banyokolaki bango mpe babomaki bango.
while the rest, seizing his servants, ill-treated them and killed them.
7 Mokonzi asilikaki makasi, atindaki basoda na ye koboma babomi wana mpe kotumba engumba na bango.
The king, in anger, sent his troops, put those murderers to death, and set their city on fire.
8 Alobaki na basali na ye: « Bilei ya feti esili kobongisama malamu, kasi babengami mpo na kozala na feti yango babongaki na yango te.
Then he said to his servants ‘The banquet is prepared, but those who were invited were not worthy.
9 Bokende na bisika oyo babalabala ekutana mpe bobenga bato nyonso oyo bokomona kuna, mpo ete baya na feti ya libala ya mwana na ngai. »
So go to the cross-roads, and invite everyone you find to the banquet.’
10 Basali bakendeki na babalabala mpe babengaki bato nyonso oyo bamonaki kuna: bato mabe mpe bato malamu. Boye, ndako ya feti etondaki na babengami.
The servants went out into the roads and collected all the people whom they found, whether bad or good; and the bridal-hall was filled with guests.
11 Kasi tango mokonzi akotaki mpo na kotala bato oyo babengamaki na feti, amonaki moto moko oyo alataki te elamba ya feti ya libala.
But, when the king went in to see his guests, he noticed there a man who had not put on a wedding-robe.
12 Atunaki ye: « Molingami na ngai, okoti awa ndenge nini awa olati te elamba oyo ebongi na feti ya libala? » Moto yango azangaki eyano ya kopesa.
So he said to him ‘My friend, how is it that you came in here without a wedding-robe?’ The man was speechless.
13 Bongo mokonzi alobaki na basali na ye: « Bokanga ye makolo mpe maboko, bobwaka ye kati na molili ya libanda, epai wapi kolela mpe koswa minu ezali. »
Then the king said to the attendants ‘Tie him hand and foot, and put him out into the darkness outside, where there will be weeping and grinding of teeth.’
14 Pamba te babengami bazali ebele, kasi baponami bazali moke.
For many are called, but few chosen.”
15 Bongo Bafarizeo babendanaki pembeni mpo na kosala mabongisi ya kokanga Yesu na motambo na nzela ya maloba na Ye moko.
Then the Pharisees went away and conferred together as to how they might lay a trap for Jesus in the course of conversation.
16 Batindelaki Yesu bayekoli na bango elongo na bato ya lisanga ya Erode. Batindami yango balobaki na Yesu: — Moteyi, toyebi malamu ete ozali moto oyo azanga pamela mpe oteyaka na bosolo nzela ya Nzambe, otepaka-tepaka te liboso ya makanisi ya bato mpe oponaka bilongi te;
They sent their disciples, with the Herodians, to say to him, “Teacher, we know that you are an honest person, and that you teach the way of God honestly, and are not afraid of anyone; for you pay no regard to a person’s position.
17 yebisa biso makanisi na yo na tina na likambo oyo: Kolanda mobeko, ezali malamu to epekisami kofuta mpako ya mokonzi epai ya Sezare?
Tell us, then, what you think. Are we right in paying taxes to the Emperor, or not?”
18 Kasi lokola Yesu asosolaki mayele mabe na bango, alobaki: — Bato ya bilongi mibale! Mpo na nini bozali kotiela Ngai motambo?
Perceiving their malice, Jesus answered, “Why are you testing me, you hypocrites?
19 Bolakisa Ngai mbongo oyo bofutaka na yango mpako. Bamemelaki Ye mbongo moko ya ebende.
Show me the coin with which the tax is paid.” And, when they had brought him a coin,
20 Atunaki bango: — Elilingi mpe makomi oyo ezali ya nani?
he asked, “Whose head and title are these?”
21 Bazongisaki: — Ezali ya Sezare. Yesu alobaki na bango: — Bopesa na Sezare, oyo ezali ya Sezare; mpe bopesa na Nzambe, oyo ezali ya Nzambe!
“The Emperor’s,” they answered, at which he said to them, “Then pay to the Emperor what belongs to the Emperor, and to God what belongs to God.”
22 Tango bayokaki eyano ya Yesu, bakamwaki; batikaki Ye mpe bakendeki.
They wondered at his answer, and left him alone and went away.
23 Kaka na mokolo yango, Basaduseo oyo balobaka ete lisekwa ezali te, bayaki epai na Yesu mpe batunaki Ye:
That same day some Sadducees came up to Jesus, maintaining that there is no resurrection. Their question was this, –
24 — Moteyi, Moyize alobaki: « Soki mobali akufi mpe atiki mwana te, ndeko na ye ya mobali asengeli kobala mwasi oyo mokufi atiki mpo ete abotisa ye bana oyo bakozala bakitani ya mokufi. »
“Teacher, Moses said – ‘should a man die without children, the man’s brother will become the husband of the widow, and raise a family for his brother.’
25 Nzokande, kati na biso, ezalaki na bandeko mibali sambo. Ndeko mobali ya liboso abalaki mwasi mpe akufaki; kasi lokola abotaki te bana oyo basengelaki kokitana na ye, atikelaki ndeko na ye ya mobali mwasi na ye.
Now we had living among us seven brothers; of whom the eldest married and died, and, as he had no family, left his wife for his brother.
26 Esalemaki mpe bongo na ndeko ya mibale, na ndeko ya misato kino na ndeko ya sambo.
The same thing happened to the second and the third brothers, and indeed to all the seven.
27 Sima na bango nyonso, mwasi yango mpe akufaki.
The woman herself died last of all.
28 Na mokolo oyo bato bakosekwa kati na bakufi, mwasi yango akozala mwasi ya nani kati na bandeko nyonso sambo, pamba te bango nyonso sambo babalaki ye?
At the resurrection, then, whose wife will she be out of the seven, all of them having been married to her?”
29 Yesu azongiselaki bango: — Bozali kati na libunga, pamba te boyebi Makomi te, mpe boyebi nguya ya Nzambe te.
“Your mistake,” replied Jesus, “is due to your ignorance of the scriptures, and of the power of God.
30 Na mokolo oyo bato bakosekwa kati na bakufi, bakobala lisusu te; kasi bakozala lokola ba-anjelu kati na Likolo.
For at the resurrection there is no marrying or being married, but all who rise are as angels in heaven.
31 Mpo na oyo etali lisekwa ya bakufi, botikala nanu kotanga te makambo oyo Nzambe ayebisa bino:
As to the resurrection of the dead, have you not read these words of God –
32 « Nazali Nzambe ya Abrayami, Nzambe ya Izaki, mpe Nzambe ya Jakobi? » Nzambe azali Nzambe ya bakufi te, kasi azali Nzambe ya bato ya bomoi.
‘I am the God of Abraham, and the God of Isaac, and the God of Jacob’? He is not the God of dead people, but of living.”
33 Tango ebele ya bato bayokaki bongo, bakamwaki mingi mateya ya Yesu.
The crowds, who had been listening to him, were greatly struck with his teaching.
34 Tango Bafarizeo bayokaki ete Yesu asukisi Basaduseo, bango mpe basanganaki;
When the Pharisees heard that Jesus had silenced the Sadducees, they collected together.
35 mpe moko kati na bango, molakisi ya Mobeko, alukaki kotiela Yesu motambo, atunaki Ye:
Then one of them, a Student of the Law, to test him, asked this question –
36 — Moteyi, mobeko nini eleki monene kati na mibeko nyonso?
“Teacher, what is the greatest commandment in the Law?”
37 Yesu azongiselaki ye: — Linga Nkolo, Nzambe na yo, na motema na yo mobimba, na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo nyonso.
His answer was, “You must love the Lord your God with all your heart, and with all your soul, and with all your mind.
38 Yango nde mobeko ya liboso mpe eleki monene.
This is the great first commandment.
39 Mobeko ya mibale oyo ekokani na yango: « Linga moninga na yo ndenge yo moko omilingaka. »
The second, which is like it, is this – You must love your neighbor as you love yourself.
40 Mibeko nyonso mpe mateya ya basakoli evandi kati na mibeko oyo mibale.
On these two commandments hang all the Law and the prophets.”
41 Wana Bafarizeo basanganaki esika moko, Yesu atunaki bango:
Before the Pharisees separated, Jesus put this question to them –
42 — Bozali kokanisa nini na tina na Klisto? Azali Mwana ya nani? Bazongiselaki Ye: — Azali mwana ya Davidi!
“What do you think about the Christ? Whose son is he?” “David’s,” they said.
43 Alobaki na bango: — Bongo ndenge nini Davidi, na botindikami ya Molimo ya Nzambe, abengaki Ye Nkolo? Pamba te alobaki:
“How is it, then,” Jesus replied, “that David, speaking under inspiration, calls him ‘lord,’ in the passage –
44 « Nkolo alobaki na Nkolo na ngai: ‹ Vanda na ngambo ya loboko na Ngai ya mobali kino natia banguna na Yo na se ya matambe na Yo. › »
‘The Lord said to my Lord: Sit at my right hand, until I put your enemies beneath your feet’?
45 Soki Davidi azali kobenga Ye « Nkolo, » bongo ndenge nini akoki lisusu kozala mwana na ye?
Since, then, David calls him ‘lord,’ how is he David’s son?”
46 Moto moko te akokaki kozongisela Ye ata liloba moko. Mpe, banda mokolo wana, moko te amekaki lisusu kotuna Ye mituna.
No one could say a word in answer; nor did anyone after that day venture to question him further.

< Matayo 22 >