< Matayo 21 >
1 Wana bazalaki kopusana pene ya Yelusalemi mpe bakomaki pene ya Betifaje, na ngomba ya banzete ya olive, Yesu atindaki bayekoli mibale.
And when they drew near to Jerusalem and came to Bethphage, at the mount of Olives, then Jesus sent two disciples,
2 Alobaki na bango: — Bokende na mboka oyo ezali liboso na bino; tango kaka bokokota na mboka yango, bokomona ane ya mwasi bakanga na singa, mpe mwana ya ane pembeni na yango; bofungola nyonso mibale mpe bomemela Ngai yango.
saying to them, Go into the village over against you, and immediately ye will find an ass tied, and a colt with it; loose [them] and lead [them] to me.
3 Soki moto moko alobi na bino likambo na tina na yango, bozongisela ye: « Nkolo azali na bosenga na yango. » Mpe, mbala moko, akotika yango kokende.
And if any one say anything to you, ye shall say, The Lord has need of them, and straightway he will send them.
4 Makambo wana nyonso esalemaki mpo ete maloba oyo mosakoli aloba ekokisama:
But all this came to pass, that that might be fulfilled which was spoken through the prophet, saying,
5 « Boloba na Siona, mboka kitoko: ‹ Tala, mokonzi na yo azali koya epai na yo, atonda na boboto, avandi na likolo ya ane ya mwasi, na likolo ya mwana ya ane, mwana ya nyama oyo ememaka mikumba. › »
Say to the daughter of Zion, Behold thy King cometh to thee, meek, and mounted upon an ass, and upon a colt the foal of an ass.
6 Bayekoli bakendeki mpe basalaki ndenge kaka Yesu atindaki bango.
But the disciples, having gone and done as Jesus had ordered them,
7 Bamemaki ane ya mwasi elongo na mwana ya ane, batandaki bilamba na bango na mikongo na yango; mpe Yesu avandaki na likolo na yango.
brought the ass and the colt and put their garments upon them, and he sat on them.
8 Bato ebele batandaki bilamba na bango na nzela; bamosusu bakataki bitape na likolo ya banzete mpe batandaki yango lisusu na nzela.
But a very great crowd strewed their own garments on the way, and others kept cutting down branches from the trees and strewing them on the way.
9 Bato oyo bazalaki kotambola liboso ya Yesu mpe ba-oyo bazalaki kolanda sima bazalaki koganga: « Ozana na Mwana na Davidi! Tika ete apambolama, Ye oyo ayei na Kombo ya Nkolo! Ozana na bisika oyo eleki Likolo! »
And the crowds who went before him and who followed cried, saying, Hosanna to the Son of David; blessed [be] he who comes in the name of [the] Lord; hosanna in the highest.
10 Tango Yesu akotaki kati na Yelusalemi, engumba mobimba eninganaki; bazalaki kotuna: — Oyo lisusu nani?
And as he entered into Jerusalem, the whole city was moved, saying, Who is this?
11 Bato bazalaki kozongisa: — Ezali mosakoli Yesu, moto ya Nazareti ya Galile!
And the crowds said, This is Jesus the prophet who is from Nazareth of Galilee.
12 Yesu akotaki kati na lopango ya Tempelo, abenganaki bato nyonso oyo bazalaki koteka mpe kosomba biloko kati na Tempelo; abalolaki bamesa ya bato oyo bazalaki kobongola mbongo mpe bakiti ya ba-oyo bazalaki koteka bibenga.
And Jesus entered into the temple [of God], and cast out all that sold and bought in the temple, and overthrew the tables of the money-changers and the seats of those that sold the doves.
13 Alobaki na bango: — Ekomama: « Ndako na Ngai ekobengama Ndako ya losambo; » kasi bino, bozali kokomisa yango penza nganda ya miyibi!
And he says to them, It is written, My house shall be called a house of prayer, but ye have made it a den of robbers.
14 Bakufi miso mpe bato oyo batambola tengu-tengu bapusanaki pene na Yesu kati na lopango ya Tempelo, mpe abikisaki bango.
And blind and lame came to him in the temple, and he healed them.
15 Bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko basilikaki makasi tango bamonaki bikamwa oyo Yesu asalaki mpe ndenge bana bazalaki koganga kati na lopango ya Tempelo: « Ozana na Mwana na Davidi! »
And when the chief priests and the scribes saw the wonders which he wrought, and the children crying in the temple and saying, Hosanna to the Son of David, they were indignant,
16 Balobaki na Yesu: — Ozali koyoka makambo oyo bazali koloba? Yesu azongiselaki bango: — Iyo! Boni, botikala nanu kotanga te: « Wuta na minoko ya bana mike, mpe ya bana oyo bazali nanu komela mabele, ozwaki lokumu na Yo? »
and said to him, Hearest thou what these say? And Jesus says to them, Yea; have ye never read, Out of the mouth of babes and sucklings thou hast perfected praise?
17 Bongo atikaki bango, abimaki longwa na engumba mpe akendeki na Betani epai wapi alekisaki butu.
And leaving them he went forth out of the city to Bethany, and there he passed the night.
18 Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, wana azalaki kozonga na engumba, ayokaki nzala.
But early in the morning, as he came back into the city, he hungered.
19 Amonaki nzete moko ya figi pembeni ya nzela, apusanaki pene na yango; kasi amonaki eloko moko te na nzete yango, kaka makasa. Alobaki na nzete yango: — Okobotaka lisusu mbuma te mpo na libela. Mpe kaka na tango wana, nzete ya figi ekawukaki. (aiōn )
And seeing one fig-tree in the way, he came to it and found on it nothing but leaves only. And he says to it, Let there be never more fruit of thee for ever. And the fig-tree was immediately dried up. (aiōn )
20 Tango bayekoli bamonaki bongo, bakamwaki mingi mpe batunaki: — Ndenge nini nzete ya figi ekawuki kaka boye na mbala moko?
And when the disciples saw [it], they wondered, saying, How immediately is the fig-tree dried up!
21 Yesu azongiselaki bango: — Nazali koloba na bino penza ya solo: soki bozali na kondima mpe botie tembe te, bokoki kaka te kosala makambo oyo Ngai nasali na nzete ya figi oyo, kasi bokoki mpe koloba na ngomba wana: « Longwa wana mpe mibwaka na ebale, » yango ekosalema solo.
And Jesus answering said to them, Verily I say unto you, If ye have faith, and do not doubt, not only shall ye do what [is done] to the fig-tree, but even if ye should say to this mountain, Be thou taken away and be thou cast into the sea, it shall come to pass.
22 Soki bozali na kondima, bokozwa nyonso oyo bokosenga kati na losambo.
And all things whatsoever ye shall ask in prayer, believing, ye shall receive.
23 Yesu akotaki na lopango ya Tempelo; mpe wana azalaki koteya, bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakambi ya bato bapusanaki pene na Ye. Batunaki: — Na kombo ya bokonzi nini ozali kosala biloko oyo? Nani apesi yo bokonzi yango?
And when he came into the temple, the chief priests and the elders of the people came to him [as he was] teaching, saying, By what authority doest thou these things? and who gave thee this authority?
24 Yesu azongiselaki bango: — Ngai mpe, nazali kotuna bino motuna moko. Soki kaka bopesi Ngai eyano, nakoyebisa bino soki na kombo ya bokonzi nini nazali kosala makambo yango.
And Jesus answering said to them, I also will ask you one thing, which if ye tell me, I also will tell you by what authority I do these things:
25 Libatisi ya Yoane ewutaki na Nzambe to ewutaki na bato? Bakomaki kokabola makanisi bango na bango: — Soki tolobi: « Ewutaki na Nzambe, » akotuna biso lisusu: « Bongo mpo na nini bondimaki ye te? »
The baptism of John, whence was it? of heaven or of men? And they reasoned among themselves, saying, If we should say, Of heaven, he will say to us, Why then have ye not believed him?
26 Soki mpe tolobi: « Ewutaki na bato, » wana tosengeli kobanga bato, pamba te bato nyonso bazwaka Yoane lokola mosakoli.
but if we should say, Of men, we fear the crowd, for all hold John for a prophet.
27 Boye, bazongiselaki Yesu: — Toyebi te! Yesu mpe alobaki na bango: — Ngai mpe, nakoyebisa bino te soki na kombo ya bokonzi nini nazali kosala makambo yango.
And answering Jesus they said, We do not know. He also said to them, Neither do I tell you by what authority I do these things.
28 Yesu alobaki na bango lisusu: — Bokanisi nini na tina na lisolo oyo? Moto moko azalaki na bana mibali mibale; akendeki epai ya mwana ya liboso mpe alobaki na ye: « Mwana na ngai, kende lelo kosala na elanga ya vino. »
But what think ye? A man had two children, and coming to the first he said, Child, go to-day, work in [my] vineyard.
29 Mwana azongisaki: « Naboyi. » Kasi sima na mwa tango, abongolaki makanisi mpe akendeki na elanga yango.
And he answering said, I will not; but afterwards repenting himself he went.
30 Tata akendeki epai ya mwana mosusu mpe alobaki na ye kaka ndenge moko. Mwana yango azongisaki: « Malamu, nkolo na ngai, nakeyi! » Kasi akendeki te.
And coming to the second he said likewise; and he answering said, I [go], sir, and went not.
31 Nani kati na bango mibale akokisaki mokano ya tata na ye? Bazongisaki: — Mwana ya liboso. Yesu alobaki na bango: — Nazali koloba na bino penza ya solo: bafutisi mpako mpe basi ya ndumba bakokota na Bokonzi ya Nzambe liboso na bino,
Which of the two did the will of the father? They say [to him], The first. Jesus says to them, Verily I say unto you that the tax-gatherers and the harlots go into the kingdom of God before you.
32 pamba te Yoane ayaki nde epai na bino mpo na kolakisa bino nzela ya bosembo, kasi bondimaki ye te; nzokande, bafutisi mpako mpe basi ya ndumba bandimaki ye. Atako bomonaki yango na miso na bino, kasi bobongolaki kaka mitema te mpe bondimaki ye kaka te.
For John came to you in the way of righteousness, and ye believed him not; but the tax-gatherers and the harlots believed him; but ye when ye saw [it] repented not yourselves afterwards to believe him.
33 Boyoka lisese mosusu: Moto moko alonaki elanga ya vino, atongaki lopango zingazinga na yango, atimolaki ekamolelo bambuma ya vino mpe atongaki ndako molayi ya bakengeli. Sima, apesaki elanga yango na maboko ya basali mpo ete bakoma kofutela yango, mpe akendeki na mobembo.
Hear another parable: There was a householder who planted a vineyard, and made a fence round it, and dug a winepress in it, and built a tower, and let it out to husbandmen, and left the country.
34 Tango eleko ya kobuka bambuma ekomaki pene, atindaki basali na ye epai ya bafuteli elanga, mpo ete bakende kokongola bambuma na ye;
But when the time of fruit drew near, he sent his bondmen to the husbandmen to receive his fruits.
35 kasi bafuteli elanga bakangaki basali yango; babetaki moko, babomaki mosusu, mpe babambaki oyo ya misato mabanga.
And the husbandmen took his bondmen, and beat one, killed another, and stoned another.
36 Atindaki basali mosusu ebele koleka ba-oyo ya liboso; kasi bafuteli elanga basalaki bango ndenge kaka basalaki ba-oyo ya liboso.
Again he sent other bondmen more than the first, and they did to them in like manner.
37 Na suka, atindelaki bango mwana na ye ya mobali mpe amilobelaki: « Solo, bakotosa mwana na ngai! »
And at last he sent to them his son, saying, They will have respect for my son.
38 Kasi tango bafuteli elanga bamonaki mwana yango, balobanaki bango na bango: « Tala mokitani ya libula ya elanga! Boya, toboma ye mpo ete libula ya elanga ekoma ya biso! »
But the husbandmen, seeing the son, said among themselves, This is the heir; come, let us kill him and possess his inheritance.
39 Bakangaki ye, babwakaki ye na libanda ya elanga ya vino mpe babomaki ye.
And they took him, and cast him forth out of the vineyard, and killed him.
40 Tango nkolo elanga ya vino akoya, akosala bafuteli elanga wana nini?
When therefore the lord of the vineyard comes, what shall he do to those husbandmen?
41 Bazongisaki: — Akobomisa bato mabe wana na kufa moko ya somo penza, akopesa elanga yango ya vino na maboko ya bafuteli mosusu oyo bakobanda kofutaka ye ndambo na ye ya bambuma, na eleko oyo babukaka yango.
They say to him, He will miserably destroy those evil [men], and let out the vineyard to other husbandmen, who shall render him the fruits in their seasons.
42 Yesu alobaki na bango: — Nanu botanga te kati na Makomi: « Libanga oyo batongi ndako babwakaki ekomi libanga ya songe ya ndako, mpe esimbi ndako mobimba? Nkolo asalaki bongo, mpe ezali penza likambo ya kokamwa na miso na biso. »
Jesus says to them, Have ye never read in the scriptures, The stone which they that builded rejected, this has become the corner-stone: this is of [the] Lord, and it is wonderful in our eyes?
43 Yango wana, nazali koyebisa bino ete Bokonzi ya Nzambe ekolongolama kati na bino mpo ete epesama na bato oyo bakokoka kolakisa misala na yango. [
Therefore I say to you, that the kingdom of God shall be taken from you and shall be given to a nation producing the fruits of it.
44 Moto oyo akokweya na likolo ya libanga yango akobukana ndambo na ndambo; kasi moto oyo libanga yango ekokweyela, ekopanza ye.]
And he that falls on this stone shall be broken, but on whomsoever it shall fall, it shall grind him to powder.
45 Sima na bango koyoka masese na Ye, bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe Bafarizeo basosolaki ete Yesu azalaki koloba na tina na bango.
And the chief priests and the Pharisees, having heard his parables, knew that he spoke about them.
46 Bazalaki koluka nzela ya kokanga Ye, kasi babangaki bato, pamba te bango nyonso bazalaki kozwa Yesu lokola mosakoli.
And seeking to lay hold of him, they were afraid of the crowds, because they held him for a prophet.