< Matayo 20 >

1 Pamba te, tala ndenge nini Bokonzi ya Likolo ezali: Bokonzi ya Likolo ezali lokola nkolo elanga ya vino oyo abimaki na tongo makasi mpo na koluka bato oyo bakosala na elanga na ye.
«En effet, le royaume des cieux est semblable à un chef de famille, qui sortit dès le matin, afin de louer des ouvriers pour sa vigne.
2 Ayokanaki na bango ete moko na moko akobanda kozwa lifuti ya mbongo moko ya ebende mpo na mokolo mobimba; bongo atindaki bango na elanga na ye ya vino.
Il fit accord avec eux à raison d'un denier par jour, et les envoya à sa vigne.
3 Na ngonga ya libwa ya tongo, abimaki lisusu mpe amonaki, na esika oyo bato bakutanaka, bato mosusu oyo bazalaki kosala eloko moko te.
Il sortit vers la troisième heure, et ayant vu d'autres ouvriers qui étaient sur la place, sans rien faire,
4 Alobaki na bango: « Bino mpe bokende kosala na elanga na ngai ya vino. Nakopesa bino lifuti ya sembo, oyo ekoki. »
il leur dit: «Allez, vous aussi à ma vigne, et je vous donnerai ce qui sera raisonnable; » et ils y allèrent.
5 Boye, bakendeki kuna. Nkolo elanga abimaki lisusu na ngonga ya midi mpe na ngonga ya misato sima na midi; mpe na mbala nyonso mibale, asalaki kaka ndenge moko.
Il sortit encore vers la sixième heure et vers la neuvième, et fit de même.
6 Abimaki lisusu na ngonga ya mitano ya pokwa mpe amonaki lisusu bato batelemi na esika wana oyo bato bakutanaka. Atunaki bango: « Mpo na nini botelemi kaka boye mokolo mobimba na kosala eloko moko te? »
Etant sorti vers la onzième heure, il en trouva d'autres qui se tenaient sur la place, et leur dit: «Pourquoi vous tenez-vous ici toute la journée, sans rien faire?»
7 Bazongisaki: « Soki totelemi boye, ezali mpo ete moto moko te azwi biso na mosala. » Bongo alobaki na bango: « Bino mpe bokende kosala na elanga na ngai ya vino. »
— «C'est que personne, lui dirent-ils, ne nous a loués.» Et il leur dit: «Allez, vous aussi, à ma vigne.»
8 Tango pokwa ekokaki, nkolo elanga ya vino alobaki na motambolisi ya misala ya elanga: « Benga basali nyonso mpe futa bango; banda na bato oyo nazwaki sima mpe sukisa na ba-oyo nazwaki liboso. »
Quand le soir fut venu, le maître de la vigne dit à son intendant: «Appelle les ouvriers, et leur donne leur salaire, en allant des derniers aux premiers.»
9 Bato oyo babandaki mosala na ngonga ya mitano ya pokwa bayaki, mpe moko na moko azwaki lokola lifuti, mbongo moko ya ebende.
Les ouvriers loués à la onzième heure vinrent, et reçurent chacun un denier.
10 Bongo ekomaki ngonga ya kofuta bato oyo nkolo elanga azwaki liboso na mosala; bakanisaki ete bakozwa mbongo mingi koleka, kasi moko na moko kati na bango azwaki lokola lifuti, mbongo moko kaka ya ebende.
Puis vinrent les premiers, qui croyaient recevoir davantage, et ils reçurent, eux aussi, un denier chacun.
11 Tango bazwaki yango, basilikelaki nkolo elanga.
En le touchant, ils murmuraient contre le maître, et disaient:
12 Balobaki: « Bato oyo ozwaki sima mpe basali kaka ngonga moko, ofuti bango ndenge moko na biso oyo tosali mosala makasi mokolo mobimba mpe na se ya moyi makasi! »
«Ces derniers n'ont fait qu'une heure, et tu les mets sur le même pied que nous, qui avons supporté la fatigue et l'ardeur brûlante du jour.»
13 Kasi nkolo elanga azongiselaki moko kati na bango: « Moninga na ngai, nasali yo mabe te! Boni, toyokanaki te ete osala mpo na lifuti ya mbongo moko ya ebende?
Mais le maître, prenant la parole, dit à l'un d'eux: «Mon ami, je ne te fais point de tort: n'es-tu pas convenu d'un denier avec moi?
14 Kamata lifuti na yo mpe kende. Ngai moko nde nalingi kopesa na moto oyo abandaki sima, lifuti ya ndenge moko na oyo napesi yo.
Prends ce qui te revient, et t'en va. Pour moi, je veux donner à ce dernier autant qu'à toi.
15 Boni, nazali na ndingisa te ya kosala na mbongo na ngai nyonso oyo nalingi? Osilikeli ngai mpo ete nazali moto malamu? »
Ne suis-je pas libre de faire ce que je veux de mon bien? ou vois-tu de mauvais oeil que je sois bon?»
16 Boye, kati na bato oyo bazali sik’oyo bato ya suka, ebele bakokoma bato ya liboso; mpe kati na ba-oyo bazali sik’oyo bato ya liboso, ebele bakokoma bato ya suka.
Ainsi les derniers seront les premiers, et les premiers seront les derniers.»
17 Wana Yesu azalaki kokende na Yelusalemi, abendaki na pembeni bayekoli na Ye zomi na mibale mpe alobaki na bango wana bazali kotambola:
Comme Jésus montait à Jérusalem, il prit à part les douze disciples, en chemin, et leur dit:
18 « Boyoka! Tozali solo kokende na Yelusalemi; Mwana na Moto akokabama na maboko ya bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe ya balakisi ya Mobeko; bakokatela Ye etumbu ya kufa
«Voici que nous montons à Jérusalem, et le Fils de l'homme sera livré aux principaux sacrificateurs et aux scribes: ils le condamneront à mort
19 mpe bakokaba Ye na maboko ya bapagano mpo ete baseka Ye, babeta Ye fimbu mpe babaka Ye na ekulusu. Mpe na mokolo ya misato, akosekwa. »
et le livreront aux Gentils, pour le bafouer, le flageller et le crucifier; mais, le troisième jour, il ressuscitera.»
20 Bongo mama ya bana mibali ya Zebede ayaki epai ya Yesu, elongo na bana na ye ya mibali, mpe agumbamaki liboso na Ye mpo na kosenga Ye eloko moko.
Alors la mère des fils de Zébédée s'approcha de lui avec ses fils, et se prosterna pour lui faire une demande.
21 Yesu atunaki ye: — Olingi nini? Azongisaki: — Laka ngai ete bana na ngai mibale oyo ya mibali bakovanda kati na Bokonzi na Yo: moko na ngambo ya loboko na Yo ya mobali, mpe mosusu, na ngambo ya loboko na Yo ya mwasi.
Jésus lui dit: «Que veux-tu?» — «Ordonne, dit-elle, que mes deux fils que voici, soient assis, l'un à ta droite, l'autre à ta gauche, dans ton royaume.»
22 Yesu azongiselaki bango: — Bozali kososola te makambo oyo bozali kosenga! Boni, bokoki komela kopo oyo Ngai nakomela? Bazongisaki: — Iyo, tokoki.
Jésus répondit: «Vous ne savez ce que vous demandez. Pouvez-vous boire le calice que je dois boire?» — «Nous le pouvons, » dirent-ils.
23 Yesu alobaki na bango: — Solo, bokomela na bino kopo oyo Ngai nakomela; kasi likambo ya kovanda na ngambo ya loboko na Ngai ya mobali to na ngambo ya loboko na Ngai ya mwasi, Ngai nakoki te kopesela yango ndingisa; bisika wana ezali ya bato oyo Tata na Ngai abongisela bango yango.
Et Jésus répondit: «Oui, vous boirez mon calice; quant à être assis à ma droite et à ma gauche, il ne m'appartient pas de l'accorder: cette distinction sera pour ceux à qui mon Père l'a réservée.»
24 Tango bayekoli mosusu zomi bayokaki makambo wana, basilikelaki bandeko mibale wana.
Les dix autres disciples, ayant entendu cette demande, furent irrités contre les deux frères.
25 Kasi Yesu abengaki bango nyonso mpe alobaki na bango: — Boyebi malamu ete bakonzi ya bikolo bakonzaka bato ya bikolo oyo ezali na se ya bokonzi na bango, mpe bakalaka ya lokumu bakonzaka bato oyo bazali na se ya bokonzi na bango.
Jésus les appela, et leur dit: «Vous savez que les princes des nations les maîtrisent, et que les grands les dominent.
26 Esengeli te kozala bongo kati na bino. Nzokande, tika ete moto nyonso oyo alingi kozala moto monene kati na bino azala mosali na bino;
Il n'en sera point ainsi parmi vous; mais que celui qui aspire à être grand parmi vous, soit votre serviteur,
27 mpe tika ete moto nyonso oyo alingi kozala moto ya liboso kati na bino azala mowumbu na bino!
et que celui qui veut être le premier parmi vous, soit votre esclave.
28 Pamba te Mwana na Moto ayaki te mpo ete basalela Ye; kasi ayaki nde kosala mpo na bato, mpe kopesa bomoi na Ye lokola motuya ya kofuta mpo na kosikola bato ebele.
C'est ainsi que le Fils de l'homme est venu, non pour être servi, mais pour servir et donner sa vie pour la rançon de beaucoup.»
29 Tango Yesu elongo na bayekoli na Ye balongwaki na Jeriko, bato ebele balandaki Yesu.
Comme ils sortaient de Jéricho, une grande foule suivit Jésus.
30 Bakufi miso mibale bazalaki ya kovanda pembeni ya nzela; tango bayokaki ete Yesu azali koleka, bagangaki: — Nkolo, Mwana ya Davidi, yokela biso mawa!
Deux aveugles assis au bord de la route, entendant dire que Jésus passait, se mirent à crier: «Aie pitié de nous, Seigneur, Fils de David.»
31 Bato bazalaki kopamela bango mpo ete bakanga minoko na bango, kasi bango bagangaki lisusu makasi: — Nkolo, mwana ya Davidi, yokela biso mawa!
La foule les reprenait pour les faire taire; mais ils criaient plus fort: «Aie pitié de nous, Seigneur, Fils de David.»
32 Yesu atelemaki, abengaki bango mpe atunaki bango: — Bolingi nasala nini mpo na bino?
Jésus s'arrêta, les appela, et leur dit: «Que voulez-vous que je vous fasse?»
33 Bazongiselaki Ye: — Nkolo, sala ete tomona.
Ils lui dirent: «Seigneur, que nous recouvrions la vue.»
34 Yesu ayokelaki bango mawa mpe asimbaki miso na bango; mpe, mbala moko, bakomaki komona mpe balandaki Ye.
Jésus, ému de compassion, leur toucha les yeux: et aussitôt ils recouvrèrent la vue et le suivirent.

< Matayo 20 >