< Matayo 2 >

1 Yesu abotamaki na Beteleemi ya Yuda, wana Erode azalaki mokonzi. Na tango yango, bato ya mayele oyo bawutaki na este bayaki na Yelusalemi
İsa'nın Kral Hirodes devrinde Yahudiye'nin Beytlehem Kenti'nde doğmasından sonra bazı yıldızbilimciler doğudan Yeruşalim'e gelip şöyle dediler: “Yahudiler'in Kralı olarak doğan çocuk nerede? Doğuda O'nun yıldızını gördük ve O'na tapınmaya geldik.”
2 mpe batunaki: « Mokonzi ya Bayuda oyo abotami azali wapi? Tomonaki monzoto na Ye kobima, yango wana toyei kogumbamela Ye. »
3 Tango mokonzi Erode ayokaki bongo, motema na ye etungisamaki makasi elongo na Yelusalemi mobimba.
Kral Hirodes bunu duyunca kendisi de bütün Yeruşalim halkı da tedirgin oldu.
4 Abengaki mpe asangisaki bakonzi nyonso ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko; atunaki bango: — Klisto asengeli kobotama wapi?
Bütün başkâhinleri ve halkın din bilginlerini toplayarak onlara Mesih'in nerede doğacağını sordu.
5 Bazongiselaki ye: — Na Beteleemi ya Yuda, pamba te mosakoli akoma:
“Yahudiye'nin Beytlehem Kenti'nde” dediler. “Çünkü peygamber aracılığıyla şöyle yazılmıştır:
6 « Bongo yo, Beteleemi, kati na mabele ya Yuda, ozali solo moke te kati na bingumba ya Yuda, pamba te Mokonzi oyo, lokola Mobateli bibwele, akotambolisa bato na Ngai, Isalaele, akobima nde kati na yo. »
‘Ey sen, Yahuda'daki Beytlehem, Yahuda önderleri arasında hiç de en önemsizi değilsin! Çünkü halkım İsrail'i güdecek önder Senden çıkacak.’”
7 Bongo, Erode abengaki bato ya mayele na nkuku mpe alukaki koyeba epai na bango tango nini monzoto ebimaki.
Bunun üzerine Hirodes yıldızbilimcileri gizlice çağırıp onlardan yıldızın göründüğü anı tam olarak öğrendi.
8 Boye, atindaki bango na Beteleemi; alobaki: — Bokende koluka malamu mwana yango, na Beteleemi; tango kaka bokomona ye, boyebisa ngai mpo ete ngai mpe nakende kogumbamela ye.
“Gidin, çocuğu dikkatle arayın, bulunca bana haber verin, ben de gelip O'na tapınayım” diyerek onları Beytlehem'e gönderdi.
9 Sima na bango koyoka maloba ya mokonzi, bakobaki nzela na bango. Bamonaki lisusu monzoto oyo ewutaki kobima na este: monzoto yango ezalaki kotambola liboso na bango kino ekendeki kotelema na likolo ya esika oyo Mwana azalaki.
Yıldızbilimciler, kralı dinledikten sonra yola çıktılar. Doğuda görmüş oldukları yıldız onlara yol gösteriyordu, çocuğun bulunduğu yerin üzerine varınca durdu.
10 Tango kaka bamonaki lisusu monzoto yango, batondisamaki na esengo.
Yıldızı gördüklerinde olağanüstü bir sevinç duydular.
11 Bakomaki na ndako yango, bamonaki Mwana elongo na Mari, mama na Ye, mpe bagumbamelaki Ye; bongo bafungolaki mabenga na bango mpe babonzelaki Ye biloko oyo lokola bakado: wolo, malasi ya ansa mpe mire.
Eve girip çocuğu annesi Meryem'le birlikte görünce yere kapanarak O'na tapındılar. Hazinelerini açıp O'na armağan olarak altın, günnük ve mür sundular.
12 Sima na yango, Nzambe akebisaki bango kati na ndoto ete bazonga lisusu te epai ya Erode. Boye, bazongaki na mboka na bango na nzela mosusu.
Sonra gördükleri bir düşte Hirodes'in yanına dönmemeleri için uyarılınca ülkelerine başka yoldan döndüler.
13 Sima na bato ya mayele kokende, anjelu na Nkolo abimelaki Jozefi kati na ndoto mpe alobaki na ye: « Telema, kamata Mwana elongo na mama na Ye; bokima na Ejipito mpe bowumela kuna kino tango nakoyebisa yo lisusu ete bozonga, pamba te Erode akoluka koboma Mwana. »
Yıldızbilimciler gittikten sonra Rab'bin bir meleği Yusuf'a rüyada görünerek, “Kalk!” dedi, “Çocukla annesini al, Mısır'a kaç. Ben sana haber verinceye dek orada kal. Çünkü Hirodes öldürmek için çocuğu aratacak.”
14 Jozefi atelemaki, azwaki Mwana elongo na mama na Ye, kaka na butu wana, mpe akimaki na Ejipito
Böylece Yusuf kalktı, aynı gece çocukla annesini alıp Mısır'a doğru yola çıktı.
15 epai wapi awumelaki kino na kufa ya Erode, mpo ete makambo oyo Nkolo alobaki na nzela ya mosakoli ekokisama: « Wuta na Ejipito, nabengaki mwana na Ngai. »
Hirodes'in ölümüne dek orada kaldı. Bu, Rab'bin peygamber aracılığıyla bildirdiği şu söz yerine gelsin diye oldu: “Oğlumu Mısır'dan çağırdım.”
16 Tango Erode asosolaki ete bato ya mayele bakosi ye, atombokaki makasi mpe apesaki mitindo ete baboma bana mike nyonso ya mibali ya mibu mibale kino na se, oyo bazalaki na Beteleemi mpe na zingazinga na yango, kolanda tango oyo bato ya mayele bayebisaki ye na tina na eleko oyo monzoto ebimaki.
Hirodes, yıldızbilimciler tarafından aldatıldığını anlayınca çok öfkelendi. Onlardan öğrendiği vakti göz önüne alarak Beytlehem ve bütün yöresinde bulunan iki ve iki yaşından küçük erkek çocukların hepsini öldürttü.
17 Boye nde ekokisamaki makambo oyo mosakoli Jeremi alobaki:
Böylelikle Peygamber Yeremya aracılığıyla bildirilen şu söz yerine gelmiş oldu:
18 « Makelele moko eyokani na Rama, makelele ya kolela makasi mpe ya matanga: Rasheli azali kolela bana na ye; aboyi kobondisama, pamba te bazali lisusu na bomoi te. »
“Rama'da bir ses duyuldu, Ağlayış ve acı feryat sesleri! Çocukları için ağlayan Rahel Avutulmak istemiyor. Çünkü onlar yok artık!”
19 Sima na kufa ya Erode, anjelu na Nkolo abimelaki Jozefi kati na ndoto, kuna na Ejipito,
Hirodes öldükten sonra, Rab'bin bir meleği Mısır'da Yusuf'a rüyada görünerek, “Kalk!” dedi, “Çocukla annesini al, İsrail'e dön. Çünkü çocuğun canına kıymak isteyenler öldü.”
20 mpe alobaki na ye: « Telema, kamata Mwana elongo na mama na Ye, mpe zonga kati na mokili ya Isalaele, pamba te bato oyo bazalaki koluka koboma Mwana basili kokufa. »
21 Jozefi atelemaki, azwaki Mwana elongo na mama na Ye mpe akendeki na mokili ya Isalaele.
Bunun üzerine Yusuf kalktı, çocukla annesini alıp İsrail'e döndü.
22 Kasi tango ayokaki ete Arikelawusi akitanaki na tata na ye, Erode, na bokonzi kati na Yuda, abangaki kokende kuna; kasi Nzambe akebisaki Jozefi kati na ndoto, mpe Jozefi akendeki kati na etuka ya Galile
Ama Yahudiye'de Hirodes'in yerine oğlu Arhelas'ın kral olduğunu duyunca oraya gitmekten korktu. Rüyada uyarılınca Celile bölgesine gitti.
23 epai wapi avandaki kati na engumba Nazareti, mpo ete makambo oyo basakoli balobaki ekokisama: « Bakobenga Ye moto ya Nazareti. »
Oraya varınca Nasıra denen kente yerleşti. Bu, peygamberler aracılığıyla bildirilen, “O'na Nasıralı denecektir” sözü yerine gelsin diye oldu.

< Matayo 2 >