< Matayo 19 >

1 Tango Yesu asilisaki koloba makambo wana, alongwaki na Galile mpe akendeki na etuka ya Yuda, na ngambo mosusu ya Yordani.
και εγενετο οτε ετελεσεν ο ιησους τους λογους τουτους μετηρεν απο της γαλιλαιας και ηλθεν εις τα ορια της ιουδαιας περαν του ιορδανου
2 Ebele penza ya bato balandaki Ye, mpe abikisaki bango kuna.
και ηκολουθησαν αυτω οχλοι πολλοι και εθεραπευσεν αυτους εκει
3 Bafarizeo bapusanaki pene na Ye mpo na komeka Ye; bapesaki Ye motuna: — Boni, mibeko na biso epesi nzela na mobali ya kobengana mwasi na ye na libala mpo na likambo songolo?
και προσηλθον αυτω οι φαρισαιοι πειραζοντες αυτον και λεγοντες αυτω ει εξεστιν ανθρωπω απολυσαι την γυναικα αυτου κατα πασαν αιτιαν
4 Yesu azongisaki: — Boni, botangi te ete, na ebandeli, Mokeli « akelaki bango mobali mpe mwasi, »
ο δε αποκριθεις ειπεν αυτοις ουκ ανεγνωτε οτι ο ποιησας απ αρχης αρσεν και θηλυ εποιησεν αυτους
5 mpe ete alobaki: « Yango wana mobali akotika tata na ye mpe mama na ye, akosangana na mwasi na ye, bongo bango mibale bakokoma nzoto moko?
και ειπεν ενεκεν τουτου καταλειψει ανθρωπος τον πατερα αυτου και την μητερα και κολληθησεται τη γυναικι αυτου και εσονται οι δυο εις σαρκα μιαν
6 Boye, bazali lisusu bato mibale te, kasi bakomi moto moko. Tika ete moto akabola te oyo Nzambe asangisi! »
ωστε ουκετι εισιν δυο αλλα σαρξ μια ο ουν ο θεος συνεζευξεν ανθρωπος μη χωριζετω
7 Kasi Bafarizeo balobaki na Ye: — Bongo mpo na nini Moyize atindaki ete mobali apesa mwasi na ye mokanda ya koboma libala soki bakabwani na libala?
λεγουσιν αυτω τι ουν μωσης ενετειλατο δουναι βιβλιον αποστασιου και απολυσαι αυτην
8 Yesu azongiselaki bango: — Moyize apesaki bino nzela ya kobengana basi na bino na mabala, pamba te mitema na bino ezali mabanga; na ebandeli, ezalaki bongo te.
λεγει αυτοις οτι μωσης προς την σκληροκαρδιαν υμων επετρεψεν υμιν απολυσαι τας γυναικας υμων απ αρχης δε ου γεγονεν ουτως
9 Nazali koloba na bino: Soki mobali alongoli mwasi na ye na libala, longola kaka soki akweyaki na ekobo, mpe abali mwasi mosusu asali ekobo.
λεγω δε υμιν οτι ος αν απολυση την γυναικα αυτου μη επι πορνεια και γαμηση αλλην μοιχαται και ο απολελυμενην γαμησας μοιχαται
10 Bayekoli balobaki na Ye: — Soki mobali asengeli kozala bongo liboso ya mwasi na ye, wana eleki malamu mpo na mobali ete abala te!
λεγουσιν αυτω οι μαθηται αυτου ει ουτως εστιν η αιτια του ανθρωπου μετα της γυναικος ου συμφερει γαμησαι
11 Yesu azongiselaki bango: — Mibali nyonso bakoki kondima mateya oyo te, kaka ba-oyo bapesameli makoki mpo na yango.
ο δε ειπεν αυτοις ου παντες χωρουσιν τον λογον τουτον αλλ οις δεδοται
12 Ezali na tina misato oyo esalaka ete mibali mosusu babala te: ezali na mibali oyo, wuta na mabumu ya bamama na bango, bakoki kobala te; ezali na mibali oyo baboma bango mokongo; ezali mpe lisusu na mibali oyo bango moko baboya kobala mpo na Bokonzi ya Likolo. Tika ete moto oyo azali na makoki ya kondima mateya oyo andima yango!
εισιν γαρ ευνουχοι οιτινες εκ κοιλιας μητρος εγεννηθησαν ουτως και εισιν ευνουχοι οιτινες ευνουχισθησαν υπο των ανθρωπων και εισιν ευνουχοι οιτινες ευνουχισαν εαυτους δια την βασιλειαν των ουρανων ο δυναμενος χωρειν χωρειτω
13 Bato bamemaki bana mike epai ya Yesu mpo ete atia bango maboko mpe asambela mpo na bango. Kasi bayekoli bapamelaki bato oyo bamemaki bana yango.
τοτε προσηνεχθη αυτω παιδια ινα επιθη αυτοις τας χειρας και προσευξηται οι δε μαθηται επετιμησαν αυτοις
14 Yesu alobaki: — Botika bana mike baya epai na Ngai, bopekisa bango te koya epai na Ngai; pamba te Bokonzi ya Likolo ezali mpo na bato oyo bazali lokola bango.
ο δε ιησους ειπεν αφετε τα παιδια και μη κωλυετε αυτα ελθειν προς με των γαρ τοιουτων εστιν η βασιλεια των ουρανων
15 Atielaki bango maboko, mpe alongwaki wana.
και επιθεις τας χειρας αυτοις επορευθη εκειθεν
16 Elenge mobali moko apusanaki pene na Yesu mpe atunaki: — Moteyi, likambo nini ya malamu nasengeli kosala mpo ete nazwa bomoi ya seko? (aiōnios g166)
και ιδου εις προσελθων ειπεν αυτω διδασκαλε αγαθε τι αγαθον ποιησω ινα εχω ζωην αιωνιον (aiōnios g166)
17 Yesu azongisaki: — Mpo na nini ozali kotuna Ngai na tina na oyo ezali malamu? Moko kaka azali malamu. Soki olingi kokota kati na bomoi, tosa mibeko.
ο δε ειπεν αυτω τι με λεγεις αγαθον ουδεις αγαθος ει μη εις ο θεος ει δε θελεις εισελθειν εις την ζωην τηρησον τας εντολας
18 Elenge mobali yango atunaki lisusu: — Mibeko nini? Yesu azongisaki: — Okobomaka te, okosalaka ekobo te, okoyibaka te, okolobaka litatoli ya lokuta te,
λεγει αυτω ποιας ο δε ιησους ειπεν το ου φονευσεις ου μοιχευσεις ου κλεψεις ου ψευδομαρτυρησεις
19 okotosaka tata mpe mama na yo mpe okolingaka moninga na yo ndenge yo moko omilingaka.
τιμα τον πατερα και την μητερα και αγαπησεις τον πλησιον σου ως σεαυτον
20 Elenge mobali alobaki: — Natosaka mibeko wana nyonso; nasala lisusu nini?
λεγει αυτω ο νεανισκος παντα ταυτα εφυλαξαμην εκ νεοτητος μου τι ετι υστερω
21 Yesu azongisaki: — Soki olingi kozala moto ya kokoka, kende, teka biloko na yo mpe pesa epai ya babola mbongo oyo okozwa; bongo okozwa bomengo kati na Likolo. Sima na yango, yaka mpe landa Ngai.
εφη αυτω ο ιησους ει θελεις τελειος ειναι υπαγε πωλησον σου τα υπαρχοντα και δος πτωχοις και εξεις θησαυρον εν ουρανω και δευρο ακολουθει μοι
22 Tango elenge mobali ayokaki bongo, akendeki na mawa, pamba te azalaki na bozwi mingi.
ακουσας δε ο νεανισκος τον λογον απηλθεν λυπουμενος ην γαρ εχων κτηματα πολλα
23 Yesu alobaki na bayekoli na Ye: — Nazali koloba na bino penza ya solo: ezali pasi mpo na mozwi kokota kati na Bokonzi ya Likolo!
ο δε ιησους ειπεν τοις μαθηταις αυτου αμην λεγω υμιν οτι δυσκολως πλουσιος εισελευσεται εις την βασιλειαν των ουρανων
24 Nazali koloba na bino lisusu: ezali pete mpo na shamo kolekela na lidusu ya tonga, kasi ezali penza pasi mpo na mozwi kokota kati na Bokonzi ya Nzambe.
παλιν δε λεγω υμιν ευκοπωτερον εστιν καμηλον δια τρυπηματος ραφιδος διελθειν η πλουσιον εις την βασιλειαν του θεου εισελθειν
25 Tango bayekoli bayokaki Yesu koloba bongo, bakamwaki mingi mpe bakomaki kotunana: — Bongo nani penza akoki kobikisama?
ακουσαντες δε οι μαθηται αυτου εξεπλησσοντο σφοδρα λεγοντες τις αρα δυναται σωθηναι
26 Wana Yesu atalaki bango, alobaki: — Na bato, ekoki kosalema te; kasi na Nzambe, nyonso ekoki kosalema!
εμβλεψας δε ο ιησους ειπεν αυτοις παρα ανθρωποις τουτο αδυνατον εστιν παρα δε θεω παντα δυνατα εστιν
27 Petelo azwaki maloba mpe alobaki na Yesu: — Biso, totiki nyonso mpo na kolanda Yo! Ekozala boni mpo na biso?
τοτε αποκριθεις ο πετρος ειπεν αυτω ιδου ημεις αφηκαμεν παντα και ηκολουθησαμεν σοι τι αρα εσται ημιν
28 Yesu alobaki na bango: — Nazali koloba na bino penza ya solo: tango makambo nyonso ekokoma ya sika, tango Mwana na Moto akovanda na Kiti ya Bokonzi na Ye ya nkembo, bino bato oyo bozali kolanda Ngai, bino mpe bokovanda na bakiti zomi na mibale ya bokonzi, mpo na koyangela mabota zomi na mibale ya Isalaele.
ο δε ιησους ειπεν αυτοις αμην λεγω υμιν οτι υμεις οι ακολουθησαντες μοι εν τη παλιγγενεσια οταν καθιση ο υιος του ανθρωπου επι θρονου δοξης αυτου καθισεσθε και υμεις επι δωδεκα θρονους κρινοντες τας δωδεκα φυλας του ισραηλ
29 Mpe moto nyonso oyo atiki bandako, bandeko ya mibali, bandeko ya basi, tata, mama, bana to bilanga mpo na Kombo na Ngai akozwa yango koleka mbala nkama elongo na bomoi ya seko. (aiōnios g166)
και πας ος αφηκεν οικιας η αδελφους η αδελφας η πατερα η μητερα η γυναικα η τεκνα η αγρους ενεκεν του ονοματος μου εκατονταπλασιονα ληψεται και ζωην αιωνιον κληρονομησει (aiōnios g166)
30 Kati na bato oyo bazali sik’oyo bato ya liboso, ebele bakokoma bato ya suka; mpe kati na ba-oyo bazali sik’oyo bato ya suka, ebele bakokoma bato ya liboso.
πολλοι δε εσονται πρωτοι εσχατοι και εσχατοι πρωτοι

< Matayo 19 >