< Matayo 17 >
1 Sima na mikolo motoba, Yesu azwaki Petelo, Jake mpe Yoane, ndeko mobali ya Jake; amemaki bango na pembeni, na likolo ya ngomba moko ya molayi.
Six days later Jesus took with him Peter, James, and John his brother, and brought them up a high mountain by themselves.
2 Yesu abongolamaki na miso na bango: elongi na Ye ekomaki kongenga lokola moyi, bilamba na Ye ekomaki pembe makasi lokola pole.
He was transfigured before them. His face shone like the sun, and his garments became as brilliant as the light.
3 Mbala moko, bamonaki Moyize mpe Eliya bazali kosolola na Yesu.
Behold, there appeared to them Moses and Elijah talking with him.
4 Petelo alobaki na Yesu: — Nkolo, eleki malamu mpo na biso kotikala awa! Soki ondimi, nakotonga bandako misato ya kapo: moko mpo na Yo, moko mpo na Moyize, mpe moko mpo na Eliya!
Peter answered and said to Jesus, “Lord, it is good for us to be here. If you desire, I will make here three shelters—one for you, and one for Moses, and one for Elijah.”
5 Wana azalaki nanu koloba, lipata moko ezalaki kongenga lokola moyi, ezipaki bango, mpe mongongo moko eyokanaki wuta kati na lipata yango: « Oyo azali Mwana na Ngai ya bolingo, nasepelaka na Ye mingi; boyoka Ye! »
While he was still speaking, behold, a bright cloud overshadowed them, and behold, there was a voice out of the cloud, saying, “This is my beloved Son, in whom I am well pleased. Listen to him.”
6 Tango bayekoli bayokaki mongongo yango, bakweyaki bilongi kino na mabele mpo ete somo makasi ekangaki bango.
When the disciples heard it, they fell on their face and were very afraid.
7 Kasi Yesu apusanaki pene na bango, asimbaki bango mpe alobaki: — Botelema, bobanga te!
Then Jesus came and touched them and said, “Get up and do not be afraid.”
8 Batombolaki miso mpe bamonaki moto mosusu te, kaka Yesu.
Then they looked up but saw no one except Jesus only.
9 Wana bazalaki kokita na ngomba, Yesu apesaki bango mitindo oyo: — Makambo oyo bowuti komona, boyebisa yango na moto moko te kino tango Mwana na Moto akosekwa kati na bakufi.
As they were coming down the mountain, Jesus commanded them, saying, “Report this vision to no one until the Son of Man has risen from the dead.”
10 Bayekoli batunaki Yesu: — Mpo na nini balakisi ya Mobeko balobaka ete Eliya asengeli koya moto ya liboso?
His disciples asked him, saying, “Why then do the scribes say that Elijah must come first?”
11 Yesu azongisaki: — Solo, Eliya asengeli koya mpe akozongisa makambo nyonso na molongo.
Jesus answered and said, “Elijah will indeed come and restore all things.
12 Kasi Ngai, nazali koloba na bino ete Eliya asilaki koya; kasi na esika ya koyeba ye, basalaki ye ndenge balingaki. Ezali mpe ndenge wana nde bakonyokola Mwana na Moto.
But I tell you, Elijah has already come, but they did not recognize him. Instead, they did whatever they wanted to him. In the same way, the Son of Man will also suffer at their hands.”
13 Bayekoli basosolaki ete azalaki kolobela bango na tina na Yoane Mobatisi.
Then the disciples understood that he was speaking to them about John the Baptist.
14 Tango bakomaki pene ya esika oyo ebele ya bato bazalaki, moto moko apusanaki pene na Yesu, afukamaki liboso na Ye mpe alobaki:
When they had come to the crowd, a man came to him, knelt before him, and said,
15 — Nkolo, yokela mwana na ngai ya mobali mawa! Azali na maladi ya ndeke mpe azali penza komona pasi: akweyaka mbala mingi na moto to na mayi.
“Lord, have mercy on my son, for he is epileptic and suffers severely. For he often falls into the fire or the water.
16 Namemaki ye epai ya bayekoli na Yo, kasi bakoki te kobikisa ye.
I brought him to your disciples, but they could not cure him.”
17 Yesu alobaki: — Ekeke ya bato mabe mpe bazanga kondima! Kino tango nini nakozala na bino elongo? Kino tango nini nakokanga motema mpo na bino? Bomemela Ngai mwana yango.
Jesus answered and said, “Unbelieving and corrupt generation, how long will I have to stay with you? How long must I bear with you? Bring him here to me.”
18 Yesu abenganaki molimo mabe, mpe molimo mabe yango ebimaki kati na mwana. Kaka na tango yango, mwana abikaki.
Jesus rebuked the demon, and it came out of him, and the boy was healed from that hour.
19 Bongo bayekoli bakendeki na nkuku epai ya Yesu mpe batunaki: — Mpo na nini, biso, tolongaki te kobengana molimo yango?
Then the disciples came to Jesus privately and said, “Why could we not cast it out?”
20 Yesu azongiselaki bango: — Ezali mpo ete bozali na kondima moke. Nazali koloba na bino penza ya solo: soki kondima na bino ezalaki lokola mbuma ya mutarde, bokokaki koloba na ngomba oyo: « Longwa awa, kende kuna; » mpe ekokende penza. Eloko moko te ekoki kozanga kosalemela bino. [
Jesus said to them, “Because of your small faith. For I truly say to you, if you have faith even as small as a grain of mustard seed, you can say to this mountain, 'Move from here to there,' and it will move, and nothing will be impossible for you.
21 Kasi lolenge oyo ya milimo mabe ebimaka kaka na nzela ya mabondeli mpe ya kokila bilei.]
22 Mokolo moko, bayekoli basanganaki bango nyonso kati na Galile; Yesu alobaki na bango: — Bakokaba Mwana na Moto na maboko ya bato,
While they stayed in Galilee, Jesus said to his disciples, “The Son of Man will be delivered into the hands of people,
23 bakoboma Ye, mpe, na mokolo ya misato, akosekwa. Bayekoli bayokaki mawa mingi.
and they will kill him, and the third day he will be raised up.” The disciples became very upset.
24 Tango Yesu mpe bayekoli na Ye bakomaki na Kapernawumi, bafutisi mpako ya Ndako ya Nzambe bayaki epai ya Petelo mpe batunaki: — Boni, moteyi na bino afutaka mpako ya Ndako ya Nzambe te?
When they had come to Capernaum, the men who collected the half-shekel tax came to Peter and said, “Does not your teacher pay the half-shekel tax?”
25 Petelo azongisaki: — Afutaka! Tango Petelo akotaki na ndako, Yesu azwaki maloba moto ya liboso mpe atunaki ye: — Simona, okanisi nini? Banani bafutaka mpako epai ya bakonzi ya mokili: bana na bango to bapaya?
He said, “Yes.” When Peter came into the house, Jesus spoke to him first and said, “What do you think, Simon? From whom do the kings of the earth collect tolls or taxes? From their sons or from others?”
26 Petelo azongisaki: — Bapaya. Yesu alobaki na ye: — Lokola ezali bongo, bana mboka basengeli kofuta te.
When he said, “From others,” Jesus said to him, “Then the sons are free.”
27 Nzokande, mpo ete totia mobulu te kati na makanisi na bango, kende na ebale, bwaka ndobo na mayi mpe kamata mbisi oyo okozwa ya liboso; fungola monoko na yango mpe okomona mbongo moko ya bibende kati na yango; kamata mbongo yango mpe futa mpako na Ngai mpe mpako na yo, na maboko na bango.
But so that we do not cause the tax collectors to sin, go to the sea, throw in a hook, and draw in the fish that comes up first. When you have opened its mouth, you will find a shekel. Take it and give it to the tax collectors for me and you.”