< Matayo 16 >

1 Bafarizeo mpe Basaduseo bayaki epai na Yesu mpo na kotiela Ye motambo; basengaki na Ye ete alakisa bango elembo moko kowuta na Likolo.
και προσελθοντες οι φαρισαιοι και σαδδουκαιοι πειραζοντες επηρωτησαν αυτον σημειον εκ του ουρανου επιδειξαι αυτοις
2 Yesu azongiselaki bango: — Na pokwa, bolobaka: « Mokolo ya lobi ekozala mokolo malamu, pamba te likolo ezali motane! »
ο δε αποκριθεις ειπεν αυτοις οψιας γενομενης λεγετε ευδια πυρραζει γαρ ο ουρανος
3 Mpe na tongo, bolobaka: « Mvula makasi ekobeta lelo, pamba te mapata eyindi. » Solo, boyebi kososola bilembo oyo elakisaka soki mvula ekobeta to ekobeta te, kasi bozangi makoki ya kososola bilembo ya tango!
και πρωι σημερον χειμων πυρραζει γαρ στυγναζων ο ουρανος [ υποκριται ] το μεν προσωπον του ουρανου γινωσκετε διακρινειν τα δε σημεια των καιρων ου δυνασθε [ γνωναι ]
4 Oh bato ya ekeke oyo! Bazali bato mabe mpe bazangi botosi na miso ya Nzambe, kasi bazali mpe kosenga elembo! Bakopesamela elembo mosusu te longola kaka elembo ya Yona. Bongo atikaki bango wana mpe akendeki.
γενεα πονηρα και μοιχαλις σημειον επιζητει και σημειον ου δοθησεται αυτη ει μη το σημειον ιωνα του προφητου και καταλιπων αυτους απηλθεν
5 Tango bayekoli bakatisaki na ngambo mosusu ya ebale, babosanaki komema mapa.
και ελθοντες οι μαθηται αυτου εις το περαν επελαθοντο αρτους λαβειν
6 Yesu alobaki na bango: — Bosala keba na levire ya Bafarizeo mpe ya Basaduseo!
ο δε ιησους ειπεν αυτοις ορατε και προσεχετε απο της ζυμης των φαρισαιων και σαδδουκαιων
7 Bayekoli bakomaki kokanisa mpe komituna bango na bango: — Azali koloba bongo mpo ete tomemi mapa te!
οι δε διελογιζοντο εν εαυτοις λεγοντες οτι αρτους ουκ ελαβομεν
8 Yesu asosolaki makanisi na bango; alobaki: — Bato ya kondima moke! Bozali kolobana bino na bino mpo ete bozali na mapa te! Mpo na nini?
γνους δε ο ιησους ειπεν αυτοις τι διαλογιζεσθε εν εαυτοις ολιγοπιστοι οτι αρτους ουκ ελαβετε
9 Boni, bozwi kaka bososoli nanu te? Bobosani penza mapa mitano oyo bokabolelaki bato nkoto mitano, mpe motango ya bitunga oyo bozongaki na yango sima na kokabolela bato?
ουπω νοειτε ουδε μνημονευετε τους πεντε αρτους των πεντακισχιλιων και ποσους κοφινους ελαβετε
10 Bobosani lisusu mapa sambo oyo bokabolelaki bato nkoto minei, mpe motango ya bitunga oyo bozongaki na yango sima na kokabolela bato?
ουδε τους επτα αρτους των τετρακισχιλιων και ποσας σπυριδας ελαβετε
11 Ndenge nini bozali kososola te ete nazalaki koloba na tina na mapa te, tango nalobaki na bino: bosala keba na levire ya Bafarizeo mpe ya Basaduseo?
πως ου νοειτε οτι ου περι αρτου ειπον υμιν προσεχειν απο της ζυμης των φαρισαιων και σαδδουκαιων
12 Boye, bayekoli basosolaki ete alobaki na bango te ete basala keba na levire ya mapa, kasi nde basala keba na mateya ya Bafarizeo mpe ya Basaduseo.
τοτε συνηκαν οτι ουκ ειπεν προσεχειν απο της ζυμης του αρτου αλλ απο της διδαχης των φαρισαιων και σαδδουκαιων
13 Tango Yesu akomaki na etuka ya Sezarea ya Filipo, atunaki bayekoli na Ye: — Bato balobaka ete Mwana na Moto azali nani?
ελθων δε ο ιησους εις τα μερη καισαρειας της φιλιππου ηρωτα τους μαθητας αυτου λεγων τινα με λεγουσιν οι ανθρωποι ειναι τον υιον του ανθρωπου
14 Bazongisaki: — Bamoko balobaka ete ozali Yoane Mobatisi; bamosusu, Eliya; mpe bamosusu lisusu, Jeremi to moko kati na basakoli.
οι δε ειπον οι μεν ιωαννην τον βαπτιστην αλλοι δε ηλιαν ετεροι δε ιερεμιαν η ενα των προφητων
15 Yesu atunaki bango lisusu: — Bongo bino, bolobaka ete Ngai nazali nani?
λεγει αυτοις υμεις δε τινα με λεγετε ειναι
16 Simona Petelo azongisaki: — Ozali Masiya, Mwana na Nzambe na bomoi.
αποκριθεις δε σιμων πετρος ειπεν συ ει ο χριστος ο υιος του θεου του ζωντος
17 Yesu alobaki na ye: — Esengo na yo Simona, mwana mobali ya Yona! Pamba te ezali moto te nde ayebisi yo makambo oyo, kasi Tata na Ngai, oyo azali kati na Likolo.
και αποκριθεις ο ιησους ειπεν αυτω μακαριος ει σιμων βαριωνα οτι σαρξ και αιμα ουκ απεκαλυψεν σοι αλλ ο πατηρ μου ο εν τοις ουρανοις
18 Mpe Ngai, nazali koloba na yo: Ozali Libanga, mpe ezali na likolo ya libanga oyo nde Ngai nakotonga Lingomba na Ngai; bongo bikuke ya mboka ya bakufi ekotikala kolonga yango te. (Hadēs g86)
καγω δε σοι λεγω οτι συ ει πετρος και επι ταυτη τη πετρα οικοδομησω μου την εκκλησιαν και πυλαι αδου ου κατισχυσουσιν αυτης (Hadēs g86)
19 Nakopesa yo bafungola ya Bokonzi ya Likolo; nyonso oyo okokanga awa na mokili ekokangama mpe na Likolo, mpe nyonso oyo okofungola awa na mokili ekofungwama mpe na Likolo.
και δωσω σοι τας κλεις της βασιλειας των ουρανων και ο εαν δησης επι της γης εσται δεδεμενον εν τοις ουρανοις και ο εαν λυσης επι της γης εσται λελυμενον εν τοις ουρανοις
20 Bongo Yesu apekisaki makasi bayekoli na Ye koloba na moto ete Ye azali Masiya.
τοτε διεστειλατο τοις μαθηταις αυτου ινα μηδενι ειπωσιν οτι αυτος εστιν [ ιησους ] ο χριστος
21 Wuta na tango wana, Yesu akomaki koloba polele na bayekoli na Ye ete asengeli kokende na Yelusalemi, asengeli komona pasi mingi na maboko ya bakambi ya bato, bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko; basengeli koboma Ye, mpe asengeli kosekwa na mokolo ya misato.
απο τοτε ηρξατο ο ιησους δεικνυειν τοις μαθηταις αυτου οτι δει αυτον απελθειν εις ιεροσολυμα και πολλα παθειν απο των πρεσβυτερων και αρχιερεων και γραμματεων και αποκτανθηναι και τη τριτη ημερα εγερθηναι
22 Petelo abendaki Yesu na pembeni mpe akomaki kopamela Ye: — Nkolo, tika ete Nzambe abatela Yo mosika ya makambo wana! Ekokomela Yo te!
και προσλαβομενος αυτον ο πετρος ηρξατο επιτιμαν αυτω λεγων ιλεως σοι κυριε ου μη εσται σοι τουτο
23 Kasi Yesu abalukaki, alobaki na Petelo: — Mosika na Ngai, Satana! Ozali epekiselo mpo na Ngai! Makanisi na yo ezali makanisi ya Nzambe te, ezali penza makanisi ya bato.
ο δε στραφεις ειπεν τω πετρω υπαγε οπισω μου σατανα σκανδαλον μου ει οτι ου φρονεις τα του θεου αλλα τα των ανθρωπων
24 Bongo Yesu alobaki na bayekoli na Ye: — Moto nyonso oyo alingi kolanda Ngai asengeli komiboya ye moko, kokamata ekulusu na ye mpe kolanda Ngai.
τοτε ο ιησους ειπεν τοις μαθηταις αυτου ει τις θελει οπισω μου ελθειν απαρνησασθω εαυτον και αρατω τον σταυρον αυτου και ακολουθειτω μοι
25 Pamba te moto nyonso oyo akolinga kobikisa bomoi na ye akobungisa yango, kasi moto nyonso oyo akobungisa bomoi na ye mpo na Ngai akozwa yango lisusu.
ος γαρ αν θελη την ψυχην αυτου σωσαι απολεσει αυτην ος δ αν απολεση την ψυχην αυτου ενεκεν εμου ευρησει αυτην
26 Litomba nini ekozala mpo na moto, soki azwi mokili mobimba, kasi abungisi bomoi na ye? Moto akoki penza kopesa nini mpo na kosikola bomoi na ye?
τι γαρ ωφελειται ανθρωπος εαν τον κοσμον ολον κερδηση την δε ψυχην αυτου ζημιωθη η τι δωσει ανθρωπος ανταλλαγμα της ψυχης αυτου
27 Pamba te Mwana na Moto akoya elongo na ba-anjelu na Ye kati na nkembo ya Tata na Ye mpe akofuta moto nyonso kolanda misala na ye.
μελλει γαρ ο υιος του ανθρωπου ερχεσθαι εν τη δοξη του πατρος αυτου μετα των αγγελων αυτου και τοτε αποδωσει εκαστω κατα την πραξιν αυτου
28 Nazali koloba na bino penza ya solo: kati na bato oyo bazali awa, ezali na ba-oyo bakokufa te kino bakomona Mwana na Moto koya kati na nkembo ya bokonzi na Ye.
αμην λεγω υμιν εισιν τινες των ωδε εστηκοτων οιτινες ου μη γευσωνται θανατου εως αν ιδωσιν τον υιον του ανθρωπου ερχομενον εν τη βασιλεια αυτου

< Matayo 16 >