< Matayo 15 >
1 Bafarizeo mpe balakisi ya Mobeko oyo bawutaki na Yelusalemi bayaki epai ya Yesu mpe balobaki na Ye:
Then come unto Jesus do they from Jerusalem — scribes and Pharisees — saying,
2 — Mpo na nini bayekoli na yo bazali kotosa te bokoko na biso? Pamba te basukolaka maboko na bango te liboso ya kolia.
'Wherefore do thy disciples transgress the tradition of the elders? for they do not wash their hands when they may eat bread.'
3 Yesu azongiselaki bango: — Bongo bino, mpo na nini botosaka te mibeko ya Nzambe, kasi botosaka kaka bokoko na bino?
And he answering said to them, 'Wherefore also do ye transgress the command of God because of your tradition?
4 Solo, Nzambe alobaki: « Okopesaka tata na yo mpe mama na yo lokumu; mpe moto oyo akolakela tata na ye to mama na ye mabe asengeli na etumbu ya kufa. »
for God did command, saying, Honour thy father and mother; and, He who is speaking evil of father or mother — let him die the death;
5 Kasi bino, bolobaka: « Moto nyonso oyo alobi na tata na ye to na mama na ye: ‹ Lisungi oyo nalingaki kopesa yo, nabonzi yango lokola likabo epai ya Nzambe, ›
but ye say, Whoever may say to father or mother, An offering [is] whatever thou mayest be profited by me; —
6 abuki te mobeko ya kopesa tata na ye mpe mama na ye lokumu. » Ezali ndenge wana penza nde bozali kokomisa pamba Liloba na Nzambe mpo na kotombola bokoko na bino!
and he may not honour his father or his mother, and ye did set aside the command of God because of your tradition.
7 Bato ya bilongi mibale! Ezayi asakola penza malamu na tina na bino:
'Hypocrites, well did Isaiah prophesy of you, saying,
8 « Bato oyo bapesaka Ngai lokumu kaka na bibebu, kasi mitema na bango ezali mosika na Ngai;
This people doth draw nigh to Me with their mouth, and with the lips it doth honour Me, but their heart is far off from Me;
9 basambelaka Ngai kaka na pamba, mateya na bango ezali kaka mibeko ya bomoto. »
and in vain do they worship Me, teaching teachings — commands of men.'
10 Yesu abengaki ebele ya bato wana mpe alobaki na bango: — Boyoka mpe bososola makambo oyo:
And having called near the multitude, he said to them, 'Hear and understand:
11 eloko oyo ekotaka na monoko ya moto ekomisaka moto mbindo te, kasi ezali eloko oyo ebimaka na monoko nde ekomisaka moto mbindo.
not that which is coming into the mouth doth defile the man, but that which is coming forth from the mouth, this defileth the man.'
12 Bongo bayekoli bapusanaki pene ya Yesu mpe bayebisaki Ye: — Boni, oyebi te ete maloba oyo olobi ebetisi Bafarizeo mabaku?
Then his disciples having come near, said to him, 'Hast thou known that the Pharisees, having heard the word, were stumbled?'
13 Yesu azongisaki: — Nkona nyonso oyo Tata na Ngai ya Likolo alonaki te ekopikolama.
And he answering said, 'Every plant that my heavenly Father did not plant shall be rooted up;
14 Botika bango; bazali bakufi miso oyo bazali kotambolisa bakufi miso mosusu. Nzokande, soki mokufi miso azali kotambolisa mokufi miso mosusu, bango mibale bakokweya solo kati na libulu.
let them alone, guides they are — blind of blind; and if blind may guide blind, both into a ditch shall fall.'
15 Petelo azwaki maloba mpe alobaki na Yesu: — Limbolela biso lisese oyo.
And Peter answering said to him, 'Explain to us this simile.'
16 Yesu atunaki bango: — Bino mpe, boni, bozwi nanu bososoli te?
And Jesus said, 'Are ye also yet without understanding?
17 Bozali kaka kososola te ete nyonso oyo ekotaka na monoko ekendaka na libumu mpe, na sima, ebwakamaka na libulu ya zongo?
do ye not understand that all that is going into the mouth doth pass into the belly, and into the drain is cast forth?
18 Kasi oyo ebimaka na monoko, ewutaka nde na motema, mpe yango nde ekomisaka moto mbindo.
but the things coming forth from the mouth from the heart do come forth, and these defile the man;
19 Pamba te, na motema nde ewutaka makanisi mabe, koboma, ekobo, kindumba, moyibi, litatoli ya lokuta mpe mafinga.
for out of the heart come forth evil thoughts, murders, adulteries, whoredoms, thefts, false witnessings, evil speakings:
20 Ezali makambo wana nde ekomisaka moto mbindo; kasi kozanga kosukola maboko liboso ya kolia ekomisaka moto mbindo te.
these are the things defiling the man; but to eat with unwashen hands doth not defile the man.'
21 Yesu alongwaki wana mpe akendeki na etuka ya Tiri mpe ya Sidoni.
And Jesus having come forth thence, withdrew to the parts of Tyre and Sidon,
22 Mwasi moko ya mboka Kanana azalaki kovanda na etuka yango, ayaki epai ya Yesu mpe akomaki koganga: — Nkolo, Mwana ya Davidi, yokela ngai mawa! Mwana na ngai ya mwasi azali na se ya bokonzi ya molimo mabe oyo ezali mpe konyokola ye makasi.
and lo, a woman, a Canaanitess, from those borders having come forth, did call to him, saying, 'Deal kindly with me, Sir — Son of David; my daughter is miserably demonized.'
23 Kasi Yesu azongiselaki ye ata liloba te. Bayekoli bapusanaki pene ya Yesu mpe basengaki na Ye: — Bengana ye; azali kotiela biso makelele!
And he did not answer her a word; and his disciples having come to him, were asking him, saying — 'Let her away, because she crieth after us;'
24 Yesu azongisaki: — Natindamaki kaka epai ya bameme ebunga ya Isalaele!
and he answering said, 'I was not sent except to the lost sheep of the house of Israel.'
25 Kasi mwasi yango ayaki, agumbamaki liboso ya Yesu mpe alobaki: — Nkolo, sunga ngai!
And having come, she was bowing to him, saying, 'Sir, help me;'
26 Yesu azongisaki: — Ezali malamu te kokamata lipa ya bana mpo na kobwakela yango bambwa!
and he answering said, 'It is not good to take the children's bread, and to cast to the little dogs.'
27 Mwasi yango alobaki: — Nkolo, ezali penza ya solo; kasi bambwa eliaka biteni ya lipa, oyo ekweyaka wuta na mesa ya bankolo na yango!
And she said, 'Yes, sir, for even the little dogs do eat of the crumbs that are falling from their lords' table;'
28 Bongo Yesu alobaki na ye: — Mwasi, kondima na yo ezali monene! Tika ete esalemela yo ndenge ezali posa na yo! Mpe kaka na tango wana, mwana na ye ya mwasi abikaki.
then answering, Jesus said to her, 'O woman, great [is] thy faith, let it be to thee as thou wilt;' and her daughter was healed from that hour.
29 Yesu alongwaki wana mpe akendeki na ebale ya Galile; amataki likolo ya ngomba mpe avandaki kuna.
And Jesus having passed thence, came nigh unto the sea of Galilee, and having gone up to the mountain, he was sitting there,
30 Bato ebele bayaki epai na Ye; bamemaki bato oyo batambolaka tengu-tengu, bakufi miso, bababa, bato oyo bakufa makolo to maboko mpe bato mosusu ebele. Batiaki bango na makolo ya Yesu, mpe Yesu abikisaki bango.
and there came to him great multitudes, having with them lame, blind, dumb, maimed, and many others, and they did cast them at the feet of Jesus, and he healed them,
31 Mpe bato bakamwaki mingi tango bamonaki ete bababa bakomi koloba, bato oyo bakufa makolo to maboko babiki, bato oyo batambolaka tengu-tengu bakomi kotambola malamu mpe bakufi miso bakomi komona. Bongo bakumisaki Nzambe ya Isalaele.
so that the multitudes did wonder, seeing dumb ones speaking, maimed whole, lame walking, and blind seeing; and they glorified the God of Israel.
32 Yesu abengaki bayekoli na Ye mpe alobaki: — Nazali koyokela ebele ya bato oyo mawa makasi, pamba te basali mikolo misato elongo na Ngai mpe bazali na eloko ya kolia te. Naboyi kozongisa bango na nzala, noki te bakolemba nzoto na nzela.
And Jesus having called near his disciples, said, 'I have compassion upon the multitude, because now three days they continue with me, and they have not what they may eat; and to let them away fasting I will not, lest they faint in the way.'
33 Bayekoli na Ye bazongisaki: — Kati na esobe oyo, esika nini tokozwa mapa mpo na koleisa ebele ya bato boye?
And his disciples say to him, 'Whence to us, in a wilderness, so many loaves, as to fill so great a multitude?'
34 Yesu atunaki bango: — Bozali na mapa boni? Bayekoli bazongisaki: — Tozali na mapa sambo mpe ndambo ya bambisi ya mike-mike.
And Jesus saith to them, 'How many loaves have ye?' and they said, 'Seven, and a few little fishes.'
35 Yesu alobaki na ebele ya bato yango ete bavanda na mabele.
And he commanded the multitudes to sit down upon the ground,
36 Bongo azwaki mapa yango sambo mpe bambisi, azongisaki matondi epai ya Nzambe, akataki yango mpe apesaki biteni na yango epai ya bayekoli na Ye; mpe bayekoli bakabolaki yango epai ya bato.
and having taken the seven loaves and the fishes, having given thanks, he did break, and gave to his disciples, and the disciples to the multitude.
37 Bato nyonso baliaki mpe batondaki. Bongo bayekoli balokotaki biteni oyo etikalaki, batondisaki na yango bitunga sambo.
And they did all eat, and were filled, and they took up what was over of the broken pieces seven baskets full,
38 Motango ya bato oyo baliaki ezalaki nkoto minei, longola basi mpe bana.
and those eating were four thousand men, apart from women and children.
39 Sima na Yesu kozongisa bato, amataki kati na bwato mpe akendeki na etuka ya Magadani.
And having let away the multitudes, he went into the boat, and did come to the borders of Magdala.