< Matayo 14 >
1 Na tango wana, sango na tina na Yesu epanzanaki makasi mpe ekomaki kino na matoyi ya Erode, moyangeli ya Galile.
At that time Herod the tetrarch heard the reports about Jesus
2 Alobaki na basali na ye: — Ezali penza Yoane Mobatisi! Asekwi kati na bakufi; yango wana azali na nguya ya kosala bikamwa.
and said to his servants, “This is John the Baptist; he has risen from the dead! That is why miraculous powers are at work in him.”
3 Nzokande, Erode amipeselaki mitindo ete bazwa Yoane, bakanga ye minyololo mpe babwaka ye kati na boloko, likolo ya Erodiade, mwasi ya Filipo, ndeko mobali ya Erode;
Now Herod had arrested John and bound him and put him in prison on account of Herodias, his brother Philip’s wife,
4 pamba te Yoane azalaki koloba na ye: « Ozali na ndingisa te ya kosangisa na ye nzoto mpo ete azali mwasi na yo te. »
because John had been telling him, “It is not lawful for you to have her.”
5 Boye, Erode akomaki koluka nzela ya koboma Yoane, kasi azalaki kobanga bato mpo ete bazalaki kozwa Yoane lokola mosakoli.
Although Herod wanted to kill John, he was afraid of the people, because they regarded John as a prophet.
6 Nzokande, na mokolo ya kosepela mbotama ya Erode, mwana mwasi ya Erodiade abinaki liboso ya babengami na feti yango mpe asepelisaki Erode makasi.
On Herod’s birthday, however, the daughter of Herodias danced before them and pleased Herod
7 Boye, Erode alakaki mwasi yango, na nzela ya ndayi, ete akopesa ye nyonso oyo akosenga.
so much that he promised with an oath to give to her whatever she asked.
8 Lokola mama akotisaki makanisi mabe kati na mwana, mwana mwasi alobaki na Erode: « Pesa ngai awa, na sani, moto ya Yoane Mobatisi. »
Prompted by her mother, she said, “Give me here on a platter the head of John the Baptist.”
9 Tango mokonzi ayokaki eloko oyo mwana mwasi asengaki, ayokaki mawa mingi na motema; kasi mpo na ndayi oyo alapaki mpe mpo na bato oyo abengisaki na feti, apesaki mitindo ete bapesa ye moto yango.
The king was grieved, but because of his oaths and his guests, he ordered that her wish be granted
10 Atindaki moto moko ete akende kokata moto ya Yoane kati na boloko.
and sent to have John beheaded in the prison.
11 Bamemaki, na sani, moto ya Yoane Mobatisi mpe bapesaki yango epai ya mwana mwasi, mpe mwana mwasi amemaki yango epai ya mama na ye.
John’s head was brought in on a platter and presented to the girl, who carried it to her mother.
12 Bayekoli ya Yoane bayaki kozwa nzoto na ye mpe bakundaki yango; sima na yango, bakendeki kopesa sango epai ya Yesu.
Then John’s disciples came and took his body and buried it. And they went and informed Jesus.
13 Tango Yesu ayokaki sango yango, azwaki bwato mpo na kokende kati na esobe, na esika oyo akozala kaka Ye moko. Wana ebele ya bato bayokaki bongo, babimaki na bamboka na bango mpe balandaki Yesu na makolo.
When Jesus heard about John, He withdrew by boat privately to a solitary place. But the crowds found out about it and followed Him on foot from the towns.
14 Tango Yesu akitaki wuta na bwato mpe amonaki ebele ya bato penza, ayokaki mawa makasi mpo na bango. Boye, abandaki kobikisa bandeko na bango, oyo bazalaki kobela.
When He stepped ashore and saw a large crowd, He had compassion on them and healed their sick.
15 Na pokwa, bayekoli bapusanaki pene na Yesu mpe balobaki na Ye: — Esika oyo ezali esobe, mpe ngonga epusani makasi! Zongisa bango mpo ete bakende komisombela biloko ya kolia kati na bamboka ya zingazinga.
When evening came, the disciples came to Him and said, “This is a desolate place, and the hour is already late. Dismiss the crowds so they can go to the villages and buy themselves some food.”
16 Kasi Yesu alobaki na bango: — Bazali na tina na kokende kuna te! Bopesa bango bino moko biloko ya kolia.
“They do not need to go away,” Jesus replied. “You give them something to eat.”
17 Bayekoli bazongisaki: — Tozali kaka na mapa mitano mpe bambisi mibale.
“We have here only five loaves of bread and two fish,” they answered.
18 Yesu alobaki: — Boya na yango awa epai na Ngai.
“Bring them here to Me,” Jesus said.
19 Yesu apesaki mitindo na bato ete bavanda na matiti; azwaki mapa mitano mpe bambisi mibale yango, atombolaki miso na Ye na likolo mpe azongisaki matondi epai ya Nzambe; akataki mapa yango mpe apesaki biteni na yango epai ya bayekoli na Ye mpo ete bakabola yango epai ya bato.
And He directed the crowds to sit down on the grass. Taking the five loaves and the two fish and looking up to heaven, He spoke a blessing. Then He broke the loaves and gave them to the disciples, and the disciples gave them to the people.
20 Bato nyonso baliaki mpe batondaki. Bongo bayekoli balokotaki biteni oyo etikalaki, mpe biteni yango etondisaki bitunga zomi na mibale.
They all ate and were satisfied, and the disciples picked up twelve basketfuls of broken pieces that were left over.
21 Bato oyo baliaki bazalaki mibali pene nkoto mitano, longola basi mpe bana.
About five thousand men were fed, in addition to women and children.
22 Mbala moko, Yesu atindaki bayekoli na Ye ete bamata na bwato mpe bakende liboso na Ye, na ngambo mosusu ya ebale, wana akozongisa bato.
Immediately Jesus made the disciples get into the boat and go on ahead of Him to the other side, while He dismissed the crowds.
23 Sima na Ye kozongisa bato, amataki na ngomba mpo na kosambela na esika oyo azalaki kaka Ye moko. Kino na pokwa, azalaki wana kaka Ye moko.
After He had sent them away, He went up on the mountain by Himself to pray. When evening came, He was there alone,
24 Nzokande, kaka na tango yango, wana bwato ekomaki mosika, na molayi ya bametele koleka nkama moko longwa na mokili, mbonge ekomaki koningisa bwato yango makasi, pamba te mopepe ezalaki kobeta na ndenge ya kozongisa bwato na sima.
but the boat was already far from land, buffeted by the waves because the wind was against it.
25 Wana tongo ekomaki pene ya kotana, Yesu atambolaki likolo ya mayi ya ebale mpo na kolanda bango, mpe alingaki kutu koleka bango.
During the fourth watch of the night, Jesus went out to them, walking on the sea.
26 Tango bayekoli bamonaki Yesu azali kotambola likolo ya mayi ya ebale, somo makasi ekangaki bango mpe bakomaki koloba: — Elima! Elima! Elima! Bagangaki mpo na somo.
When the disciples saw Him walking on the sea, they were terrified. “It’s a ghost!” they said, and cried out in fear.
27 Kasi, mbala moko, Yesu alobaki na bango: — Kimia! Kimia! Bobanga te! Ezali nde Ngai!
But Jesus spoke up at once: “Take courage! It is I. Do not be afraid.”
28 Petelo alobaki na Ye: — Nkolo, soki ezali penza Yo, loba na ngai ete naya kokutana na Yo likolo ya mayi.
“Lord, if it is You,” Peter replied, “command me to come to You on the water.”
29 Yesu alobaki na ye: — Yaka. Mbala moko, Petelo akitaki na bwato mpe atambolaki na likolo ya mayi mpo na kokende kokutana na Yesu.
“Come,” said Jesus. Then Peter got down out of the boat, walked on the water, and came toward Jesus.
30 Kasi tango amonaki ndenge mopepe ezali kopepa makasi, akomaki na somo mpe, lokola akomaki kozinda, agangaki: — Nkolo, bikisa ngai!
But when he saw the strength of the wind, he was afraid, and beginning to sink, cried out, “Lord, save me!”
31 Mbala moko, Yesu asembolaki loboko epai na ye, asimbaki ye mpe alobaki na ye: — Moto na kondima moke, mpo na nini otie tembe?
Immediately Jesus reached out His hand and took hold of Peter. “You of little faith,” He said, “why did you doubt?”
32 Tango bamataki na bwato, mopepe ekitaki.
And when they had climbed back into the boat, the wind died down.
33 Bato oyo bazalaki kati na bwato bagumbamelaki Yesu mpe balobaki: — Ya solo, ozali Mwana na Nzambe!
Then those who were in the boat worshiped Him, saying, “Truly You are the Son of God!”
34 Sima na bango kokatisa ebale, bakomaki na mabele ya Genezareti.
When they had crossed over, they landed at Gennesaret.
35 Tango bavandi ya esika wana basosolaki ete ezali Yesu, bapanzaki sango kati na etuka mobimba; mpe bamemelaki Ye babeli nyonso.
And when the men of that place recognized Jesus, they sent word to all the surrounding region. People brought all the sick to Him
36 Basengaki na Ye ete apesa babeli nzela ya kosimba ata singa ya songe ya elamba na Ye. Mpe bato nyonso oyo balongaki kosimba yango babikaki na bokono na bango.
and begged Him just to let them touch the fringe of His cloak. And all who touched Him were healed.