< Matayo 12 >

1 Na tango wana, Yesu alekaki kati na bilanga ya ble na mokolo ya Saba. Lokola bayekoli na Ye bakomaki na nzala, babandaki kobuka ble mpe kolia yango.
Naquele tempo Jesus estava indo pelas plantações de cereais no sábado. Seus discípulos tinham fome, e começaram a arrancar espigas e a comer.
2 Tango Bafarizeo bamonaki bongo, balobaki na Yesu: — Tala bayekoli na Yo! Bazali kosala likambo oyo epekisami kosalema na mokolo ya Saba.
Quando os fariseus viram, disseram-lhe: Eis que os teus discípulos fazem o que não é lícito fazer no sábado.
3 Yesu azongiselaki bango: — Botanga nanu te makambo oyo Davidi asalaki tango ye elongo na baninga na ye bazalaki na nzala,
Ele, porém, lhes disse: Não lestes o que Davi fez quando teve fome, ele e os que com ele estavam,
4 ndenge nini akotaki kati na Ndako ya Nzambe; mpe, ye elongo na bato na ye, baliaki mapa oyo ebulisama; nzokande, ezala ye to bato na ye, moko te azalaki na ndingisa ya kolia yango; kaka Banganga-Nzambe nde bazalaki na ndingisa ya kolia yango?
Como ele entrou na casa de Deus, e comeram os pães da proposição, que a ele não era lícito comer, nem também aos que com ele estavam, a não ser somente aos sacerdotes?
5 Botikala mpe nanu kotanga te kati na Mobeko ete, na mokolo ya Saba, Banganga-Nzambe oyo basalaka kati na Tempelo babukaka mobeko ya Saba, kasi bakweyaka na mbeba te mpo na yango?
Ou não lestes na Lei que, nos sábados, os sacerdotes no Templo profanam o sábado, sem se tornarem culpados?
6 Nzokande, Ngai, nazali koloba na bino ete ezali awa na moto moko oyo azali monene koleka Tempelo!
Eu, porém, vos digo que o maior que o Templo está aqui.
7 Ah soki bososolaki ndimbola ya maloba oyo: « Nasepelaka na motema ya boboto koleka mbeka, » bokokaki kopamela te bato oyo mpo ete basali mabe te!
Mas se vós soubésseis o que significa: ‘Quero misericórdia, e não sacrifício’, não condenaríeis os inocentes.
8 Pamba te Mwana na Moto azali Mokonzi ya mokolo ya Saba.
Porque o Filho do homem é Senhor do sábado.
9 Sima na Yesu kolongwa na esika yango, akendeki na ndako na bango ya mayangani
E partindo dali, [Jesus] entrou na sinagoga deles.
10 epai wapi ezalaki na moto moko akufa loboko. Bafarizeo batunaki Yesu: — Boni, mibeko epesa nzela ya kobikisa bato na mokolo ya Saba? Batunaki Ye bongo, pamba te bazalaki koluka likambo mpo na kofunda Ye.
E eis que havia ali um homem que tinha uma mão definhada; e eles, a fim de o acusarem, perguntaram-lhe: É lícito curar nos sábados?
11 Kasi Yesu azongiselaki bango: — Nani kati na bino, soki azali kaka na meme moko, mpe meme yango ekweyi kati na libulu, akokita te kati na libulu, na mokolo ya Saba, mpo na kobimisa yango?
E ele lhes respondeu: Qual de vós será a pessoa que, caso tenha uma ovelha, e se a tal cair em uma cova no sábado, não usará de sua força para a levantar?
12 Nzokande, moto azali na motuya koleka meme! Boye, kosala bolamu na mokolo ya Saba endimama na mobeko.
Ora, quanto mais vale um ser humano que uma ovelha! Assim, pois, é lícito fazer o bem nos sábados.
13 Bongo, alobaki na moto yango: — Sembola loboko na yo. Moto yango asembolaki loboko na ye, mpe loboko yango ebongaki, ekomaki malamu lokola loboko mosusu.
Então disse para aquele homem: Estende a tua mão. Ele a estendeu, e foi-lhe restaurada, sã como a outra.
14 Bafarizeo babimaki mpe bakabolaki makanisi kati na bango mpo na koluka nzela ya kobomisa Yesu.
Então os fariseus saíram e se reuniram para planejar contra ele, como o matariam.
15 Wana Yesu asosolaki ete basali mabongisi ya koboma Ye, alongwaki na esika yango. Bato ebele balandaki Ye, mpe abikisaki babeli nyonso.
Mas Jesus, sabendo disso, retirou-se dali. Muitos o seguiram, e ele curou a todos.
16 Kasi apekisaki bango kobeta ata lisolo na tina na Ye.
E ele lhes ordenava que não o tornassem conhecido;
17 Asalaki bongo mpo ete maloba ya mosakoli Ezayi ekokisama:
Para que se cumprisse o que foi dito pelo profeta Isaías:
18 « Tala mosali na Ngai, oyo naponi; molingami na Ngai, mosali oyo nalingaka mingi, oyo asalaka esengo na Ngai. Nakopesa Ye Molimo na Ngai, mpe akosakola bosembo epai ya bikolo ya bapaya.
Eis aqui meu servo a quem escolhi, meu amado em quem minha alma se agrada; sobre ele porei o meu Espírito, e ele anunciará justiça às nações.
19 Akoswana te mpe akoganga te, bakoyoka mongongo na Ye te na babalabala.
Ele não fará brigas, nem gritará; ninguém ouvirá pelas ruas a sua voz.
20 Akobuka te mwa nzete ya kolemba oyo egumbama mpe akoboma te mwinda oyo elingi kokufa kino akosala ete bosembo elonga
A cana rachada ele não quebrará, o pavio que fumega ele não apagará, até que conduza a justiça à vitória.
21 mpe bikolo nyonso ya bapaya etia elikya na Kombo na Ye. »
E em seu nome as nações terão esperança.
22 Bongo bamemelaki Yesu moto moko oyo azalaki na se ya bokonzi ya molimo mabe, azalaki mokufi miso mpe azalaki koloba te. Yesu abikisaki ye; boye moto oyo azalaki koloba te akomaki koloba mpe komona.
Então lhe trouxeram um endemoninhado cego e mudo; e ele o curou de tal maneira que o mudo passou a falar e a ver.
23 Bato nyonso bakamwaki mpe bazalaki koloba: — Boni, moto oyo azali mwana ya Davidi te?
E todas as multidões se admiravam e diziam: Não é este o Filho de Davi?
24 Kasi tango Bafarizeo bayokaki maloba oyo ezalaki kolobama na tina na Yesu, balobaki: — Moto oyo azali kobengana milimo mabe na nguya ya Belizebule, mokonzi ya milimo mabe.
Mas quando os fariseus ouviam isso, diziam: Ele não expulsa os demônios, a não ser por Belzebu, o chefe dos demônios.
25 Lokola Yesu asosolaki makanisi na bango, alobaki na bango: — Bokonzi nyonso oyo bavandi na yango bakomi kobunda bango na bango ekobebisama; engumba nyonso to ndako nyonso oyo bato na yango bazali lisusu na bomoko te ekowumela te.
Porém [Jesus], entendendo os pensamentos deles, disse-lhes: Todo reino dividido contra si mesmo é destruído; e toda cidade ou casa dividida contra si mesma não permanecerá.
26 Soki Satana abengani Satana, wana akomi nde komibundisa ye moko; bongo bokonzi na ye ekowumela ndenge nini?
Ora, se Satanás expulsa a Satanás, contra si mesmo está dividido; como, pois, permanecerá o seu reino?
27 Mpe soki, Ngai, nazali kobengana milimo mabe na nguya ya Belizebule, bayekoli na bino babenganaka yango na nguya ya nani? Yango wana, bayekoli na bino bakozala bango moko basambisi na bino.
E se eu expulso os demônios por Belzebu, então por quem vossos filhos os expulsam? Portanto, eles mesmos serão vossos juízes.
28 Kasi soki ezali na nguya ya Molimo ya Nzambe nde Ngai nazali kobengana milimo mabe, wana Bokonzi ya Nzambe esili kokoma kino epai na bino.
Mas se eu pelo Espírito de Deus expulso os demônios, logo o Reino de Deus já chegou sobre vos.
29 Ndenge nini moto akoki kokota na ndako ya elombe mpe koyiba biloko na ye ya ndako soki akangi nanu elombe yango te na basinga? Nzokande, soki akangi ye na basinga, wana akoki solo koyiba biloko nyonso oyo ezali kati na ndako na ye.
Ou como pode alguém entrar na casa do valente, e saquear seus bens, sem primeiro amarrar ao valente? Depois disso saqueará sua casa.
30 Moto oyo azali elongo na Ngai te azali monguna na Ngai, mpe moto oyo asangisaka te elongo na Ngai apanzaka.
Quem não é comigo é contra mim; e quem não ajunta comigo, espalha.
31 Yango wana, nazali koloba na bino penza ya solo: lisumu nyonso mpe makambo mabe nyonso oyo bato bakoki koloba na tina na Nzambe ekolimbisama; kasi moto nyonso oyo akoloba mabe na tina na Molimo Mosantu akolimbisama te.
Por isso eu vos digo: todo pecado e blasfêmia serão perdoados aos seres humanos; mas a blasfêmia contra o Espírito não será perdoada.
32 Moto nyonso oyo akoloba mabe na tina na Mwana na Moto akolimbisama; kasi moto nyonso oyo akoloba mabe na tina na Molimo Mosantu akolimbisama te, ezala na bomoi na ye awa na se to na bomoi oyo ekoya. (aiōn g165)
E qualquer um que falar palavra contra o Filho do homem lhe será perdoado; mas qualquer um que falar contra o Espírito Santo, não lhe será perdoado, nem na era presente, nem na futura. (aiōn g165)
33 Nzete ya malamu ebotaka mpe bambuma ya malamu, nzete ya mabe ebotaka mpe bambuma ya mabe; pamba te nzete eyebanaka na mbuma na yango.
Ou fazei a árvore boa, e seu fruto bom; ou fazei a árvore má, e seu fruto mau; pois pelo fruto se conhece a árvore.
34 Libota ya banyoka! Bokokoka ndenge nini koloba makambo ya malamu awa bozali bato mabe? Pamba te maloba ya moto etalisaka lolenge ya motema na ye:
Ninhada de víboras, como podeis vós falar boas coisas, sendo maus? Pois a boca fala do que o coração tem em abundância.
35 moto malamu alobaka makambo ya malamu kowuta na motema malamu na ye, mpe moto mabe alobaka makambo ya mabe kowuta na motema mabe na ye.
A pessoa boa tira coisas boas do bom tesouro, e a pessoa má tira coisas más do tesouro mau.
36 Nzokande, Ngai, nazali koloba na bino: na mokolo ya kosambisama, bato bakosamba mpo na maloba ezanga tina, oyo babimisaki.
Eu, porém, vos digo que de toda palavra imprudente que as pessoas falarem, dela prestarão contas no dia do juízo.
37 Pamba te ezali na nzela ya maloba na yo moko kaka nde bakolongisa yo to bakokweyisa yo.
Porque por tuas palavras serás justificado, e por tuas palavras serás condenado.
38 Bongo ndambo ya balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo balobaki na Ye: — Moteyi, tolingi komona yo kosala elembo moko.
Então responderam-lhe uns dos escribas e dos fariseus, dizendo: Mestre, queremos ver de ti algum sinal.
39 Yesu azongisaki: — Oh bato ya ekeke oyo! Bazali bato mabe mpe bazangi botosi na miso ya Nzambe, kasi bazali mpe kosenga elembo! Bakopesamela elembo mosusu te longola kaka elembo ya mosakoli Yona.
Mas ele lhes deu a seguinte resposta: Uma geração má e adúltera pede sinal; mas não lhe será dado, exceto o sinal do profeta Jonas.
40 Pamba te, ndenge Yona avandaki kati na libumu ya mbisi monene mikolo misato mpe babutu misato, ndenge wana mpe Mwana na Moto akosala mikolo misato mpe babutu misato na se ya mabele.
Porque assim como Jonas esteve três dias e três noites no ventre da baleia, assim também o Filho do homem estará três dias e três noites no coração da terra.
41 Na mokolo ya kosambisama, bato ya Ninive bakotelema mpe bakokatela bato ya ekeke oyo etumbu, pamba te babongolaki mitema na bango tango bayokaki mateya ya Yona; nzokande, ezali awa na Moto oyo aleki Yona.
Os de Nínive se levantarão no Juízo com esta geração, e a condenarão; porque se arrependeram com a pregação de Jonas. E eis aqui quem é maior que Jonas.
42 Na mokolo ya kosambisama, mwasi mokonzi ya sude akotelema elongo na bato ya ekeke oyo mpe akokatela bango etumbu, pamba te awutaki mosika, na suka ya mokili, mpe ayaki mpo na koyoka maloba ya bwanya ya Salomo; nzokande, ezali awa na Moto oyo aleki Salomo.
A rainha do sul se levantará no Juízo com esta geração, e a condenará; porque veio dos confins da terra para ouvir a sabedoria de Salomão. E eis aqui quem é maior que Salomão.
43 Soki molimo mabe ebimi kati na moto, ekendaka koyengayenga na bisika ekawuka mpo na koluka esika ya kopema. Kasi soki ezwi esika yango te,
Quando o espírito imundo sai de alguém, anda por lugares secos buscando repouso, e não o acha.
44 emilobelaka: « Eleki malamu mpo na ngai kozonga na ndako oyo natikaki. » Tango molimo mabe yango ezongaka ekutaka ndako yango polele, bakombola mpe babongisa malamu,
Então diz: ‘Voltarei para a minha casa, de onde saí.’ E quando chega, a encontra desocupada, varrida, e arrumada.
45 ekokende lisusu kozwa milimo mosusu sambo oyo eleki yango na mabe, mpe ekoya elongo na yango mpo na kokota na elulu mpe kovanda kuna. Boye, bomoi ya moto yango ekokoma lisusu mabe koleka ndenge ezalaki liboso. Ekozala mpe bongo mpo na bato mabe ya ekeke oyo.
Então vai, e toma consigo outros sete espíritos piores que ele; eles entram, e moram ali; e a última [condição] de tal pessoa se torna pior que a primeira. Assim também acontecerá com esta geração má.
46 Wana Yesu azalaki nanu koloba na bato, mama na Ye mpe bandeko na Ye ya mibali batelemaki libanda mpe bazalaki koluka kosolola na Ye.
Enquanto ele ainda estava falando às multidões, eis que sua mãe e seus irmãos estavam fora, querendo falar com ele.
47 Bongo moto moko ayebisaki Yesu: — Mama mpe bandeko na yo ya mibali batelemi libanda, bazali na posa ya kosolola na yo.
E alguém lhe disse: Eis que tua mãe e teus irmãos estão fora, querendo falar contigo.
48 Kasi Yesu azongiselaki ye: — Nani mama na Ngai, mpe banani bandeko na Ngai?
Porém ele disse em resposta ao que o avisou: Quem é minha mãe? E quem são meus irmãos?
49 Bongo Yesu atalisaki loboko na Ye na ngambo ya bayekoli na Ye mpe alobaki: — Mama na Ngai mpe bandeko na Ngai, bango oyo!
Então estendeu sua mão para os seus discípulos, e disse: Eis aqui minha mãe e meus irmãos;
50 Pamba te moto nyonso oyo asalaka mokano ya Tata na Ngai, oyo azali kati na Likolo, ye nde azali ndeko na Ngai ya mobali, ndeko na Ngai ya mwasi mpe mama na Ngai.
Pois qualquer um que fizer a vontade do meu Pai, que está nos céus, esse é meu irmão, e irmã, e mãe.

< Matayo 12 >