< Matayo 11 >

1 Tango Yesu asilisaki kopesa mitindo epai ya bayekoli na Ye zomi na mibale, alongwaki wana, akendeki koteya mpe kopanza Sango Malamu kati na bingumba na bango.
And it came to pass, when Jesus had made an end of commanding his twelve disciples, he departed thence to teach and to preach in their cities.
2 Wana Yoane Mobatisi azalaki kati na boloko, ayokaki sango ya makambo nyonso oyo Klisto azalaki kosala; atindaki bayekoli na ye
Now when John had heard in the prison of the works of the Christ, he sent two of his disciples,
3 kotuna epai ya Yesu: — Boni, ozali penza Ye oyo asengelaki koya to tosengeli kozela mosusu?
and said to him: Art thou he that was to come, or must we look for another?
4 Yesu azongiselaki bango: — Bokende koyebisa Yoane makambo oyo bozali komona mpe koyoka:
And Jesus answered and said to them: Go and tell John what you hear and see.
5 bakufi miso bazali komona, ba-ebosono bazali kotambola, bato na maba bazali kopetolama, bakufi matoyi bazali koyoka, bakufi bazali kosekwa mpe Sango Malamu ezali kosakolama epai ya babola.
The blind receive their sight, and the lame walk; the lepers are cleansed, and the deaf hear; the dead are raised, and the poor have the gospel preached to them;
6 Esengo na moto oyo akokweyisa kondima na ye te likolo na Ngai!
and blessed is he that shall find in me no cause of offense.
7 Wana bayekoli ya Yoane bazalaki kozonga, Yesu akomaki koloba na ebele ya bato na tina na Yoane; atunaki bango: — Eloko nini bokendeki kotala kati na esobe? Mwa nzete oyo mopepe ezalaki koningisa epai na epai?
As these were going away, Jesus began to say to the multitudes concerning John: What did you go out into the wilderness to see? A reed shaken by the wind?
8 Soki mwa nzete yango te, bokendeki penza kotala nini? Moto moko alati bilamba ya kitoko? Te! Bato oyo balataka bilamba ya kitoko bavandaka na bandako ya bakonzi.
But what did you go out to see? A man clothed in soft raiment? Behold, those who wear soft clothing are in kings houses.
9 Kasi bino, bokendeki penza kotala nini kati na esobe? Mosakoli? Solo, nazali koloba na bino penza ya solo: aleki kutu ata mosakoli.
But what did you go out to see? A prophet? Yes, I say to you, and more than a prophet.
10 Pamba te, azali moto oyo bakoma na tina na ye: « Nakotinda ntoma na Ngai liboso na Yo mpo na kobongisela Yo nzela. »
For this is he of whom it is written: Behold, I send my messenger before thy face, who shall prepare thy way before thee.
11 Nazali koloba na bino penza ya solo: kati na bato oyo babotama na mwasi, moko te aleki Yoane Mobatisi na monene; nzokande, ye oyo aleki moke kati na Bokonzi ya Likolo aleki Yoane Mobatisi na monene.
Verily, I say to you, Among those born of women, there has not risen a greater than John the Immerser. But the least in the kingdom of heaven is greater than he.
12 Wuta na tango oyo Yoane Mobatisi azalaki koteya kino sik’oyo, kokota na Bokonzi ya Likolo ezali likambo ya koyika mpiko, mpe ezali kaka bato oyo bazali kobunda na kondima nde bazali kokota kuna.
From the days of John the Immerser till now, the kingdom of heaven is taken by violence, and men of violence seize upon it eagerly.
13 Pamba te basakoli nyonso mpe Mobeko basakolaki yango bango nyonso kino na tango ya Yoane.
For all the prophets and the law prophesied till John;
14 Mpe, soki bokoki kondima, boyeba ete ye nde azali Eliya oyo asengeli koya.
and if you are willing to receive it, he is Elijah that was to come.
15 Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka!
He that has ears to hear, let him hear.
16 Na nani penza nakokokanisa bato ya ekeke oyo? Bakokani penza na bana mike oyo bavandi na esika oyo bato ebele bakutanaka mpe bazali koganga epai ya bamosusu:
But to what shall I liken this generation? It is like children sitting in the markets, and calling to their companions,
17 « Tobetaki baflite, kasi bobinaki te; toyembelaki bino banzembo ya matanga, kasi bolelaki-lelaki te. »
and saying: We have played on the pipe for you, and you have not danced; we have wailed for you, and you have not lamented.
18 Pamba te, tango Yoane ayaki, azalaki kolia te mpe azalaki komela vino te; mpe balobaki: « Azali na molimo mabe kati na ye! »
For John came, neither eating nor drinking, and they say: He has a demon.
19 Mpe awa Mwana na Moto mpe ayei, azali kolia mpe azali komela; kasi bazali koloba: « Azali na lokoso ya kolia mpe azali molangwi masanga, moninga ya bafutisi mpako mpe ya bato ya masumu. » Nzokande, misala ya bwanya etalisaka solo ete ezali sembo.
The Son of man has come eating and drinking, and they say: Behold, a glutton, and a drinker of wine, a friend of publicans and sinners. Yet wisdom is vindicated by her children.
20 Bongo Yesu apamelaki bingumba epai wapi asalaki mingi kati na bikamwa na Ye, pamba te bavandi na yango babongolaki mitema te.
Then he began to reprove the cities in which most of his mighty works had been done, because they did not repent.
21 Alobaki: — Mawa na yo, Korazini! Mawa na yo, Betisaida! Pamba te soki bikamwa oyo esalemaki kati na bino esalemaki na bingumba Tiri mpe Sidoni, mbele bavandi na yango babongolaki mitema wuta kala, mpe mbele batalisaki yango na kolata basaki mpe na komipakola putulu!
Alas for thee, Chorazin! alas for thee, Bethsaida! for if the mighty works which have been clone in you had been done in Tyre and Sidon, they would have repented long ago in sackcloth and ashes.
22 Yango wana, nazali koloba na bino: na mokolo ya kosambisama, etumbu na bino ekozala makasi koleka etumbu ya Tiri mpe Sidoni.
But I say to you, It will be more tolerable for Tyre and Sidon, in the day of judgment, than for you.
23 Mpe yo, Kapernawumi, okanisi ete okotombolama kino na Likolo? Te! Okokitisama kino na mboka ya bakufi! Pamba te, soki bikamwa oyo esalemaki kati na yo esalemaki kati na Sodome, mbele Sodome ezali kowumela kino na mokolo ya lelo. (Hadēs g86)
And thou, Capernaum, that hast been exalted to heaven, shalt be brought down to hades. For if the mighty works which have been done in thee had been done in Sodom, it would have remained till this day. (Hadēs g86)
24 Yango wana, nazali koloba na bino: na mokolo ya kosambisama, etumbu na yo ekozala makasi koleka etumbu mokili ya Sodome.
But I say to you, It shall be more tolerable for the land of Sodom, in the day of judgment, than for thee.
25 Kaka na tango yango, Yesu alobaki: — Oh Tata, Nkolo ya Likolo mpe ya mabele, nakumisi Yo! Pamba te, obombaki makambo oyo mpo ete bato ya bwanya mpe bato ya mayele bayeba yango te, kasi olakisi yango na bana mike!
At that time Jesus answered and said: I thank thee, Father, Lord of heaven and of earth, because thou hast hid these things from the wise and prudent, and hast revealed them to babes.
26 Iyo, Tata, pamba te, kati na boboto na Yo, olingaki ete esalema bongo!
Even so, Father, for so it seemed good in thy sight.
27 Tata na Ngai apesa Ngai biloko nyonso. Moko te ayebi Mwana longola kaka Tata, mpe moko te ayebi Tata longola kaka Mwana mpe ye oyo epai ya nani Mwana asepeli kotalisa Tata.
All things have been delivered to me by my Father; and no one knows the Son, but the Father; nor does any one know the Father, but the Son, and he to whom the Son will reveal him.
28 Boya epai na Ngai, bino nyonso oyo bolembi na mikumba; Ngai, nakopesa bino bopemi.
Come to me, all you that are weary, and heavily burdened, and I will give you rest.
29 Bozwa ekangiseli na Ngai, bomema yango mpe boyekola epai na Ngai, pamba te nazali na motema ya boboto mpe ya komikitisa, bongo milimo na bino ekozwa bopemi.
Take my yoke upon you, and learn from me; for I am meek and lowly in heart; and you shall find rest for your souls.
30 Solo, ekangiseli na Ngai ezali pasi te, mpe mokumba na Ngai ezali pepele.
For my yoke is easy, and my burden is light.

< Matayo 11 >