< Matayo 10 >
1 Yesu abengaki bayekoli na Ye zomi na mibale mpe apesaki bango bokonzi ya kobengana milimo mabe mpe ya kobikisa bokono mpe pasi nyonso.
耶稣叫了十二个门徒来,给他们权柄,能赶逐污鬼,并医治各样的病症。
2 Tala bakombo ya bantoma zomi na mibale: liboso, Simona oyo kombo na ye mosusu ezalaki Petelo; Andre, ndeko ya Petelo; Jake, mwana mobali ya Zebede; Yoane, ndeko ya Jake;
这十二使徒的名:头一个叫西门(又称彼得),还有他兄弟安得烈,西庇太的儿子雅各和雅各的兄弟约翰,
3 Filipo mpe Bartelemi; Toma mpe Matayo, mofutisi mpako; Jake, mwana mobali ya Alife, mpe Tade;
腓力和巴多罗买,多马和税吏马太,亚勒腓的儿子雅各,和达太,
4 Simona oyo azalaki moko kati na bato ya lisanga ya Bazelote, mpe Yuda Isikarioti oyo atekaki Yesu.
奋锐党的西门,还有卖耶稣的加略人犹大。
5 Ezali bato oyo zomi na mibale nde Yesu atindaki, sima na Ye kopesa bango mitindo oyo: — Bokende te epai ya bato ya bikolo mosusu, mpe bokota te na bingumba ya bato ya Samari.
耶稣差这十二个人去,吩咐他们说:“外邦人的路,你们不要走;撒马利亚人的城,你们不要进;
6 Kasi bokende epai ya bameme oyo ebunga ya bato ya Isalaele.
宁可往以色列家迷失的羊那里去。
7 Bipai nyonso oyo bokoleka, bosakola ete Bokonzi ya Likolo ekomi pene.
随走随传,说‘天国近了!’
8 Bobikisa babeli, bosekwisa bakufi, bokomisa peto bato na maba mpe bobengana milimo mabe. Bopesa na ofele mpo ete bino mpe bozwaki na ofele.
医治病人,叫死人复活,叫长大麻风的洁净,把鬼赶出去。你们白白地得来,也要白白地舍去。
9 Kati na mabenga na bino, botia wolo te, palata te, mbongo mpe te.
腰袋里不要带金银铜钱;
10 Mpo na mobembo na bino, bomema sakosi te, banzambala mibale te, basandale te, lingenda mpe te; pamba te mosali asengeli kolia na mosala na ye.
行路不要带口袋;不要带两件褂子,也不要带鞋和拐杖。因为工人得饮食是应当的。
11 Na engumba to na mboka nyonso oyo bokokota, boluka moto oyo abongi mpo na koyamba bino mpe bovanda na ndako na ye kino tango bokolongwa.
你们无论进哪一城,哪一村,要打听那里谁是好人,就住在他家,直住到走的时候。
12 Mpe tango bokokota na ndako yango, bopesa bavandi na yango mbote na koloba: « Tika ete kimia ezala na bino! »
进他家里去,要请他的安。
13 Soki bavandi ya ndako yango babongi na kimia yango, wana tika ete ewumela kati na bango; soki te, wana tika ete ezonga epai na bino.
那家若配得平安,你们所求的平安就必临到那家;若不配得,你们所求的平安仍归你们。
14 Soki baboyi koyamba mpe koyoka bino, bolongwa na ndako to na engumba yango mpe bopupola putulu ya makolo na bino.
凡不接待你们、不听你们话的人,你们离开那家,或是那城的时候,就把脚上的尘土跺下去。
15 Nazali koloba na bino penza ya solo: na mokolo ya kosambisama, etumbu ya bavandi ya engumba to ya mboka wana ekozala makasi koleka etumbu ya mokili ya Sodome mpe Gomore.
我实在告诉你们,当审判的日子,所多玛和蛾摩拉所受的,比那城还容易受呢!”
16 Nazali kotinda bino lokola bameme kati na bambwa ya zamba; boye, bozala na ekenge lokola banyoka, mpe na boboto lokola bibenga.
“我差你们去,如同羊进入狼群;所以你们要灵巧像蛇,驯良像鸽子。
17 Kasi bosala keba, pamba te bakofunda bino na bisambiselo ya Bayuda mpe bakobeta bino fimbu kati na bandako na bango ya mayangani.
你们要防备人;因为他们要把你们交给公会,也要在会堂里鞭打你们,
18 Likolo na Ngai, bakomema bino na makasi liboso ya bayangeli mpe ya bakonzi. Boye, ekozala mpo na bino libaku malamu ya kotatola solo na tina na Ngai liboso na bango mpe liboso ya bapagano.
并且你们要为我的缘故被送到诸侯君王面前,对他们和外邦人作见证。
19 Tango bakofunda bino epai ya bakambi, bomitungisa te mpo na koluka makambo ya koloba to lolenge ya koloba yango, pamba te ekopesamela bino na tango wana.
你们被交的时候,不要思虑怎样说话,或说什么话。到那时候,必赐给你们当说的话;
20 Ekozala bino te bato bokoloba, kasi Molimo ya Tata na bino nde akoloba na nzela ya minoko na bino.
因为不是你们自己说的,乃是你们父的灵在你们里头说的。
21 Ndeko akokaba ndeko na ye mpo ete baboma ye, tata akokaba mwana na ye, bana bakotombokela baboti na bango mpe bakobomisa bango.
弟兄要把弟兄,父亲要把儿子,送到死地;儿女要与父母为敌,害死他们;
22 Bato nyonso bakoyina bino mpo na Kombo na Ngai, kasi moto oyo akoyika mpiko kino na suka akobika.
并且你们要为我的名被众人恨恶。惟有忍耐到底的必然得救。
23 Tango bakonyokola bino kati na engumba songolo, bokima na engumba mosusu. Nazali koloba na bino penza ya solo: bokosilisa te kotambola na bingumba nyonso ya Isalaele liboso ete Mwana na Moto aya.
有人在这城里逼迫你们,就逃到那城里去。我实在告诉你们,以色列的城邑,你们还没有走遍,人子就到了。
24 Moyekoli alekaka molakisi na ye te, mowumbu mpe alekaka nkolo na ye te.
学生不能高过先生;仆人不能高过主人。
25 Nzokande, ekoki mpo na moyekoli kozala lokola molakisi na ye, mpe mpo na mowumbu kozala lokola nkolo na ye. Soki babengaki Nkolo ndako « Belizebule, » ekozala boni mpo na bavandi ya ndako na Ye?
学生和先生一样,仆人和主人一样,也就罢了。人既骂家主是别西卜,何况他的家人呢?”
26 Yango wana, bobanga bango te! Pamba te eloko moko te ebombama ekozanga komonisama, mpe eloko moko te ya sekele ekozanga koyebana.
“所以,不要怕他们;因为掩盖的事没有不露出来的,隐藏的事没有不被人知道的。
27 Makambo oyo nazali koyebisa bino sik’oyo kati na molili, boloba yango na moyi; mpe oyo bazali koloba na bino na litoyi, bosakola yango wuta na likolo ya ndako.
我在暗中告诉你们的,你们要在明处说出来;你们耳中所听的,要在房上宣扬出来。
28 Bobanga te bato oyo bakoki koboma nzoto, kasi bazangi makoki ya koboma elimo; bobanga nde Ye oyo akoki koboma nzoto mpe elimo kati na lifelo. (Geenna )
那杀身体、不能杀灵魂的,不要怕他们;惟有能把身体和灵魂都灭在地狱里的,正要怕他。 (Geenna )
29 Boni, batekaka te bandeke mike mibale na motuya ya mbongo oyo eleki moke? Nzokande, moko te kati na yango ekweyaka na mabele soki Tata na bino alingi te.
两个麻雀不是卖一分银子吗?若是你们的父不许,一个也不能掉在地上;
30 Mpo na bino, Nzambe ayebi ata motango ya suki na bino.
就是你们的头发也都被数过了。
31 Yango wana, bobanga te, boleki bandeke mike nyonso na motuya.
所以,不要惧怕,你们比许多麻雀还贵重!”
32 Moto nyonso oyo akotatola liboso ya bato ete azali moto na Ngai, Ngai mpe nakotatola liboso ya Tata na Ngai, oyo azali kati na Likolo, ete nazali mpo na ye;
“凡在人面前认我的,我在我天上的父面前也必认他;
33 kasi ye oyo akowangana Ngai na miso ya bato, Ngai mpe nakowangana ye liboso ya Tata na Ngai, oyo azali kati na Likolo.
凡在人面前不认我的,我在我天上的父面前也必不认他。”
34 Bokanisa te ete nayaki mpo na komema kimia na mokili. Nayaki mpo na komema kimia te, kasi mopanga.
“你们不要想我来是叫地上太平;我来并不是叫地上太平,乃是叫地上动刀兵。
35 Pamba te, nayaki mpo na kotia bokabwani kati na mwana mobali mpe tata na ye, kati na mwana mwasi mpe mama na ye, mpe kati na mwasi ya libala mpe mama-bokilo na ye:
因为我来是叫 人与父亲生疏, 女儿与母亲生疏, 媳妇与婆婆生疏。
36 banguna ya moto bakozala kaka bato ya libota na ye moko.
人的仇敌就是自己家里的人。
37 Moto nyonso oyo alingaka tata na ye mpe mama na ye koleka Ngai abongi te mpo na kozala moto na Ngai. Moto nyonso oyo alingaka mwana na ye ya mobali to mwana na ye ya mwasi koleka Ngai abongi te mpo na kozala moto na Ngai.
“爱父母过于爱我的,不配作我的门徒;爱儿女过于爱我的,不配作我的门徒;
38 Moto nyonso oyo amemaka ekulusu na ye te mpo na kolanda Ngai abongi te mpo na kozala moto na Ngai.
不背着他的十字架跟从我的,也不配作我的门徒。
39 Moto oyo akangami na bomoi na ye akobungisa yango; mpe moto oyo abungisi bomoi na ye likolo na Ngai akozwa yango lisusu.
得着生命的,将要失丧生命;为我失丧生命的,将要得着生命。”
40 Moto oyo ayambaka bino ayambaka nde Ngai, mpe moto oyo ayambaka Ngai ayambaka nde Motindi na Ngai.
“人接待你们就是接待我;接待我就是接待那差我来的。
41 Moto oyo ayambaka mosakoli mpo ete azali mosakoli akozwa lifuti ya ndenge moko na mosakoli, mpe moto oyo ayambaka moto ya sembo mpo ete azali moto ya sembo akozwa lifuti ya ndenge moko na moto ya sembo.
人因为先知的名接待先知,必得先知所得的赏赐;人因为义人的名接待义人,必得义人所得的赏赐。
42 Moto nyonso oyo apesaka ata kopo moko kaka ya mayi ya malili epai ya moko kati na bana mike oyo, mpo ete azali moyekoli na Ngai, nazali koloba na bino penza ya solo, akotikala kobungisa te lifuti na ye.
无论何人,因为门徒的名,只把一杯凉水给这小子里的一个喝,我实在告诉你们,这人不能不得赏赐。”