< Malako 9 >

1 Yesu alobaki na bango lisusu: — Nazali koloba na bino penza ya solo: kati na bato oyo bazali awa, ezali na ba-oyo bakokufa te kino bakomona Bokonzi ya Nzambe koya na nguya.
Et dicebat illis: Amen dico vobis, quia sunt quidam de hic stantibus, qui non gustabunt mortem donec videant regnum Dei veniens in virtute.
2 Sima na mikolo motoba, Yesu azwaki Petelo, Jake mpe Yoane; amemaki bango na pembeni, na likolo ya ngomba moko ya molayi epai wapi bazalaki kaka bango moko. Yesu abongolamaki na miso na bango:
Et post dies sex assumit Iesus Petrum, et Iacobum, et Ioannem: et ducit illos in montem excelsum seorsum solos, et transfiguratus est coram ipsis.
3 bilamba na Ye ekomaki kongenga, ekomaki pembe makasi; moto moko te kati na mokili akoki kobimisa pembe ya ndenge wana.
Et vestimenta eius facta sunt splendentia, et candida nimis velut nix, qualia fullo non potest super terram candida facere.
4 Mbala moko, bamonaki Eliya elongo na Moyize bazali kosolola na Yesu.
Et apparuit illis Elias cum Moyse: et erant loquentes cum Iesu.
5 Petelo alobaki na Yesu: — Moteyi, eleki malamu mpo na biso kotikala awa! Tokotonga bandako misato ya kapo: moko mpo na Yo, moko mpo na Moyize, mpe moko mpo na Eliya.
Et respondens Petrus, ait Iesu: Rabbi, bonum est nos hic esse: et faciamus tria tabernacula, Tibi unum, Moysi unum, et Eliae unum.
6 Solo, Petelo azalaki kososola te makambo oyo azalaki koloba, pamba te bango misato batondaki na kobanga.
Non enim sciebat quid diceret: erant enim timore exterriti:
7 Lipata moko ebimaki mpe ezipaki bango, mpe mongongo moko eyokanaki wuta kati na lipata yango: — Oyo azali Mwana na Ngai ya bolingo, boyoka Ye!
Et facta est nubes obumbrans eos: et venit vox de nube, dicens: Hic est Filius meus charissimus: audite illum.
8 Mbala moko, bayekoli batalaki zingazinga na bango mpe bamonaki moto mosusu te elongo na bango, kaka Yesu.
Et statim circumspicientes, neminem amplius viderunt, nisi Iesum tantum secum.
9 Wana bazalaki kokita na ngomba, Yesu apekisaki bango koloba ata na moto moko, makambo oyo bawutaki komona kino tango Mwana na Moto akosekwa kati na bakufi.
Et descendentibus illis de monte, praecepit illis ne cuiquam quae vidissent, narrarent: nisi cum Filius hominis a mortuis resurrexerit.
10 Babatelaki likambo yango na motema. Atako bongo, bazalaki kaka kotunana: — Kosekwa kati na bakufi elingi koloba nini?
Et verbum continuerunt apud se: conquirentes quid esset: Cum a mortuis resurrexerit.
11 Bayekoli batunaki Yesu: — Mpo na nini balakisi ya Mobeko balobaka ete Eliya asengeli koya moto ya liboso?
Et interrogabant eum, dicentes: Quid ergo dicunt Pharisaei, et Scribae, quia Eliam oportet venire primum?
12 Yesu azongiselaki bango: — Solo, Eliya asengeli koya moto ya liboso mpo na kozongisa makambo nyonso na molongo. Bongo mpo na nini ekomama lisusu ete Mwana na Moto asengeli komona pasi mingi, mpe basengeli koboya Ye?
Qui respondens, ait illis: Elias cum venerit primo, restituet omnia: et quomodo scriptum est in Filium hominis, ut multa patiatur et contemnatur.
13 Kasi Ngai, nazali koloba na bino ete Eliya ayaki mpe basalaki ye makambo nyonso oyo balingaki, kolanda ndenge ekomama na tina na ye.
Sed dico vobis quia et Elias venit (et fecerunt illi quaecumque voluerunt) sicut scriptum est de eo.
14 Tango bakomaki pene ya esika oyo bayekoli mosusu bazalaki, bamonaki ebele ya bato penza bazingeli bango, mpe balakisi ya Mobeko kotiana tembe elongo na bayekoli.
Et veniens ad discipulos suos, vidit turbam magnam circa eos, et Scribas conquirentes cum illis.
15 Tango kaka bato yango bamonaki Yesu, bakamwaki mingi mpe bapotaki mbangu mpo na kokutana na Ye mpe kopesa Ye mbote.
Et confestim omnis populus videns Iesum, stupefactus est, et expaverunt, et accurrentes salutabant eum.
16 Yesu atunaki bango: — Likambo nini bozali kotiana na yango tembe elongo na bayekoli?
Et interrogavit eos: Quid inter vos conquiritis?
17 Moto moko kati na ebele yango ya bato azongiselaki Ye: — Moteyi, namemaki mwana na ngai, oyo ya mobali epai na Yo; pamba te azali na se ya bokonzi ya molimo mabe oyo esala ete alobaka te.
Et respondens unus de turba, dixit: Magister, attuli filium meum ad te habentem spiritum mutum:
18 Bipai nyonso oyo molimo yango ekangaka ye, ebwakaka ye na mabele, mpe mwana akomaka kobimisa fulufulu na monoko, kolia minu, mpe nzoto na ye ekangamaka. Nasengaki na bayekoli na Yo ete babengana molimo yango, kasi balongaki te.
qui ubicumque eum apprehenderit, allidit illum, et spumat, et stridet dentibus, et arescit: et dixi discipulis tuis ut eiicerent illum, et non potuerunt.
19 Yesu alobaki na bango: — Ekeke ya bato bazanga kondima! Kino tango nini nakozala na bino elongo? Kino tango nini nakokanga motema mpo na bino? Bomemela Ngai mwana yango.
Qui respondens eis, dixit: O generatio incredula, quamdiu apud vos ero? quamdiu vos patiar? afferte illum ad me.
20 Bongo bamemaki mwana yango epai ya Yesu. Tango kaka molimo yango ya mabe emonaki Yesu, eningisaki mwana yango makasi mpe mwana akweyaki na mabele, akomaki kobaluka-baluka mpe kobimisa fulufulu na monoko.
Et attulerunt eum. Et cum vidisset eum, statim spiritus conturbavit illum: et elisus in terram, volutabatur spumans.
21 Yesu atunaki tata ya mwana: — Esali mikolo boni wuta mwana akoma boye? Tata ya mwana azongisaki: — Wuta tango azalaki mwana moke penza.
Et interrogavit patrem eius: Quantum temporis est ex quo ei hoc accidit? Et ille ait: Ab infantia:
22 Mbala mingi, molimo mabe etindikaka ye na moto to na mayi mpo na koluka koboma ye. Kasi soki okoki kobikisa ye, yokela biso mawa mpe sunga biso.
et frequenter eum in ignem, et in aquas misit ut eum perderet. sed si quid potes, adiuva nos, misertus nostri.
23 Yesu alobaki na ye: — Olobi nini: « Soki okoki! » Nyonso ekoki kosalema mpo na moto oyo azali na kondima.
Iesus autem ait illi: Si potes credere, omnia possibilia sunt credenti.
24 Mbala moko, tata ya mwana alobaki na mongongo makasi: — Nandimi! Sunga ngai, pamba te nazangi kondima.
Et continuo exclamans pater pueri, cum lacrymis aiebat: Credo, Domine: adiuva incredulitatem meam.
25 Tango Yesu amonaki ebele ya bato koya mbangu, abenganaki molimo mabe: — Molimo mabe, yo oyo okomisaka moto baba, napesi yo mitindo: bima kati na mwana oyo mpe kozonga lisusu te kati na ye.
Et cum videret Iesus concurrentem turbam, comminatus est spiritui immundo, dicens illi: Surde, et mute spiritus, ego praecipio tibi, exi ab eo: et amplius ne introeas in eum.
26 Molimo mabe egangaki, eningisaki mwana makasi mpe ebimaki kati na ye. Mwana akomaki lokola moto akufi na ndenge ete mingi kati na bato oyo bazalaki wana bakomaki koloba « Akufi! »
Et exclamans, et multum discerpens eum, exiit ab eo, et factus est sicut mortuus, ita ut multi dicerent: Quia mortuus est.
27 Kasi Yesu asimbaki mwana yango na loboko mpe atelemisaki ye; mpe mwana atelemaki.
Iesus autem tenens manum eius, elevavit eum, et surrexit.
28 Yesu akotaki na ndako; lokola bayekoli batikalaki bango moko kaka elongo na Ye, batunaki Ye: — Mpo na nini, biso, tolongaki te kobengana molimo yango?
Et cum introisset in domum, discipuli eius secreto interrogabant eum: Quare nos non potuimus eiicere eum?
29 Yesu azongisaki: — Babenganaka molimo ya ndenge wana kaka na losambo.
Et dixit illis: Hoc genus in nullo potest exire, nisi in oratione, et ieiunio.
30 Tango balongwaki na esika wana, bakatisaki na mokili ya Galile mpe Yesu alingaki te ete moto ata moko ayeba esika oyo bazali,
Et inde profecti praetergrediebantur Galilaeam: nec volebat quemquam scire.
31 pamba te azalaki koteya bayekoli na Ye mpe koloba na bango: — Bakokaba Mwana na Moto na maboko ya bato, bakoboma Ye, mpe, mikolo misato sima na kufa na Ye, akosekwa.
Docebat autem discipulos suos, et dicebat illis: Quoniam filius hominis tradetur in manus hominum, et occident eum, et occisus tertia die resurget.
32 Kasi bazalaki kososola te maloba wana mpe bazalaki kobanga kopesa Ye mituna na tina na yango.
At illi ignorabant verbum: et timebant interrogare eum.
33 Tango bakomaki na Kapernawumi, wana bazalaki kati na ndako, Yesu atunaki bango: — Likambo nini bozalaki kotiana tembe na nzela?
Et venerunt Capharnaum. Qui cum domi essent, interrogabat eos: Quid in via tractabatis?
34 Kasi bavandaki nye, pamba te, na nzela, bazalaki penza kotiana tembe mpo na koyeba soki nani kati na bango aleki monene.
At illi tacebant. siquidem in via inter se disputaverunt, quis eorum maior esset.
35 Yesu avandaki, abengaki bayekoli zomi na mibale mpe alobaki na bango: — Moto nyonso oyo alingi kozala moto ya liboso asengeli kozala moto ya suka mpe mosali ya bato nyonso.
Et residens vocavit duodecim, et ait illis: Si quis vult primus esse, erit omnium novissimus, et omnium minister.
36 Yesu akamataki mwana moko ya moke, atiaki ye na kati-kati na bango mpe, sima na Ye koyamba mwana yango na maboko na Ye, alobaki na bango:
Et accipiens puerum, statuit eum in medio eorum: quem cum complexus esset, ait illis:
37 — Moto nyonso oyo, na Kombo na Ngai, akoyamba mwana lokola oyo, ayambi nde Ngai moko. Mpe moto nyonso oyo ayambi Ngai ayambi Ngai te, kasi ayambi nde Motindi na Ngai.
Quisquis unum ex huiusmodi pueris receperit in nomine meo, me recipit: et quicumque me susceperit, non me suscipit, sed eum, qui misit me.
38 Yoane alobaki: — Moteyi, tomonaki moto moko azali kobengana milimo mabe na Kombo na Yo, mpe topekisaki ye, pamba te azali elongo na biso te.
Respondit illi Ioannes, dicens: Magister, vidimus quemdam in nomine tuo eiicientem daemonia, qui non sequitur nos, et prohibuimus eum.
39 Kasi Yesu azongisaki: — Bopekisa ye te; pamba te moto moko te akoki kosala bikamwa na Kombo na Ngai mpe aloba mbala moko, sima na mwa tango, mabe na tina na Ngai.
Iesus autem ait: Nolite prohibere eum. nemo est enim qui faciat virtutem in nomine meo, et possit cito male loqui de me.
40 Moto oyo atelemeli biso te azali mpo na biso.
qui enim non est adversum vos, pro vobis est.
41 Nazali koloba na bino penza ya solo: moto nyonso oyo apesi bino kopo ya mayi na Kombo na Ngai, mpo ete bozali bato ya Klisto, akotikala kobungisa te lifuti na ye.
Quisquis enim potum dederit vobis calicem aquae frigidae in nomine meo, quia Christi estis: amen dico vobis, non perdet mercedem suam.
42 Kasi soki moto moko akweyisi na masumu moko kati na bana mike oyo bandimelaka Ngai, ekoleka malamu mpo na ye kokanga ye libanga monene ya enikelo na kingo mpe kobwaka ye na ebale.
Et quisquis scandalizaverit unum ex his pusillis credentibus in me: bonum est ei magis si circumdaretur mola asinaria collo eius, et in mare mitteretur.
43 Soki loboko na yo ekweyisaka yo na masumu, kata yango; pamba te eleki malamu mpo na yo kokota kati na bomoi, na loboko moko, na esika ete otikala na maboko mibale mpe okende na lifelo, kati na moto oyo ekufaka te, [ (Geenna g1067)
Et si scandalizaverit te manus tua, abscinde illam: bonum est tibi debilem introire in vitam, quam duas manus habentem ire in gehennam, in ignem inextinguibilem: (Geenna g1067)
44 epai wapi nkusu mpe moto ekufaka te.]
ubi vermis eorum non moritur, et ignis non extinguitur.
45 Soki lokolo na yo ekweyisaka yo na masumu, kata yango; pamba te eleki malamu mpo na yo kokota kati na bomoi, na lokolo moko, na esika ete otikala na makolo mibale mpe obwakama na lifelo [ (Geenna g1067)
Et si pes tuus te scandalizat, amputa illum: bonum est tibi claudum introire in vitam aeternam, quam duos pedes habentem mitti in gehennam ignis inextinguibilis: (Geenna g1067)
46 epai wapi nkusu mpe moto ekufaka te.]
ubi vermis eorum non moritur, et ignis non extinguitur.
47 Soki liso na yo ekweyisaka yo na masumu, longola yango; pamba te eleki malamu mpo na yo kokota na Bokonzi ya Nzambe, na liso moko, na esika ete okoba kozala na miso mibale mpe obwakama na lifelo (Geenna g1067)
Quod si oculus tuus scandalizat te, eiice eum: bonum est tibi luscum introire in regnum Dei, quam duos oculos habentem mitti in gehennam ignis: (Geenna g1067)
48 epai wapi nkusu ekufaka te, mpe moto ekufaka te.
ubi vermis eorum non moritur, et ignis non extinguitur.
49 Pamba te moto na moto akoleka na moto mpo ete akoma elengi lokola mungwa.
Omnis enim igne salietur, et omnis victima sale salietur.
50 Mungwa ezali malamu. Kasi soki mungwa ebungisi elengi na yango, ndenge nini bokokoka lisusu kozongisa elengi na yango? Yango wana, bozala na mungwa kati na bino, mpe bozala na kimia bino na bino.
Bonum est sal: quod si sal insulsum fuerit: in quo illud condietis? Habete in vobis sal, et pacem habete inter vos.

< Malako 9 >