< Malako 8 >

1 Na mikolo yango, ebele penza ya bato bayaki lisusu kosangana zingazinga ya Yesu. Lokola bazalaki na eloko ya kolia te, Yesu abengaki bayekoli na Ye mpe alobaki na bango:
In those days, there was again a great crowd, and they had nothing to eat. Jesus called his disciples and said to them,
2 — Nazali koyokela bato oyo mawa, pamba te basali mikolo misato elongo na Ngai mpe bazali na eloko ya kolia te.
“I have compassion on the crowd, because they continue to be with me already for three days and have nothing to eat.
3 Soki nazongisi bango na bandako na bango na nzala, bakolemba nzoto na nzela; pamba te, bato mosusu kati na bango bawutaki mosika.
If I send them away to their home without eating, they may faint on the way. Some of them have come a long way.”
4 Bayekoli na Ye bazongisaki: — Kati na esobe oyo, esika nini tokoki kozwa mapa mpo na koleisa bango mpe batonda?
His disciples answered him, “Where can we get enough loaves of bread in such a deserted place to satisfy these people?”
5 Yesu atunaki bango: — Bozali na mapa boni? Bazongisaki: — Tozali na mapa sambo.
He asked them, “How many loaves do you have?” They said, “Seven.”
6 Boye, alobaki na ebele ya bato yango ete bavanda na mabele. Bongo azwaki mapa yango sambo, azongisaki matondi epai ya Nzambe, akataki yango mpe apesaki biteni na yango epai ya bayekoli na Ye mpo ete bakabola yango epai ya bato. Mpe bayekoli basalaki bongo.
He commanded the crowd to sit down on the ground. He took the seven loaves, gave thanks, and broke them. He gave them to his disciples to set before them, and they set them before the crowd.
7 Bazalaki mpe na mwa ndambo ya bambisi ya mike-mike. Apambolaki yango mpe alobaki na bayekoli na Ye ete bakabola yango.
They also had a few small fish, and after he gave thanks for them, he commanded the disciples to serve these as well.
8 Bato nyonso baliaki mpe batondaki. Bongo bayekoli balokotaki biteni oyo etikalaki, batondisaki na yango bitunga sambo.
They ate and were satisfied, and they picked up the remaining broken pieces, seven large baskets.
9 Bato bazalaki pene nkoto minei. Bongo, Yesu azongisaki bango.
There were about four thousand people. Then he sent them away.
10 Mbala moko, Yesu amataki na bwato elongo na bayekoli na Ye mpe akendeki na etuka ya Dalimanuta.
Immediately he got into the boat with his disciples, and they went into the region of Dalmanutha.
11 Bafarizeo bayaki mpe bakomaki kotuna Yesu mituna; mpo na komeka Ye, basengaki na Ye ete asala elembo moko kowuta na Likolo.
Then the Pharisees came out and began to argue with him. They sought from him a sign from heaven, to test him.
12 Yesu ayokaki mawa makasi kati na molimo na Ye mpe alobaki: « Mpo na nini bato ya ekeke oyo bazali kosenga elembo? Nazali koloba na bino penza ya solo: bakopesamela elembo moko te! »
He sighed deeply in his spirit and said, “Why does this generation seek for a sign? Truly I say to you, no sign will be given to this generation.”
13 Bongo atikaki bango, amataki lisusu na bwato mpe akendeki na ngambo mosusu ya ebale.
Then he left them, got into a boat again, and went away to the other side.
14 Bayekoli babosanaki komema mapa; bazalaki kaka na lipa moko kati na bwato.
Now the disciples had forgotten to take bread with them. They had no more than one loaf of bread in the boat.
15 Yesu akebisaki bango: — Bofungola miso mpe bosala keba na levire ya Bafarizeo mpe ya Erode!
He warned them and said, “Keep watch and be on guard against the yeast of the Pharisees and the yeast of Herod.”
16 Bayekoli bakomaki kolobana bango na bango: — Azali koloba bongo mpo ete tozali na mapa te.
The disciples reasoned with each other, “It is because we have no bread.”
17 Yesu asosolaki makanisi na bango; alobaki: — Bozali kolobana bino na bino mpo ete bozali na mapa te! Mpo na nini? Boni, bozwi kaka bososoli nanu te; mayele na bino ezali kaka ya kozipama; bozali na mitema makasi;
Jesus was aware of this, and he said to them, “Why are you reasoning about not having bread? Do you not yet perceive? Do you not understand? Have your hearts become so dull?
18 bozali na miso, kasi bozali komona te; bozali na matoyi, kasi bozali koyoka te? Bobosani penza!
You have eyes, do you not see? You have ears, do you not hear? Do you not remember?
19 Tango nakataki mapa mitano mpo na kokabolela bato nkoto mitano, bozongaki na motango boni ya bitunga etonda na biteni ya mapa, sima na kokabolela bato? Bazongisaki: — Bitunga zomi na mibale.
When I broke the five loaves among the five thousand, how many baskets full of broken pieces of bread did you take up?” They said to him, “Twelve.”
20 Bongo tango nakataki mapa sambo mpo na kokabolela bato nkoto minei, bozongaki na bitunga boni etonda na biteni ya mapa? Bazongisaki: — Tolokotaki bitumba sambo.
“When I broke the seven loaves among the four thousand, how many basketfuls did you take up?” They said to him, “Seven.”
21 Alobaki na bango: — Bozwi kaka bososoli nanu te?
He said, “Do you not yet understand?”
22 Tango bakomaki na Betisaida, bato bamemaki epai na Yesu moto moko akufa miso; mpe basengaki na Yesu ete asimba ye.
They came to Bethsaida. The people there brought to him a blind man and begged Jesus to touch him.
23 Yesu asimbaki loboko ya mokufi miso mpe amemaki ye na libanda ya mboka; bongo apakolaki ye soyi na miso, atielaki ye maboko mpe atunaki ye: — Boni, omoni eloko?
Jesus took hold of the blind man by the hand, and led him out of the village. When he had spit on his eyes and laid his hands on him, he asked him, “Do you see anything?”
24 Moto yango atalaki mpe alobaki: — Nazali komona bato, kasi bazali lokola banzete oyo ezali kotambola.
He looked up, and said, “I see men who look like walking trees.”
25 Bongo Yesu atiaki lisusu maboko na Ye na miso ya moto yango, mpe moto yango abikaki. Boye akomaki komona malamu penza.
Then he again laid his hands upon his eyes, and the man opened his eyes, his sight was restored, and he saw all things clearly.
26 Yesu alobaki na ye: — Kende na ndako na yo, komeka kutu te kozonga na mboka.
Jesus sent him away to his home and said, “Do not enter the town.”
27 Yesu mpe bayekoli na Ye bakendeki na bamboka ya Sezarea ya Filipo. Na nzela, atunaki bango: — Bato bazali koloba ete Ngai nazali nani?
Jesus went out with his disciples into the villages of Caesarea Philippi. On the way he asked his disciples, “Who do the people say that I am?”
28 Bazongisaki: — Bamoko balobaka ete ozali Yoane Mobatisi; bamosusu, Eliya; mpe bamosusu lisusu, moko kati na basakoli.
They answered him and said, “John the Baptist. Others say, 'Elijah,' and others, 'One of the prophets.'”
29 Yesu atunaki bango: — Bongo bino, bolobaka ete Ngai nazali nani? Petelo azongiselaki Ye: — Ozali Masiya.
He asked them, “But who do you say that I am?” Peter said to him, “You are the Christ.”
30 Yesu apekisaki bango makasi koloba bongo na moto ata moko.
Jesus warned them not to tell anyone about him.
31 Yesu akomaki koteya bango: — Mwana na Moto asengeli komona pasi mingi; bakambi, bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko basengeli koboya Ye, basengeli koboma Ye, mpe, sima na mikolo misato, asengeli kosekwa.
He began to teach them that the Son of Man must suffer many things, and would be rejected by the elders and the chief priests and the scribes, and would be killed, and after three days rise up.
32 Azalaki koloba makambo yango na polele penza. Bongo Petelo abendaki Yesu na pembeni mpe akomaki kopamela Ye: — Koloba bongo te!
He said this clearly. Then Peter took him aside and began to rebuke him.
33 Kasi Yesu abalukaki, atalaki bayekoli na Ye mpe apamelaki Petelo: — Mosika na Ngai, Satana! Makanisi na yo ezali makanisi ya Nzambe te, ezali penza makanisi ya bato.
But Jesus turned and looked at his disciples and then he rebuked Peter and said, “Get behind me, Satan! You are not setting your mind on the things of God, but on the things of people.”
34 Yesu abengaki ebele ya bato mpe bayekoli na Ye, alobaki na bango: — Moto nyonso oyo alingi kolanda Ngai asengeli komiboya ye moko, kokamata ekulusu na ye mpe kolanda Ngai.
Then he called the crowd and his disciples together, and he said to them, “If anyone wants to follow me, he must deny himself, take up his cross, and follow me.
35 Pamba te moto nyonso oyo akolinga kobikisa bomoi na ye akobungisa yango, kasi moto nyonso oyo akobungisa bomoi na ye mpo na Ngai mpe mpo na Sango Malamu akobikisa yango.
For whoever wants to save his life will lose it, and whoever loses his life for my sake and for the gospel, will save it.
36 Litomba nini ezali mpo na moto, soki azwi mokili mobimba, kasi abungisi bomoi na ye?
What does it profit a person to gain the whole world and then forfeit his life?
37 Moto akoki penza kopesa nini mpo na kosikola bomoi na ye?
What can a person give in exchange for his life?
38 Moto nyonso oyo akoyoka Ngai mpe maloba na Ngai soni, kati na bato ya ekeke oyo, ba-oyo batosaka Nzambe te mpe batondi na masumu, Mwana na Moto mpe akoyoka ye soni, tango akoya elongo na ba-anjelu ya bule kati na nkembo ya Tata na Ye.
Whoever is ashamed of me and my words in this adulterous and sinful generation, the Son of Man will be ashamed of him when he comes in the glory of his Father with the holy angels.”

< Malako 8 >