< Malako 7 >

1 Bafarizeo mpe ndambo ya balakisi ya Mobeko oyo bawutaki na Yelusalemi basanganaki zingazinga ya Yesu.
Os fariseus, e alguns dos escribas, que tinham vindo de Jerusalém, reuniram-se com ele.
2 Bamonaki bayekoli mosusu ya Yesu kolia lipa na maboko ya mbindo, elingi koloba na maboko oyo basukola te.
E viram que alguns dos discípulos dele comiam pão com mãos impuras, isto é, sem lavar.
3 Nzokande, Bafarizeo mpe Bayuda nyonso baliaka te soki basukoli te maboko malamu. Ezalaki na nzela wana nde bazalaki kotosa bokoko na bango.
(Pois os fariseus, e todos os judeus, mantendo a tradição dos antigos, se não lavarem bastante as mãos, não comem.
4 Mpe soki bawuti na esika oyo bato ebele bakutanaka, baliaka te soki bamipetoli nanu te na mayi. Bazalaki lisusu na mibeko ebele ya bokoko oyo bazalaki kotosa, ndakisa: kosukola bakopo, bambeki, bambeto mpe basani ya bibende.
E, quando voltam da rua, se não se lavarem, não comem; e há muitas outras coisas que se encarregam de guardar, [como] lavar os copos, as vasilhas, e os utensílios de metal).
5 Boye, Bafarizeo mpe balakisi ya Mobeko batunaki Yesu: — Mpo na nini bayekoli na yo bazali kotosa te bokoko na biso? Mpo na nini bazali kolia na maboko ya mbindo?
Depois os fariseus e os escribas lhe perguntaram: Por que os teus discípulos não andam conforme a tradição dos antigos, em vez de comerem pão com as mãos impuras?
6 Yesu azongiselaki bango: — Bato ya bilongi mibale! Mosakoli Ezayi asakolaki penza malamu na tina na bino, kolanda ndenge ekomama: « Bato oyo bapesaka Ngai lokumu kaka na bibebu, kasi mitema na bango ezali mosika na Ngai;
E ele lhes respondeu: Bem profetizou Isaías acerca de vós, hipócritas! Como está escrito: Este povo me honra com os lábios, mas o seu coração está longe de mim.
7 basambelaka Ngai kaka na pamba, mateya na bango ezali kaka mibeko ya bomoto. »
Eles, porém, me honram em vão, ensinando como doutrinas mandamentos humanos.
8 Botiaka mibeko ya Nzambe pembeni mpo na kotosa bokoko ya bato.
Vós deixais o mandamento de Deus, e mantendes a tradição humana.
9 Alobaki na bango lisusu: — Boyebi malamu penza kosundola mibeko ya Nzambe mpo na kobatela bokoko na bino.
E dizia-lhes: Vós dispensais o mandamento de Deus para guardardes a vossa tradição;
10 Solo, Moyize alobaki: « Okopesaka tata na yo mpe mama na yo lokumu; » mpe « moto oyo akolakela tata na ye to mama na ye mabe asengeli na etumbu ya kufa. »
porque Moisés disse: Honra o teu pai e a tua mãe. E quem maldisser ao pai ou à mãe terá de morrer.
11 Kasi bino, boteyaka ete soki moto alobi na tata na ye to na mama na ye: « Lisungi oyo nalingaki kopesa yo, nakobonza yango lokola likabo epai ya Nzambe, »
Mas vós dizeis: Se o homem disser ao pai ou à mãe: Tudo o que te puder aproveitar de mim é corbã (isto é, oferta),
12 akangolami na mokumba ya kosalela tata na ye to mpo na mama na ye likambo songolo.
então não lhe deixais mais nada fazer por seu pai ou por sua mãe.
13 Na bongo, bokomisaka pamba Liloba na Nzambe na nzela ya bokoko oyo bolakisaka. Mpe bosalaka makambo mosusu ebele ya lolenge wana.
Assim invalidaias a palavra de Deus por vossa tradição, que ordenastes; e [fazeis] muitas coisas semelhantes a estas.
14 Yesu abengaki lisusu ebele ya bato mpe alobaki na bango: — Bino nyonso, boyoka Ngai mpe bososola likambo oyo.
E chamando para si toda a multidão, disse-lhes: Ouvi-me todos, e entendei:
15 Eloko moko te oyo ewuti na libanda mpe ekoti kati na moto ekoki kokomisa ye mbindo, kasi ezali oyo ebimaka kati na moto nde ekomisaka ye mbindo. [
Nada há fora do ser humano que nele entre que o possa contaminar; mas o que dele sai, isso é o que contamina o ser humano.
16 Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka!]
17 Tango Yesu atikaki ebele ya bato mpe akotaki na ndako, bayekoli na Ye batunaki Ye tina ya lisese yango.
Quando [Jesus] deixou a multidão e entrou em casa, seus discípulos lhe perguntaram sobre a parábola.
18 Alobaki na bango: — Bino mpe, boni, bozali mayele te? Bozali kososola te ete eloko moko te oyo ewuti na libanda mpe ekoti kati na moto ekoki kokomisa ye mbindo.
E ele lhes disse: Também vós estais assim sem entendimento? Não entendeis que tudo o que de fora entra no ser humano não o pode contaminar?
19 Pamba te ekendaka te na motema na ye, kasi ekendaka nde na libumu na ye; mpe na sima, ekendaka na zongo. Na maloba oyo, Yesu atatolaki ete bilei nyonso ezali peto.
Pois não entra no seu coração, mas, sim, no ventre, e sai para a privada. (Assim, ele declarou como limpas todas as comidas).
20 Yesu alobaki lisusu: — Oyo ebimaka na moto, yango nde ekomisaka ye mbindo.
E dizia: O que sai do ser humano, isso contamina o ser humano.
21 Pamba te, ezali wuta na kati, na motema penza ya moto nde ewutaka makanisi mabe, kindumba, moyibi, koboma,
Pois é de dentro do coração humano que vêm os maus pensamentos, os pecados sexuais, os roubos, os homicídios, os adultérios,
22 ekobo, lokoso ya mbongo, kanda, mayele mabe, pite, likunya, songisongi, mafinga, lolendo mpe makambo nyonso mosusu ya mabe.
as ganâncias, as maldades, o engano, a depravação, o olho malicioso, a blasfêmia, a soberba, a insensatez.
23 Makambo nyonso wana ya mabe ewutaka kati na moto, mpe yango nde ekomisaka moto mbindo.
Todos estes males procedem de dentro, e contaminam o ser humano.
24 Yesu alongwaki wana mpe akendeki na etuka ya Tiri. Akotaki kati na ndako moko; alingaki te ete ata moto moko ayeba yango, kasi alongaki kaka te kobombama.
[Jesus] levantou-se dali e foi para a região de Tiro. Ele entrou numa casa, e não queria que ninguém soubesse disso, mas não pôde se esconder.
25 Pamba te, ezalaki na mwasi moko oyo mwana na ye ya mwasi azalaki na se ya bokonzi ya molimo mabe oyo ezalaki mpe konyokola ye makasi; boye tango kaka ayokaki sango na tina na Yesu, ayaki komibwaka na makolo ya Ye.
E logo uma mulher, cuja filhinha tinha um espírito imundo, assim que ouviu falar dele, veio, e prostrou-se a seus pés.
26 Mwasi yango azalaki moto ya Grese, moto ya Fenisi ya Siri; asengaki na Yesu ete abengana molimo mabe oyo ezali konyokola mwana na ye ya mwasi.
Esta mulher era grega, de nacionalidade sirofenícia; e rogava-lhe que expulsasse o demônio de sua filha.
27 Kasi Yesu alobaki na ye: — Tika bana ya ndako balia nanu mpe batonda, pamba te ezali malamu te kokamata lipa ya bana mpo na kobwakela yango bambwa!
Mas [ Jesus ] lhe disse: Deixa primeiro que os filhos se fartem; porque não é bom tomar o pão dos filhos, e lançá-lo aos cachorrinhos.
28 Mwasi yango azongiselaki Yesu: — Nkolo, ezali penza ya solo; kasi bambwa eliaka biteni oyo bana bakweyisaka na se ya mesa!
Porém ela lhe respondeu: Sim Senhor; mas também os cachorrinhos comem debaixo da mesa, das migalhas que os filhos deixam.
29 Yesu alobaki: — Mpo na maloba oyo olobi, kende, zonga na ndako na yo, pamba te molimo mabe esili kobima na mwana na yo ya mwasi.
Então ele lhe disse: Por esta palavra, vai, o demônio já saiu da tua filha.
30 Mpe tango akendeki na ndako, akutaki mwana na ye alali na mbeto mpe molimo mabe ebimi.
Quando ela chegou à sua casa, encontrou que o demônio já havia saído, e a criança estava deitada sobre a cama.
31 Yesu alongwaki na engumba ya Tiri, alekaki na Sidoni mpe akendeki na ebale ya Galile wana akatisaki etuka ya bingumba zomi.
Então [Jesus] voltou a sair da região de Tiro e veio por Sidom para o mar da Galilea, por meio da região de Decápolis.
32 Bamemelaki ye moto moko oyo akufa matoyi mpe alobaka te, mpe basengaki na Yesu ete atia ye maboko.
E trouxeram-lhe um surdo que dificilmente falava, e rogaram-lhe que pusesse a mão sobre ele.
33 Yesu alongolaki ye kati na ebele ya bato, amemaki ye na pembeni mpe atiaki ye misapi na matoyi; atiaki ye soyi mpe asimbaki lolemo ya moto yango.
E tomando-o em separado da multidão, pôs os seus dedos nos ouvidos dele, cuspiu, e tocou-lhe a língua.
34 Atalaki na likolo, abendaki pema mpe alobaki na ye: « Fungwama! »
Depois, levantando os olhos ao céu, suspirou, e disse: Efatá, (isto é, abre-te).
35 Mbala moko, matoyi na ye efungwamaki, lolemo na ye ekangolamaki mpe akomaki koloba malamu.
Os ouvidos dele se abriram, e imediatamente o que prendia sua língua se soltou, e passou a falar bem.
36 Yesu apekisaki bango ete baloba yango na moto te. Atako azalaki kopekisa bango makasi, kasi bango bazalaki kaka kopanza sango yango koleka.
[Jesus] lhes mandou que a ninguém dissessem; porém, quanto mais lhes mandava, mais divulgavam.
37 Bato bakamwaki makasi mpe bazalaki koloba: — Azali kosala makambo nyonso malamu; azali kosala ete ezala bato oyo bakufa matoyi bakoka koyoka, mpe bababa bakoka koloba.
E ficavam muito admirados, dizendo: Ele faz tudo bem! Aos surdos faz ouvir, e aos mudos falar.

< Malako 7 >