< Malako 6 >

1 Sima na Yesu kolongwa na ndako yango, azongaki elongo na bayekoli na Ye, na engumba epai wapi abotama.
και εξηλθεν εκειθεν και ηλθεν εισ την πατριδα αυτου και ακολουθουσιν αυτω οι μαθηται αυτου
2 Wana mokolo ya Saba ekokaki, Yesu akomaki koteya kati na ndako ya mayangani. Kati na bato oyo bayokaki Ye, ebele bakamwaki makasi. Batunaki: « Boni, moto oyo azwi makambo oyo wapi? Nani apesi ye bwanya ya boye? Azwi wapi nguya ya kosala bikamwa oyo nyonso?
και γενομενου σαββατου ηρξατο εν τη συναγωγη διδασκειν και πολλοι ακουοντεσ εξεπλησσοντο λεγοντεσ ποθεν τουτω ταυτα και τισ η σοφια η δοθεισα αυτω και δυναμεισ τοιαυται δια των χειρων αυτου γινονται
3 Ezali ye te mosali mabaya? Ezali ye te mwana ya Mari mpe ndeko ya Jake, Jozefi, Jide mpe Simona? Boni, bandeko na ye ya basi bavandaka awa te elongo na biso? » Yango wana, ezalaki penza libaku mabe mpo na bango kondima Ye.
ουχ ουτοσ εστιν ο τεκτων ο υιοσ μαριασ αδελφοσ δε ιακωβου και ιωση και ιουδα και σιμωνοσ και ουκ εισιν αι αδελφαι αυτου ωδε προσ ημασ και εσκανδαλιζοντο εν αυτω
4 Yesu alobaki na bango: « Ezali kaka kati na ekolo na ye, kati na libota na ye mpe kati na ndako na ye nde mosakoli azwaka lokumu te. »
ελεγεν δε αυτοισ ο ιησουσ οτι ουκ εστιν προφητησ ατιμοσ ει μη εν τη πατριδι αυτου και εν τοισ συγγενεσιν και εν τη οικια αυτου
5 Alongaki te kosala bikamwa na esika yango, kasi abikisaki kaka mwa ndambo ya babeli oyo atielaki maboko.
και ουκ ηδυνατο εκει ουδεμιαν δυναμιν ποιησαι ει μη ολιγοισ αρρωστοισ επιθεισ τασ χειρασ εθεραπευσεν
6 Boye, akamwaki mingi penza bozangi kondima na bango. Yesu azalaki kotambola na bamboka ya zingazinga mpo na koteya.
και εθαυμαζεν δια την απιστιαν αυτων και περιηγεν τασ κωμασ κυκλω διδασκων
7 Abengaki bantoma na Ye zomi na mibale, atindaki bango mibale-mibale, mpe apesaki bango bokonzi ya kobengana milimo mabe.
και προσκαλειται τουσ δωδεκα και ηρξατο αυτουσ αποστελλειν δυο δυο και εδιδου αυτοισ εξουσιαν των πνευματων των ακαθαρτων
8 Alobaki na bango: « Bomema eloko moko te mpo na mobembo, longola kaka lingenda. » Alobaki na bango: « Bomema te, ezala sakosi to lipa to mbongo kati na mokaba na bino.
και παρηγγειλεν αυτοισ ινα μηδεν αιρωσιν εισ οδον ει μη ραβδον μονον μη πηραν μη αρτον μη εισ την ζωνην χαλκον
9 Bolata basandale na makolo na bino, kasi bomema banzambala mibale te.
αλλ υποδεδεμενουσ σανδαλια και μη ενδυσησθε δυο χιτωνασ
10 Na ndako nyonso oyo bakoyamba bino, bovanda kuna kino tango bokolongwa.
και ελεγεν αυτοισ οπου εαν εισελθητε εισ οικιαν εκει μενετε εωσ αν εξελθητε εκειθεν
11 Mpe soki na esika songolo, baboyi koyamba mpe koyoka bino, bolongwa na esika yango, bopupola putulu ya makolo na bino; yango ekozala litatoli oyo ekofunda bango. »
και οσοι αν μη δεξωνται υμασ μηδε ακουσωσιν υμων εκπορευομενοι εκειθεν εκτιναξατε τον χουν τον υποκατω των ποδων υμων εισ μαρτυριον αυτοισ αμην λεγω υμιν ανεκτοτερον εσται σοδομοισ η γομορροισ εν ημερα κρισεωσ η τη πολει εκεινη
12 Bantoma bakendeki mpe bateyaki bato ete babongola mitema.
και εξελθοντεσ εκηρυσσον ινα μετανοησωσιν
13 Bazalaki kobengana milimo mabe ebele mpe kobikisa babeli mingi na kopakola bango mafuta.
και δαιμονια πολλα εξεβαλλον και ηλειφον ελαιω πολλουσ αρρωστουσ και εθεραπευον
14 Mokonzi Erode ayokaki sango na tina na Yesu, pamba te Kombo na Ye eyebanaki makasi. Bazalaki koloba boye na tina na Yesu: « Yoane Mobatisi asekwi kati na bakufi! Yango wana azali na nguya ya kosala bikamwa! »
και ηκουσεν ο βασιλευσ ηρωδησ φανερον γαρ εγενετο το ονομα αυτου και ελεγεν οτι ιωαννησ ο βαπτιζων εκ νεκρων ηγερθη και δια τουτο ενεργουσιν αι δυναμεισ εν αυτω
15 Bato mosusu bazalaki koloba: « Ezali Eliya! » Bamosusu: « Azali mosakoli, lokola moko kati na basakoli ya kala! »
αλλοι ελεγον οτι ηλιασ εστιν αλλοι δε ελεγον οτι προφητησ εστιν ωσ εισ των προφητων
16 Kasi tango Erode azalaki koyoka maloba wana nyonso, azalaki komilobela: « Ezali Yoane oyo nakataki moto nde asekwi kati na bakufi! »
ακουσασ δε ηρωδησ ειπεν οτι ον εγω απεκεφαλισα ιωαννην ουτοσ εστιν αυτοσ ηγερθη εκ νεκρων
17 Pamba te Erode amipeselaki mitindo ete bakanga Yoane minyololo mpe babwaka ye kati na boloko; asalaki bongo mpo na kosepelisa Erodiade, mwasi ya Filipo, ndeko na ye, oyo ye Erode abalaki.
αυτοσ γαρ ο ηρωδησ αποστειλασ εκρατησεν τον ιωαννην και εδησεν αυτον εν φυλακη δια ηρωδιαδα την γυναικα φιλιππου του αδελφου αυτου οτι αυτην εγαμησεν
18 Yoane azalaki koloba na Erode: « Ozali na ndingisa te ya kosangisa nzoto na mwasi ya ndeko na yo. »
ελεγεν γαρ ο ιωαννησ τω ηρωδη οτι ουκ εξεστιν σοι εχειν την γυναικα του αδελφου σου
19 Erodiade akangelaki Yoane kanda kati na motema mpe azalaki koluka nzela ya kobomisa ye, kasi azalaki kokoka te,
η δε ηρωδιασ ενειχεν αυτω και ηθελεν αυτον αποκτειναι και ουκ ηδυνατο
20 pamba te Erode azalaki kobanga Yoane, wana ayebaki ete Yoane azali moto ya sembo mpe mosantu, mpe azalaki kobatela ye. Tango nyonso oyo Erode azalaki koyoka Yoane koloba, azalaki komitungisa mingi; nzokande azalaki kaka kosepela koyoka ye.
ο γαρ ηρωδησ εφοβειτο τον ιωαννην ειδωσ αυτον ανδρα δικαιον και αγιον και συνετηρει αυτον και ακουσασ αυτου πολλα εποιει και ηδεωσ αυτου ηκουεν
21 Nzokande, na mokolo ya kosepela mbotama ya Erode, Erodiade akutanaki na libaku ya kokokisa mokano na ye. Na mokolo yango, Erode asalaki feti monene mpe abengisaki bakalaka, bakonzi minene ya basoda mpe bato ya lokumu ya Galile.
και γενομενησ ημερασ ευκαιρου οτε ηρωδησ τοισ γενεσιοισ αυτου δειπνον εποιει τοισ μεγιστασιν αυτου και τοισ χιλιαρχοισ και τοισ πρωτοισ τησ γαλιλαιασ
22 Mwana mwasi ya Erodiade akotaki mpe abinaki, asepelisaki Erode mpe bato oyo abengisaki na feti. Mokonzi alobaki na mwana mwasi: — Senga ngai nyonso oyo okolinga, nakopesa yo yango!
και εισελθουσησ τησ θυγατροσ αυτησ τησ ηρωδιαδοσ και ορχησαμενησ και αρεσασησ τω ηρωδη και τοισ συνανακειμενοισ ειπεν ο βασιλευσ τω κορασιω αιτησον με ο εαν θελησ και δωσω σοι
23 Mpe alapaki kutu ndayi epai na ye: — Nakopesa yo nyonso oyo okosenga ngai, ata ndambo ya bokonzi na ngai.
και ωμοσεν αυτη οτι ο εαν με αιτησησ δωσω σοι εωσ ημισουσ τησ βασιλειασ μου
24 Mwana mwasi abimaki mpe akendeki kotuna toli epai ya mama na ye: — Mama, nasenga nini? Mama na ye azongisaki: — Senga moto ya Yoane Mobatisi.
η δε εξελθουσα ειπεν τη μητρι αυτησ τι αιτησομαι η δε ειπεν την κεφαλην ιωαννου του βαπτιστου
25 Mbala moko, mwana mwasi azongaki na lombangu epai ya mokonzi mpe alobaki na ye: — Nalingi ete opesa ngai, sik’oyo, na sani, moto ya Yoane Mobatisi.
και εισελθουσα ευθεωσ μετα σπουδησ προσ τον βασιλεα ητησατο λεγουσα θελω ινα μοι δωσ εξαυτησ επι πινακι την κεφαλην ιωαννου του βαπτιστου
26 Mokonzi ayokaki mawa mingi na motema, kasi mpo na ndayi oyo alapaki mpe mpo na bato oyo abengisaki na feti, aboyaki kopimela ye yango.
και περιλυποσ γενομενοσ ο βασιλευσ δια τουσ ορκουσ και τουσ συνανακειμενουσ ουκ ηθελησεν αυτην αθετησαι
27 Mbala moko, mokonzi atindaki moko kati na bakengeli na ye ete amema moto ya Yoane. Mokengeli yango akendeki na boloko, akataki moto ya Yoane,
και ευθεωσ αποστειλασ ο βασιλευσ σπεκουλατορα επεταξεν ενεχθηναι την κεφαλην αυτου
28 amemaki yango, na sani; apesaki yango epai ya mwana mwasi, mpe mwana mwasi apesaki yango epai ya mama na ye.
ο δε απελθων απεκεφαλισεν αυτον εν τη φυλακη και ηνεγκεν την κεφαλην αυτου επι πινακι και εδωκεν αυτην τω κορασιω και το κορασιον εδωκεν αυτην τη μητρι αυτησ
29 Tango bayekoli ya Yoane bayokaki sango yango, bayaki kozwa nzoto na ye mpe batiaki yango kati na kunda moko.
και ακουσαντεσ οι μαθηται αυτου ηλθον και ηραν το πτωμα αυτου και εθηκαν αυτο εν μνημειω
30 Tango bantoma bazongaki, basanganaki pene ya Yesu mpe bayebisaki Ye makambo nyonso oyo bawutaki kosala mpe nyonso oyo bateyaki.
και συναγονται οι αποστολοι προσ τον ιησουν και απηγγειλαν αυτω παντα και οσα εποιησαν και οσα εδιδαξαν
31 Boye, lokola bato mingi bazalaki koya mpe kozonga, mpe bazalaki kozwa ata tango te ya kolia, Yesu alobaki na bango: « Boya elongo na Ngai, na esika oyo ebombama mpe bopema mwa moke. »
και ειπεν αυτοισ δευτε υμεισ αυτοι κατ ιδιαν εισ ερημον τοπον και αναπαυεσθε ολιγον ησαν γαρ οι ερχομενοι και οι υπαγοντεσ πολλοι και ουδε φαγειν ευκαιρουν
32 Bakendeki na bwato, na esika oyo ebombama.
και απηλθον εισ ερημον τοπον τω πλοιω κατ ιδιαν
33 Kasi bato ebele oyo bamonaki bango kokende, basosolaki ete ezali bango. Boye balandaki bango mbangu na makolo longwa na bingumba nyonso mpe bakomaki liboso na bango, na esika oyo bazalaki kokende.
και ειδον αυτουσ υπαγοντασ και επεγνωσαν αυτον πολλοι και πεζη απο πασων των πολεων συνεδραμον εκει και προηλθον αυτουσ και συνηλθον προσ αυτον
34 Tango Yesu akitaki wuta na bwato mpe amonaki ebele ya bato penza, ayokaki mawa makasi mpo na bango, pamba te bazalaki lokola bameme oyo ezangi mobateli. Boye, abandaki koteya bango makambo ebele.
και εξελθων ειδεν ο ιησουσ πολυν οχλον και εσπλαγχνισθη επ αυτοισ οτι ησαν ωσ προβατα μη εχοντα ποιμενα και ηρξατο διδασκειν αυτουσ πολλα
35 Lokola ngonga epusanaki makasi, bayekoli na Ye bapusanaki pene na Ye mpe balobaki na Ye: — Ngonga epusani makasi, mpe esika oyo ezali esobe!
και ηδη ωρασ πολλησ γενομενησ προσελθοντεσ αυτω οι μαθηται αυτου λεγουσιν οτι ερημοσ εστιν ο τοποσ και ηδη ωρα πολλη
36 Zongisa bango mpo ete bakende komisombela biloko ya kolia kati na bamboka mpe bilanga ya zingazinga.
απολυσον αυτουσ ινα απελθοντεσ εισ τουσ κυκλω αγρουσ και κωμασ αγορασωσιν εαυτοισ αρτουσ τι γαρ φαγωσιν ουκ εχουσιν
37 Kasi Yesu azongisaki: — Bopesa bango bino moko biloko ya kolia. Bayekoli balobaki na Ye: — Ondimi penza tokende kosomba mapa mpe toleisa bango, na mbongo ya bibende nkama mibale?
ο δε αποκριθεισ ειπεν αυτοισ δοτε αυτοισ υμεισ φαγειν και λεγουσιν αυτω απελθοντεσ αγορασωμεν δηναριων διακοσιων αρτουσ και δωμεν αυτοισ φαγειν
38 Yesu atunaki bango: — Mapa boni bozali na yango? Bokende nanu kotala. Bakendeki kotala mpe balobaki: — Tozali na mapa mitano mpe bambisi mibale.
ο δε λεγει αυτοισ ποσουσ αρτουσ εχετε υπαγετε και ιδετε και γνοντεσ λεγουσιν πεντε και δυο ιχθυασ
39 Yesu apesaki bango mitindo ete bakabola bato nyonso na masanga mpe bavandisa bango na matiti ya mobesu.
και επεταξεν αυτοισ ανακλιναι παντασ συμποσια συμποσια επι τω χλωρω χορτω
40 Boye, batandamaki na milongo ya bato nkama moko mpe ya bato tuku mitano.
και ανεπεσον πρασιαι πρασιαι ανα εκατον και ανα πεντηκοντα
41 Yesu akamataki mapa mitano mpe bambisi mibale yango, atombolaki miso na Ye na likolo mpe azongisaki matondi epai ya Nzambe; akataki mapa yango mpe apesaki biteni na yango epai ya bayekoli na Ye mpo ete bakabola yango epai na bato. Akabolaki lisusu bambisi nyonso mibale epai ya bango nyonso.
και λαβων τουσ πεντε αρτουσ και τουσ δυο ιχθυασ αναβλεψασ εισ τον ουρανον ευλογησεν και κατεκλασεν τουσ αρτουσ και εδιδου τοισ μαθηταισ αυτου ινα παραθωσιν αυτοισ και τουσ δυο ιχθυασ εμερισεν πασιν
42 Bato nyonso baliaki mpe batondaki.
και εφαγον παντεσ και εχορτασθησαν
43 Bongo bayekoli balokotaki biteni ya mapa mpe ya bambisi, oyo etikalaki; mpe biteni yango etondisaki bitunga zomi na mibale.
και ηραν κλασματων δωδεκα κοφινουσ πληρεισ και απο των ιχθυων
44 Bato oyo baliaki mapa yango bazalaki mibali pene nkoto mitano.
και ησαν οι φαγοντεσ τουσ αρτουσ πεντακισχιλιοι ανδρεσ
45 Mbala moko, Yesu atindaki bayekoli na Ye ete bamata na bwato mpe bakende liboso na Ye, na Betisaida, na ngambo mosusu ya ebale, wana Ye moko akozongisa bato.
και ευθεωσ ηναγκασεν τουσ μαθητασ αυτου εμβηναι εισ το πλοιον και προαγειν εισ το περαν προσ βηθσαιδαν εωσ αυτοσ απολυση τον οχλον
46 Sima na Ye kozongisa bato yango, amataki na ngomba mpo na kosambela.
και αποταξαμενοσ αυτοισ απηλθεν εισ το οροσ προσευξασθαι
47 Wana ekomaki pokwa, bwato ekomaki na kati-kati ya ebale; mpe Ye, Yesu, azalaki Ye moko na mokili,
και οψιασ γενομενησ ην το πλοιον εν μεσω τησ θαλασσησ και αυτοσ μονοσ επι τησ γησ
48 amonaki bayekoli na Ye kobunda-bunda mpo na koluka nkayi, pamba te mopepe ezalaki kozongisa bango na sima. Wana tongo ekomaki pene ya kotana, Yesu atambolaki likolo ya mayi ya ebale mpo na kolanda bango, mpe alingaki kutu koleka bango.
και ειδεν αυτουσ βασανιζομενουσ εν τω ελαυνειν ην γαρ ο ανεμοσ εναντιοσ αυτοισ και περι τεταρτην φυλακην τησ νυκτοσ ερχεται προσ αυτουσ περιπατων επι τησ θαλασσησ και ηθελεν παρελθειν αυτουσ
49 Tango bayekoli bamonaki Yesu azali kotambola likolo ya mayi ya ebale, bakanisaki ete ezali elima, mpe bakomaki koganga.
οι δε ιδοντεσ αυτον περιπατουντα επι τησ θαλασσησ εδοξαν φαντασμα ειναι και ανεκραξαν
50 Solo, bango nyonso bamonaki Ye, mpe somo makasi ekangaki bango. Mbala moko, Yesu alobaki na bango: « Kimia! Kimia! Bobanga te! Ezali Ngai! »
παντεσ γαρ αυτον ειδον και εταραχθησαν και ευθεωσ ελαλησεν μετ αυτων και λεγει αυτοισ θαρσειτε εγω ειμι μη φοβεισθε
51 Bongo amataki na bwato epai bayekoli bazalaki, mpe mopepe ekitaki. Bakamwaki mingi penza,
και ανεβη προσ αυτουσ εισ το πλοιον και εκοπασεν ο ανεμοσ και λιαν εκπερισσου εν εαυτοισ εξισταντο και εθαυμαζον
52 pamba te basosolaki te tina ya likamwisi ya mapa, mpo ete mayele na bango ezalaki ya kozipama.
ου γαρ συνηκαν επι τοισ αρτοισ ην γαρ αυτων η καρδια πεπωρωμενη
53 Sima na bango kokatisa ebale, bakomaki na mabele ya Genezareti mpe bakangisaki bwato na bango na libongo.
και διαπερασαντεσ ηλθον επι την γην γεννησαρετ και προσωρμισθησαν
54 Tango kaka bakitaki na bwato, bato basosolaki mbala moko Yesu.
και εξελθοντων αυτων εκ του πλοιου ευθεωσ επιγνοντεσ αυτον
55 Boye, bato bapotaki mbangu kati na etuka wana mobimba mpe bakomaki komema babeli, na tsipoyi, na bisika nyonso oyo bayokaki ete Yesu akomi kuna.
περιδραμοντεσ ολην την περιχωρον εκεινην ηρξαντο επι τοισ κραββατοισ τουσ κακωσ εχοντασ περιφερειν οπου ηκουον οτι εκει εστιν
56 Na bisika nyonso oyo Yesu azalaki kokende, na bamboka, na bingumba to na bilanga, bazalaki komema babeli na bisika oyo bato ebele bakutanaka, mpe bazalaki kosenga na Yesu ete apesa babeli nzela ya kosimba ata singa ya songe ya elamba na Ye. Mpe bato nyonso oyo bazalaki kolonga kosimba yango bazalaki kobika na bokono na bango.
και οπου αν εισεπορευετο εισ κωμασ η πολεισ η αγρουσ εν ταισ αγοραισ ετιθουν τουσ ασθενουντασ και παρεκαλουν αυτον ινα καν του κρασπεδου του ιματιου αυτου αψωνται και οσοι αν ηπτοντο αυτου εσωζοντο

< Malako 6 >