< Malako 4 >
1 Yesu abandaki lisusu koteya pembeni ya ebale. Bato ebele basanganaki pembeni na Ye. Boye, amataki mpe avandaki kati na bwato, mpe bato nyonso batelemaki na mokili, pembeni ya ebale.
Một lần khác, Chúa Giê-xu giảng dạy bên bờ biển. Dân chúng tụ tập quá đông, nên Ngài ngồi trên một chiếc thuyền, còn dân chúng đứng quanh trên bờ.
2 Azalaki koteya bango makambo ebele na masese. Na mateya na Ye, azalaki koloba:
Ngài dùng nhiều ẩn dụ dạy dỗ họ, một trong những ẩn dụ đó là:
3 « Boyoka! Moloni moko abimaki mpo na kolona.
“Một người ra đồng gieo lúa.
4 Wana azalaki kobwaka nkona na ye, ndambo ekweyaki pembeni ya nzela; bandeke eyaki mpe eliaki yango.
Khi đang gieo, có hạt rơi trên đường mòn, bị chim ăn hết.
5 Ndambo mosusu ekweyaki na esika etonda na mabanga, esika oyo mabele ezalaki mingi te; ebimisaki mito noki mpo ete mabele yango ezalaki na bozindo te.
Có hạt rơi nhằm lớp đất mỏng phủ trên đá. Cây non mọc lên rất nhanh.
6 Kasi tango moyi ebimaki, mito yango ezikaki mpo ete ezalaki na misisa te.
Nhưng khi bị ánh nắng mặt trời thiêu đốt, nó héo dần rồi chết, vì rễ không bám sâu vào lòng đất.
7 Ndambo mosusu ekweyaki kati na banzube; banzube ekolaki mpe efinaki-finaki yango. Boye, ebotaki bambuma te.
Có hạt rơi giữa bụi gai, bị gai mọc lên chặn nghẹt, không kết quả được.
8 Ndambo mosusu ekweyaki na mabele ya malamu; ebimisaki mito, ekolaki mpe ebotaki bambuma: nkona moko ebotaki bambuma tuku misato; mosusu, bambuma tuku motoba; mpe mosusu, bambuma nkama moko. »
Những hạt gieo vào đất tốt kết quả gấp ba mươi, sáu mươi, hay một trăm lần.
9 Yesu azalaki lisusu koloba: « Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka! »
Ai có tai để nghe, nên lắng nghe!”
10 Tango atikalaki Ye moko, bantoma zomi na mibale elongo na bato oyo bazingelaki Ye batunaki Ye na tina na masese.
Khi dân chúng về hết, mười hai sứ đồ và các môn đệ khác xin Chúa Giê-xu giải thích ý nghĩa của ẩn dụ.
11 Yesu alobaki na bango: — Epesameli bino koyeba mabombami ya Bokonzi ya Nzambe; kasi mpo na ba-oyo bazali na libanda, makambo nyonso ezali kotalisama na masese;
Chúa đáp: “Đức Chúa Trời cho các con hiểu huyền nhiệm về Nước của Đức Chúa Trời, còn những người khác chỉ được nghe ẩn dụ,
12 mpo ete: atako bakoki kotala, bamona eloko te; mpe atako bakoki koyoka, basosola eloko te; noki te bakobongola mitema, mpe masumu na bango ekolimbisama.
đúng như Thánh Kinh đã chép: ‘Họ thấy những điều Ta làm, nhưng họ sẽ chẳng học được gì. Họ nghe những điều Ta nói, nhưng họ sẽ không hiểu. Vì nếu hiểu, họ sẽ quay về với Ta để được tha tội.’”
13 Bongo Yesu alobaki na bango: — Boni, bososoli lisese oyo te? Ndenge nini bokososola masese mosusu?
Chúa Giê-xu hỏi các môn đệ: “Nếu các con không hiểu ẩn dụ này, làm sao có thể hiểu những ẩn dụ khác?
14 Moloni alonaka Liloba.
Người gieo giống là người đi công bố Phúc Âm.
15 Bato mosusu bazali pembeni ya nzela epai wapi Liloba elonami. Tango kaka bayoki Liloba, Satana ayei mpe alongoli Liloba oyo elonami kati na mitema na bango.
Hạt giống rơi trên đường mòn, là Đạo gieo vào lòng người cứng cỏi, liền bị Sa-tan đến cướp đi.
16 Bamosusu bazali lokola nkona oyo ekweyi na mabele etonda na mabanga: bayoki na bango Liloba mpe bayambi yango mbala moko na esengo;
Lớp đất mỏng phủ trên đá tượng trưng cho người nghe Đạo vội vui mừng tiếp nhận,
17 kasi lokola bazali na misisa te kati na bango, bakowumela na Liloba yango kaka mpo na tango moke. Soki kaka, likolo ya Liloba, pasi to minyoko eyei, basundoli mbala moko kondima na bango.
nhưng rễ quá hời hợt, mầm sống không vào sâu trong lòng. Khi bị hoạn nạn, bức hại vì Đạo Đức Chúa Trời, họ vội buông tay đầu hàng.
18 Bamosusu bazali lokola nkona oyo ekweyi kati na banzube: bayoki na bango Liloba;
Đất có gai gốc tượng trưng cho tấm lòng những người nghe Đạo,
19 kasi mitungisi ya bomoi, lokoso ya bomengo mpe baposa ya makambo ya mokili efini-fini Liloba kati na bango, boye ekotikala kobota bambuma te kati na bango. (aiōn )
nhưng quá lo âu về đời này, ham mê phú quý và những lạc thú khác, đến nỗi làm cho Đạo bị nghẹt ngòi, không thể nào kết quả được. (aiōn )
20 Bamosusu bazali lokola nkona oyo ekweyi na mabele ya malamu: bayoki malamu Liloba, bandimi yango mpe baboti bambuma; moko aboti bambuma tuku misato; mosusu, bambuma tuku motoba; mpe mosusu lisusu, bambuma nkama moko.
Đất tốt tượng trưng cho tấm lòng những người nghe Đạo và tiếp nhận, nên đem lại kết quả dồi dào, dìu dắt ba mươi, sáu mươi, hay cả trăm người vào Nước Trời!”
21 Yesu alobaki na bango lisusu: — Boni, bamemaka solo mwinda mpo na kotia yango na se ya katini to na se ya mbeto? Ezali te mpo na kotia yango na likolo ya etelemiselo ya minda?
Rồi Chúa Giê-xu phán cùng các môn đệ: “Không ai thắp đèn rồi đậy kín, nhưng đem đặt trên giá đèn để soi sáng khắp nơi.
22 Pamba te eloko moko te ebombama ekozanga komonisama, mpe eloko moko te ya sekele ekozanga kobima na pole.
Tất cả những việc giấu kín, một ngày kia sẽ phải phơi bày trước ánh sáng.
23 Tika ete moto azali na matoyi mpo na koyoka ayoka!
Ai có tai để nghe, nên lắng nghe.”
24 Alobaki lisusu: — Bosala keba na makambo oyo bozali koyoka! Bakomeka bino na emekelo kaka oyo bino bosalelaka mpo na komeka bato mosusu, mpe bakobakisa kutu lisusu koleka;
Ngài tiếp: “Phải để ý đến những lời các con nghe: Các con lường cho người ta mức nào, người ta sẽ lường lại cho các con mức đó, mà còn gắt gao hơn nữa.
25 pamba te na moto oyo azali na eloko, bakopesa ye lisusu; kasi na moto oyo azangi, bakobotola ye ata oyo azali na yango.
Vì ai có sẽ được cho thêm, nhưng ai không có, dù còn gì cũng bị mất luôn.”
26 Yesu alobaki lisusu: — Bokonzi ya Nzambe ekokani na moto oyo abwaki nkona na mabele:
Chúa Giê-xu kể ẩn dụ khác: “Nước của Đức Chúa Trời giống trường hợp người kia gieo lúa trong ruộng.
27 butu mpe moyi, alala to alamuka, nkona ebimisaka moto, ekolaka yango moko mpe ayebaka te ndenge nini yango ezali kokola;
Ngày qua tháng lại, lúa mọc và lớn lên; người ấy không cần theo dõi,
28 pamba te yango moko mabele nde ebimisaka mbuma: liboso, moto ya nzete; sima, matiti; mpe na suka, bambuma ya ble etondaka na nzete.
vì đất làm cho lúa mọc. Trước hết, hạt giống thành cây mạ, lớn lên trổ bông rồi kết hạt.
29 Bongo soki bambuma ekomeli, azwaka mbala moko mbeli oyo bakataka na yango matiti ya ble, pamba te eleko ya kobuka bambuma ekoki.
Khi lúa chín, người ấy trở lại, đem liềm theo gặt hái.”
30 Yesu alobaki lisusu: — Bokonzi ya Nzambe ekokani na nini? Tokoki kosalela lisese nini mpo na kokokanisa yango?
Chúa Giê-xu kể tiếp: “Ta phải diễn tả Nước của Đức Chúa Trời cách nào? Nên dùng ẩn dụ gì?
31 Bokonzi ya Likolo ekokani na nkona ya mutarde: tango balonaka yango, ezalaka nkona oyo eleki moke kati na bankona nyonso ya mokili.
Nước của Đức Chúa Trời giống như một hạt cải rất nhỏ. Đó là hạt nhỏ nhất trong các loại hạt giống, nhưng khi gieo xuống đất,
32 Kasi sima na kolona yango, ekokola mpe ekomaka molayi koleka ndunda nyonso ya elanga, ebimisaka bitape minene oyo esalaka ete bandeke ya likolo etonga zala na se ya pio na yango.
nó mọc thành cây lớn, cành lá sum suê đến nỗi chim chóc có thể làm tổ trên đó.”
33 Yesu azalaki kosalela masese ya ndenge na ndenge mpo na koteya bango Liloba na Nzambe, kolanda bososoli na bango;
Chúa Giê-xu dùng nhiều ẩn dụ giảng dạy dân chúng, tùy theo trình độ hiểu biết của họ.
34 azangaki te kosalela masese mpo na koloba na bango. Kasi soki atikali Ye moko elongo na bayekoli na Ye, azalaki kolimbola makambo nyonso.
Ngài luôn luôn dùng ẩn dụ để giảng dạy, nhưng khi họp riêng với môn đệ, Ngài giải thích ý nghĩa.
35 Kaka na mokolo yango wana, wana pokwa ekomaki, Yesu alobaki na bayekoli na Ye: — Tokatisa na ngambo mosusu ya ebale.
Đến tối, Chúa Giê-xu bảo các môn đệ: “Chúng ta qua bờ bên kia!”
36 Batikaki bato, bamemaki Ye na bwato mpe bakatisaki na ngambo mosusu. Babwato mosusu mpe ezalaki elongo na bango.
Sau khi từ giã dân chúng, môn đệ rước Ngài xuống thuyền chèo đi. Có nhiều thuyền khác cùng theo.
37 Mopepe moko ya makasi ekomaki kopepa, mbonge ekomaki kobeta na bwato, mpe bwato ekomaki kotonda na mayi.
Thình lình, một cơn bão nổi lên, các lượn sóng lớn bủa vào thuyền, đến nỗi thuyền ngập nước gần chìm.
38 Yesu azalaki na sima, alalaki pongi mpe atiaki moto na likolo ya kuse. Bayekoli balamusaki Ye mpe bayebisaki Ye na koganga: — Moteyi, tozali kokufa; mpe ozali komitungisa na Yo te?
Chúa Giê-xu đang gối đầu nằm ngủ phía sau lái. Họ hốt hoảng đánh thức Ngài dậy, la lên: “Thầy ơi, chúng ta sắp chết chìm! Thầy không lo sao?”
39 Yesu alamukaki, agangelaki mopepe, mpe apesaki mitindo na ebale: — Tika makelele! Vanda nye! Mopepe esilaki, mpe kimia monene ezongaki.
Khi Chúa Giê-xu thức dậy, Ngài liền quở gió và ra lệnh cho biển: “Yên lặng đi!” Gió liền ngưng bặt và biển lặng yên!
40 Bongo alobaki na bayekoli na Ye: — Mpo na nini bozali kobanga? Bozali nanu na kondima te?
Rồi Ngài bảo các môn đệ: “Sao các con sợ hãi đến thế? Các con không có đức tin sao?”
41 Somo monene ekotaki kati na bango mpe bakomaki kolobana bango na bango: « Moto oyo azali penza nani mpo ete mopepe mpe ebale etosa ye? »
Mọi người đều khiếp sợ bảo nhau: “Người là ai mà đến gió và biển cũng phải vâng lời?”