< Malako 3 >

1 Yesu akotaki lisusu na ndako ya mayangani epai wapi ezalaki na moto moko akufa loboko.
ܘܥܠ ܬܘܒ ܝܫܘܥ ܠܟܢܘܫܬܐ ܘܐܝܬ ܗܘܐ ܬܡܢ ܓܒܪܐ ܚܕ ܕܝܒܝܫܐ ܐܝܕܗ
2 Boye bato bazalaki kotala soki Yesu akobikisa ye na mokolo ya Saba mpo na kofunda Ye.
ܘܢܛܪܝܢ ܗܘܘ ܠܗ ܕܐܢ ܡܐܤܐ ܠܗ ܒܫܒܬܐ ܢܩܛܪܓܘܢܝܗܝ
3 Bongo Yesu alobaki na moto oyo akufa loboko: — Telema na liboso ya bato nyonso.
ܘܐܡܪ ܠܗܘ ܓܒܪܐ ܕܝܒܝܫܐ ܐܝܕܗ ܩܘܡ ܒܡܨܥܬܐ
4 Atunaki bango: — Nini epesamela nzela ya kosala na mokolo ya Saba: kosala bolamu to kosala mabe, kobikisa moto to kotika ye kokufa? Kasi babatelaki kimia.
ܐܡܪ ܕܝܢ ܐܦ ܠܗܘܢ ܫܠܝܛ ܒܫܒܬܐ ܠܡܥܒܕ ܕܛܒ ܐܘ ܕܒܝܫ ܢܦܫܐ ܠܡܚܝܘ ܐܘ ܠܡܘܒܕܘ ܗܢܘܢ ܕܝܢ ܫܬܝܩܝܢ ܗܘܘ
5 Yesu atalaki bango na mawa mpe ayokaki pasi mingi na motema mpo ete mitema na bango ezalaki makasi lokola libanga. Yesu alobaki na moto yango: — Sembola loboko na yo! Moto yango asembolaki loboko na ye, mpe loboko yango ebikaki.
ܘܚܪ ܒܗܘܢ ܒܚܡܬܐ ܟܕ ܟܪܝܐ ܠܗ ܥܠ ܩܫܝܘܬ ܠܒܗܘܢ ܘܐܡܪ ܠܗܘ ܓܒܪܐ ܦܫܘܛ ܐܝܕܟ ܘܦܫܛ ܘܬܩܢܬ ܐܝܕܗ
6 Mbala moko, Bafarizeo babimaki mpe bakendeki koyokana na bato ya lisanga ya Erode mpo na koluka nzela ya kobomisa Yesu.
ܘܢܦܩܘ ܦܪܝܫܐ ܒܪ ܫܥܬܗ ܥܡ ܕܒܝܬ ܗܪܘܕܤ ܘܡܠܟܐ ܢܤܒܘ ܥܠܘܗܝ ܐܝܟܢܐ ܕܢܘܒܕܘܢܝܗܝ
7 Tango Yesu alongwaki kuna, akendeki na ebale elongo na bayekoli na Ye, mpe bato ebele penza balandaki Ye wuta na Galile, na Yuda,
ܘܝܫܘܥ ܥܡ ܬܠܡܝܕܘܗܝ ܐܙܠ ܠܗ ܠܘܬ ܝܡܐ ܘܥܡܐ ܤܓܝܐܐ ܡܢ ܓܠܝܠܐ ܢܩܦܗ ܗܘܐ ܘܡܢ ܝܗܘܕ
8 na Yelusalemi, na Idume mpe na ngambo ya Yordani. Boye tango bato oyo bazalaki na bamboka ya zingazinga ya Tiri mpe ya Sidoni bayokaki sango ya makambo nyonso oyo Yesu azalaki kosala, bango mpe bayaki ebele penza epai na Ye.
ܘܡܢ ܐܘܪܫܠܡ ܘܡܢ ܐܕܘܡ ܘܡܢ ܥܒܪܐ ܕܝܘܪܕܢܢ ܘܡܢ ܨܘܪ ܘܡܢ ܨܝܕܢ ܟܢܫܐ ܤܓܝܐܐ ܕܫܡܥܘ ܗܘܘ ܟܠ ܕܥܒܕ ܐܬܘ ܠܘܬܗ
9 Boye Yesu atindaki bayekoli ete babongisela Ye bwato moko mpo ete bato bafinafina Ye te.
ܘܐܡܪ ܠܬܠܡܝܕܘܗܝ ܕܢܩܪܒܘܢ ܠܗ ܤܦܝܢܬܐ ܡܛܠ ܟܢܫܐ ܕܠܐ ܢܚܒܨܘܢܝܗܝ
10 Lokola azalaki kobikisa bato ebele, bato oyo bazalaki na pasi bakomaki kowelela koya epai na Ye mpo na koluka kosimba Ye.
ܤܓܝܐܐ ܓܝܪ ܡܐܤܐ ܗܘܐ ܥܕܡܐ ܕܢܗܘܘܢ ܢܦܠܝܢ ܥܠܘܗܝ ܡܛܠ ܕܢܬܩܪܒܘܢ ܠܗ
11 Tango bato oyo bazalaki na milimo mabe bazalaki komona Ye, bazalaki kogumbama liboso na Ye mpe koganga: — Yo ozali solo Mwana na Nzambe!
ܘܐܝܠܝܢ ܕܐܝܬ ܗܘܝ ܠܗܘܢ ܡܚܘܬܐ ܕܪܘܚܐ ܛܢܦܬܐ ܡܐ ܕܚܙܐܘܗܝ ܢܦܠܝܢ ܗܘܘ ܘܩܥܝܢ ܘܐܡܪܝܢ ܐܢܬ ܗܘ ܒܪܗ ܕܐܠܗܐ
12 Kasi Yesu azalaki kopamela milimo yango ete emeka te koloba na tina na Ye.
ܘܤܓܝ ܟܐܐ ܗܘܐ ܒܗܘܢ ܕܠܐ ܢܓܠܘܢܝܗܝ
13 Yesu amataki likolo ya ngomba, abengaki bato oyo azalaki na bosenga na bango, mpe bakendeki epai na Ye.
ܘܤܠܩ ܠܛܘܪܐ ܘܩܪܐ ܠܐܝܠܝܢ ܕܨܒܐ ܘܐܬܘ ܠܘܬܗ
14 Kati na bango, aponaki bato zomi na mibale oyo akomaki kobenga « bantoma, » mpo ete bazala elongo na Ye mpe mpo ete bakende koteya Sango Malamu;
ܘܓܒܐ ܬܪܥܤܪ ܕܢܗܘܘܢ ܥܡܗ ܘܕܢܫܕܪ ܐܢܘܢ ܕܢܟܪܙܘܢ
15 mpe apesaki bango bokonzi ya kobengana milimo mabe.
ܘܕܢܗܘܘܢ ܫܠܝܛܝܢ ܕܢܐܤܘܢ ܟܪܝܗܐ ܘܢܦܩܘܢ ܕܝܘܐ
16 Tala bakombo ya bato zomi na mibale oyo aponaki: Simona oyo Yesu apesaki kombo « Petelo; »
ܘܫܡܝ ܠܫܡܥܘܢ ܫܡܐ ܟܐܦܐ
17 Jake, mwana mobali ya Zebede, mpe Yoane, ndeko na ye, ba-oyo Yesu apesaki kombo « Boanerijesi » oyo elingi koloba: bana ya kake;
ܘܠܝܥܩܘܒ ܒܪ ܙܒܕܝ ܘܠܝܘܚܢܢ ܐܚܘܗܝ ܕܝܥܩܘܒ ܤܡ ܠܗܘܢ ܫܡܐ ܒܢܝ ܪܓܫܝ ܕܐܝܬܘܗܝ ܒܢܝ ܪܥܡܐ
18 Andre, Filipo, Bartelemi, Matayo, Toma, Jake, mwana mobali ya Alife; Tade, Simona oyo azalaki moko kati na lisanga ya Bazelote,
ܘܐܢܕܪܐܘܤ ܘܦܝܠܝܦܘܤ ܘܒܪ ܬܘܠܡܝ ܘܡܬܝ ܘܬܐܘܡܐ ܘܝܥܩܘܒ ܒܪ ܚܠܦܝ ܘܬܕܝ ܘܫܡܥܘܢ ܩܢܢܝܐ
19 mpe Yuda Isikarioti oyo atekaki Yesu.
ܘܝܗܘܕܐ ܤܟܪܝܘܛܐ ܗܘ ܕܐܫܠܡܗ ܘܐܬܘ ܠܒܝܬܐ
20 Tango Yesu akotaki na ndako, bato ebele bayaki lisusu kosangana wana, mpe esalaki ete Ye elongo na bayekoli na Ye bazangaki ata tango mpo na kolia.
ܘܐܬܟܢܫܘ ܟܢܫܐ ܬܘܒ ܐܝܟܢܐ ܕܠܐ ܢܫܟܚܘܢ ܗܘܘ ܠܚܡܐ ܠܡܐܟܠ
21 Tango bandeko ya libota na Ye bayokaki bongo, bayaki mpo na kozwa Ye na makasi, pamba te bazalaki koloba: — Akomi na bokono ya liboma.
ܘܫܡܥܘ ܐܚܝܢܘܗܝ ܘܢܦܩܘ ܠܡܐܚܕܗ ܐܡܪܝܢ ܗܘܘ ܓܝܪ ܕܡܢ ܗܘܢܗ ܢܦܩ
22 Balakisi ya Mobeko oyo bawutaki na Yelusalemi balobaki: — Azali na molimo ya Belizebule kati na ye mpe azali kobengana milimo mabe na nguya ya mokonzi ya milimo mabe.
ܘܤܦܪܐ ܐܝܠܝܢ ܕܡܢ ܐܘܪܫܠܡ ܢܚܬܘ ܐܡܪܝܢ ܗܘܘ ܒܥܠܙܒܘܒ ܐܝܬ ܒܗ ܘܒܪܫܐ ܕܕܝܘܐ ܡܦܩ ܕܝܘܐ
23 Yesu abengaki bango mpe alobaki na bango na masese: — Ndenge nini Satana akoki kobengana Satana?
ܘܩܪܐ ܐܢܘܢ ܝܫܘܥ ܘܒܡܬܠܐ ܐܡܪ ܠܗܘܢ ܐܝܟܢܐ ܡܫܟܚ ܤܛܢܐ ܠܤܛܢܐ ܠܡܦܩܘ
24 Soki bokonzi moko ekabwani, bokonzi yango ekowumela te.
ܐܢ ܡܠܟܘܬܐ ܓܝܪ ܥܠ ܢܦܫܗ ܬܬܦܠܓ ܠܐ ܡܫܟܚܐ ܠܡܩܡ ܡܠܟܘܬܐ ܗܝ
25 Soki libota moko ekabwani, libota yango ekowumela te;
ܘܐܢ ܒܝܬܐ ܥܠ ܢܦܫܗ ܢܬܦܠܓ ܠܐ ܡܫܟܚ ܒܝܬܐ ܗܘ ܠܡܩܡ
26 mpe soki Satana amibundisi mpe akabwani na ye moko, akowumela te, mpe suka na ye emonani.
ܘܐܢ ܗܘ ܕܤܛܢܐ ܩܡ ܥܠ ܢܦܫܗ ܘܐܬܦܠܓ ܠܐ ܡܫܟܚ ܠܡܩܡ ܐܠܐ ܚܪܬܗ ܗܝ
27 Pamba te moto moko te akoki kokota na ndako ya elombe mpo na kobotola biloko na ye soki liboso akangi ye te na basinga. Ezali kaka soki asali bongo nde akoki kobotola biloko na ye ya ndako.
ܠܐ ܐܢܫ ܡܫܟܚ ܕܢܥܘܠ ܠܒܝܬ ܚܤܝܢܐ ܘܢܚܛܘܦ ܡܐܢܘܗܝ ܐܠܐ ܐܢ ܠܘܩܕܡ ܠܚܤܝܢܐ ܢܐܤܘܪ ܘܗܝܕܝܢ ܒܝܬܗ ܢܒܘܙ
28 Nazali koloba na bino penza ya solo: masumu mpe maloba nyonso ya mabe oyo bato bakoki kofinga na yango Nzambe ekolimbisama;
ܐܡܝܢ ܐܡܪ ܐܢܐ ܠܟܘܢ ܕܟܠܗܘܢ ܚܛܗܐ ܘܓܘܕܦܐ ܕܢܓܕܦܘܢ ܒܢܝ ܐܢܫܐ ܢܫܬܒܩܘܢ ܠܗܘܢ
29 kasi moto nyonso oyo akofinga Molimo Mosantu akolimbisama te, akomema mokumba ya lisumu yango mpo na libela. (aiōn g165, aiōnios g166)
ܡܢ ܕܝܢ ܕܢܓܕܦ ܥܠ ܪܘܚܐ ܕܩܘܕܫܐ ܠܝܬ ܠܗ ܫܘܒܩܢܐ ܠܥܠܡ ܐܠܐ ܡܚܝܒ ܗܘ ܠܕܝܢܐ ܕܠܥܠܡ (aiōn g165, aiōnios g166)
30 Yesu alobaki bongo, mpo ete bazalaki koloba: « Azali na molimo mabe! »
ܡܛܠ ܕܐܡܪܝܢ ܗܘܘ ܕܪܘܚܐ ܛܢܦܬܐ ܐܝܬ ܒܗ
31 Mama mpe bandeko mibali ya Yesu bayaki, batelemaki libanda mpe batindaki moto kobenga Yesu.
ܘܐܬܘ ܐܡܗ ܘܐܚܘܗܝ ܩܝܡܝܢ ܠܒܪ ܘܫܕܪܘ ܕܢܩܪܘܢܝܗܝ ܠܗܘܢ
32 Bato ebele penza bavandaki pembeni na Ye. Mpe bayaki koloba na Ye: — Mama mpe bandeko na yo ya mibali bazali libanda, bazali koluka yo. Yesu azongisaki:
ܝܬܒ ܗܘܐ ܕܝܢ ܚܕܪܘܗܝ ܟܢܫܐ ܘܐܡܪܘ ܠܗ ܗܐ ܐܡܟ ܘܐܚܝܟ ܠܒܪ ܒܥܝܢ ܠܟ
33 — Nani mama na Ngai? Banani bandeko na Ngai?
ܘܥܢܐ ܘܐܡܪ ܠܗܘܢ ܡܢ ܗܝ ܐܡܝ ܘܡܢ ܐܢܘܢ ܐܚܝ
34 Atalaki bato oyo bavandaki pembeni na Ye mpe alobaki: — Botala mama na Ngai mpe bandeko na Ngai!
ܘܚܪ ܒܐܝܠܝܢ ܕܝܬܒܝܢ ܠܘܬܗ ܘܐܡܪ ܗܐ ܐܡܝ ܘܗܐ ܐܚܝ
35 Moto nyonso oyo asalaka mokano ya Nzambe, ye nde azali ndeko na Ngai ya mobali, ndeko na Ngai ya mwasi mpe mama na Ngai.
ܡܢ ܕܢܥܒܕ ܓܝܪ ܨܒܝܢܗ ܕܐܠܗܐ ܗܘܝܘ ܐܚܝ ܘܚܬܝ ܘܐܡܝ ܘܐܬܟܢܫܘ ܠܘܬܗ ܟܢܫܐ ܤܓܝܐܐ ܐܝܟ ܕܢܤܩ ܢܬܒ ܠܗ ܒܤܦܝܢܬܐ ܒܝܡܐ ܘܟܠܗ ܟܢܫܐ ܩܐܡ ܗܘܐ ܥܠ ܐܪܥܐ ܥܠ ܝܕ ܝܡܐ

< Malako 3 >