< Malako 2 >

1 Sima na mwa mikolo, Yesu azongaki lisusu na Kapernawumi. Tango bato bayokaki ete azali na ndako,
And when he entered again into Capernaum after some days, it was heard that he was in the house.
2 bayaki ebele kosangana kati na ndako yango kino esika ezalaki lisusu te, ezala na liboso ya ekuke, mpe Yesu ateyaki bango Sango Malamu.
And many were gathered together, so that there was no more room, not even around the door; and he spoke the word to them.
3 Bato mosusu bamemelaki Ye ebosono oyo bato minei batomboli.
And four people came, carrying a paralytic to him.
4 Lokola balongaki te kokomisa ebosono yango kino na esika oyo Yesu azalaki, pamba te bato bazalaki ebele penza, bamataki likolo ya mwanza ya ndako kino na esika oyo Yesu azalaki mpe batobolaki lidusu. Bongo na nzela ya lidusu yango, bakitisaki na tsipoyi ebosono yango.
And when they could not bring him because of the crowd, they removed the roof above him. When they had broken it up, they let down the mat that the paralytic was lying on.
5 Tango Yesu amonaki kondima na bango, alobaki na ebosono: — Mwana na Ngai, masumu na yo elimbisami.
And Jesus, seeing their faith, said to the paralytic, "Son, your sins are forgiven you."
6 Kasi ndambo ya balakisi ya Mobeko oyo bazalaki wana bakomaki kolobaloba na se ya mitema:
But there were some of the scribes sitting there, and reasoning in their hearts,
7 « Mpo na nini moto oyo azali koloba bongo? Azali kotiola Nzambe! Nani akoki kolimbisa masumu soki kaka Ye moko Nzambe te? »
"Why does this man speak like that? He is blaspheming; who can forgive sins but God alone?"
8 Mbala moko, kati na molimo na Ye, Yesu asosolaki makanisi na bango; alobaki na bango: — Mpo na nini mitema na bino ezali kokanisa bongo?
And immediately Jesus, perceiving in his spirit that they so reasoned within themselves, said to them, "Why do you reason these things in your hearts?
9 Likambo nini eleki pete mpo na koloba na ebosono: « Masumu na yo elimbisami to telema, kamata tsipoyi na yo mpe tambola? »
Which is easier, to tell the paralytic, 'Your sins are forgiven;' or to say, 'Arise, and take up your bed, and walk?'
10 Ezali mpo boyeba ete Mwana na Moto azali na bokonzi ya kolimbisa masumu kati na mokili. Bongo alobaki na ebosono:
But that you may know that the Son of Man has authority on earth to forgive sins", he said to the paralytic,
11 — Nalobi na yo: Telema, kamata tsipoyi na yo mpe zonga na ndako na yo.
"I tell you, arise, take up your mat, and go to your house."
12 Mbala moko, atelemaki, akamataki tsipoyi na ye mpe abimaki na miso ya bato nyonso. Bato nyonso bakamwaki makasi mpe bakomaki kokumisa Nzambe na maloba oyo: « Totikala nanu komona likambo ya boye te! »
And he arose immediately, and took up the mat, and went out in front of them all; so that they were all amazed, and glorified God, saying, "We never saw anything like this."
13 Yesu abimaki lisusu mpe akendeki pembeni ya ebale. Bato ebele bayaki epai na Ye mpe ateyaki bango.
And he went out again by the seaside. All the crowd came to him, and he taught them.
14 Wana azalaki kotambola, amonaki Levi, mwana mobali ya Alife, avandi na ndako ya mosala epai wapi bafutaka mpako. Yesu alobaki na ye: « Landa Ngai. » Levi atelemaki mpe alandaki Ye.
And as he passed by, he saw Levi, the son of Alphaeus, sitting at the tax office, and he said to him, "Follow me." And he arose and followed him.
15 Wana Yesu azalaki kolia na ndako ya Levi, bafutisi mpako ebele mpe bato mosusu ya masumu bazalaki kolia mesa moko na Yesu elongo na bayekoli na Ye; pamba te bato ebele penza bazalaki kolanda Ye.
It happened, that he was reclining at the table in his house, and many tax collectors and sinners sat down with Jesus and his disciples, for there were many, and they followed him.
16 Tango balakisi ya Mobeko ya lingomba ya Bafarizeo bamonaki Yesu kolia mesa moko na bato ya masumu mpe bafutisi mpako, batunaki bayekoli na Ye: — Mpo na nini azali kolia mesa moko na bafutisi mpako mpe bato ya masumu?
And the scribes of the Pharisees, when they saw him eating with the tax collectors and sinners, said to his disciples, "Why is it that he eats and drinks with tax collectors and sinners?"
17 Tango Yesu ayokaki bongo, alobaki na bango: — Bato oyo bazali kolongono na nzoto bazalaka na posa ya monganga te; ezali babeli nde bazalaka na posa na ye. Nayaki te koluka bato ya sembo, kasi bato ya masumu.
And when Jesus heard it, he said to them, "Those who are healthy have no need for a physician, but those who are sick. I came not to call the righteous, but sinners."
18 Nzokande bayekoli ya Yoane mpe Bafarizeo bazalaki kokila bilei. Bongo bato bayaki kotuna Yesu: — Mpo na nini bayekoli ya Yoane mpe Bafarizeo bakilaka bilei, kasi bayekoli na yo bakilaka bilei te?
And John's disciples and the Pharisees were fasting, and they came and asked him, "Why do the disciples of John and those of the Pharisees fast, but your disciples do not fast?"
19 Yesu azongiselaki bango: — Ndenge nini bato oyo babengami na feti ya libala bakoki kokila bilei, wana mobali ya libala azali nanu elongo na bango? Tango nyonso mobali ya libala azali elongo na bango, bakoki kokila bilei te.
And Jesus said to them, "Can the groomsmen fast while the bridegroom is with them? As long as they have the bridegroom with them, they cannot fast.
20 Kasi tango ezali koya oyo bakolongola mobali ya libala kati na bango; mpe ekozala na tango wana nde bakokila bilei.
But the days will come when the bridegroom will be taken away from them, and then will they fast in that day.
21 Moto moko te asalelaka eteni ya elamba ya sika mpo na kobamba elamba ya kala, noki te eteni ya elamba ya sika ekopasola elamba ya kala mpe ekosala lidusu ya monene koleka.
No one sews a piece of unshrunk cloth on an old garment, or else the patch shrinks and the new tears away from the old, and a worse hole is made.
22 Moto moko te atiaka vino ya sika kati na bambeki ya kala, noki te vino ya sika ekopasola bambeki; vino ekosopana mpe bambeki ekopasuka. Nzokande, batiaka kaka vino ya sika kati na bambeki ya sika!
And no one puts new wine into old wineskins, or else the wine will burst the skins, and the wine is lost, and the skins will be destroyed; but one puts new wine into fresh wineskins."
23 Ezalaki mokolo moko, Yesu azalaki kotambola kati na elanga ya ble; ezalaki mokolo ya Saba. Wana bazalaki kotambola, bayekoli na Ye bazalaki kobuka ble.
And it happened that he was going on the Sabbath day through the grain fields, and his disciples began, as they went, to pluck the ears of grain.
24 Bafarizeo balobaki na Yesu: — Mpo na nini bayekoli na Yo bazali kosala likambo oyo epekisami kosalema na mokolo ya Saba?
And the Pharisees said to him, "Look, why do they do that which is not lawful on the Sabbath day?"
25 Yesu azongiselaki bango: — Botanga nanu te makambo oyo Davidi asalaki tango ye elongo na baninga na ye bazalaki na nzala mpe bazangaki bilei?
And he said to them, "Did you never read what David did, when he had need, and was hungry—he, and those who were with him?
26 Akotaki kati na Ndako ya Nzambe wana Abiatari azalaki mokonzi ya Banganga-Nzambe, aliaki mapa oyo ebulisama mpo na Nzambe mpe apesaki yango epai ya bato na ye; nzokande, kaka Banganga-Nzambe nde bazalaki na ndingisa ya kolia yango.
How he entered into the house of God in the time of Abiathar the high priest, and ate the show bread, which is not lawful to eat except for the priests, and gave also to those who were with him?"
27 Bongo alobaki na bango lisusu: — Mokolo ya Saba esalema mpo na moto, kasi moto asalema te mpo na mokolo ya Saba.
And he said to them, "The Sabbath was made for people, not people for the Sabbath.
28 Yango wana, Mwana na Moto azali mpe Mokonzi ya mokolo ya Saba.
Therefore the Son of Man is lord even of the Sabbath."

< Malako 2 >