< Malako 16 >
1 Tango mokolo ya Saba elekaki, Mari, moto ya mboka Magidala, mpe Mari, mama ya Jake mpe Salome, basombaki mafuta ya solo kitoko mpo na kokende kokawusa nzoto ya Yesu mpo ete ebeba te.
Lorsque le sabbat fut passé, Marie de Magdala, Marie, mère de Jacques, et Salomé, achetèrent des aromates, afin d’aller embaumer Jésus.
2 Na tongo-tongo ya mokolo ya liboso ya poso, wana moyi ebandi kobima, bakendeki na kunda.
Le premier jour de la semaine, elles se rendirent au sépulcre, de grand matin, comme le soleil venait de se lever.
3 Bazalaki kotunana kati na bango: — Nani akotindikela biso libanga mpo ete elongwa na ekotelo ya kunda?
Elles disaient entre elles: Qui nous roulera la pierre loin de l’entrée du sépulcre?
4 Mpe tango batombolaki miso, bamonaki ete libanga esilaki kotindikama mpe ezalaki lisusu te na ekotelo ya kunda; nzokande, libanga yango ezalaki ya monene penza.
Et, levant les yeux, elles aperçurent que la pierre, qui était très grande, avait été roulée.
5 Sima na bango kokota kati na kunda, bamonaki elenge mobali moko, avandi na ngambo ya loboko ya mobali, alata nzambala ya pembe; somo ekangaki bango.
Elles entrèrent dans le sépulcre, virent un jeune homme assis à droite vêtu d’une robe blanche, et elles furent épouvantées.
6 Kasi alobaki na bango: — Bobanga te! Bozali koluka Yesu ya Nazareti, oyo babakaki na ekulusu? Azali awa te, asili kosekwa. Botala esika oyo batiaki Ye.
Il leur dit: Ne vous épouvantez pas; vous cherchez Jésus de Nazareth, qui a été crucifié; il est ressuscité, il n’est point ici; voici le lieu où on l’avait mis.
7 Bokende sik’oyo koyebisa Petelo mpe bayekoli mosusu: « Akei liboso na bino, na Galile; ezali kuna nde bokomona Ye, ndenge kaka ayebisaki bino. »
Mais allez dire à ses disciples et à Pierre qu’il vous précède en Galilée: c’est là que vous le verrez, comme il vous l’a dit.
8 Babimaki na lombangu mpe bakimaki mosika ya kunda ya Yesu, pamba te bango nyonso bazalaki kolenga na somo, mpe makanisi na bango epalanganaki. Balobaki eloko te na moto nyonso, pamba te bazalaki kobanga.
Elles sortirent du sépulcre et s’enfuirent. La peur et le trouble les avaient saisies; et elles ne dirent rien à personne, à cause de leur effroi.
9 (note: The most reliable and earliest manuscripts do not include Mark 16:9-20.) Na tongo ya mokolo ya liboso ya poso, tango Yesu asekwaki, abimelaki liboso Mari, moto ya mboka Magidala, oyo, kati na ye, Yesu abenganaki milimo mabe sambo.
(note: The most reliable and earliest manuscripts do not include Mark 16:9-20.) Jésus, étant ressuscité le matin du premier jour de la semaine, apparut d’abord à Marie de Magdala, de laquelle il avait chassé sept démons.
10 Bongo Mari akendeki koyebisa bato oyo batambolaki elongo na Yesu; akutaki bango batondi na mawa mpe bazali kolela.
Elle alla en porter la nouvelle à ceux qui avaient été avec lui, et qui s’affligeaient et pleuraient.
11 Kasi tango bayokaki ye koloba: « Yesu azali na bomoi, awuti kobimela ngai, » bandimaki ye te.
Quand ils entendirent qu’il vivait, et qu’elle l’avait vu, ils ne le crurent point.
12 Sima na yango, Yesu abimelaki mibale kati na bango na lolenge mosusu, wana bazalaki kokende na mboka.
Après cela, il apparut, sous une autre forme, à deux d’entre eux qui étaient en chemin pour aller à la campagne.
13 Bazongaki mpe bayebisaki yango epai ya bayekoli mosusu; kasi bayekoli yango bandimaki bango te.
Ils revinrent l’annoncer aux autres, qui ne les crurent pas non plus.
14 Sima na yango, abimelaki bantoma zomi na moko, wana bazalaki kolia, mpe apamelaki bango mpo ete bazalaki na kondima te, mpe mpo ete bazalaki mitema mabanga; pamba te bandimaki te bato oyo bamonaki Ye sima na lisekwa na Ye.
Enfin, il apparut aux onze, pendant qu’ils étaient à table; et il leur reprocha leur incrédulité et la dureté de leur cœur, parce qu’ils n’avaient pas cru ceux qui l’avaient vu ressuscité.
15 Alobaki na bango: — Bokende na mokili mobimba, mpe boteya bato nyonso Sango Malamu.
Puis il leur dit: Allez par tout le monde, et prêchez la bonne nouvelle à toute la création.
16 Moto oyo akondima mpe akozwa libatisi akobika, kasi moto oyo akondima te akozwa etumbu.
Celui qui croira et qui sera baptisé sera sauvé, mais celui qui ne croira pas sera condamné.
17 Tala bilembo oyo ekolanda bato oyo bakondima: na Kombo na Ngai, bakobengana milimo mabe; bakoloba nkota ya sika,
Voici les miracles qui accompagneront ceux qui auront cru: en mon nom, ils chasseront les démons; ils parleront de nouvelles langues;
18 bakokanga banyoka na maboko na bango; mpe soki bameli ngenge, ekosala bango pasi ata moke te; bakotiela babeli maboko, mpe babeli bakobika na bokono na bango.
ils saisiront des serpents; s’ils boivent quelque breuvage mortel, il ne leur fera point de mal; ils imposeront les mains aux malades, et les malades, seront guéris.
19 Sima na Nkolo Yesu koloba na bango, amemamaki kati na Likolo mpe avandaki na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe.
Le Seigneur, après leur avoir parlé, fut enlevé au ciel, et il s’assit à la droite de Dieu.
20 Bayekoli bakendeki koteya na bisika nyonso. Nkolo azalaki kosala elongo na bango mpe azalaki kokokisa liloba na Ye na nzela ya bilembo ya kokamwa oyo ezalaki kolanda liloba na Ye.
Et ils s’en allèrent prêcher partout. Le Seigneur travaillait avec eux, et confirmait la parole par les miracles qui l’accompagnaient.