< Malako 15 >

1 Tango tongo etanaki, bakonzi ya Banganga-Nzambe, bakambi ya bato, balakisi ya Mobeko mpe bato nyonso ya Likita-Monene ya Bayuda basanganaki mpo na kokata likambo. Bakangaki Yesu na basinga, bamemaki Ye mpe bakabaki Ye na maboko ya Pilato.
Early the next morning, the chief priest, elders, and religious teachers—the whole governing council—came to a decision. They had Jesus bound and sent him to be handed over to Pilate.
2 Pilato atunaki Yesu: — Boni, ozali mokonzi ya Bayuda? Yesu azongisaki: — Olobi yango.
Pilate asked him, “Are you the King of the Jews?” “You said it,” Jesus replied.
3 Bakonzi ya Banganga-Nzambe bazalaki kofunda Ye na makambo ebele.
The chief priests kept on making many accusations against him.
4 Pilato atunaki Ye lisusu: — Boni, ozali te na eyano ya kopesa, na makambo nyonso oyo bazali koloba mpo na kofunda yo?
Pilate questioned him again, “Aren't you going to answer? See how many charges they're bringing against you!”
5 Kasi Yesu azongisaki ata liloba moko te; mpe Pilato akamwaki makasi.
But Jesus didn't give any more answers, much to Pilate's surprise.
6 Na feti nyonso ya Pasika, azalaki kobimisa na boloko mokangami moko oyo bato bazalaki kosenga.
Now it was Pilate's custom at the Passover feast to release a prisoner to the people, whoever they requested.
7 Na tango wana, moto oyo bazalaki kobenga « Barabasi » azalaki kati na boloko elongo na batomboki oyo bayeisaki mobulu kati na engumba mpe babomaki moto.
One of the prisoners was a man called Barabbas who belonged to a group of rebels who had committed murder during an uprising.
8 Ebele ya bato bayaki mpe basengaki na Pilato ete asalela bango makambo oyo amesana kosalela bango mbala na mbala.
The crowd went to Pilate and asked him to release a prisoner following his usual custom.
9 Pilato atunaki: — Bolingi nabimisela bino mokonzi ya Bayuda?
“Do you want me to release to you the King of Jews?” he asked them,
10 Pilato ayebaki malamu ete ezali mpo na likunya nde bakonzi ya Banganga-Nzambe bakabaki Yesu na maboko na ye.
for he realized that it was because of their jealousy of Jesus that the chief priests had handed Jesus over to him.
11 Bakonzi ya Banganga-Nzambe batindikaki ebele ya bato mpo ete basenga na Pilato ete abimisela bango Barabasi longwa na boloko.
But the chief priests stirred up the crowd to have him release Barabbas to them instead.
12 Pilato atunaki bango: — Nasala nini na moto oyo bozali kobenga mokonzi ya Bayuda?
“Then what should I do with the one you call the King of the Jews?” he asked them.
13 Bagangaki lisusu: — Baka ye na ekulusu!
“Crucify him!” they shouted back.
14 Pilato atunaki bango lisusu: — Mabe nini asali? Kasi bakobaki kaka koganga makasi koleka: — Baka ye na ekulusu!
“Why? What crime has he committed?” Pilate asked them. “Crucify him!” they shouted back even louder.
15 Lokola Pilato alingaki kosepelisa ebele ya bato, abimiselaki bango Barabasi longwa na boloko. Sima na kobetisa Yesu fimbu, Pilato apesaki Ye na maboko na bango mpo ete babaka Ye na ekulusu.
Wanting to please the mob, Pilate released Barabbas to them. First he had Jesus flogged and then handed him over to be crucified.
16 Basoda bakumbaki Yesu kati na ndako ya moyangeli, na esambiselo, mpe basangisaki lisanga mobimba ya basoda.
The soldiers took him away into the Praetorium courtyard, where they called out the whole cohort.
17 Balatisaki Yesu nzambala ya motane mpe ekoti oyo basalaki na banzube;
They put royal purple robes on him and made a crown of thorns that they placed on him.
18 mpe babandaki kopesa ye mbote: « Mbote, mokonzi ya Bayuda! »
Then they saluted him, saying, “Hail King of the Jews!”
19 Bazalaki kosalela lingenda moke mpo na kobeta Ye na moto, bazalaki kobwakela Ye soyi mpe kofukama mpo na kogumbama liboso na Ye.
They repeatedly beat him around the head with a rod, spat at him, and fell on their knees before him as if in worship.
20 Sima na bango kosakanela Ye, balongolaki Ye nzambala ya motane, balatisaki Ye lisusu bilamba na Ye mpe bakumbaki Ye mpo na kobaka Ye na ekulusu.
After they finished mocking him, they took off the purple robes, and put his own clothes back on him. Then they led him away to be crucified.
21 Bakangaki na makasi moleki nzela moko oyo awutaki na bilanga, mpo ete amema ekulusu ya Yesu; kombo na ye ezalaki Simona, moto ya Sirene mpe tata ya Alekizandre mpe Rifisi.
They forced a passer-by, Simon of Cyrene, who was coming from the countryside, to carry his cross. Simon was the father of Alexander and Rufus.
22 Bamemaki Yesu na esika oyo babengaka « Gologota, » oyo elingi koloba: esika ya mokuwa ya moto,
They brought Jesus to the place called Golgotha, which means “the Place of the Skull.”
23 bapesaki Ye masanga ya vino basangisa na mire, kasi amelaki yango te.
They offered him wine mixed with myrrh, but he refused it.
24 Babakaki Ye na ekulusu, mpe bakabolaki bilamba na Ye, na kobeta zeke mpo na koyeba oyo moko na moko akozwa.
Then they crucified him. They divided his clothes, and threw dice to decide who would have what.
25 Babakaki Ye na ekulusu na ngonga ya libwa ya tongo.
It was nine in the morning when they crucified him.
26 Tala makomi oyo ezalaki kotalisa mpo na nini bakatelaki Ye etumbu: Mokonzi ya Bayuda.
A sign with the written charge against him read: “The King of the Jews.”
27 Babomi mibale ya bato babakamaki na ba-ekulusu elongo na Yesu: moko, na ngambo ya loboko ya mobali ya Yesu; mosusu, na ngambo ya loboko na Ye ya mwasi. [
They crucified two criminals with him, one on his left and one on his right.
28 Ezali boye nde ekokisamaki Makomi oyo ezali koloba: « Batangaki Ye na molongo ya bato ya mabe. »]
29 Baleki nzela bazalaki kofinga Ye na koningisa mito na bango; bazalaki koloba: — Yo oyo okobuka Tempelo mpe okotonga yango lisusu na mikolo misato,
People passing by shouted insults at him, shaking their heads, and saying. “Aha! You who claimed you were going to destroy the Temple and rebuild it in three days;
30 mibikisa yo moko mpe kita longwa na ekulusu!
save yourself and come down from the cross!”
31 Bakonzi ya Banganga-Nzambe elongo na balakisi ya Mobeko bazalaki mpe kotiola kati na bango: — Abikisaki bato mosusu, kasi ye moko akoki komibikisa te!
Likewise the chief priests and the religious teachers made fun of him, saying to each other, “He saved others, but he can't save himself.
32 Tika ete Klisto, Mokonzi ya Isalaele, akita sik’oyo longwa na ekulusu, mpo ete tomona mpe tondima! Bato oyo babakamaki elongo na Yesu na ba-ekulusu bazalaki mpe kofinga Ye.
If he really is the Messiah, the King of Israel, then why doesn't he come down from the cross so we can see and believe!” Even those who were crucified with him insulted him.
33 Kobanda na ngonga ya midi kino na ngonga ya misato ya pokwa, molili ekotaki na mokili mobimba.
At noon darkness fell over the whole land until three in the afternoon.
34 Na ngonga yango ya misato ya pokwa, Yesu agangaki: — Eloi, Eloi, lema sabachtani? Elingi koloba: « Nzambe na Ngai, Nzambe na Ngai, mpo na nini osundoli Ngai? »
At three o'clock Jesus cried out, “Eloi, Eloi, lama sabachthani,” which means, “My God, my God, why have you abandoned me?”
35 Kati na bato oyo batelemaki wana, ndambo bayokaki Yesu; boye bakomaki koloba: — Boyoka, azali kobenga Eliya!
Some of those standing there heard this, and said, “He's calling for Elijah.”
36 Moto moko akimaki mbangu, azindisaki eponze moko na vino ya ngayi, atiaki eponze yango na songe ya mwa nzete mpe apesaki yango Yesu mpo ete amela; alobaki: — Totala soki Eliya akoya kokitisa ye.
One man ran and filled a sponge with vinegar, put it on a stick, and tried to give it to Jesus to drink. “Leave him alone,” he said. “Let's see if Elijah will come to take him down.”
37 Kasi Yesu agangaki makasi mpe akataki motema.
Then Jesus groaned loudly, and died.
38 Rido ya Tempelo epasukaki na biteni mibale, kobanda na likolo kino na se.
The Temple veil was ripped in two from top to bottom.
39 Mpe tango mokonzi ya basoda ya Rome, oyo atelemaki liboso ya Yesu, amonaki ndenge Yesu akufaki, alobaki: — Moto oyo azalaki penza Mwana na Nzambe!
When the centurion standing there in front of Jesus saw how he died, he said, “This man was truly the Son of God.”
40 Ezalaki mpe na basi oyo bazalaki kotala na mosika. Kati na basi yango, ezalaki na Mari, moto ya Magidala; Mari, mama ya Jake oyo ya elenge, ya Joze mpe ya Salome;
Some women were watching from a distance including Mary Magdalene, Mary the mother of James the younger and Joses, and Salome.
41 oyo bazalaki kolanda Yesu mpe kosunga Ye tango azalaki kati na Galile; ezalaki mpe na basi mosusu ebele oyo bakendeki na Yelusalemi elongo na Yesu.
They had followed Jesus and had taken care of him while he was in Galilee. Many other women who had come with him to Jerusalem were also there.
42 Wana pokwa ekomaki, lokola ezalaki mokolo ya komilengela mpo ete etikalaki ngonga moke mpo na kokota na mokolo ya Saba,
It was Friday, the day before the Sabbath. When evening came,
43 Jozefi, moto ya mboka Arimate, oyo azalaki moto ya lokumu kati na Likita-Monene ya Bayuda mpe azalaki kozela Bokonzi ya Nzambe, abangaki te kokende epai ya Pilato mpo na kosenga nzoto ya Yesu.
Joseph of Arimathea, a member of the governing council who was himself waiting for the kingdom of God, had the courage to go to Pilate and ask for Jesus' body.
44 Pilato akamwaki tango ayokaki ete Yesu asilaki kokufa; abengaki mokonzi ya basoda mpo na kotuna ye soki solo Yesu asilaki kokufa.
Pilate was surprised that Jesus had died so soon, so he summoned the centurion and asked him if Jesus had already died.
45 Tango ayokaki na monoko ya mokonzi ya basoda ete ezali bongo, apesaki Jozefi ndingisa ya kokamata nzoto ya Yesu.
Once he had confirmation from the centurion, Pilate gave permission for Joseph to take the body.
46 Jozefi asombaki liputa ya lino, akitisaki nzoto ya Yesu longwa na ekulusu, alingaki yango na liputa yango; atiaki nzoto yango kati na kunda oyo batobolaki kati na libanga moko ya monene, mpe atindikaki libanga mosusu liboso ya ekotelo ya kunda yango.
Joseph bought a linen sheet. Then he took Jesus' body down from the cross and wrapped it in the sheet, and placed it in a tomb that had been cut out of rock. Then he rolled a heavy stone up against the entrance.
47 Mari, moto ya mboka Magidala, mpe Mari, mama ya Joze, bazalaki kotala esika oyo akotia nzoto ya Yesu.
Mary Magdalene and Mary the mother of Joses were watching where he was laid.

< Malako 15 >