< Malako 14 >

1 Wana etikalaki mikolo mibale mpo ete feti ya Pasika mpe feti ya Mapa ezanga levire ebanda, bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko bazalaki koluka ndenge nini kokanga Yesu na mayele mpo na koboma Ye;
And two days after was the passover, and the feast of unleavened bread; and the chief priests and the scribes sought how they might seize him by craft, and put him to death.
2 pamba te balobaki: « Tosala yango te na tango ya feti, noki te bato bakotomboka. »
For they said, Not at the feast, lest there be an uproar among the people.
3 Lokola Yesu azalaki na Betani, na ndako ya Simona oyo azalaki moto na maba, mwasi moko akotaki, wana Yesu azalaki na mesa. Na maboko na ye, azalaki na molangi ya alibatre etonda na malasi ya nar, oyo basangisa na eloko mosusu te mpe ya motuya makasi; afungolaki molangi yango mpe asopaki malasi yango na moto ya Yesu.
And when he was at Bethany, in the house of Simon the leper, as he was reclining at table, there came a woman having an alabaster bottle of ointment of pure spikenard, very precious; and breaking the bottle, she poured it on his head.
4 Kati na bato oyo bazalaki wana, bamosusu basilikaki mpe balobaki: — Mpo na nini kobebisa malasi oyo na pamba kaka boye?
And there were some that were much displeased, [[and said]] among themselves, Why is this waste of the ointment made?
5 Bakokaki ata koteka malasi yango na motuya ya mbongo ya bibende koleka nkama misato mpe kopesa mbongo yango epai ya babola! Bazalaki kopamela mwasi yango makasi.
For this ointment might have been sold for more than three hundred denaries, and given to the poor. And they chid her harshly.
6 Kasi Yesu alobaki: — Botika ye! Mpo na nini kotungisa ye? Asali Ngai likambo moko ya malamu.
But Jesus said, Let her alone; why do ye trouble her? A good deed hath she done for me.
7 Bokozalaka na babola tango nyonso mpe bokoki tango nyonso kosalelaka bango bolamu oyo bolingi; kasi Ngai, bokozalaka na Ngai tango nyonso te.
For the poor ye have always with you, and whenever ye will, ye can do good to them; but me ye have not always.
8 Mwasi oyo asali likambo oyo akoki, asili kosopela nzoto na Ngai malasi mpo na kobongisa kokundama na Ngai.
She hath done what she could; she hath anointed my body beforehand for its burial.
9 Nazali koloba na bino penza ya solo: Esika nyonso bakosakola Sango Malamu kati na mokili mobimba, bakobanda mpe kolobela likambo mwasi oyo awuti kosala, mpo na kokanisa ye.
And truly do I say to you, Wherever the glad tidings shall be published throughout the whole world, this too which she hath done will be told for a memorial of her.
10 Bongo Yuda Isikarioti, moko kati na bantoma zomi na mibale, akendeki epai ya bakonzi ya Banganga-Nzambe mpo na koteka Yesu epai na bango.
And Judas Iscariot, one of the twelve, went to the chief priests, that he might deliver him up to them.
11 Tango bayokaki bongo, basepelaki makasi mpe balakaki kopesa ye mbongo. Boye, Yuda akomaki koluka libaku ya kokaba Yesu.
And they when they heard it were glad, and promised to give him money. And he sought a good opportunity to deliver him up.
12 Na mokolo ya liboso ya feti ya Mapa ezanga levire, mokolo oyo bazalaki koboma mwana meme lokola mbeka ya Pasika, bayekoli batunaki Ye: — Esika nini olingi ete tokende kobongisela Yo bilei ya Pasika?
And on the first day of the feast of unleavened bread, when they used to kill the passover, his disciples say to him, Where wilt thou that we go and make ready for thee to eat the passover?
13 Bongo, kati na bayekoli na Ye, Yesu atindaki mibale; alobaki na bango: — Bokende kati na engumba, bokokutana na moto moko amemi eloku ya mayi; bolanda ye
And he sendeth forth two of his disciples, and saith to them, Go into the city, and there will meet you a man bearing a pitcher of water; follow him;
14 mpe, tango akokota na ndako, boloba na nkolo ndako yango: « Moteyi azali kotuna yo: ‹ Wapi shambre na Ngai epai wapi nakolia bilei ya Pasika elongo na bayekoli na Ngai? › »
and wherever he goeth in, say to the master of the house, The Teacher saith, Where is my guest-chamber, where I may eat the passover with my disciples?
15 Bongo ye akolakisa bino, na etaje ya suka, shambre moko ya monene, babongisa malamu mpe bakoki kosalela yango. Ezali kuna nde bokobongisa bilei ya Pasika mpo na biso.
And he will show you a large upper room furnished and prepared; and there make ready for us.
16 Tango bayekoli bakendeki, bakotaki na engumba mpe bakutaki makambo nyonso ndenge kaka Yesu ayebisaki bango. Bongo babongisaki bilei ya Pasika.
And the disciples went forth, and came into the city, and found as he had told them; and they made ready the passover.
17 Tango pokwa ekomaki, Yesu ayaki elongo na bayekoli zomi na mibale.
And when it was evening, he cometh with the twelve.
18 Wana bazalaki na mesa mpe bazalaki kolia, Yesu alobaki: — Nazali koloba na bino penza ya solo: moko kati na bino, oyo azali kolia elongo na Ngai, akoteka Ngai.
And as they were reclining at table and eating, Jesus said, Truly do I say to you, that one of you will betray me, —one that is eating with me.
19 Bayokaki mawa mingi, mpe bakomaki kotuna Ye, moko sima na moninga: — Ezali ngai?
They began to be sorrowful, and to say to him one by one, Is it I?
20 Yesu azongisaki: — Ezali moko kati na bino, zomi na mibale, oyo azali kolia sani moko elongo na Ngai.
And he said to them, It is one of the twelve, one that is dipping with me in the dish.
21 Solo, Mwana na Moto akokende, kolanda ndenge ekomama na tina na Ye; kasi mawa na moto oyo akoteka Mwana na Moto! Elingaki kozala malamu koleka mpo na moto yango ete abotama te.
For the Son of man indeed goeth away, as it hath been written concerning him; but woe to that man by whom the Son of man is betrayed! Well were it for that man if he had not been born.
22 Wana bazalaki kolia, Yesu azwaki lipa; sima na Ye kozongisa matondi epai ya Nzambe, akataki yango, apesaki bango yango mpe alobaki: — Oyo ezali nzoto na Ngai! Bozwa.
And as they were eating, he took a loaf, and blessed, and broke it, and gave it to them, and said, Take; this is my body.
23 Azwaki lisusu kopo; mpe sima na Ye kozongisa matondi epai ya Nzambe, apesaki bango yango, mpe bango nyonso bamelaki yango.
And he took a cup, and having given thanks, gave it to them; and they all drank of it.
24 Bongo alobaki na bango: — Oyo ezali makila na Ngai ya Boyokani, makila oyo esopani mpo na bato ebele.
And he said to them, This is my blood of the covenant, which is shed for many.
25 Nazali koloba na bino penza ya solo: nakomela lisusu vino oyo te kino na mokolo oyo nakomela yango, ya sika, kati na Bokonzi ya Nzambe.
Truly do I say to you, I shall not drink hereafter of the fruit of the vine, until that day when I drink it new in the kingdom of God.
26 Sima na yango, bayembaki banzembo; bongo babimaki mpo na kokende na ngomba ya banzete ya olive.
And having sung a hymn, they went out to the Mount of Olives.
27 Yesu alobaki na bango: — Bino nyonso bokobungisa kondima, pamba te ekomama: « Nakobeta mobateli bibwele, mpe bameme ekopalangana. »
And Jesus saith to them, Ye will all fall away from me; for it is written, “I will smite the shepherd, and the sheep will be scattered.”
28 Kasi, sima na Ngai kosekwa, nakokende na Galile, liboso na bino.
But after I have risen, I will go before you into Galilee.
29 Petelo alobaki na Ye: — Ata soki bango nyonso bakweyisi kondima na bango, ngai nakotikala kokweyisa kondima na ngai te.
But Peter said to him, Even if all shall fall away, yet will not I.
30 Yesu azongiselaki ye: — Nazali koloba na yo penza ya solo: lelo, kaka na butu ya lelo, liboso ete soso elela mbala mibale, okowangana Ngai mbala misato.
And Jesus saith to him, Truly do I say to thee, that even thou, to-day, on this night, before a cock crow twice, wilt thrice deny me.
31 Kasi Petelo akobaki kotia monoko makasi, alobaki: — Ata soki nasengeli kokufa elongo na Yo, nakowangana yo te. Mpe bango nyonso balobaki kaka ndenge moko.
But he spoke the more vehemently: If I must die with thee, I will not deny thee. And so also said they all.
32 Tango bakomaki na esika oyo kombo na yango ezali Getisemane, Yesu alobaki na bayekoli na Ye: — Botikala awa, wana Ngai nakosambela.
And they come to a place called Gethsemane; and he saith to his disciples, Sit here, while I pray.
33 Wana amemaki Petelo, Jake mpe Yoane, akomaki mawa-mawa mpe komitungisa;
And he taketh with him Peter and James and John; and began to be in great consternation and anguish.
34 alobaki na bango: — Motema na Ngai etondi na mawa pene nakufa; botikala awa mpe bosenzela.
And he saith to them, My soul is exceedingly sorrowful, even to death; remain here and watch.
35 Wana akendeki mwa mosika, amikitisaki na mabele mpe azalaki kosambela Nzambe mpo ete, soki ekoki kosalema, tango wana ya pasi ekende mosika na Ye.
And going on a little farther, he fell on the ground, and prayed that, if it was possible, the hour might pass from him.
36 Azalaki kobondela: — Tata! Epai na Yo, nyonso ekoki kosalema! Longola kopo oyo ya pasi liboso na Ngai! Nzokande, kosala te kolanda mokano na Ngai, kasi sala kolanda mokano na Yo.
And he said, Abba, Father, all things are possible to thee! take away this cup from me. But not what I will, but what thou wilt.
37 Bongo azongaki epai bayekoli na Ye bazalaki mpe akutaki bango balala pongi. Alobaki na Petelo: — Simona, ozali kolala? Okokaki te kosenzela mpo na ngonga moko?
And he cometh and findeth them sleeping; and he saith to Peter, Simon, sleepest thou? Couldst not thou watch one hour?
38 Bosenzela mpe bosambela mpo ete bokweya te kati na komekama. Molimo ezalaka na posa makasi ya kosala malamu, kasi nzoto ezalaka na bolembu.
Watch, and pray that ye enter not into temptation; the spirit indeed is willing, but the flesh is weak.
39 Akendeki lisusu mwa mosika mpe abondelaki kaka ndenge moko.
And again he went away and prayed, saying the same words.
40 Azongaki lisusu epai bayekoli na Ye bazalaki mpe akutaki bango lisusu balala pongi, pamba te bayokaki pongi makasi mpe miso na bango ekomaki kilo. Bayebaki te eyano ya kopesa Ye.
And returning, he found them again sleeping, for their eyes were heavy; and they knew not what to answer him.
41 Azongaki mpo na mbala ya misato, mpe alobaki na bango: — Bozali kaka kokoba kolala pongi mpe kopema? Esili! Ngonga ekoki. Mwana na Moto akokabama na maboko ya bato ya masumu.
And he cometh the third time, and saith to them, Sleep on, and take your rest! It is enough! the hour is come: lo! the Son of man is delivered up into the hands of sinners.
42 Botelema; tokende. Moto oyo ateki Ngai azali koya.
Rise, let us be going; lo! he that delivereth me up is at hand.
43 Wana Yesu azalaki nanu koloba, Yuda, moko kati na bayekoli zomi na mibale, akomaki elongo na bato ebele oyo basimbaki mipanga mpe banzete; ezalaki bakonzi ya Banganga-Nzambe, balakisi ya Mobeko mpe bakambi ya bato nde batindaki bango.
And immediately, while he was yet speaking, cometh Judas Iscariot, one of the twelve, and with him a multitude with swords and clubs, from the chief priests and the scribes and elders.
44 Moto oyo atekaki Yesu apesaki bango elembo moko: « Moto oyo ngai nakopesa beze, ezali nde ye; bokokanga ye mpe bokomema ye na se ya bokengeli malamu. »
And his betrayer had given them a signal, saying, Whomever I shall kiss, he is the man; seize him, and lead him away securely.
45 Tango kaka Yuda akomaki, akendeki epai ya Yesu mpe alobaki na Ye: — Moteyi! Mpe apesaki Ye beze.
And on coming he immediately went up to him, and said, Rabbi! and kissed him.
46 Mbala moko, basimbaki Yesu na makasi mpe bakangaki Ye.
And they laid hands on him and seized him.
47 Bongo moko kati na bato oyo bazalaki wana abimisaki mopanga na ye wuta na ebombelo na yango, abetaki yango mosali ya mokonzi ya Banganga-Nzambe mpe akataki ye litoyi.
And one of those who stood by drew his sword, and smote the servant of the high-priest, and cut off his ear.
48 Yesu alobaki na bango: — Boni, nakomi motomboki mpo ete boya kokanga Ngai na mipanga mpe na banzete?
And Jesus answering said to them, Ye have come out as against a robber, with swords and clubs, to take me.
49 Nazalaki elongo na bino mikolo nyonso kati na lopango ya Tempelo mpo na kopesa malakisi na Ngai, mpe bokangaki Ngai te. Kasi ezali kosalema bongo mpo ete Makomi ekokisama.
I was daily with you in the temple, teaching, and ye did not lay hands on me; but [[thus it is]], that the Scriptures may be fulfilled.
50 Bayekoli na Ye nyonso basundolaki Ye mpe bakimaki.
And all forsook him and fled.
51 Nzokande, elenge mobali moko azalaki kolanda Yesu; alataki liputa ya pamba. Mpe tango bakangaki ye,
And there followed him a certain young man having a linen cloth wrapped round his naked body; and they laid hold of him.
52 asundolaki liputa mpe akimaki.
And he left the linen cloth behind, and fled naked.
53 Bamemaki Yesu epai ya mokonzi ya Banganga-Nzambe epai wapi bakonzi ya Banganga-Nzambe, bakambi ya bato mpe balakisi ya Mobeko, bango nyonso, basanganaki.
And they led Jesus away to the high-priest; and all the chief priests and the elders and the scribes come together.
54 Petelo azalaki kolanda Yesu na mosika, kino kati na lopango ya ndako ya mokonzi ya Banganga-Nzambe; avandaki kuna elongo na bakengeli, pene ya moto, mpe azalaki koyetola moto.
And Peter followed him afar off, even into the court of the palace of the high-priest, and was sitting with the officers, and warming himself at the fire.
55 Nzokande bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bato nyonso ya Likita-Monene ya Bayuda bazalaki koluka litatoli moko oyo ekobimisa polele mabe ya Yesu mpo ete bakoka kokatela Ye etumbu ya kufa, kasi bazalaki kozwa yango te;
And the chief priests and the whole council sought for testimony against Jesus in order to put him to death; and they found none.
56 pamba te bato mingi bazalaki kokosela Ye makambo, kasi matatoli na bango ezalaki kokokana te.
For many bore false witness against him, but their testimonies did not agree together.
57 Mpo na kaka kokosela Ye makambo, bato mosusu bazalaki kotelema na koloba:
And some stood up and bore false witness against him, saying,
58 « Toyokaki ye koloba: ‹ Ngai, nakobuka Tempelo oyo esalema na maboko ya bato; mpe sima na mikolo misato, nakotonga Tempelo mosusu oyo ekosalema na maboko ya bato te. › »
We heard him say, I will destroy this temple that is made with hands, and in three days I will build another not made with hands.
59 Kasi atako bongo, litatoli na bango ezalaki kaka ya lokuta.
And not even so did their testimony agree.
60 Mokonzi ya Banganga-Nzambe atelemaki kati na mayangani mpe apesaki Yesu motuna: — Boni, ozali te na liloba ya kozongisa? Olobi nini liboso ya makambo oyo bazali kofunda yo na yango?
And the high-priest stood up in the midst, and asked Jesus, saying, Dost thou make no answer to what these men testify against thee?
61 Kasi Yesu abatelaki kimia mpe apesaki ata eyano moko te. Mokonzi ya Banganga-Nzambe atunaki Ye lisusu: — Ozali Klisto, Mwana ya Ye oyo apambolama?
But he was silent, and answered nothing. Again the high-priest asked him, and saith to him, Art thou the Christ, the Son of the Blessed?
62 Yesu azongisaki: — Iyo, ezali se bongo. Mpe bokomona Mwana na Moto kovanda na ngambo ya loboko ya mobali ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso mpe koya elongo na mapata ya Likolo.
And Jesus said, I am; and ye will see the Son of man sitting on the right hand of Power, and coming with the clouds of heaven.
63 Bongo mokonzi ya Banganga-Nzambe apasolaki bilamba na ye mpe alobaki: — Mpo na nini koluka lisusu batatoli?
Then the high-priest rent his garments, and said, What further need have we of witnesses?
64 Bino moko boyoki ndenge nini afingi Nzambe. Bokanisi nini mpo na yango? Boye, bango nyonso bakatelaki Yesu etumbu, batatolaki ete abongi na kufa.
Ye have heard the blasphemy; what think ye? And they all condemned him as deserving the punishment of death.
65 Bato mosusu bakomaki kobwakela Ye soyi, kozipa Ye elongi, kobeta Ye makofi na koloba na Ye: — Sakola! Mpe bakengeli bazwaki Ye mpe babetaki Ye bambata.
And some began to spit on him, and to cover his face and buffet him, and say to him, Prophesy! And the officers, with blows, took him in charge.
66 Wana Petelo azalaki na se, kati na lopango ya kati, mwasi mosali moko ya mokonzi ya Banganga-Nzambe ayaki wana,
And as Peter was below in the court, there cometh one of the maid-servants of the high-priest;
67 amonaki Petelo koyetola moto. Sima na ye kotala Petelo malamu, alobaki na ye: — Yo mpe ozalaki elongo na Yesu, moto ya Nazareti!
and seeing Peter warming himself, she looked at him and said, Thou too wast with the Nazarene, Jesus.
68 Kasi Petelo awanganaki; alobaki: — Nayebi te! Nazali kutu kososola te makambo oyo ozali koloba! Bongo abimaki mpe akendeki kotelema pembeni, na ekuke ya lopango; mpe soso elelaki.
But he denied, saying, I do not know nor understand what thou sayest. And he went out into the fore-court; and a cock crew.
69 Tango mwasi mosali amonaki ye, alobaki lisusu na bato oyo bazalaki wana: — Moto oyo azali moko kati na bango!
And the maid-servant, seeing him, began again to say to those who were standing by, This is one of them.
70 Petelo awanganaki lisusu. Sima na mwa tango moke, bato oyo bazalaki wana bazongelaki koloba na Petelo: — Ezali ya solo, yo mpe ozali moko kati na bango, mpe ozali moto ya Galile.
And he denied it again. And shortly after, those who were standing by said again to Peter, Surely thou art one of them; for thou art a Galilaean.
71 Bongo Petelo abandaki kolapa ndayi esangana na bilakeli mabe: — Nayebi te moto oyo bozali kolobela!
But he began to curse and to swear, saying, I know not this man of whom ye speak.
72 Kaka na tango yango, soso elelaki mpo na mbala ya mibale. Bongo Petelo akanisaki maloba oyo Yesu alobaki na ye: « Liboso ete soso elela mbala mibale, okowangana Ngai mbala misato. » Mpe alelaki makasi.
And immediately a cock crew a second time. And Peter called to mind the word that Jesus had said to him, Before a cock crows twice, thou wilt thrice deny me. And when he thought thereon, he wept.

< Malako 14 >