< Malako 13 >
1 Wana Yesu azalaki kobima longwa na Tempelo, moko kati na bayekoli na Ye alobaki na Ye: — Moteyi, tala ndenge mabanga oyo ezali kitoko! Tala ndenge Ndako oyo ezali monene!
ⲁ̅ⲁⲩⲱ ⲉϥⲛⲏⲩ ⲉⲃⲟⲗ ϩⲙ ⲡⲉⲣⲡⲉ ⲡⲉϫⲉⲟⲩⲁ ⲛⲁϥ ⲉⲃⲟⲗ ϩⲛ ⲛⲉϥⲙⲁⲑⲏⲧⲏⲥ ϫⲉ ⲡⲥⲁϩ ⲁⲛⲁⲩ ⲉⲛⲉⲓⲱⲛⲉ ϫⲉ ϩⲉⲛⲁϣ ⲛϩⲉ ⲛⲉ ⲙⲛ ⲛⲉⲓⲕⲉⲕⲱⲧ
2 Yesu alobaki na ye: — Ozali komona bandako minene oyo! Libanga moko te ekotikala awa na likolo ya libanga mosusu, nyonso ekobukama.
ⲃ̅ⲁⲩⲱ ⲓⲏⲥ ⲡⲉϫⲁϥ ⲛⲁϥ ϫⲉ ⲛⲅⲛⲁⲩ ⲁⲛ ⲉⲛⲉⲓⲛⲟϭ ⲛⲕⲱⲧ ⲛⲛⲉⲩⲕⲱ ⲙⲡⲉⲓⲙⲁ ⲛⲟⲩⲱⲛⲉ ⲉϫⲛ ⲟⲩⲱⲛⲉ ⲉⲙⲡⲟⲩⲃⲟⲗⲟⲩ ⲉⲃⲟⲗ
3 Bongo Yesu avandaki na ngomba ya banzete ya olive, oyo etalana na Tempelo. Petelo, Jake, Yoane mpe Andre batunaki Yesu, na esika oyo bazalaki bango moko kaka:
ⲅ̅ⲁⲩⲱ ⲉϥϩⲙⲟⲟⲥ ϩⲓϫⲛ ⲡⲧⲟⲟⲩ ⲛⲛϫⲟⲉⲓⲧ ⲙⲡⲉⲙⲧⲟ ⲉⲃⲟⲗ ⲙⲡⲉⲣⲡⲉ ⲁϥϫⲛⲟⲩϥ ⲛϭⲓ ⲡⲉⲧⲣⲟⲥ ⲛⲙⲓⲁⲕⲱⲃⲟⲥ ⲛⲙⲓⲱϩⲁⲛⲛⲏⲥ ⲙⲛⲁⲛⲇⲣⲉⲁⲥ ⲉⲩϫⲱ ⲙⲙⲟⲥ
4 — Yebisa biso, makambo wana ekosalema tango nini? Mpe elembo nini ekotalisa biso ete makambo yango nyonso ekomi pene ya kokokisama?
ⲇ̅ϫⲉ ⲁϫⲓⲥ ⲛⲁⲛ ϫⲉ ⲉⲣⲉⲛⲁⲓ ⲛⲁϣⲱⲡⲉ ⲧⲛⲁⲩ ⲁⲩⲱ ⲟⲩ ⲡⲉ ⲡⲙⲁⲉⲓⲛ ⲉⲣϣⲁⲛⲛⲁⲓ ⲧⲏⲣⲟⲩ ⲛⲟⲩ ⲉϫⲱⲕ ⲉⲃⲟⲗ
5 Yesu alobaki na bango: — Bosala keba ete moto moko te akosa bino!
ⲉ̅ⲓⲏⲥ ⲇⲉ ⲁϥⲁⲣⲭⲓ ⲛϫⲟⲟⲥ ⲛⲁⲩ ϫⲉ ϯϩⲧⲏⲧⲛ ⲙⲏⲡⲱⲥ ⲛⲧⲉⲗⲁⲁⲩ ⲡⲗⲁⲛⲁ ⲙⲙⲱⲧⲛ
6 Bato mingi bakoya na Kombo na Ngai mpe bakoloba: « Ngai nde Masiya, » mpe bakokosa bato ebele.
ⲋ̅ⲟⲩⲛϩⲁϩ ⲅⲁⲣ ⲛⲁⲉⲓ ϩⲙ ⲡⲁⲣⲁⲛ ⲉⲩϫⲱ ⲙⲙⲟⲥ ϫⲉ ⲁⲛⲟⲕ ⲡⲉ ⲁⲩⲱ ⲥⲉⲛⲁⲡⲗⲁⲛⲁ ⲛⲟⲩⲙⲏⲏϣⲉ
7 Tango bokoyoka basango ya bitumba mpe nungunungu na tina na bitumba, kasi bomitungisa te mpo na yango; pamba te makambo wana esengeli kosalema, kasi ekozala nanu suka ya mokili te.
ⲍ̅ⲉⲧⲉⲧⲛϣⲁⲛⲥⲱⲧⲙ ⲇⲉ ⲉϩⲉⲛⲡⲟⲗⲉⲙⲟⲥ ⲛⲙϩⲉⲛϩⲣⲟⲩ ⲙⲡⲟⲗⲉⲙⲟⲥ ⲙⲡⲣϣⲧⲟⲣⲧⲣ ⲥⲉⲛⲁϫⲡⲓϣⲱⲡⲉ ⲁⲗⲗⲁ ⲙⲡⲁⲧⲉⲑⲁⲏⲛⲟⲩ ⲉϣⲱⲡⲉ
8 Ekolo moko ekotelemela ekolo mosusu, bokonzi moko ekobundisa bokonzi mosusu, mabele ekoningana bipai na bipai, mpe nzala ekozala makasi penza. Makambo wana ekozala kaka ebandeli ya pasi lokola pasi ya mwasi oyo azali kobota.
ⲏ̅ⲟⲩⲛⲟⲩϩⲉⲑⲛⲟⲥ ⲛⲁⲧⲱⲟⲩⲛ ⲉϫⲛ ⲟⲩϩⲉⲑⲛⲟⲥ ⲁⲩⲱ ⲟⲩⲙⲛⲧⲣⲣⲟ ⲉϫⲛ ⲟⲩⲙⲛⲧⲣⲣⲟ ⲁⲩⲱ ⲟⲩⲛϩⲉⲛϩⲉⲃⲱⲱⲛ ⲛⲁϣⲱⲡⲉ ⲛⲁⲓ ⲇⲉ ⲧⲁⲣⲭⲏ ⲧⲉ ⲛⲛⲛⲁⲁⲕⲉ
9 Kasi bosala keba, pamba te bakofunda bino na bisambiselo ya Bayuda mpe bakobeta bino fimbu kati na bandako ya mayangani. Likolo na Ngai, bokosamba liboso ya bayangeli mpe liboso ya bakonzi. Boye, ekozala mpo na bino libaku malamu ya kotatola solo na tina na Ngai.
ⲑ̅ⲛⲧⲱⲧⲛ ⲇⲉ ϯϩⲧⲏⲧⲛ ⲉⲣⲱⲧⲛ ⲥⲉⲛⲁⲡⲁⲣⲁⲇⲓⲇⲟⲩ ⲅⲁⲣ ⲙⲙⲱⲧⲛ ⲉⲛⲥⲩⲛϩⲉⲇⲣⲓⲟⲛ ⲛⲥⲉϩⲓⲟⲩⲉ ⲉⲣⲱⲧⲛ ϩⲛ ⲛⲥⲩⲛⲁⲅⲱⲅⲏ ⲛⲥⲉϫⲓⲧⲏⲩⲧⲛ ⲉⲛϩⲏⲅⲉⲙⲱⲛ ⲙⲛ ⲛⲉⲣⲣⲱⲟⲩ ⲉⲧⲃⲏⲏⲧ ⲉⲩⲙⲛⲧⲙⲛⲧⲣⲉ ⲛⲁⲩ ⲙⲛⲛⲕⲉϩⲉⲑⲛⲟⲥ
10 Pamba te esengeli ete Sango Malamu esakolama liboso epai ya bikolo nyonso ya mokili.
ⲓ̅ⲁⲩⲱ ⲥⲉⲛⲁϫⲡⲓⲕⲏⲣⲩⲥⲥⲉ ⲛϣⲟⲣⲡ ⲙⲡⲉⲩⲁⲅⲅⲉⲗⲓⲟⲛ
11 Tango bakokanga bino mpo na komema bino na bisambiselo, bomitungisa te mpo na koluka makambo ya koloba; boloba kaka oyo ekopesamela bino na tango wana, pamba te ekozala bino te bato bokoloba, kasi Molimo Mosantu.
ⲓ̅ⲁ̅ⲁⲩⲱ ⲉⲩϣⲁⲛϫⲓ ⲧⲏⲛⲟⲩ ⲉⲡⲁⲣⲁⲇⲓⲇⲟⲩ ⲙⲙⲱⲧⲛ ⲙⲡⲣϥⲓⲣⲟⲟⲩϣ ϫⲉ ⲟⲩ ⲡⲉⲧⲉⲧⲛⲛⲁϫⲟⲟϥ ⲁⲗⲗⲁ ⲡⲉⲧⲟⲩⲛⲁⲧⲁⲁϥ ⲉⲧⲉⲧⲛⲧⲁⲡⲣⲟ ϩⲛ ⲧⲉⲩⲛⲟⲩ ⲉⲧⲙⲙⲁⲩ ⲡⲁⲓ ⲡⲉ ⲉⲧⲉⲧⲛⲛⲁϫⲟⲟϥ ⲛⲧⲱⲧⲛ ⲅⲁⲣ ⲁⲛ ⲛⲉⲧϣⲁϫⲉ ⲁⲗⲗⲁ ⲡⲉⲡⲛⲁ ⲡⲉ ⲉⲧⲟⲩⲁⲁⲃ
12 Ndeko akokaba ndeko na ye mpo ete baboma ye, tata akokaba mwana na ye mpo ete baboma ye, bana bakotombokela baboti na bango mpe bakobomisa bango.
ⲓ̅ⲃ̅ⲁⲩⲱ ⲟⲩⲛⲟⲩⲥⲟⲛ ⲛⲁⲡⲁⲣⲁⲇⲓⲇⲟⲩ ⲛⲟⲩⲥⲟⲛ ⲉϩⲣⲁⲓ ⲉⲡⲙⲟⲩ ⲁⲩⲱ ⲟⲩⲉⲓⲱⲧ ϥⲛⲁⲡⲁⲣⲁⲇⲓⲇⲟⲩ ⲛⲟⲩϣⲏⲣⲉ ⲛϣⲏⲣⲉ ⲛⲁⲧⲱⲟⲩⲛ ⲉϫⲛ ⲛⲉⲩⲉⲓⲟⲧⲉ ⲛⲥⲉⲙⲟⲟⲩⲧⲟⲩ
13 Bato nyonso bakoyina bino mpo na Kombo na Ngai, kasi moto oyo akoyika mpiko kino na suka akobika.
ⲓ̅ⲅ̅ⲛⲧⲉⲧⲛϣⲱⲡⲉ ⲉⲣⲉⲟⲩⲟⲛ ⲛⲓⲙ ⲙⲟⲥⲧⲉ ⲙⲙⲱⲧⲛ ⲉⲧⲃⲉ ⲡⲁⲣⲁⲛ ⲡⲉⲧⲛⲁϩⲩⲡⲟⲙⲓⲛⲉ ⲇⲉ ϣⲁⲃⲟⲗ ⲡⲁⲓ ⲡⲉⲧⲛⲁⲟⲩϫⲁⲉⲓ
14 Tango bokomona makambo ya nkele kosalema kati na Esika ya bule, —tika ete motangi asosola malamu— wana tika ete bato oyo bakozala kati na Yuda bakima na bangomba;
ⲓ̅ⲇ̅ⲉⲧⲉⲧⲛϣⲁⲛⲛⲁⲩ ⲇⲉ ⲉⲧⲃⲟⲧⲉ ⲙⲡϣⲱϥ ⲉⲥⲁϩⲉⲣⲁⲧⲥ ⲙⲡⲙⲁ ⲉⲧⲉⲛϣϣⲉ ⲁⲛ ⲡⲉⲧⲱϣ ⲙⲁⲣⲉϥⲛⲟⲓ ⲧⲟⲧⲉ ⲛⲉⲧϩⲛϯⲟⲩⲇⲁⲓⲁ ⲙⲁⲣⲟⲩⲡⲱⲧ ⲉⲛⲧⲟⲩⲓⲏ
15 tika ete moto oyo akozala na likolo ya ndako akita te, mpo na kokende kozwa eloko songolo kati na ndako na ye;
ⲓ̅ⲉ̅ⲡⲉⲧϩⲓϫⲉⲛⲉⲡⲱⲣ ⲙⲡⲣⲧⲣⲉϥⲉⲓ ⲉⲡⲉⲥⲏⲧ ⲟⲩⲇⲉ ⲙⲡⲣⲧⲣⲉϥⲃⲱⲕ ⲉϩⲟⲩⲛ ⲉϥⲓⲗⲁⲁⲩ ϩⲙ ⲡⲉϥⲏⲉⲓ
16 tika ete moto oyo akozala kati na bilanga azonga na ndako te, mpo na kokende kozwa elamba na ye!
ⲓ̅ⲋ̅ⲁⲩⲱ ⲡⲉⲧϩⲛⲧⲥⲱϣⲉ ⲙⲡⲣⲧⲣⲉϥⲕⲟⲧϥ ⲉⲡⲁϩⲟⲩ ⲉϥⲓⲡⲉϥϩⲟⲓⲧⲉ
17 Na mikolo wana, mawa na basi oyo bakozala na bazemi mpe na ba-oyo bakozala komelisa bana mabele!
ⲓ̅ⲍ̅ⲟⲩⲟⲓ ⲇⲉ ⲛⲛⲉⲧⲉⲉⲧ ⲙⲛ ⲛⲉⲧⲧⲥⲛⲕⲟ ϩⲛ ⲛⲉϩⲟⲟⲩ ⲉⲧⲙⲙⲁⲩ
18 Bosambela mpo ete makambo wana esalema te na eleko ya malili makasi.
ⲓ̅ⲏ̅ϣⲗⲏⲗ ϫⲉⲕⲁⲥ ⲉⲛⲛⲉⲡⲉⲧⲛⲡⲱⲧ ϣⲱⲡⲉ ⲛⲧⲉⲡⲣⲱ
19 Pamba te ekozala mikolo ya pasi, na lolenge oyo etikala nanu kozala te, wuta Nzambe akela mokili kino sik’oyo, mpe na lolenge oyo ekotikala kozala lisusu te.
ⲓ̅ⲑ̅ⲥⲉⲛⲁϣⲱⲡⲉ ⲅⲁⲣ ⲛϭⲓ ⲛⲉϩⲟⲟⲩ ⲉⲧⲙⲙⲁⲩ ⲛⲟⲩⲑⲗⲓⲯⲓⲥ ⲧⲁⲓ ⲉⲧⲉⲙⲡⲉⲟⲩⲟⲛ ⲛⲧⲉⲥϭⲟⲧ ϣⲱⲡⲉ ϫⲓⲛ ⲧⲁⲣⲭⲏ ⲙⲡⲥⲱⲛⲧ ⲛⲧⲁⲡⲛⲟⲩⲧⲉ ⲥⲟⲛⲧϥ ϣⲁϩⲣⲁⲓ ⲉⲧⲉⲛⲟⲩ ⲁⲩⲱ ⲙⲙⲛⲟⲩⲟⲛ ⲛⲧⲉⲥϭⲟⲧ ⲛⲁϣⲱⲡⲉ
20 Mpe soki Nkolo ayeisaki te mikolo yango moke, moto ata moko te akokaki kobika; kasi mpo na baponami na Ye, akoyeisa yango moke.
ⲕ̅ⲁⲩⲱ ⲉⲛⲉⲙⲡⲉⲡϫⲟⲉⲓⲥ ⲧⲥⲃⲕⲉϩⲟⲟⲩ ⲛⲉⲙⲙⲛⲗⲁⲁⲩ ⲛⲥⲁⲣⲝ ⲛⲁⲱⲛϩ ⲁⲗⲗⲁ ⲉⲧⲃⲉ ⲛⲥⲱⲧⲡ ⲛⲧⲁϥⲥⲟⲧⲡⲟⲩ ⲁϥⲧⲥⲃⲕⲉⲛⲉϩⲟⲟⲩ
21 Na tango wana, soki moto moko alobi na bino: « Klisto azali awa! » to « Azali kuna, » bondima ye te.
ⲕ̅ⲁ̅ⲁⲩⲱ ⲉⲣϣⲁⲛⲗⲁⲁⲩ ϫⲟⲟⲥ ⲛⲏⲧⲛ ϫⲉ ⲉⲓⲥ ⲡⲉⲭⲥ ⲙⲡⲉⲓⲙⲁ ⲁⲩⲱ ⲉⲓⲥ ϩⲏⲏⲧⲉ ϥϩⲛⲡⲓⲙⲁ ⲙⲡⲣⲡⲓⲥⲧⲉⲩⲉ
22 Pamba te bamasiya ya lokuta mpe basakoli ya lokuta bakobima, bakosala bilembo minene mpe bikamwa mpo na kokosa ata baponami, soki ekokaki kosalema.
ⲕ̅ⲃ̅ⲥⲉⲛⲁⲧⲱⲟⲩⲛⲟⲩ ⲅⲁⲣ ⲛϭⲓ ϩⲉⲛⲭⲥ ⲛⲛⲟⲩϫ ⲛⲙϩⲉⲛⲡⲣⲟⲫⲏⲧⲏⲥ ⲛⲛⲟⲩϫ ⲛⲥⲉϯ ⲛϩⲉⲛⲙⲁⲓⲛ ⲛⲙϩⲉⲛϣⲡⲏⲣⲉ ⲉϣⲱⲡⲉ ⲉⲩⲛϭⲟⲙ ⲉⲡⲗⲁⲛⲁ ⲛⲛⲥⲱⲧⲡ
23 Boye bino, bosala keba! Ngai, namiyebiseli bino makambo nyonso.
ⲕ̅ⲅ̅ⲛⲧⲱⲧⲛ ⲇⲉ ϯϩⲧⲏⲧⲛ ⲉⲣⲱⲧⲛ ⲁⲓϣⲣⲡϫⲱ ⲉⲣⲱⲧⲛ ⲛϩⲱⲃ ⲛⲓⲙ
24 Kasi na mikolo yango, sima na pasi wana, « moyi ekokoma molili, sanza ekongenga lisusu te,
ⲕ̅ⲇ̅ⲁⲗⲗⲁ ϩⲛ ⲛⲉϩⲟⲟⲩ ⲉⲧⲙⲙⲁⲩ ⲙⲛⲛⲥⲁ ⲧⲉⲑⲗⲓⲯⲓⲥ ⲉⲧⲙⲙⲁⲩ ⲡⲣⲏ ⲛⲁⲣⲉⲃⲏ ⲁⲩⲱ ⲡⲟⲟϩ ⲛϥⲛⲁϯⲡⲉϥⲟⲩⲟⲓⲛ ⲁⲛ
25 minzoto ekokweya longwa na Likolo, mpe banguya ya Likolo ekoningisama. »
ⲕ̅ⲉ̅ⲁⲩⲱ ⲛⲥⲓⲟⲩ ⲥⲉⲛⲁϩⲉ ⲉⲃⲟⲗ ϩⲛ ⲧⲡⲉ ⲁⲩⲱ ⲛϭⲟⲙ ⲉⲧϩⲛ ⲙⲡⲏⲩⲉ ⲥⲉⲛⲁⲛⲟⲓⲛ
26 Bongo, bato bakomona Mwana na Moto koya kati na mapata, na nguya monene mpe na nkembo.
ⲕ̅ⲋ̅ⲁⲩⲱ ⲧⲟⲧⲉ ⲥⲉⲛⲁⲛⲁⲩ ⲉⲡϣⲏⲣⲉ ⲙⲡⲣⲱⲙⲉ ⲉϥⲛⲏⲩ ϩⲛ ⲟⲩⲕⲗⲟⲟⲗⲉ ⲛⲙⲟⲩⲛⲟϭ ⲛϭⲟⲙ ⲁⲩⲱ ⲟⲩⲉⲟⲟⲩ
27 Akotinda ba-anjelu na Ye mpe akosangisa baponami na Ye longwa na bangambo nyonso minei ya mokili, longwa na suka ya mabele kino na suka ya Likolo.
ⲕ̅ⲍ̅ⲁⲩⲱ ⲧⲟⲧⲉ ϥⲛⲁϫⲉⲩ ⲛⲉϥⲁⲅⲅⲉⲗⲟⲥ ⲛϥⲥⲱⲟⲩϩ ⲉϩⲟⲩⲛ ⲛⲛⲉϥⲥⲱⲧⲡ ⲉⲃⲟⲗ ϩⲙ ⲡⲉϥⲧⲟⲩⲧⲏⲩ ϫⲓⲛϫⲱϥ ⲙⲡⲕⲁϩ ϣⲁϫⲱⲥ ⲛⲧⲡⲉ
28 Tika ete lisese ya nzete ya figi eteya bino: soki kaka bitape na yango elembi mpe ebandi kobimisa makasa, boyebaka ete eleko ya moyi makasi ekomi pene.
ⲕ̅ⲏ̅ⲉⲃⲟⲗ ⲇⲉ ⲛⲧⲃⲱ ⲛⲕⲛⲧⲉ ⲉⲧⲉⲧⲛⲉⲉⲓⲙⲉ ⲉⲧⲡⲁⲣⲁⲃⲟⲗⲏ ⲉⲣϣⲁⲛⲡⲉⲥⲕⲗⲁⲇⲟⲥ ⲏⲇⲏ ⲗⲱⲕ ⲛⲧⲉⲛⲉⲥϭⲱⲃⲉ ϯⲟⲩⲱ ⲛϣⲁⲧⲉⲧⲛⲉⲓⲙⲉ ϫⲉ ⲁⲡϣⲱⲙ ϩⲱⲛ ⲉϩⲟⲩⲛ
29 Ndenge moko mpe mpo na bino; tango bokomona makambo wana kosalema, boyeba ete Mwana na Moto akomi pene, lokola na bikuke ya engumba.
ⲕ̅ⲑ̅ⲧⲁⲓ ϩⲱⲧⲧⲏⲩⲧⲛ ⲧⲉ ⲧⲉⲧⲛϩⲉ ⲉⲧⲉⲧⲛϣⲁⲛⲛⲁⲩ ⲉⲛⲁⲓ ⲧⲏⲣⲟⲩ ⲉⲩⲛⲁϣⲱⲡⲉ ⲉⲧⲉⲧⲛⲛⲁⲓⲙⲉ ϫⲉ ⲁϥϩⲱⲛ ⲉϩⲟⲩⲛ ϩⲓⲣⲛⲣⲣⲟ
30 Nazali koloba na bino penza ya solo: bato ya ekeke oyo bakoleka te kino makambo wana nyonso ekosalema.
ⲗ̅ϩⲁⲙⲏⲛ ϯϫⲱ ⲙⲙⲟⲥ ⲛⲏⲧⲛ ϫⲉ ⲛⲛⲉⲧⲉⲓⲅⲉⲛⲉⲁ ⲗⲟ ⲙⲙⲁⲩ ϣⲁⲛⲧⲉⲛⲁⲓ ⲧⲏⲣⲟⲩ ϣⲱⲡⲉ
31 Likolo mpe mabele ekoleka, kasi maloba na Ngai ekoleka te.
ⲗ̅ⲁ̅ⲧⲡⲉ ⲛⲙⲡⲕⲁϩ ⲥⲉⲛⲁⲗⲟ ⲙⲙⲁⲩ ⲛⲁϣⲁϫⲉ ⲇⲉ ⲛⲥⲉⲛⲁⲗⲟ ⲙⲙⲁⲩ ⲁⲛ
32 Mpo na oyo etali mokolo to ngonga, moko te ayebi yango, ezala ba-anjelu ya Likolo to Mwana; Ye moko kaka Tata nde ayebi yango.
ⲗ̅ⲃ̅ⲉⲧⲃⲉⲡⲉϩⲟⲟⲩ ⲇⲉ ⲉⲧⲙⲙⲁⲩ ⲏ ⲧⲉⲩⲛⲟⲩ ⲙⲛ ⲗⲁⲁⲩ ⲥⲟⲟⲩⲛ ⲟⲩⲇⲉ ⲛⲁⲅⲅⲉⲗⲟⲥ ϩⲛ ⲧⲡⲉ ⲟⲩⲇⲉ ⲡϣⲏⲣⲉ ⲛⲥⲁⲡⲉⲓⲱⲧ ⲙⲙⲁⲩⲁⲁϥ
33 Bosala keba! Bosenzela! Pamba te boyebi te tango nini ngonga yango ekoya.
ⲗ̅ⲅ̅ϯϩⲧⲏⲧⲛ ⲛⲧⲉⲧⲛⲣⲟⲉⲓⲥ ⲁⲩⲱ ⲛⲧⲉⲧⲛϣⲗⲏⲗ ⲛⲧⲉⲧⲛⲥⲟⲟⲩⲛ ⲅⲁⲣ ⲁⲛ ϫⲉ ⲁϣ ⲡⲉ ⲡⲉⲩⲟⲉⲓϣ
34 Ekozala lokola moto oyo akei na mobembo, bongo atiki ndako na ye mpe apesi mokumba na yango epai ya basali na ye; apesi na mosali moko na moko mosala oyo ekoki na ye mpe apesi mitindo epai ya mokengeli ekuke ete akengela malamu.
ⲗ̅ⲇ̅ⲛⲑⲉ ⲛⲟⲩⲣⲱⲙⲉ ⲉϥⲛⲁⲁⲡⲟⲇⲏⲙⲉⲓ ⲉⲁϥⲕⲁⲡⲉϥⲏⲉⲓ ⲁⲩⲱ ⲁϥϯ ⲛⲧⲉⲝⲟⲩⲥⲓⲁ ⲛⲛⲉϥϩⲙϩⲁⲗ ⲡⲟⲩⲁ ⲡⲟⲩⲁ ⲉⲁϥϯ ⲛⲁϥ ⲙⲡⲉϥϩⲱⲃ ⲁⲩⲱ ⲡⲉⲙⲛⲟⲩⲧ ⲁϥϩⲱⲛ ⲉⲧⲟⲟⲧϥ ϫⲉⲕⲁⲥ ⲉϥⲉⲣⲟⲉⲓⲥ
35 Yango wana, bosenzela; pamba te boyebi te tango nini nkolo ndako akozonga: na pokwa to na midi ya butu to tango soso elelaka to mpe na tongo.
ⲗ̅ⲉ̅ⲣⲟⲉⲓⲥ ϭⲉ ϩⲱⲧⲧⲏⲩⲧⲛ ⲛⲧⲉⲧⲛⲥⲟⲟⲩⲛ ⲅⲁⲣ ⲁⲛ ϫⲉ ⲉⲣⲉⲡϫⲟⲉⲓⲥ ⲙⲡⲏⲓ ⲛⲏⲩ ⲛⲁϣ ⲛⲛⲁⲩ ⲏ ⲣⲣⲟⲩϩⲉ ⲏ ϩⲛ ⲧⲡⲁϣⲉ ⲛⲧⲉⲩϣⲏ ⲏ ⲙⲡⲛⲁⲩ ⲉⲣⲉⲡⲁⲗⲉⲕⲧⲱⲣ ⲛⲁⲙⲟⲩⲧⲉ ⲏ ⲙⲡⲛⲁⲩ ⲛϩⲧⲟⲟⲩⲉ
36 Pamba te soki ayei na mbalakata, asengeli te kokuta bino bolali pongi.
ⲗ̅ⲋ̅ⲙⲏⲡⲱⲥ ⲛϥⲉⲓ ϩⲛ ⲟⲩϣⲥⲛⲉ ⲛϥϩⲉ ⲉⲣⲱⲧⲛ ⲉⲧⲉⲧⲛⲟⲃϣ
37 Makambo oyo nalobi na bino, nazali koloba yango mpe na bato nyonso: Bosenzela.
ⲗ̅ⲍ̅ⲡⲉϯϫⲱ ⲙⲙⲟϥ ⲛⲏⲧⲛ ϯϫⲱ ⲙⲙⲟϥ ⲛⲟⲩⲟⲛ ⲛⲓⲙ ϫⲉ ⲣⲟⲉⲓⲥ