< Malako 12 >
1 Bongo Yesu akomaki koloba na bango na masese: — Moto moko alonaki elanga ya vino, atongaki lopango zingazinga na yango, atimolaki ekamolelo bambuma ya vino mpe atongaki ndako molayi ya bakengeli. Sima, apesaki elanga yango na maboko ya basali mpo ete bakoma kofutela yango, mpe akendeki na mobembo.
И поче им говорити у причама: Посади човек виноград, и огради плотом, и ископа пивницу, и начини кулу, и даде га виноградарима, па оде.
2 Tango eleko ya kobuka bambuma ekokaki, atindaki mosali moko epai ya bafuteli elanga, mpo ete akende kokongola epai na bango ndambo ya bambuma kowuta na elanga ya vino.
И кад дође време, посла к виноградарима слугу да прими од виноградара од рода виноградског.
3 Kasi bafuteli elanga bakangaki ye, babetaki ye mpe bazongisaki ye maboko pamba.
А они ухвативши слугу избише га, и послаше празна.
4 Atindelaki bango mosali mosusu; babetaki-betaki ye na moto mpe basambwisaki ye.
И опет посла к њима другог слугу; и оног бише камењем и разбише му главу, и послаше га срамотног.
5 Atindaki lisusu mosali mosusu; oyo wana, babomaki ye. Bongo, na sima, atindaki lisusu bato ebele; kasi babetaki bamoko, mpe babomaki bamosusu.
И опет посла другог; и оног убише; и многе друге, једне избише, а друге побише.
6 Nkolo elanga atikalaki kaka na moto moko ya kotinda: mwana na ye ya bolingo. Atindaki ye na suka na bango nyonso mpe amilobelaki: « Solo, bakotosa mwana na ngai. »
Још дакле имаше јединог свог милог сина, посла и њега најпосле к њима говорећи: Постидеће се сина мог.
7 Kasi bafuteli elanga balobanaki bango na bango: « Tala mokitani ya libula ya elanga! Boya, toboma ye mpo ete libula ya elanga ekoma ya biso! »
А виноградари рекоше у себи: Ово је наследник, ходите да га убијемо, и нама ће остати очевина његова.
8 Bakangaki ye, babomaki ye mpe babwakaki ye na libanda ya elanga ya vino.
И ухватише га, и убише, и избацише га напоље из винограда.
9 Boye, nkolo elanga ya vino akosala nini? Akoya ye moko, akoboma bafuteli elanga wana mpe akopesa elanga yango ya vino na maboko ya bafuteli mosusu.
Шта ће дакле учинити господар од винограда? Доћи ће и погубиће виноградаре, и даће виноград другима.
10 Nanu botanga Makomi oyo te: « Libanga oyo batongi ndako babwakaki ekomi libanga ya songe ya ndako, mpe esimbi ndako mobimba?
Зар нисте читали у писму ово: Камен који одбацише зидари, онај поста глава од угла;
11 Ezali Nkolo nde alingaki bongo, mpe ezali penza likambo ya kokamwa na miso na biso! »
То би од Господа и дивно је у нашим очима?
12 Bakonzi ya Banganga-Nzambe, balakisi ya Mobeko mpe bakambi ya bato bazalaki koluka nzela ya kokanga Yesu, pamba te basosolaki ete alobaki lisese wana mpo na bango. Kasi lokola babangaki bato, batikaki Ye; mpe moto na moto akendeki.
И гледаху да Га ухвате, али се побојаше народа; јер разумеше да за њих говори причу; и оставивши Га одоше.
13 Sima, batindelaki Yesu ndambo ya Bafarizeo mpe ndambo ya bato ya lisanga ya Erode mpo na koluka kokanga Ye na motambo ya maloba na Ye moko.
И послаше к Њему неке од фарисеја и Иродоваца да би Га ухватили у речи.
14 Tango bakomaki epai na Ye, balobaki: — Moteyi, toyebi ete ozali moto ya sembo mpe obangaka bato te, pamba te oponaka bilongi te, kasi oteyaka na bosolo nzela ya Nzambe. Boni, Mobeko na biso epesi solo nzela ya kofuta mpako ya Sezare to te? Tosengeli penza kofuta yango?
А они дошавши рекоше Му: Учитељу! Знамо да си истинит, и да не мариш ни за кога; јер не гледаш ко је ко, него заиста путу Божјем учиш; треба ли ћесару давати харач или не? Хоћемо ли дати, или да не дамо?
15 Kasi lokola Yesu ayebaki ete bazali bato ya bilongi mibale, alobaki na bango: — Mpo na nini bozali kotiela Ngai motambo? Bomemela Ngai mbongo moko ya ebende, mpo ete namona yango.
А Он, знајући њихово лицемерје, рече им: Што ме кушате? Донесите ми новац да видим
16 Bamemelaki Ye yango, mpe atunaki bango: — Elilingi ya nani mpe makomi ya nani bozali komona awa? Bazongisaki: — Ya Sezare.
А они донесоше. И рече им: Чији је ово образ и натпис? А они Му рекоше: Ћесарев.
17 Yesu alobaki na bango: — Bopesa na Sezare, oyo ezali ya Sezare; mpe bopesa na Nzambe, oyo ezali ya Nzambe! Bakamwaki mingi eyano ya Yesu.
И одговарајући Исус рече им: Подајте ћесарево ћесару, а Божје Богу. И чудише Му се.
18 Bongo Basaduseo, ba-oyo balobaka ete lisekwa ezali te, bayaki epai na Yesu mpe batunaki Ye:
И дођоше к Њему садукеји који кажу да нема васкрсења, и запиташе Га говорећи:
19 — Moteyi, Moyize akomaki mpo na biso ete soki ndeko mobali ya moto moko akufi mpe atiki mwasi, kasi aboti na ye bana te, moto wana asengeli kobala mwasi oyo ndeko na ye atiki mpo ete abotela ndeko yango bana.
Учитељу! Мојсије нам написа: Ако коме брат умре и остави жену а деце не остави, да брат његов узме жену његову и да подигне семе брату свом.
20 Nzokande, ezalaki na bandeko mibali sambo. Ndeko mobali ya liboso abalaki mwasi mpe akufaki, kasi abotaki bana te.
Седам браће беше: и први узе жену, и умре без порода.
21 Ndeko ya mibale abalaki mwasi yango kaka; kasi ye mpe akufaki, atikalaki kobota bana te. Esalemaki kaka bongo na ndeko ya misato kino na oyo ya sambo:
И други узе је, и умре, и ни он не остави порода; тако и трећи.
22 bandeko nyonso sambo batikalaki kobota bana te. Sima na bango nyonso, mwasi yango mpe akufaki.
И узеше је седморица, и не оставише порода. А после свих умре и жена.
23 Na mokolo oyo bato bakosekwa kati na bakufi, mwasi yango akozala mwasi ya nani kati na bandeko nyonso sambo, pamba te bango nyonso sambo babalaki ye?
О васкрсењу дакле кад устану кога ће од њих бити жена? Јер је за седморицом била.
24 Yesu azongiselaki bango: — Bozali kati na libunga, pamba te boyebi Makomi te, mpe boyebi nguya ya Nzambe te.
И одговарајући Исус рече им: Зато ли се ви варате што не знате писма ни силе Божје?
25 Na mokolo oyo bato bakosekwa kati na bakufi, bakobala lisusu te; kasi bakozala lokola ba-anjelu kati na Likolo.
Јер кад из мртвих устану, нити ће се женити ни удавати, него су као анђели на небесима.
26 Mpo na oyo etali lisekwa ya bakufi, botikala nanu kotanga te kati na buku ya Moyize, makambo oyo Nzambe alobaki na ye na tina na nzete oyo ezalaki kopela moto kasi ezalaki kozika te: « Nazali Nzambe ya Abrayami, Nzambe ya Izaki, mpe Nzambe ya Jakobi? »
А за мртве да устају нисте ли читали у књигама Мојсијевим како му рече Бог код купине говорећи: Ја сам Бог Авраамов, и Бог Исаков, и Бог Јаковљев?
27 Nzambe azali Nzambe ya bakufi te, kasi azali Nzambe ya bato ya bomoi. Bozali penza kati na libunga monene.
Није Бог Бог мртвих, него Бог живих. Ви се дакле врло варате.
28 Moko kati na balakisi ya Mobeko, oyo ayokaki bango kotiana tembe mpe amonaki ete Yesu azongiselaki bango biyano ya malamu, apusanaki pene na Yesu mpe atunaki: — Mobeko nini eleki monene kati ya mibeko nyonso?
И приступи један од књижевника који их слушаше како се препиру, и виде да им добро одговара, и запита Га: Која је прва заповест од свих?
29 Yesu azongisaki: — Tala Mobeko oyo eleki monene: « Isalaele, yoka malamu! Yawe azali Nzambe na biso, Yawe azali kaka moko.
А Исус одговори му: Прва је заповест од свих: Чуј Израиљу, Господ је Бог наш Господ једини;
30 Okolinga Yawe, Nzambe na yo, na motema na yo mobimba, na molimo na yo mobimba, na makanisi na yo nyonso mpe na makasi na yo nyonso. »
И љуби Господа Бога свог свим срцем својим и свом душом својом и свим умом својим и свом снагом својом. Ово је прва заповест.
31 Tala mobeko oyo elandi: « Okolinga moninga na yo ndenge yo moko omilingaka. » Mobeko ya motuya koleka mibeko wana mibale ezali te.
И друга је као и ова: Љуби ближњег свог као самог себе. Друге заповести веће од ових нема.
32 Bongo molakisi ya Mobeko alobaki na ye: — Moteyi, olobi malamu; olobi solo ete Nzambe azali kaka moko, mosusu azali te.
И рече Му књижевник: Добро, учитељу! Право си казао да је један Бог, и нема другог осим Њега;
33 Kolinga Ye na motema na yo mobimba, na mayele na yo nyonso mpe na makasi na yo nyonso, mpe kolinga moninga na yo ndenge yo moko omilingaka, yango nde ezali na tina mingi koleka bambeka ya kotumba mpe makabo nyonso.
И љубити Га свим срцем и свим разумом и свом душом и свом снагом, и љубити ближњег као самог себе, веће је од свих жртава и прилога.
34 Tango Yesu amonaki ete molakisi ya Mobeko azongisi eyano na ndenge ya mayele, alobaki na ye: — Ozali mosika te ya Bokonzi ya Nzambe. Mpe moto ata moko te amekaki lisusu kotuna Ye mituna.
А Исус видевши како паметно одговори рече му: Ниси далеко од царства Божјег. И нико више не смеше да Га запита.
35 Wana Yesu azalaki koteya kati na lopango ya Tempelo, atunaki: — Ndenge nini balakisi ya Mobeko balobaka ete Klisto azali Mwana ya Davidi?
И одговори Исус и рече учећи у цркви: Како говоре књижевници да је Христос син Давидов?
36 Pamba te Davidi, ye moko, alobaki boye na nzela ya Molimo Mosantu: « Yawe alobaki na Nkolo na ngai: ‹ Vanda na ngambo ya loboko na Ngai ya mobali kino natia banguna na Yo na se ya matambe na Yo. › »
Јер сам Давид каза Духом Светим: Рече Господ Господу мом: Седи мени с десне стране, док положим непријатеље Твоје подножје ногама Твојим.
37 Soki ye moko Davidi azali kobenga Ye « Nkolo, » bongo ndenge nini akoki lisusu kozala mwana na ye? Ebele ya bato bazalaki koyoka Ye na esengo.
Сам дакле Давид назива Га Господом, и откуда му је син? И многи народ слушаше Га с радошћу.
38 Wana azalaki koteya, Yesu alobaki: — Bosala keba na balakisi ya Mobeko! Balingaka kotambola na banzambala ya milayi; balingaka ete bato bapesa bango mbote, na bisika oyo bato ebele bakutanaka;
И говораше им у науци својој: Чувајте се књижевника који иду у дугачким хаљинама, и траже да им се клања по улицама,
39 balingaka kovanda na bakiti ya liboso, kati na bandako ya mayangani; mpe na bisika ya lokumu, kati na bafeti;
И првих места по зборницама, и зачеља на гозбама.
40 bayibaka biloko ya basi oyo bakufisa mibali, mpe basalaka mabondeli ya milayi-milayi mpo na kokosa bato. Bakozwa etumbu oyo eleki makasi.
Ови што једу куће удовичке, и лажно се моле Богу дуго, биће још више осуђени.
41 Yesu avandaki liboso ya kitunga ya makabo mpe azalaki kotala ndenge bato bazalaki kotia mbongo kati na kitunga ya makabo. Bazwi ebele bazalaki kotia mbongo ebele.
И седавши Исус према Божјој хазни гледаше како народ меће новце у Божју хазну. И многи богати метаху много.
42 Mwasi mobola moko akufisa mobali ayaki mpe atiaki mbongo mibale ya bibende, oyo ezalaki na motuya moke penza.
И дошавши једна сиромашна удовица метну две лепте, које чине један кодрант.
43 Yesu abengaki bayekoli na Ye mpe alobaki na bango: — Nazali koloba na bino penza ya solo: mwasi mobola oyo akufisa mobali apesi koleka bato nyonso oyo bawuti kotia mbongo kati na kitunga ya makabo.
И дозвавши ученике своје рече им: Заиста вам кажем: ова сиромашна удовица метну више од свих који мећу у Божју хазну.
44 Pamba te bato nyonso bazwi kati na mbongo oyo bazali na yango na tina te, mpo na kotia kati na kitunga ya makabo; kasi ye, kati na kokelela na ye, atie bozwi na ye nyonso, nyonso oyo azalaki na yango mpo na kobika na yango.
Јер сви метнуше од сувишка свог; а она од сиротиње своје метну све што имаше, сву храну своју.