< Malako 10 >
1 Yesu alongwaki na esika wana mpe akendeki na etuka ya Yuda, na ngambo mosusu ya Yordani. Ebele penza ya bato bayaki lisusu kosangana pene na ye; bongo akomaki lisusu koteya bango kolanda momesano na Ye.
І, вставши звідтіля, приходить у гряницї Юдейська через той бік Йордану; і знов сходять ся люде до Него, й своїм звичаєм знов навчав їх.
2 Bafarizeo bapusanaki mpe bapesaki Ye motuna mpo na komeka Ye: — Boni, mibeko na biso epesi nzela na mobali ya kobengana mwasi na ye na libala?
І приступивши Фарисеї, питали! Його: Чи годить ся чоловікові з жінкою розводитись? спокушуючи Його.
3 Yesu azongiselaki bango: — Moyize apesaki bino mobeko nini?
Він же, озвавшись, рече їм: Що заповідав вам Мойсей?
4 Balobaki na Yesu: — Moyize apesaki na mobali nzela ya koboma libala na mwasi na ye, kaka soki akomi mokanda ya koboma libala.
Вони ж сказали: Мойсей дозволив написати розвідний лист, та й відпустити.
5 Bongo Yesu alobaki na bango: — Moyize akomaki mobeko wana mpo na bino, pamba te mitema na bino ezali mabanga.
І озвавшись Ісус, рече їм: Ради жорстокости серця вашого написав вам заповідь сю.
6 Kasi na ebandeli ya mokili, Nzambe « akelaki bango mobali mpe mwasi. »
З почину ж творення - чоловіком і жінкою створив їх Бог.
7 Yango wana, mobali akotika tata na ye mpe mama na ye, akosangana na mwasi na ye,
Тим покине чоловік батька свого й матір, і пригорнеть ся до жінки своєї,
8 mpe bango mibale bakokoma nzoto moko. Boye, bakozala lisusu mibale te, kasi nzoto moko.
і будуть у двох тіло одно; то вже їх більш не двоє, а одно тіло.
9 Tika ete moto akabola te oyo Nzambe asangisi.
Оце ж, що Бог злучив, чоловік нехай не розлучуе.
10 Tango bazongaki na ndako, bayekoli batunaki lisusu Yesu na tina na likambo yango.
А в господї знов ученики Його про се питали Ного.
11 Yesu alobaki na bango: — Soki mobali alongoli mwasi na ye na libala mpe abali mwasi mosusu asali ekobo liboso ya mwasi na ye ya liboso.
І рече їм: Хто розведеть ся з жінкою своєю, і оженить ся з иншою, робить перелюб з нею.
12 Soki mwasi abomi libala na ye mpe abali mobali mosusu asali ekobo.
І коли жінка розведеть ся з чоловіком своїм, та вийде за иншого, робить перелюб.
13 Bato bazalaki komema bana mike epai ya Yesu mpo ete atia bango maboko, kasi bayekoli bazalaki kobengana bato oyo bazalaki komema bana yango.
І приношено Йому дїтей, щоб приторкнувсь до них; ученики ж заказували тим, що приносили.
14 Tango Yesu amonaki bongo, ayokaki pasi na motema mpe alobaki na bayekoli: — Botika bana mike baya epai na Ngai; bopekisa bango te koya epai na Ngai, pamba te Bokonzi ya Nzambe ezali mpo na bato oyo bazali lokola bango.
Побачивши ж Ісус, прогнівив ся, і рече їм: Дайте дітям приходити до мене, й не бороніть їм; таких бо царство Боже.
15 Nazali koloba na bino penza ya solo: moto nyonso oyo azali koyamba te Bokonzi ya Nzambe lokola mwana moke akotikala kokota te kati na Bokonzi yango.
Істино глаголю вам: Хто не прийме царства Божого, як мала дитина, не ввійде в него.
16 Bongo ayambaki bana yango, na maboko na Ye, atielaki bango maboko mpe apambolaki bango.
І, обнявши їх, положив руки на них, і благословив їх.
17 Wana Yesu azalaki kokende, moto moko apotaki mbangu mpo na koya epai na Yesu, afukamaki liboso na Ye mpe atunaki: — Moteyi malamu, nasengeli kosala nini mpo ete nazwa bomoi ya seko? (aiōnios )
І, як виходив Він у дорогу, прибіг один, і втавши перед Ним на коліна, питав Його: Учителю благий, що робити менї, щоб життє вічне наслїдувати? (aiōnios )
18 Yesu azongisaki: — Mpo na nini ozali kobenga Ngai « Moteyi malamu? » Moko te azali malamu, longola kaka Ye moko Nzambe.
Ісус же рече йому: Чого мене звеш благим? Ніхто не благий, тільки один, Бог.
19 Oyebi mibeko oyo: « Okobomaka te, okosalaka ekobo te, okoyibaka te, okolobaka te matatoli ya lokuta mpo na kokosela moninga na yo makambo, okosalaka moninga mabe te, okopesaka tata na yo mpe mama na yo lokumu. »
Заповідї знаєш: Не роби перелюбу. Не вбивай. Не кради. Не сьвідкуй криво. Не обижай. Поважай батька твого й матір.
20 Moto yango alobaki lisusu: — Moteyi, natosaka nyonso wana wuta bolenge na ngai!
Він же, озвавшись, каже Йому: Учителю, се все я хоронив з малку мого.
21 Yesu atalaki ye, asepelaki na ye mingi mpe alobaki na ye: — Ozangi eloko moko kaka: kende, teka biloko na yo nyonso mpe pesa mbongo oyo okozwa epai ya babola; bongo okozwa bomengo kati na Likolo. Sima na yango, yaka mpe landa Ngai.
Ісус же, поглянувши на него, уподобав його, й рече йому: Одного тобі не достає: ійди, що маєш, продай і дай убогим, і мати меш скарб на небі; і прийди, та й іди слїдом за мною, взявши хрест.
22 Tango moto yango ayokaki bongo, alembaki nzoto mpe akendeki na mawa, pamba te azalaki na bozwi mingi.
Він же, зажурившись од слова сього, пійшов сумуючи: мав бо достатки великі.
23 Yesu atalaki bayekoli na Ye, alobaki na bango: — Ezali pasi mpo na bazwi kokota kati na Bokonzi ya Nzambe!
І позирнувши Ісус округи, рече ученикам своїм: Як тяжко багацтва маючим у царство Боже ввійти!
24 Bayekoli bakamwaki mingi mpo na maloba na Ye. Kasi Yesu alobaki na bango lisusu: — Solo, bana na Ngai, ezali pasimpo na kokota kati na Bokonzi ya Nzambe!
Ученики ж вжахнулись од словес Його. Ісус же, знов озвавшись, рече їм: Діти, як тяжко вповаючим на багацтва в царство Боже ввійти!
25 Ezali pete mpo na shamo kolekela na lidusu ya tonga, kasi ezali penza pasi mpo na mozwi kokota kati na Bokonzi ya Nzambe.
Легше верблюдові кріз ушко голки пройти, ніж багатому в царство Боже ввійти.
26 Bayekoli bakamwaki mingi mpe bakomaki kotunana: — Bongo nani penza akoki kobikisama?
Вони ж, надто здивувались, говорячи між собою: То хто ж може спастись?
27 Yesu atalaki bango mpe alobaki: — Na bato, ekoki kosalema te; kasi na Nzambe, ekosalema penza; pamba te nyonso ekoki kosalema na Nzambe.
Споглянувши ж на них Ісус, рече: У людей неможливе, та не в Бога; все бо можливе в Бога.
28 Petelo alobaki na Yesu: — Biso, totiki nyonso mpo na kolanda Yo!
І почав Петр говорити Йому: Ось ми покинули все, та й пійшли слїдом за Тобою.
29 Yesu azongisaki: — Nazali koloba na bino penza ya solo: moto nyonso oyo atiki ndako na ye, bandeko na ye ya mibali mpe ya basi, mama na ye, tata na ye, bana na ye to bilanga na ye, mpo na Ngai mpe mpo na Sango Malamu,
Озвав ся ж Ісус і рече: Істино глаголю вам: Нема чоловіка, що покинув домівку, або братів, або сестер, або батька, або матір, або жінку, або дїтей, або поля ради мене і євангелиї,
30 akozwa mbala nkama koleka, na tango oyo tozali kobika sik’oyo, bandako, bandeko ya mibali mpe ya basi, bamama, bana mpe bilanga, elongo na minyoko; mpe na tango oyo ekoya, bomoi ya seko. (aiōn , aiōnios )
та й не прийняв у сотеро тепер, часу сього, серед гонення, домівок, і братів, і сестер, і матїрок, і дїтей, і земель, а в віку будучому життє вічне. (aiōn , aiōnios )
31 Kasi kati na bato oyo bazali sik’oyo bato ya liboso, ebele bakokoma bato ya suka; mpe kati na ba-oyo bazali sik’oyo bato ya suka, ebele bakokoma bato ya liboso.
Многі ж перві будуть останнї, а останні перві.
32 Wana bazalaki na nzela mpo na komata na Yelusalemi, Yesu azalaki kotambola liboso na bango. Bayekoli bazalaki na mawa, mpe bato mosusu oyo bazalaki kolanda bango bazalaki kobanga. Yesu abendaki lisusu na pembeni bayekoli na Ye zomi na mibale mpe ayebisaki bango makambo oyo esengeli kokomela Ye:
Були ж вони в дорозї, ідучи в Єрусалим, і випередив їх Ісус; й вжахнули ся вони; і, йдучи за ним, лякались. І, взявши знов дванайцятьох, почав їм глаголати, що Йому станеть ся:
33 — Tozali solo kokende na Yelusalemi; Mwana na Moto akokabama na maboko ya bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe ya balakisi ya Mobeko; bakokatela Ye etumbu ya kufa mpe bakokaba Ye na maboko ya bapagano,
Що ось ідемо в Єрусалим, і Син чоловічий буде виданий архиєреям та письменникам, і осудять вони Його на смерть, і видадуть Його поганам;
34 bakoseka Ye, bakobwakela Ye soyi, bakobeta Ye fimbu mpe bakoboma Ye; kasi, sima na mikolo misato, akosekwa.
і насьміхати муть ся з Него, й бити муть Його, й плювати муть на Него, і вбють Його; й третього дня воскресне.
35 Bongo Jake mpe Yoane, bana mibali ya Zebede, bapusanaki pene ya Yesu mpe balobaki na Ye: — Moteyi, tolingi ete osalela biso likambo oyo tokosenga Yo.
І приступають до Него Яков та Иоан, сини Зеведеєві, кажучи: Учителю, хочемо, щоб, про що просити мем, зробив нам.
36 Yesu atunaki bango: — Bolingi ete nasalela bino nini?
Він же рече їм: Що хочете, щоб зробив вам?
37 Bazongisaki: — Pesa biso nzela ya kovanda kati na nkembo na Yo: moko na ngambo ya loboko na Yo ya mobali, mpe mosusu, na ngambo ya loboko na Yo ya mwasi.
Вони ж кажуть Йому: Дай нам, щоб один по правицї в Тебе, а один по лївицї в Тебе сидїли ми в славі Твоїй.
38 Yesu alobaki na bango: — Bozali kososola te makambo oyo bozali kosenga! Boni, bokoki komela kopo oyo Ngai nakomela to kozwa libatisi oyo Ngai nakozwa?
Ісус же рече їм: Не знаєте, чого просите. Чи зможете пити чашу, яку я пю, і хрещеннєм, яким я хрещу ся, хрестити ся?
39 Bazongisaki: — Iyo, tokoki! Yesu alobaki na bango: — Solo, bokomela na bino kopo oyo Ngai nakomela mpe bokozwa na bino libatisi oyo Ngai nakozwa;
Вони ж кажуть Йому: Можемо. Ісус же рече їм: Ви-то чашу, яку я пю, пити мете, й хрещеннєм, яким я хрещусь, хрестити метесь;
40 kasi likambo ya kovanda na ngambo ya loboko na Ngai ya mobali to na ngambo ya loboko na Ngai ya mwasi, Ngai nakoki te kopesela yango ndingisa; bisika wana ezali ya bato oyo Tata na Ngai abongisela bango yango.
тільки ж, щоб сидїти вам по правицї в мене й по лївицї в мене, се не єсть моє дати, а кому приготовлено.
41 Tango bayekoli mosusu zomi bayokaki makambo wana, basilikelaki Jake mpe Yoane.
І почувши десять, почали ремствувати на Якова та Иоана.
42 Yesu abengaki bango nyonso mpe alobaki na bango: — Boyebi malamu ete bato oyo bamonanaka lokola bakonzi bakonzaka bikolo oyo ezali na se ya bokonzi na bango, mpe bakalaka ya lokumu bakonzaka bato oyo bazali na se ya bokonzi na bango.
Ісус же, покликавши їх, рече їм: Ви знаєте, що котрі, здаєть ся, князюють над поганами, панують над ними, й великі їх управляють ними.
43 Esengeli te kozala bongo kati na bino; nzokande, tika ete moto nyonso oyo alingi kozala moto monene kati na bino azala mosali na bino;
Не так же буде в вас; нї, хто хоче стати ся великим між вами, нехай буде слугою вам;
44 mpe tika ete moto nyonso oyo alingi kozala moto ya liboso kati na bino azala mowumbu ya bino nyonso!
і хто хоче між вами стати ся першим, нехай буде усїм рабом.
45 Pamba te Mwana na Moto ayaki te mpo ete basalela Ye, kasi ayaki nde kosala mpo na bato mpe kopesa bomoi na Ye lokola motuya ya kofuta mpo na kosikola bato ebele.
Бо й Син чоловічий не прийшов, щоб служено Йому, а служити й дати душу свою викуп за многих.
46 Yesu mpe bayekoli na Ye bakomaki na Jeriko. Tango bazalaki kobima wuta na engumba elongo na bato ebele, mokufi miso Bartime, mwana mobali ya Time, avandaki pembeni ya nzela mpe azalaki kosenga-senga.
І приходять у Єрихон; і як виходив Він із Єрихону, й ученики Його, й багато народу, син Тимеїв, Вартимей слїпий, сидїв над шляхом, просячи.
47 Tango ayokaki ete Yesu ya Nazareti azali koleka, akomaki koganga: — Yesu, mwana ya Davidi, yokela ngai mawa!
І, почувши, що се Ісус Назарянин, почав кричати й казати: Сину Давидів Ісусе, помилуй мене.
48 Bato ebele bazalaki kopamela ye mpo ete akanga monoko na ye, kasi Bartime agangaki lisusu makasi: — Mwana ya Davidi, yokela ngai mawa!
І сварили на него многі, щоб мовчав; він же ще більше кричав: Сину Давидів, помилуй мене.
49 Yesu atelemaki mpe alobaki: — Bobenga ye! Bato babengaki mokufi miso yango mpe balobaki na ye: — Yika mpiko! Telema! Azali kobenga yo!
І, зупинившись Ісус, звелїв його покликати. І покликали сліпого, говорячи йому: Бодрись, устань; кличе тебе.
50 Tango ayokaki maloba yango, abwakaki elamba na ye, atelemaki mpe apusanaki pene ya Yesu.
Він же, скинувши одежу свою, встав і приступив до Ісуса.
51 Yesu alobaki na ye: — Olingi nasala nini mpo na yo? Mokufi miso azongisaki: — Moteyi, nalingi komona.
І, озвавшись, рече йому Ісус: Що хочеш, щоб зробив тобі? Слїпий же каже Йому: Учителю, щоб прозрів.
52 Yesu alobaki na ye: — Kende, kondima na yo ebikisi yo. Mbala moko, akomaki komona mpe alandaki Yesu.
Ісусже рече йому: Іди, віра твоя спасла тебе. І зараз прозрів він, й пійшов слідом за Ісусом дорогою.