< Malashi 4 >

1 Pamba te mokolo yango ezali koya; ekozala moto makasi lokola fulu ya moto. Bato nyonso ya lofundu mpe bato nyonso oyo basalaka mabe bakokoma lokola matiti ya kokawuka. Mokolo yango ekozikisa bango, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. « Ekotikala ata mosisa to etape te.
“For behold, the day comes, burning like a furnace, when all the proud and all who work wickedness will be stubble. The day that comes will burn them up,” says the LORD of Hosts, “so that it will leave them neither root nor branch.
2 Kasi mpo na bino oyo botosaka Kombo na Ngai, moyi ya bosembo ekobima mpe ekomemela bino lobiko. Boye, bokobina mpe bokopumbwa na esengo lokola bana ngombe ya mibali kati na lopango.
But to you who fear my name shall the sun of righteousness arise with healing in its wings. You will go out and leap like calves of the stall.
3 Bokonyata bato mabe, pamba te bakokoma lokola putulu na se ya matambe na bino, na mokolo oyo nazali kobongisa, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
You shall tread down the wicked; for they will be ashes under the soles of your feet in the day that I make,” says the LORD of Hosts.
4 « Bokanisa Mobeko, malako mpe mitindo oyo napesaki epai ya Moyize, mosali na Ngai, na ngomba Orebi, mpo na Isalaele mobimba.
“Remember the Torah of Moses my servant, which I commanded to him in Horeb for all Israel, even statutes and ordinances.
5 Liboso ete mokolo ya Yawe eya, mokolo monene mpe ya somo, nakotindela bino mosakoli Eliya.
Behold, I will send you Elijah the prophet before the great and terrible day of the LORD comes.
6 Akozongisa mitema ya batata epai ya bana, mpe mitema ya bana epai ya batata, soki te nakoya kobebisa mokili na nzela ya bilakeli mabe. »
He will turn the hearts of the fathers to the children and the hearts of the children to their fathers, lest I come and strike the earth with a curse.”

< Malashi 4 >