< Malashi 3 >

1 « Nakotinda ntoma na Ngai; ye nde akoya liboso mpo na kobongisela Ngai nzela. Boye Yawe oyo bozali kozela akoya na pwasa kati na Tempelo na Ye; ntoma ya boyokani oyo bolingi akoya, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
Voici que j'envoie mon messager, et il préparera le chemin devant moi; et soudain viendra dans son temple le Seigneur que vous cherchez, l'ange de l'alliance que vous désirez. Voici, il vient, dit Yahweh des armées.
2 Kasi nani akobika na mokolo oyo akoya? Nani akotelema na mokolo oyo akomonana? Pamba te azali lokola moto ya monyangwisi bibende na moto, lokola sabuni oyo etelisaka bilamba.
Et qui soutiendra le jour de sa venue, et qui restera debout quand il apparaîtra? Car il sera comme le feu du fondeur, comme la potasse des foulons.
3 Akovanda lokola monyangwisi bibende mpe mopetoli palata na moto. Akopetola bana mibali ya Levi mpe akolekisa bango na moto ndenge bapetolaka wolo mpe palata, mpe bakokoma mpo na Yawe bato oyo bamemelaka Ye makabo kolanda ndenge esengeli kozala.
Il s'assoira, fondant et purifiant l'argent; il purifiera les fils de Lévi, et les épurera comme l'or et l'argent; et ils seront pour Yahweh des ministres qui lui présenteront l'oblation selon la justice;
4 Bongo makabo ya Yuda mpe ya Yelusalemi ekosepelisa Yawe, ndenge ezalaki na tango ya kala.
et l'oblation de Juda et de Jérusalem sera agréable à Yahweh comme aux anciens jours, comme dans les années d'autrefois.
5 « Nakopusana pene na bino mpo na kosambisama, nakosala na lombangu mpo na kofunda bato ya maji, ya ekobo, bato oyo balapaka ndayi ya lokuta, bato oyo banyokolaka basali na bango, basi bakufisa mibali mpe bana bitike, oyo banyokolaka bapaya mpe batosaka Ngai te, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
Je m'approcherai de vous pour le jugement, et je serai un témoin prompt contre les enchanteurs, contre les adultères, contre ceux qui jurent faussement, contre ceux qui extorquent au mercenaire son salaire, qui oppriment la veuve et l'orphelin, qui repoussent l'étranger, et qui ne me craignent pas, dit Yahweh des armées.
6 « Ngai Yawe, nabongwanaka te. Mpo na yango, bino bana mibali ya Jakobi, bozali kaka.
C'est parce que moi, Yahweh, je ne change pas, que vous, les enfants de Jacob, vous n'avez pas été consumés.
7 Wuta na tango ya bakoko na bino, bozalaki kaka kobuka mibeko na Ngai mpe bozalaki kotosa Ngai te. Bozonga epai na Ngai, mpe Ngai nakozonga epai na bino, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. « Kasi bozali komituna: ‹ Tokozonga ndenge nini? ›
Depuis les jours de vos pères, vous vous êtes écartés de mes ordonnances et vous ne les avez pas observées. Revenez à moi et je reviendrai à vous, dit Yahweh des armées. — Et vous dites: " En quoi reviendrons-nous? " —
8 Boni, moto akoki solo kokosa Nzambe? Nzokande bino, bozali kokosa Ngai. Kasi bozali koloba: ‹ Tokosi Yo na likambo nini? › Bokosi Ngai na eteni na bino ya zomi mpe na makabo.
Un homme oserait-il frauder Dieu, que vous me fraudiez? — Et vous dites: " En quoi t'avons-nous fraudé? " — Dans la dîme et la part à prélever.
9 Bozali na se ya elakeli mabe, pamba te bino nyonso, ekolo oyo mobimba, bozali kokosa Ngai.
Vous êtes frappés, vous, de la malédiction, et moi, vous me fraudez, vous, toute la nation!
10 Boye, bomema biteni na bino nyonso ya zomi, na mobimba na yango, na ebombelo bomengo ya Tempelo mpo ete bilei ezanga te kati na Ndako na Ngai. Na bongo, bomeka Ngai, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, « mpo na kotala soki nakofungolela bino te maninisa ya Lola mpe soki nakosopela bino te lipamboli na Ngai, na bofuluki oyo ezanga ndelo.
Apportez toute la dîme au trésor et qu'il y ait des vivres dans ma maison! Et mettez-moi donc à l'épreuve en ceci, dit Yahweh des armées: si je n'ouvre pas pour vous les écluses des cieux, et si je ne répands pas sur vous la bénédiction jusqu'à surabondance.
11 Nakopekisa banyama mike-mike kolia bambuma ya bilanga na bino, bongo bilanga na bino ya vino ekotikala kozanga bambuma te, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
Pour vous, je chasserai l'insecte qui dévore; il ne vous détruira plus les fruits du sol, et la vigne ne sera plus stérile pour vous dans la campagne, dit Yahweh des armées.
12 « Bato ya bikolo nyonso bakoloba ete bozali bato ya esengo, pamba te mokili na bino ekozala mokili ya malamu mpo na kovanda, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
Toutes les nations vous diront heureux, car vous serez un pays de délices, dit Yahweh des armées.
13 Yawe alobi: « Bozali koloba makambo mabe mpo na kotelemela Ngai. Kasi bozali kotuna: ‹ Maloba nini ya mabe tolobi mpo na kotelemela Yo? ›
Vos paroles sont dures contre moi, dit Yahweh. Et vous dites: " Qu'avons-nous dit de toi entre nous? "
14 Bozali lisusu koloba: ‹ Kosalela Nzambe ezali na tina te. Litomba nini penza ezali na kotosa mibeko na Ye mpe na komiboya liboso ya Yawe, Mokonzi ya mampinga?
— Vous avez dit: " Inutile de servir Dieu; qu'avons-nous gagné à observer ses préceptes et à marcher avec tristesse devant Yahweh des armées? "
15 Tosengeli sik’oyo komona bato ya lofundu lokola bato ya esengo, bato mabe bazali kokende liboso. Atako bazali kobeta tembe na Nzambe, kasi bazali kaka kolonga. › »
Et maintenant, nous proclamons heureux les impies; ils prospèrent, ceux qui font le mal; ils tentent Dieu, et pourtant ils échappent. "
16 Ndenge wana nde bato oyo batosaka Yawe bazalaki kosolola bango na bango, kasi Yawe ayokaki masolo na bango. Boye buku moko ya ekaniseli ekomamaki liboso ya Yawe mpo na bato oyo batosaka Yawe mpe bapesaka Kombo na Ye lokumu.
Alors ceux qui craignent Yahweh se sont entretenus les uns avec les autres. Et Yahweh a été attentif, il a entendu, et un livre de souvenir a été écrit devant lui, pour ceux qui craignent Yahweh et qui respectent son nom.
17 « Na mokolo oyo nakomonisa nguya na Ngai, bakokoma bato na Ngai, bomengo na Ngai ya talo. Nakobatela bango ndenge tata abatelaka mwana oyo asalelaka ye, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
Au jour que je prépare, dit Yahweh des armées, ils seront pour moi un bien particulier, et je serai pour eux plein de tendresse, comme un homme est plein de tendresse, pour son fils qui le sert.
18 « Bongo bokomona lisusu bokeseni kati na moto ya sembo mpe moto mabe, kati na moto oyo asalelaka Nzambe mpe moto oyo asalelaka Ye te.
Et vous verrez de nouveau la différence entre le juste et le méchant, entre celui qui sert Dieu et celui qui ne le sert pas.

< Malashi 3 >