< Malashi 2 >
1 « Sik’oyo, bino Banganga-Nzambe, likebisi oyo epesami epai na bino:
Now this command is for you priests!
2 Soki boyoki te, soki boboyi kozwa mokano ya kopesa Kombo na Ngai lokumu, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, « nakotindela bino elakeli mabe mpe nakolakela lipamboli na bino mabe. Solo, nasili kolakela yango mabe, pamba te bozwaki mokano te ya kopesa Kombo na Ngai lokumu.
If you will not listen and if you will not take it to heart to honor me, says the Lord Almighty, then I will place a curse on you and I will curse your blessings—in fact I have already cursed them because you haven't taken what I said to heart.
3 Likolo na bino, nakopamela bakitani na bino, nakobwakela bino basalite ya banyama na bino na bilongi, salite ya banyama oyo bobonzaka na mikolo ya bafeti na bino, mpe bakomema bino nzela moko na basalite yango.
Watch out! I am going to penalize your descendants. I will spread manure on your faces from the animals you sacrifice, the manure from your religious festivals, and you will be thrown out with it.
4 Bokoyeba solo ete napesi bino likebisi oyo mpo ete boyokani na Ngai elongo na Levi esuka te, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
Then you will know that I sent you this command so that my agreement with Levi can continue, says the Lord Almighty.
5 « Boyokani na Ngai elongo na ye ezali boyokani ya bomoi mpe ya kimia, mpe nakopesa ye yango mpo ete atosa Ngai. Atosaki Ngai solo mpe azalaki kolenga liboso ya Kombo na Ngai.
My agreement with him was one of life and peace, which I gave to him, and respect—he respected me. He stood in awe of me.
6 Monoko na ye ezalaki kobimisa malakisi ya solo; lokuta etikalaki komonana na bibebu na ye te. Azalaki kotambola elongo na Ngai na kimia mpe na alima. Na nzela na ye, bato ebele batikaki kotambola na nzela ya masumu.
He taught the people the truth; nothing in his teaching was false. He walked with me in peace and did what was right, and he helped many to turn way from sin.
7 Pamba te bibebu ya Nganga-Nzambe esengeli kobatela boyebi, mpe bato basengeli kozwa boyebi na monoko na ye mpo ete azali ntoma ya Yawe, Mokonzi ya mampinga.
A priest should explain the truth about God, they should go to him to be taught, for he is the Lord Almighty's messenger.
8 Kasi bino, bopengwi na nzela mpe bobetisi bato ebele mabaku na malakisi na bino; bobebisi boyokani elongo na Balevi, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
But you have turned from my way. You have made many people to fall into sin. By your teaching you have broken the agreement with Levi, says the Lord Almighty.
9 « Boye, nasalaki ete botiolama mpe bosambwa liboso ya bato nyonso, pamba te bolandaki banzela na Ngai te, kasi bozalaki kopona bilongi na makambo oyo etali mibeko. »
So I have destroyed any respect you had, and humiliated you before all the people. For you have not kept my ways, and have shown favoritism in what you teach.
10 Boni, biso nyonso tozali bana ya tata moko te? Boni, tokelama na Nzambe moko te? Bongo mpo na nini tozali kobebisa boyokani ya batata na biso na ndenge tozali kosalana mabe biso na biso?
Don't we all have one Father? Didn't one God create us? So why are we unfaithful to each other, violating the agreement made by our forefathers?
11 Bato ya Yuda batamboli na boyengebene te, bakotisi likambo ya nkele kati na Isalaele mpe na Yelusalemi, pamba te bato ya Yuda babebisi bosantu ya Esika ya bule ya Yawe, Esika ya bule oyo Yawe alingaka makasi: babali basi oyo basambelaka nzambe mopaya.
The people of Judah have been unfaithful and have committed a disgusting sin in Israel and Jerusalem. For the men of Judah have defiled the Lord's Temple (which he loves) by marrying women who worship idols.
12 Mpo na mobali nyonso oyo akosala bongo, azala nani, tika ete Yawe alongola ye na bandako ya kapo ya Jakobi, ata amemi makabo epai na Yawe, Mokonzi ya mampinga.
May the Lord expel the family of any man who does this from the nation of Israel! May there be no one left to bring an offering to the Lord Almighty!
13 Tala makambo mosusu oyo bosalaka: bozali kotondisa etumbelo ya Yawe na mayi ya miso, bozali kolelalela mpo ete Yawe azali kotala lisusu makabo na bino te mpe aboyi koyamba yango na maboko na bino.
Something else you do is to pour out your tears on the Lord's altar weeping and moaning because he no longer pays attention to your offerings or doesn't want to accept them.
14 Bozali kotuna: « Mpo na nini boye? » Ezali mpo ete Yawe azali Motatoli kati na yo mpe mwasi na yo ya bolenge, kasi yo okosaki ye. Nzokande, azali mwasi oyo okangani na ye na nzela ya boyokani.
“Why not?” you ask. Because the Lord witnessed the vows you and your wife exchanged when you were young. You were unfaithful to her, your wife and partner joined to you by marriage contract.
15 Boni, Yawe akomisaki bango te moto moko? Bazali ya Yawe na mosuni mpe na molimo. Moto yango alukaka nini? Alukaka bana kowuta epai na Nzambe. Boye, bosala keba mpo na bomoi na bino. Tika ete moto moko te akosa mwasi na ye ya bolenge!
Did he not make you one, and give some of his Spirit to you? And what does he want? Children of God. So watch what you do, and don't be unfaithful to the wife you married when you were young.
16 Pamba te Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi: « Nayinaka likambo ya koboma libala; ekokani na moto oyo elamba na ye ezwi makila tango abomi moto, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. Yango wana, bosala keba mpo na bomoi na bino mpe botikala sembo.
For I hate divorce, says the Lord God of Israel, for it's a violent attack on the wife, says the Lord Almighty. So watch what you do, and don't be unfaithful.
17 Bolembisi Yawe na maloba na bino mpe bozali lisusu kotuna: « Tolembisi Yo na likambo nini? » Ezali tango bozali koloba: « Moto oyo asalaka mabe azali malamu na miso ya Yawe, mpe Yawe asepelaka na ye » to mpe « Wapi Nzambe ya bosembo? »
You have worn the Lord out with your words. “How have we worn him out?” you ask. By saying everyone who does evil is good in the sight of the Lord and he is happy with them, or by asking, where is the Lord's justice?