< Luka 5 >

1 Mokolo moko, wana Yesu azalaki pene ya ebale ya Genezareti, ebele ya bato batondaki pembeni na Ye mpo na koyoka Liloba na Nzambe.
무리가 옹위하여 하나님의 말씀을 들을새 예수는 게네사렛 호숫가에 서서
2 Amonaki babwato mibale pembeni ya ebale; ezali balobi mbisi nde bakitaki longwa na babwato yango mpo na kosukola minyama na bango.
호숫가에 두 배가 있는 것을 보시니 어부들은 배에서 나와서 그물을 씻는지라
3 Moko kati na babwato yango ezalaki ya Simona. Yesu amataki na bwato yango mpe asengaki na Simona ete apusa yango mwa mosika longwa na mokili. Bongo avandaki mpe abandaki koteya bato wuta na bwato.
예수께서 한 배에 오르시니 그 배는 시몬의 배라 육지에서 조금 떼기를 청하시고 앉으사 배에서 무리를 가르치시더니
4 Tango asilisaki koteya, alobaki na Simona: — Pusa bwato epai mayi ezali penza mozindo, mpe bobwaka minyama na mayi mpo na koloba bambisi.
말씀을 마치시고 시몬에게 이르시되 `깊은 데로 가서 그물을 내려 고기를 잡으라'
5 Simona azongiselaki Ye: — Moteyi, tosali butu mobimba, tozwi ata eloko moko te. Kasi lokola olobi bongo, nakobwaka minyama.
시몬이 대답하여 가로되 `선생이여, 우리들이 밤이 맞도록 수고를 하였으되 얻은 것이 없지마는 말씀에 의지하여 내가 그물을 내리리이다' 하고
6 Tango basalaki bongo, bazwaki bambisi ebele, kutu minyama na bango ebandaki kopasuka.
그리한즉 고기를 에운 것이 심히 많아 그물이 찢어지는지라
7 Boye babengaki baninga na bango, oyo bazalaki kati na bwato mosusu mpo ete baya kosalisa bango. Baninga yango bayaki, batondisaki babwato nyonso mibale, mpe ekomaki kozinda.
이에 다른 배에 있는 동무를 손짓하여 와서 도와 달라 하니 저희가 와서 두 배에 채우매 잠기게 되었더라
8 Tango Simona Petelo amonaki bongo, afukamaki na mabolongo ya Yesu mpe alobaki: — Nkolo, zala mosika na ngai, pamba te nazali moto ya masumu!
시몬 베드로가 이를 보고 예수의 무릎 아래 엎드려 가로되 `주여 나를 떠나소서 나는 죄인이로소이다' 하니
9 Somo monene ekangaki Simona mpe baninga na ye nyonso, likolo ya motango ya bambisi oyo bazwaki.
이는 자기와 및 함께 있는 모든 사람이 고기 잡힌 것을 인하여 놀라고
10 Ndenge moko mpe mpo na Jake mpe Yoane, bana mibali ya Zebede, oyo bazalaki baninga ya mosala ya Simona. Bongo Yesu alobaki na Simona: — Kobanga te! Kobanda lelo, okokoma koloba nde bato.
세베대의 아들로서 시몬의 동업자인 야고보와 요한도 놀랐음이라 예수께서 시몬에게 일러 가라사대 `무서워 말라 이제 후로는 네가 사람을 취하리라' 하시니
11 Boye bamemaki babwato na mokili, batikaki nyonso mpe balandaki Yesu.
저희가 배들을 육지에 대고 모든 것을 버려두고 예수를 좇으니라
12 Mokolo mosusu, wana Yesu azalaki kati na moko ya bingumba, moto moko atonda na maba na nzoto abimaki. Tango amonaki Yesu, afukamaki liboso na Ye elongi kino na mabele mpe abondelaki Ye: — Nkolo, soki olingi, komisa ngai peto.
예수께서 한 동네에 계실 때에 온 몸에 문둥병 들린 사람이 있어 예수를 보고 엎드려 구하여 가로되 `주여 원하시면 나를 깨끗케 하실 수 있나이다' 하니
13 Yesu asembolaki loboko na Ye, asimbaki ye mpe alobaki: — Solo, nalingi yango, koma peto! Mbala moko, maba esilaki.
예수께서 손을 내밀어 저에게 대시며 가라사대 `내가 원하노니 깨끗함을 받으라!' 하신대 문둥병이 곧 떠나니라
14 Yesu apesaki ye mitindo: — Koloba na moto moko te makambo oyo ekomeli yo, kasi kende komilakisa epai ya Nganga-Nzambe mpe, mpo na kopetolama na yo, pesa likabo oyo Moyize akataki lokola mobeko, mpo ete ezala litatoli mpo na bango.
예수께서 저를 경계하시되 `아무에게도 이르지 말고 가서 제사장에게 네 몸을 보이고 또 네 깨끗케 됨을 인하여 모세의 명한 대로 예물을 드려 저희에게 증거하라' 하셨더니
15 Sango na tina na Yesu ezalaki kaka kopanzana se kopanzana, mpe bato ebele bazalaki koya kosangana mpo na koyoka Ye mpe mpo na kobikisama na bokono na bango.
예수의 소문이 더욱 퍼지매 허다한 무리가 말씀도 듣고 자기 병도 나음을 얻고자 하여 모여 오되
16 Kasi mbala mingi, Yesu azalaki kokende na bisika epai wapi azalaki kaka Ye moko mpo na kosambela.
예수는 물러가사 한적한 곳에서 기도하시니라
17 Mokolo moko, wana Yesu azalaki koteya, Bafarizeo mpe balakisi ya Mobeko bayaki kovanda wana; bawutaki na bamboka nyonso ya Galile, na Yuda mpe na Yelusalemi. Mpe nguya ya Nkolo ezalaki elongo na Yesu mpo na kobikisa babeli.
하루는 가르치실 때에 갈릴리 각 촌과 유대와 예루살렘에서 나온 바리새인과 교법사들이 앉았는데 병을 고치는 주의 능력이 예수와 함께 하더라
18 Ndambo ya mibali bayaki, bamemaki ebosono moko na tsipoyi; balukaki nzela ya kokotisa ye kati na ndako mpo na kotia ye liboso ya Yesu.
한 중풍병자를 사람들이 침상에 메고 와서 예수 앞에 들여 놓고자 하였으나
19 Kasi lokola bamonaki te nzela ya kokotisa ye kati na ndako, pamba te bato bazalaki ebele, bamataki na likolo ya ndako, batobolaki lidusu mpe bakitisaki ye, elongo na tsipoyi na ye, na kati-kati ya ebele ya bato, liboso ya Yesu.
무리 때문에 메고 들어갈 길을 얻지 못한지라 지붕에 올라가 기와를 벗기고 병자를 침상채 무리 가운데로 예수 앞에 달아 내리니
20 Tango Yesu amonaki kondima na bango, alobaki: — Molingami na Ngai, masumu na yo elimbisami!
예수께서 저희 믿음을 보시고 이르시되 `이 사람아 네 죄 사함을 받았느니라' 하시니
21 Bafarizeo mpe balakisi ya Mobeko bakomaki kokanisa: — Moto oyo azali komimona penza nani mpo ete abimisa maloba ya kotiola Nzambe? Nani akoki kolimbisa masumu soki kaka Ye moko Nzambe te?
서기관과 바리새인들이 의논하여 가로되 `이 참람한 말을 하는 자가 누구뇨? 오직 하나님 외에 누가 능히 죄를 사하겠느냐?'
22 Kasi lokola Yesu ayebaki makanisi na bango, atunaki bango: — Mpo na nini bozali kokanisa biloko oyo kati na mitema na bino?
예수께서 그 의논을 아시고 대답하여 가라사대 `너희 마음에 무슨 의논을 하느냐?'
23 Likambo nini eleki pete mpo na koloba: « Masumu na yo elimbisami » to « telema mpe tambola? »
제 죄 사함을 받았느니라 하는 말과 일어나 걸어 가라 하는 말이 어느 것이 쉽겠느냐?
24 Kasi nalingi boyeba ete Mwana na Moto azali na bokonzi ya kolimbisa masumu kati na mokili. Bongo alobaki na ebosono: « Nalobi na yo: Telema, kamata tsipoyi na yo mpe kende na ndako na yo! »
그러나 인자가 땅에서 죄를 사하는 권세가 있는 줄을 너희로 알게 하리라' 하시고 중풍병자에게 말씀하시되 `내가 네게 이르노니 일어나 네 침상을 가지고 집으로 가라' 하시매
25 Mbala moko, atelemaki liboso na bango, akamataki tsipoyi oyo bazalaki kolalisa ye na yango, azongaki na ndako na ye na kokumisa Nzambe.
그 사람이 저희 앞에서 곧 일어나 누웠던 것을 가지고 하나님께 영광을 돌리며 자기 집으로 돌아가니
26 Awa bato nyonso bakamwaki, bakomaki kokumisa Nzambe; awa mpe somo ekangaki bango, bakomaki koloba: « Lelo penza, tomoni makambo ya kokamwa! »
모든 사람이 놀라 하나님께 영광을 돌리며 심히 두려워하여 가로되 오늘날 우리가 기이한 일을 보았다 하니라
27 Sima na yango, Yesu abimaki mpe amonaki mofutisi mpako moko, kombo na ye « Levi. » Levi azalaki ya kovanda na ndako na ye ya mosala epai wapi bafutaka mpako. Yesu alobaki na ye: « Landa Ngai. »
그 후에 나가사 레위라 하는 세리가 세관에 앉은 것을 보시고 `나를 좇으라!' 하시니
28 Levi atelemaki, atikaki biloko nyonso mpe alandaki Yesu.
저가 모든 것을 버리고 일어나 좇으니라
29 Bongo Levi asalaki feti monene, kati na ndako na ye, mpo na lokumu ya Yesu; bafutisi mpako ebele mpe bato mosusu bazalaki kolia mesa moko elongo na bango.
레위가 예수를 위하여 자기 집에서 큰 잔치를 하니 세리와 다른 사람이 많이 함께 앉았는지라
30 Kasi Bafarizeo mpe balakisi ya Mobeko oyo bazalaki lingomba moko elongo na bango bakomaki koyimayima mpe balobaki na bayekoli ya Yesu: — Mpo na nini bozali kolia mpe komela mesa moko na bafutisi mpako mpe bato ya masumu?
바리새인과 저희 서기관들이 그 제자들을 비방하여 가로되 `너희가 어찌하여 세리와 죄인과 함께 먹고 마시느냐?'
31 Yesu azongiselaki bango: — Bato oyo bazali kolongono na nzoto bazalaka na posa ya monganga te, ezali babeli nde bazalaka na posa na ye.
예수께서 대답하여 가라사대 `건강한 자에게는 의원이 쓸데없고 병든자에게라야 쓸데 있나니
32 Nayaki te koluka bato ya sembo, kasi bato ya masumu mpo ete babongola mitema.
내가 의인을 부르러 온 것이 아니요 죄인을 불러 회개시키러 왔노라'
33 Bafarizeo balobaki na Yesu: — Mpo na nini bayekoli ya Yoane mpe bayekoli ya Bafarizeo bakilaka bilei mbala na mbala mpe bamipesaka na mabondeli; kasi bayekoli na yo, mosala na bango kaka kolia mpe komela?
저희가 예수께 말하되 `요한의 제자는 자주 금식하며 기도하고 바리새인의 제자들도 또한 그리하되 당신의 제자들은 먹고 마시나이다'
34 Yesu azongiselaki bango: — Boni, bokoki solo kosenga na bato oyo babengami na feti ya libala ete bakila bilei wana mobali ya libala azali nanu elongo na bango?
예수께서 저희에게 이르시되 `혼인집 손님들이 신랑과 함께 있을 때에 너희가 그 손님으로 금식하게 할 수 있느뇨?
35 Tango ezali koya, oyo mobali ya libala akozala lisusu te elongo na bango; ekozala na tango wana nde bakokila bilei.
그러나 그 날에 이르러 저희가 신랑을 빼앗기리니 그 날에는 금식할 것이니라'
36 Yesu alobaki na bango lisusu lisese oyo: — Moto moko te asalelaka eteni ya elamba ya sika mpo na kobamba elamba ya kala; soki te, akopasola na pamba elamba ya sika mpe kitendi ya sika ekobalana te na elamba ya kala.
또 비유하여 이르시되 `새 옷에서 한 조각을 찢어 낡은 옷에 붙이는 자가 없나니 만일 그렇게 하면 새 옷을 찢을 뿐이요 또 새 옷에서 찢은 조각이 낡은 것에 합하지 아니하리라
37 Moto moko mpe te atiaka vino ya sika kati na bambeki ya kala; soki te, vino ya sika ekopasola bambeki mpe ekosopana, mpe bambeki ekobeba libela.
새 포도주를 낡은 가죽 부대에 넣는 자가 없나니 만일 그렇게 하면 새 포도주가 부대를 터뜨려 포도주가 쏟아지고 부대도 버리게 되리라
38 Nzokande, esengeli kaka kotia vino ya sika kati na bambeki ya sika.
새 포도주는 새 부대에 넣어야 할 것이니라
39 Mpe moto moko te alingaka komela vino ya sika soki awuti komela vino ya kala, pamba te balobaka: « Vino ya kala eleki kitoko. »
묵은 포도주를 마시고 새 것을 원하는 자가 없나니 이는 묵은 것이 좋다 함이니라'

< Luka 5 >