< Luka 4 >
1 Yesu atondisamaki na Molimo Mosantu, alongwaki na Yordani, mpe Molimo amemaki Ye kati na esobe
Jesus, full of the Holy Spirit, returned from the Jordan and was led by the Spirit into the wilderness
2 epai wapi Satana amekaki Ye mikolo tuku minei. Na mikolo wana, alia eloko moko te; mpe tango mikolo yango elekaki, ayokaki nzala.
for forty days, being tempted by the devil. He ate nothing in those days. Afterward, when they were completed, he was hungry.
3 Satana alobaki na Ye: — Soki ya solo ozali penza Mwana na Nzambe, loba na libanga ete ebongwana lipa.
The devil said to him, “If you are the Son of God, command this stone to become bread.”
4 Yesu azongiselaki ye: — Ekomama: « Moto akobika na lipa kaka te. »
Jesus answered him, saying, “It is written, ‘Man shall not live by bread alone, but by every word of God.’”
5 Satana amemaki Yesu na esika moko ya likolo makasi, alakisaki Ye mbala moko bokonzi nyonso ya mokili.
The devil, leading him up on a high mountain, showed him all the kingdoms of the world in a moment of time.
6 Satana alobaki na Yesu: — Nakopesa yo bokonzi oyo nyonso mpe nkembo na yango, pamba te epesamela ngai, mpe nakoki kopesa yango na moto nyonso oyo nalingi.
The devil said to him, “I will give you all this authority and their glory, for it has been delivered to me, and I give it to whomever I want.
7 Soki kaka ogumbameli ngai, nyonso ekokoma ya yo.
If you therefore will worship before me, it will all be yours.”
8 Yesu azongiselaki ye: — Ekomama: « Okogumbamelaka kaka Yawe, Nzambe na yo, mpe okosambelaka kaka Ye. »
Jesus answered him, “Get behind me, Satan! For it is written, ‘You shall worship the Lord your God, and you shall serve him only.’”
9 Bongo Satana amemaki Ye na Yelusalemi, atelemisaki Ye na songe ya Tempelo mpe alobaki na Ye: — Soki ozali penza Mwana na Nzambe, mibwaka na se;
He led him to Jerusalem and set him on the pinnacle of the temple, and said to him, “If you are the Son of God, cast yourself down from here,
10 pamba te ekomama: « Akopesa mitindo na ba-anjelu na Ye na tina na yo mpo ete babatela Yo malamu.
for it is written, ‘He will put his angels in charge of you, to guard you;’
11 Mpe bakomema Yo na maboko na bango mpo ete lokolo na Yo etutana na libanga te. »
and, ‘On their hands they will bear you up, lest perhaps you dash your foot against a stone.’”
12 Yesu azongisaki: — Ekomama: « Okomeka te Yawe, Nzambe na yo. »
Jesus answering, said to him, “It has been said, ‘You shall not tempt the Lord your God.’”
13 Tango Satana asilisaki komeka Yesu na lolenge nyonso, akendeki mosika na Ye kino na mokolo oyo ekatama.
When the devil had completed every temptation, he departed from him until another time.
14 Yesu azongaki na Galile, atonda na nguya ya Molimo; mpe basango na tina na Ye epanzanaki kati na etuka wana mobimba.
Jesus returned in the power of the Spirit into Galilee, and news about him spread through all the surrounding area.
15 Azalaki koteya kati na bandako na bango ya mayangani, mpe bato nyonso bazalaki kokumisa Ye.
He taught in their synagogues, being glorified by all.
16 Akendeki na Nazareti epai wapi akolaki; mpe na mokolo ya Saba, akotaki na ndako ya mayangani, ndenge ezalaki momesano na ye. Atelemaki mpo na kotanga,
He came to Nazareth, where he had been brought up. He entered, as was his custom, into the synagogue on the Sabbath day, and stood up to read.
17 mpe bapesaki Ye buku ya mosakoli Ezayi. Afungolaki yango mpe amonaki esika epai wapi bakoma:
The book of the prophet Isaiah was handed to him. He opened the book, and found the place where it was written,
18 « Molimo ya Nkolo azali likolo na Ngai, pamba te apakoli Ngai mafuta mpo na kosakola Sango Malamu epai ya babola; atindi Ngai kosakola bonsomi epai ya bakangami, koyebisa bakufi miso ete bakomona lisusu, kokangola bato oyo bazali konyokwama
“The Spirit of the Lord is on me, because he has anointed me to preach good news to the poor. He has sent me to heal the broken hearted, to proclaim release to the captives, recovering of sight to the blind, to deliver those who are crushed,
19 mpe kosakola mobu ya ngolu ya Nkolo. »
and to proclaim the acceptable year of the Lord.”
20 Bongo akangaki buku yango, azongisaki yango epai ya mosali ya ndako ya mayangani mpe avandaki. Miso ya bato nyonso kati na ndako ya mayangani ekomaki kotala Ye.
He closed the book, gave it back to the attendant, and sat down. The eyes of all in the synagogue were fastened on him.
21 Bongo akomaki koloba na bango: — Makomi oyo bowuti koyoka ekokisami lelo!
He began to tell them, “Today, this Scripture has been fulfilled in your hearing.”
22 Bato nyonso balobaki makambo ya malamu na tina na Ye mpe bakamwaki mingi maloba ya ngolu oyo ezalaki kobima na monoko na Ye; bakomaki komituna: — Boni, Ye azali mwana ya Jozefi te?
All testified about him and wondered at the gracious words which proceeded out of his mouth; and they said, “Isn’t this Joseph’s son?”
23 Yesu alobaki na bango: — Nayebi malamu ete bokoloba na Ngai lisese oyo: « Monganga, mibikisa yo moko! » Mpe bokoloba na Ngai: « Sala mpe awa, kati na engumba na Yo, makambo oyo toyokaki ete osalaki yango kati na Kapernawumi! »
He said to them, “Doubtless you will tell me this proverb, ‘Physician, heal yourself! Whatever we have heard done at Capernaum, do also here in your hometown.’”
24 Abakisaki: — Nazali koloba na bino penza ya solo: « Mosakoli moko te andimamaka kati na ekolo na ye.
He said, “Most certainly I tell you, no prophet is acceptable in his hometown.
25 Nazali koloba na bino penza ya solo: ezalaki na basi ebele bakufisa mibali kati na Isalaele, na tango ya Eliya, tango likolo ekangamaki mibu misato mpe basanza motoba, mpe nzala makasi ezalaki kati na ekolo mobimba.
But truly I tell you, there were many widows in Israel in the days of Elijah, when the sky was shut up three years and six months, when a great famine came over all the land.
26 Nzokande, Eliya atindamaki te epai ya moko kati na bango, kasi atindamaki kaka epai ya mwasi moko akufisa mobali mpe azalaki kovanda na mboka Sarepita, kati na ekolo Sidoni.
Elijah was sent to none of them, except to Zarephath, in the land of Sidon, to a woman who was a widow.
27 Mpe na tango ya mosakoli Elize, bato na maba bazalaki ebele kati na Isalaele, kasi moko te kati na bango apetolamaki, longola kaka Namani, moto ya Siri. »
There were many lepers in Israel in the time of Elisha the prophet, yet not one of them was cleansed, except Naaman, the Syrian.”
28 Bato nyonso oyo bazalaki kati na ndako ya mayangani basilikaki makasi tango bayokaki bongo;
They were all filled with wrath in the synagogue as they heard these things.
29 batelemaki, bakumbaki Yesu na libanda ya engumba, mpe bamemaki Ye kino na songe ya ngomba epai wapi batongaki engumba na bango, mpo ete babwaka Ye na se.
They rose up, threw him out of the city, and led him to the brow of the hill that their city was built on, that they might throw him off the cliff.
30 Kasi Yesu alekaki na kati-kati na bango mpe akobaki mobembo na Ye.
But he, passing through the middle of them, went his way.
31 Bongo Yesu akendeki na Kapernawumi, engumba ya Galile, mpe ateyaki kuna bato na mokolo ya Saba.
He came down to Capernaum, a city of Galilee. He was teaching them on the Sabbath day,
32 Bakamwaki makasi malakisi na Ye, pamba te maloba na Ye ezalaki na bokonzi.
and they were astonished at his teaching, for his word was with authority.
33 Kati na ndako ya mayangani, ezalaki na mobali moko oyo azalaki na se ya bokonzi ya molimo mabe. Agangaki na mongongo makasi:
In the synagogue there was a man who had a spirit of an unclean demon; and he cried out with a loud voice,
34 — Ah Yesu ya Nazareti, likambo nini kati na biso na Yo? Oyei mpo na kobebisa biso? Nayebi nani oyo Yo ozali: Mosantu ya Nzambe!
saying, “Ah! what have we to do with you, Jesus of Nazareth? Have you come to destroy us? I know who you are: the Holy One of God!”
35 Yesu atelemelaki molimo mabe yango mpe apesaki yango mitindo: — Kanga monoko na yo! Bima kati na moto oyo! Molimo mabe ebwakaki moto yango na mabele, liboso ya bato nyonso, ebimaki kati na ye mpe esalaki ye ata mabe moko te.
Jesus rebuked him, saying, “Be silent and come out of him!” When the demon had thrown him down in the middle of them, he came out of him, having done him no harm.
36 Bato nyonso bakamwaki mpe bakomaki kotunana: — Oyo ezali lisusu maloba nini! Azali kopesa mitindo epai ya milimo mabe, na bokonzi mpe na nguya nyonso, mpe yango ezali kobima!
Amazement came on all and they spoke together, one with another, saying, “What is this word? For with authority and power he commands the unclean spirits, and they come out!”
37 Mpe sango na tina na Yesu epanzanaki na bamboka ya etuka mobimba.
News about him went out into every place of the surrounding region.
38 Yesu abimaki na ndako ya mayangani mpe akendeki na ndako ya Simona. Mama-bokilo ya Simona azalaki kobela fievele makasi. Basengaki na Yesu ete abikisa ye.
He rose up from the synagogue and entered into Simon’s house. Simon’s mother-in-law was afflicted with a great fever, and they begged him to help her.
39 Yesu agumbamaki pembeni na ye, apesaki mitindo na fievele, mpe fievele esilaki. Kaka na tango yango, mama-bokilo ya Simona atelemaki mpe akomaki kobongisela bango bilei.
He stood over her and rebuked the fever, and it left her. Immediately she rose up and served them.
40 Na pokwa, bato nyonso oyo bazalaki na babeli ya bokono ya ndenge na ndenge bamemaki bango epai ya Yesu. Yesu atielaki moko na moko kati na bango maboko mpe abikisaki bango.
When the sun was setting, all those who had any sick with various diseases brought them to him; and he laid his hands on every one of them, and healed them.
41 Milimo mabe mpe ebimaki kati na bato ebele na koganga: « Ozali solo Mwana na Nzambe! » Kasi Yesu apesaki yango mitindo ete eloba te, pamba te eyebaki ete Yesu azali Klisto.
Demons also came out of many, crying out and saying, “You are the Christ, the Son of God!” Rebuking them, he didn’t allow them to speak, because they knew that he was the Christ.
42 Tango tongo etanaki, Yesu abimaki na ndako yango mpe akendeki na esika moko epai wapi azalaki kaka Ye moko. Ebele ya bato bazalaki koluka Ye; mpe tango bakomaki na esika oyo azalaki, bamekaki kokangama na Ye mpe kopekisa Ye kotika bango.
When it was day, he departed and went into an uninhabited place and the multitudes looked for him, and came to him, and held on to him, so that he wouldn’t go away from them.
43 Kasi Yesu alobaki na bango: — Nasengeli mpe kosakola Sango Malamu ya Bokonzi ya Nzambe epai ya bingumba mosusu, pamba te ezali mpo na yango nde Nzambe atindaki Ngai.
But he said to them, “I must preach the good news of God’s Kingdom to the other cities also. For this reason I have been sent.”
44 Mpe Yesu akobaki koteya kati na bandako ya mayangani ya Yuda.
He was preaching in the synagogues of Galilee.