< Luka 24 >
1 Na tongo-tongo ya mokolo ya liboso ya poso, basi bakendeki na kunda mpe bamemaki mafuta ya solo kitoko oyo balambaki.
But on the first day of the week, at early dawn, they and some others came to the tomb, bringing the spices which they had prepared.
2 Libanga oyo ekangaki ekotelo ya kunda, bakutaki yango etindikama mosika na ekotelo ya kunda.
They found the stone rolled away from the tomb.
3 Bakotaki, kasi bamonaki te nzoto ya Nkolo Yesu.
They entered in, and didn’t find the Lord Jesus’ body.
4 Wana bazalaki nanu komitungisa mpo na likambo yango, bato mibale babimelaki bango, balata bilamba oyo ezali kongenga makasi.
While they were greatly perplexed about this, behold, two men stood by them in dazzling clothing.
5 Basi yango babangaki, bakitisaki bilongi na bango na ngambo ya mabele; kasi bato wana mibale balobaki na bango: — Mpo na nini bozali koluka kati na bakufi Ye oyo azali na bomoi?
Becoming terrified, they bowed their faces down to the earth. The men said to them, “Why do you seek the living amongst the dead?
6 Azali lisusu awa te, asekwi. Bokanisa makambo oyo ayebisaki bino, wana azalaki nanu kati na Galile:
He isn’t here, but is risen. Remember what he told you when he was still in Galilee,
7 « Esengeli ete bakaba Mwana na Moto na maboko ya bato ya masumu; esengeli ete babaka Ye na ekulusu; mpe esengeli ete asekwa sima na mikolo misato. »
saying that the Son of Man must be delivered up into the hands of sinful men and be crucified, and the third day rise again?”
8 Boye, bakanisaki maloba ya Yesu.
They remembered his words,
9 Tango bazongaki longwa na kunda, bayebisaki makambo wana nyonso epai ya bayekoli zomi na moko mpe epai ya baninga na bango nyonso.
returned from the tomb, and told all these things to the eleven and to all the rest.
10 Ezalaki: Mari, moto ya mboka Magidala; Jane mpe Mari, mama ya Jake. Baninga na bango mosusu ya basi bayebisaki mpe makambo yango epai ya bantoma,
Now they were Mary Magdalene, Joanna, and Mary the mother of James. The other women with them told these things to the apostles.
11 kasi bazwaki maloba ya basi yango lokola maloba ezanga tina, mpe bandimaki bango te.
These words seemed to them to be nonsense, and they didn’t believe them.
12 Kasi Petelo atelemaki mpe apotaki mbangu kino na kunda. Agunzamaki mpo na kotala, amonaki kaka biteni ya elamba ya lino elala yango moko. Alongwaki kuna mpe azongaki, akamwaki makasi makambo oyo ewutaki kosalema.
But Peter got up and ran to the tomb. Stooping and looking in, he saw the strips of linen lying by themselves, and he departed to his home, wondering what had happened.
13 Nzokande, kaka na mokolo yango, mibale kati na bango bazalaki kokende na mboka moko oyo kombo na yango ezalaki « Emausi. » Mboka yango ezalaki mosika na Yelusalemi, na bakilometele pene zomi na mibale.
Behold, two of them were going that very day to a village named Emmaus, which was sixty stadia from Jerusalem.
14 Bazalaki kosolola na tina na makambo nyonso oyo ewuti kosalema.
They talked with each other about all of these things which had happened.
15 Wana bazalaki kosolola mpe kotiana tembe mpo na makambo yango, Yesu asanganaki na bango mpe akomaki kokende na bango nzela moko.
While they talked and questioned together, Jesus himself came near, and went with them.
16 Kasi lokola miso na bango ezalaki ya kozipama, bakokaki te kososola ete ezali Yesu.
But their eyes were kept from recognising him.
17 Alobaki na bango: — Makambo nini bozali kotiana na yango tembe na kotambola? Batelemaki, bilongi mawa-mawa.
He said to them, “What are you talking about as you walk, and are sad?”
18 Moko kati na bango, kombo na ye « Kleopasi, » alobaki na Ye: — Kati na bavandi nyonso ya Yelusalemi, yo moko kaka oyebi te makambo oyo ewuti kosalema mikolo oyo!
One of them, named Cleopas, answered him, “Are you the only stranger in Jerusalem who doesn’t know the things which have happened there in these days?”
19 Yesu atunaki bango: — Makambo nini? Bazongisaki: — Ezali makambo oyo etali Yesu ya Nazareti: azalaki mosakoli moko ya nguya, na misala mpe na maloba, liboso ya Nzambe mpe liboso ya bato nyonso.
He said to them, “What things?” They said to him, “The things concerning Jesus the Nazarene, who was a prophet mighty in deed and word before God and all the people;
20 Kasi bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakambi na biso bakabaki Ye mpo ete bakatela Ye etumbu ya kufa, mpe babakaki Ye na ekulusu.
and how the chief priests and our rulers delivered him up to be condemned to death, and crucified him.
21 Tozalaki kolikya ete Ye nde akokangola Isalaele. Kasi longola nyonso wana, lelo ezali mokolo ya misato wuta makambo wana esalemaki.
But we were hoping that it was he who would redeem Israel. Yes, and besides all this, it is now the third day since these things happened.
22 Lisusu, ndambo ya basi kati na biso bakamwisi biso makasi; bakendeki na kunda na tongo-tongo,
Also, certain women of our company amazed us, having arrived early at the tomb;
23 kasi bamonaki nzoto na Ye te, mpe bayaki koyebisa biso ete bamonaki ba-anjelu kobimela bango mpe koyebisa bango ete Yesu azali na bomoi.
and when they didn’t find his body, they came saying that they had also seen a vision of angels, who said that he was alive.
24 Ndambo kati na baninga na biso bakendeki na kunda, mpe makambo oyo bamonaki kuna ekokani penza na oyo basi balobaki, kasi bamonaki Yesu te.
Some of us went to the tomb and found it just like the women had said, but they didn’t see him.”
25 Yesu alobaki na bango: — Ah! Bozali penza bazoba! Tala ndenge mitema na bino ezali penza mabanga! Bozali penza kondima te makambo nyonso oyo basakoli baloba!
He said to them, “Foolish people, and slow of heart to believe in all that the prophets have spoken!
26 Boni, Klisto asengelaki te komona pasi ndenge wana mpo ete akota kati na nkembo na Ye?
Didn’t the Christ have to suffer these things and to enter into his glory?”
27 Bongo Yesu alimbolelaki bango makambo nyonso oyo ekomama kati na Makomi, kobanda na Moyize kino na basakoli nyonso.
Beginning from Moses and from all the prophets, he explained to them in all the Scriptures the things concerning himself.
28 Tango bakomaki pene ya mboka epai wapi bazalaki kokende, Yesu asalaki lokola nde azali kokende mosika.
They came near to the village where they were going, and he acted like he would go further.
29 Kasi bango babondelaki Ye makasi: — Vanda elongo na biso, pamba te pokwa esili kokoma, mpe butu elingi kokota. Boye Yesu akotaki na ndako mpo na kovanda elongo na bango.
They urged him, saying, “Stay with us, for it is almost evening, and the day is almost over.” He went in to stay with them.
30 Tango avandaki na mesa elongo na bango, akamataki lipa, azongisaki matondi epai ya Nzambe, akataki yango na biteni, mpe apesaki bango yango.
When he had sat down at the table with them, he took the bread and gave thanks. Breaking it, he gave it to them.
31 Mbala moko, miso na bango efungwamaki mpe basosolaki ete ezali Yesu, kasi alimwaki na miso na bango.
Their eyes were opened and they recognised him; then he vanished out of their sight.
32 Batunanaki: — Boni, mitema na biso etondaki na esengo te wana azalaki kosolola na biso na nzela mpe kolimbolela biso Makomi?
They said to one another, “Weren’t our hearts burning within us while he spoke to us along the way, and while he opened the Scriptures to us?”
33 Kaka na tango yango, batelemaki mpe bazongaki na Yelusalemi epai wapi bakutaki bayekoli zomi na moko basangana elongo na baninga na bango,
They rose up that very hour, returned to Jerusalem, and found the eleven gathered together, and those who were with them,
34 oyo balobaki na bango: — Ezali ya solo, Nkolo asekwi; abimelaki Simona!
saying, “The Lord is risen indeed, and has appeared to Simon!”
35 Bango mibale mpe bayebisaki makambo oyo ekomelaki bango na nzela mpe ndenge nini basosolaki Yesu tango akataki lipa na biteni.
They related the things that happened along the way, and how he was recognised by them in the breaking of the bread.
36 Wana bazalaki nanu kosolola na tina na makambo yango, Yesu ayaki kotelema na kati-kati na bango mpe alobaki: — Tika ete kimia ezala na bino!
As they said these things, Jesus himself stood amongst them, and said to them, “Peace be to you.”
37 Babangaki mpe somo ekangaki bango, pamba te bakanisaki ete bamoni elima.
But they were terrified and filled with fear, and supposed that they had seen a spirit.
38 Yesu atunaki bango: — Mpo na nini bozali kobanga? Mpe mpo na nini bozali na tembe kati na mitema na bino?
He said to them, “Why are you troubled? Why do doubts arise in your hearts?
39 Botala maboko mpe makolo na Ngai; ezali penza Ngai. Bosimba Ngai mpe botala! Elima ezalaka na mosuni te, ezalaka mpe na mikuwa te; nzokande, bozali komona malamu ete, Ngai, nazali na yango.
See my hands and my feet, that it is truly me. Touch me and see, for a spirit doesn’t have flesh and bones, as you see that I have.”
40 Wana azalaki koloba bongo, alakisaki bango maboko mpe makolo na Ye.
When he had said this, he showed them his hands and his feet.
41 Lokola bakokaki nanu kondima te mpo ete batondisamaki na esengo mpe bazalaki kokamwa mingi, Yesu atunaki bango: — Bozali awa na eloko ya kolia?
While they still didn’t believe for joy, and wondered, he said to them, “Do you have anything here to eat?”
42 Bapesaki Ye eteni ya mbisi bakalinga.
They gave him a piece of a broiled fish and some honeycomb.
43 Azwaki yango mpe aliaki yango na miso na bango.
He took them, and ate in front of them.
44 Bongo alobaki na bango: — Yango nde makambo oyo nayebisaki bino tango nazalaki nanu elongo na bino: « Makambo nyonso oyo ekomama na tina na Ngai kati na Mobeko ya Moyize, kati na mikanda ya basakoli mpe kati na banzembo, esengeli kokokisama. »
He said to them, “This is what I told you while I was still with you, that all things which are written in the law of Moses, the prophets, and the psalms concerning me must be fulfilled.”
45 Bongo afungolaki bango mayele mpo ete bakoka kososola Makomi.
Then he opened their minds, that they might understand the Scriptures.
46 Alobaki na bango: — Tala makambo oyo ekomama: « Klisto akomona pasi, mpe akosekwa kati na bakufi na mokolo ya misato;
He said to them, “Thus it is written, and thus it was necessary for the Christ to suffer and to rise from the dead the third day,
47 mpe, na Kombo na Ye, bakoteya bato ya bikolo nyonso, kobanda na Yelusalemi, ete babongola mitema mpo ete bazwa bolimbisi ya masumu. »
and that repentance and remission of sins should be preached in his name to all the nations, beginning at Jerusalem.
48 Bino nde bozali batatoli ya makambo yango.
You are witnesses of these things.
49 Ngai nakotindela bino Molimo oyo Tata na Ngai alakaki; boye bino, botikala awa, kati na engumba oyo, kino bokotondisama na nguya ya Likolo.
Behold, I send out the promise of my Father on you. But wait in the city of Jerusalem until you are clothed with power from on high.”
50 Yesu amemaki bango na libanda ya engumba, pene ya Betani; mpe kuna, atombolaki maboko mpe apambolaki bango.
He led them out as far as Bethany, and he lifted up his hands and blessed them.
51 Wana azalaki kopambola bango, akabwanaki na bango mpe amemamaki kati na Likolo.
While he blessed them, he withdrew from them and was carried up into heaven.
52 Bongo bagumbamelaki Ye mpe bazongaki na Yelusalemi na esengo makasi.
They worshipped him and returned to Jerusalem with great joy,
53 Mpe kuna na Yelusalemi, bazalaki kovanda tango nyonso kati na lopango ya Tempelo mpo na kokumisa Nzambe.
and were continually in the temple, praising and blessing God. Amen.