< Luka 23 >
1 Bato nyonso oyo bazalaki kati na mayangani batelemaki mpe bamemaki Yesu liboso ya Pilato;
И уставши њих све мноштво, одведоше Га к Пилату.
2 mpe kuna, bakomaki kofunda Ye: — Tala moto oyo azali kotia mobulu kati na ekolo na biso! Tokuti ye azali kopekisa bato kofuta mpako ya Sezare, mpe azali lisusu komibenga Klisto, Mokonzi!
И почеше Га тужити говорећи: Овог нађосмо да отпађује народ наш, и забрањује давати ћесару данак, и говори да је он Христос цар.
3 Pilato atunaki Yesu: — Boni, ozali mokonzi ya Bayuda? Yesu azongisaki: — Olobi yango.
А Пилат Га запита: Ти ли си цар јудејски? А Он одговарајући рече му: Ти кажеш.
4 Pilato alobaki na bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe na ebele ya bato: — Namoni mabe moko te epai ya moto oyo.
А Пилат рече главарима свештеничким и народу: Ја не налазим никакве кривице на овом човеку.
5 Kasi batiaki kaka molende mpe balobaki: — Te! Azali kotombokisa bato ya Yuda mobimba na nzela ya mateya na Ye; abandaki yango na Galile kino akomi awa.
А они наваљиваху говорећи: Он буни људе учећи по свој Јудеји почевши од Галилеје довде.
6 Tango Pilato ayokaki bongo, atunaki soki Yesu azali moto ya Galile.
А Пилат чувши за Галилеју запита: Зар је он Галилејац?
7 Wana ayokaki ete Yesu azali moto ya mboka oyo ezalaki na se ya bokonzi ya Erode, atindaki Ye epai ya Erode, pamba te Erode azalaki kati na Yelusalemi na mikolo wana.
И разумевши да је из подручја Иродовог посла Га Ироду, који такође беше у Јерусалиму оних дана.
8 Erode asepelaki mingi tango amonaki Yesu, pamba te, wuta kala, azalaki koluka komona Ye mpo ete ayokaki basango mingi na tina na Ye, mpe azalaki kolikya komona Yesu kosala likamwisi.
А Ирод, видевши Исуса, би му врло мило; јер је одавно желео да Га види, јер је много слушао за Њега, и надаше се да ће видети од Њега какво чудо.
9 Apesaki ye mituna ebele, kasi Yesu apesaki ye ata eyano moko te.
И пита Га много које за шта; али му Он ништа не одговори.
10 Bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko bazalaki kaka wana mpe bazalaki kopelisa moto na maloba mabe mpo na kokweyisa Yesu.
А главари свештенички и књижевници стајаху, и једнако тужаху Га.
11 Erode mpe basoda na ye basekaki mpe batiolaki Yesu; balatisaki Ye elamba ya kitoko makasi mpe bazongisaki Ye epai ya Pilato.
А Ирод осрамотивши Га са својим војницима, и наругавши Му се, обуче Му белу хаљину, и посла Га натраг Пилату.
12 Nzokande, Erode mpe Pilato bazalaki banguna wuta kala; kasi na mokolo wana, bakomaki balingami.
И у тај се дан помирише Пилат и Ирод међу собом; јер пре беху у завади.
13 Pilato abengisaki bakonzi ya Banganga-Nzambe, bakambi ya Bayuda mpe bato nyonso; alobaki na bango:
А Пилат сазвавши главаре свештеничке и кнезове и народ
14 — Bomemelaki ngai moto oyo mpe bofundaki ye ete azali kotombokisa bato. Napesi ye mituna liboso na bino mpe nazwi ye na mabe ata moko te kati na nyonso oyo bofundelaki ye.
Рече им: Доведосте ми овог човека као који народ отпађује, и ето ја га пред вама испитах, и не налазим на овом човеку ниједну кривицу што ви на њега говорите;
15 Erode mpe azwaki ye na mabe ata moko te, yango wana azongisaki ye epai na biso. Boye, ndenge bokoki komona, moto oyo asali mabe ata moko te oyo ekoki kosala ete azwa etumbu ya kufa.
А ни Ирод, јер сам га слао к њему; и ето се не налази ништа да је учинио што би заслуживало смрт.
16 Na bongo, nakobetisa ye kaka fimbu mpe, sima, nakotika ye. [
Дакле, да га избијем па да пустим.
17 Nzokande, na bafeti nyonso, Pilato azalaki kobimisela bango mokangami moko.]
А требаше о сваком празнику пасхе да им пусти по једног сужња.
18 Bato nyonso bagangaki: — Boma moto oyo! Bimisela biso Barabasi!
Али народ сав повика говорећи: Узми овог, а пусти нам Вараву;
19 Barabasi akangamaki na boloko mpo ete abimisaki mobulu kati na engumba mpe abomaki moto.
Који беше бачен у тамницу за некакву буну учињену у граду и за крв.
20 Lokola azalaki na posa ya kotika Yesu, Pilato atunaki bango lisusu.
А Пилат опет рече да би он хтео пустити Исуса.
21 Kasi bakobaki koganga: — Baka ye na ekulusu! Baka ye na ekulusu!
А они викаху говорећи: Распни га, распни.
22 Pilato atunaki bango lisusu, mpo na mbala ya misato: — Mpo na nini? Mabe nini tata oyo asali? Ngai nazwi ye na mabe ata moko te, oyo ekoki kosala ete azwa etumbu ya kufa. Boye, nakobetisa ye kaka fimbu; sima, nakotika ye.
А он им трећи пут рече: Какво је дакле он зло учинио? Ја ништа на њему не нађох што би заслуживало смрт; дакле да га избијем па да пустим.
23 Kasi bakobaki kaka kosenga, na koganga makasi koleka, ete babaka Yesu na ekulusu; mpe suka na suka, koganga na bango elongaki.
А они једнако наваљиваху с великом виком, и искаху да се Га разапне; и надвлада вика њихова и главара свештеничких.
24 Pilato azwaki mokano ya kokokisa oyo basengaki;
И Пилат пресуди да буде као што они ишту.
25 abimiselaki bango moto oyo basengaki, oyo akangamaki na boloko mpo na mobulu mpe mpo ete abomaki moto, mpe akabaki Yesu na maboko na bango mpo ete basala Ye nyonso oyo balingi.
И пусти оног што искаху, који беше бачен у тамницу за буну и за крв; а Исуса остави на њихову вољу.
26 Wana basoda bazalaki kokumba Yesu, bakangaki mobali moko, kombo na ye ezalaki Simona, moto ya Sirene, oyo awutaki na bilanga; batiaki ekulusu na mokongo na ye mpo ete amema yango sima na Yesu.
И кад Га поведоше, ухватише неког Симона Киринца који иђаше из поља, и метнуше на њега крст да носи за Исусом.
27 Bato ebele balandaki Yesu. Kati na bango, ezalaki mpe na basi oyo bazalaki kolelalela mpe komitungisa mingi mpo na Ye.
А за Њим иђаше мноштво народа и жена, које плакаху и нарицаху за Њим.
28 Yesu abalukaki mpo na kotala basi mpe alobaki: — Bana basi ya Yelusalemi, bolela mpo na Ngai te; bolela nde mpo na bino moko mpe mpo na bana na bino.
А Исус обазревши се на њих рече: Кћери јерусалимске! Не плачите за мном, него плачите за собом и за децом својом.
29 Pamba te, na mikolo oyo ekoya, bakoloba: « Esengo na basi oyo bazali na bana te, oyo babota te mpe bamelisa bana mabele te! »
Јер гле, иду дани у које ће се рећи: Благо нероткињама, и утробама које не родише, и сисама које не дојише.
30 Bongo bakoloba na bangomba milayi: « Bokweyela biso! » Mpe bakoloba na bangomba mikuse: « Bozipa biso! »
Тада ће почети говорити горама: Падните на нас; и бреговима: Покријте нас.
31 Pamba te soki bato bazali kosala makambo ya boye na nzete ya mobesu, ekozala ndenge nini na nzete ya kokawuka?
Јер кад се овако ради од сировог дрвета, шта ће бити од сувог?
32 Bamemaki mpe mibali mosusu mibale, babomi bato, mpo na koboma bango elongo na Yesu.
Вођаху пак и друга два злочинца да погубе с Њим.
33 Tango bakomaki na esika oyo babengaka « Gologota, » babakaki kuna Yesu elongo na babomi mibale wana ya bato: moko, na ngambo ya loboko ya mobali ya Yesu; mosusu, na ngambo ya loboko na Ye ya mwasi.
И кад дођоше на место које се зваше костурница, онде разапеше Њега и злочинце, једног с десне стране а другог с леве.
34 Yesu alobaki: — Tata, limbisa bango mpo ete bayebi te makambo oyo bazali kosala. Mpe bakabolaki bilamba na Ye, na kobeta zeke.
А Исус говораше: Оче! Опрости им; јер не знаду шта чине. А делећи Његове хаљине бацаху коцке.
35 Bato batelemaki wana, bazalaki kotala; mpe bakambi batiolaki Ye, balobaki: — Abikisaki bato mosusu; tika ete amibikisa ye moko, soki penza azali Klisto, Moponami ya Nzambe!
И народ стајаше те гледаше, а и кнезови с њима ругаху Му се говорећи: Другима поможе, нека помогне и себи, ако је он Христос, избраник Божји.
36 Basoda mpe bakendeki mpe batiolaki Ye; bapesaki Ye vino ya ngayi
А и војници Му се ругаху, и приступаху к Њему и даваху Му оцат,
37 mpe balobaki: — Soki ozali penza mokonzi ya Bayuda, mibikisa yo moko!
И говораху: Ако си ти цар јудејски помози сам себи.
38 Na likolo ya moto ya Yesu, ezalaki na makomi oyo: Moto oyo azali Mokonzi ya Bayuda.
А беше над Њим и натпис написан словима грчким и латинским и јеврејским: Ово је цар јудејски.
39 Moko kati na babomi bato oyo babakamaki na ba-ekulusu atiolaki Ye: — Boni, ozali Klisto te? Mibikisa yo moko mpe bikisa biso!
А један од обешених злочинаца хуљаше на Њега говорећи: Ако си ти Христос помози себи и нама.
40 Kasi mobomi bato mosusu apamelaki ye: — Ozali kobanga Nzambe te mpo ete ozali na se ya etumbu ya ndenge moko na oyo ya Ye!
А други одговарајући ћуткаше га и говораше: Зар се ти не бојиш Бога, кад си и сам осуђен тако?
41 Biso, tozwi penza etumbu na ndenge ya bosembo, pamba te tozali kozwa mbano ya misala mabe na biso; kasi tata oyo asali ata mabe moko te.
И ми смо још праведно осуђени; јер примамо по својим делима као што смо заслужили; али Он никакво зло није учинио.
42 Bongo alobaki lisusu: — Yesu, kanisa ngai tango okokota kati na Bokonzi na Yo.
И рече Исусу: Опомени ме се, Господе, кад дођеш у царство своје.
43 Yesu azongiselaki ye: — Nazali koloba na yo penza ya solo: lelo, okozala elongo na Ngai kati na Paradizo.
И рече му Исус: Заиста ти кажем данас, бићеш са мном у рају.
44 Na ngonga pene ya midi, molili ekotaki na mokili mobimba kino na ngonga ya misato ya pokwa,
А беше око шестог сахата, и тама би по свој земљи до сахата деветог.
45 pamba te moyi etikaki kongenga, mpe rido monene ya Tempelo epasukaki na kati-kati.
И помрча сунце, и завес црквени раздре се напола.
46 Yesu agangaki na mongongo makasi: — Tata, nazongisi molimo na Ngai kati na maboko na Yo. Sima na Ye koloba bongo, akataki motema.
И повикавши Исус гласно рече: Оче! У руке Твоје предајем дух свој. И рекавши ово издахну.
47 Tango mokonzi ya basoda ya Rome amonaki makambo oyo eleki, akumisaki Nzambe mpe alobaki: — Moto oyo azalaki penza sembo!
А кад виде капетан шта би, стаде хвалити Бога говорећи: Заиста овај човек беше праведник.
48 Tango bato nyonso oyo basanganaki wana, mpo na kotala makambo oyo ezali kosalema, bamonaki makambo oyo ekweyi, batiaki maboko na bango na batolo na bango mpe bazongaki.
И сав народ који се беше скупио да гледа ово, кад виде шта бива, врати се бијући се у прси своје.
49 Kasi bato nyonso oyo bayebaki Yesu, mpe basi oyo balandaki Ye longwa na Galile, batelemaki na mosika mpe bazalaki kotala ndenge makambo ezali koleka.
А сви Његови знанци стајаху издалека, и жене које беху ишле за Њим из Галилеје, и гледаху ово.
50 Kati na Likita-Monene ya Bayuda, ezalaki na moto moko, kombo na ye « Jozefi. » Azalaki moto malamu mpe moto ya sembo,
И гле, човек, по имену Јосиф, саветник, човек добар и праведан,
51 mpe andimaki te mikano mpe misala ya bato mosusu ya Likita-Monene; azalaki moto ya mboka Arimate, engumba ya Bayuda, mpe azalaki kozela Bokonzi ya Nzambe.
(Он не беше пристао на њихов савет и на посао) из Ариматеје града јудејског, који и сам чекаше царство Божије,
52 Akendeki epai ya Pilato mpo na kosenga nzoto ya Yesu.
Он приступивши к Пилату заиска тело Исусово.
53 Bongo akitisaki nzoto yango longwa na ekulusu, alingaki yango na liputa ya lino, mpe atiaki yango kati na kunda oyo batobolaki kati na libanga moko ya monene epai wapi batikalaki nanu kokunda ata moto moko te.
И скиде Га, и обави платном, и метну Га у гроб исечен, у коме нико не беше никад метнут.
54 Ezalaki mokolo ya komilengela, wana Saba elingaki kobanda.
И дан беше петак, и субота освиташе.
55 Basi oyo bawutaki na Galile elongo na Yesu balandaki Jozefi, bamonaki kunda mpe ndenge nini atiaki nzoto ya Yesu kati na kunda yango.
А жене које беху дошле с Исусом из Галилеје, идоше за Јосифом, и видеше гроб и како се тело метну.
56 Sima, bazongaki epai na bango mpe babongisaki mafuta ya solo kitoko mpe malasi. Kasi bapemaki na mokolo ya Saba, kolanda ndenge mobeko ezalaki kosenga.
Вративши се пак приправише мирисе и миро; и у суботу дакле осташе на миру по закону.