< Luka 21 >

1 Wana Yesu atombolaki miso, amonaki bato na bozwi kotia makabo na bango kati na kitunga ya makabo;
येशूले माथि हेर्नुहुँदा धनी मानिसहरूलाई दानपत्रमा तिनीहरूका भेटीहरू हालेको देख्‍नुभयो ।
2 amonaki mpe mwasi mobola moko akufisa mobali kotia mbongo ya bibende mibale.
उहाँले एक जना गरिब विधवाले दुई पैसा भेटी हालेको हेर्नुभयो ।
3 Alobaki: — Nazali koloba na bino penza ya solo: mwasi mobola oyo akufisa mobali apesi koleka bato nyonso.
यसैले, उहाँले भन्‍नुभयो, “साँच्‍चै म तिमीहरूलाई भन्दछु, तिनीहरू सबैले भन्दा यस विधवाले बढी दिई ।
4 Pamba te bato wana nyonso bazwi kati na mbongo oyo bazali na yango na tina te, mpo na kotia kati na kitunga ya makabo; kasi ye, kati na kokelela na ye, atie nyonso oyo azalaki na yango mpo na kokoba kobika.
यिनीहरू सबैले प्रशस्तताबाट भेटीहरू दिए । तर यस विधवाले आफू गरिब भएर पनि, ऊ बाँच्‍नका लागि जे-जति थियो सबै दिई ।”
5 Ndambo ya bayekoli bazalaki kolula kitoko ya Tempelo, ndenge ezalaki kongala na mabanga ya kitoko mpe na biloko ya kitoko oyo bazalaki kobonzela Nzambe lokola makabo. Kasi Yesu alobaki:
अब कसैले मन्दिरको बारेमा भने, “दानहरू र सुन्दर-सुन्दर ढुङ्गाहरूले सजाइएको हेर्नुहोस् ।” उहाँले भन्‍नुभयो,
6 — Mikolo ekoya oyo, kati na nyonso oyo bozali komona awa, ata libanga moko te ekotikala na likolo ya libanga mosusu; nyonso ekobukama.
“जसरी यी सबै थोकहरू तिमीहरू देख्छौ, यस्ता दिनहरू आउनेछन् जुन बेला एकमाथि अर्को ढुङ्गा रहनेछैन, सबै भत्किनेछन् ।”
7 Batunaki Yesu: — Moteyi, makambo yango ekosalema tango nini? Mpe elembo nini ekotalisa biso ete makambo yango ekomi pene ya kokokisama?
त्यसकारण, तिनीहरूले उहाँलाई यसो भन्दै सोधे, “गुरुज्यू, यी कुराहरू कहिले हुनेछन्? र यी सबै घटनाहरू हुँदा के-कस्ता चिह्नहरू हुनेछन्?”
8 Yesu azongisaki: — Bosala keba ete moko te akosa bino! Pamba te bato mingi bakoya na Kombo na Ngai, bakoloba: « Ngai nde Masiya, » mpe « Tango ekoki! » Bolanda bango te.
येशूले जवाफ दिनुभयो, “होसियार रहो ताकि तिमीहरू धोकामा नपर । धेरै जना मेरो नाउँमा यसो भन्दै आउनेछन्, ‘म उही हुँ र समय नजिक आएको छ ।’ तिमीहरू तिनीहरूका पछि नजाओ ।
9 Soki boyoki basango ya bitumba mpe ya mobulu, bobanga te; pamba te makambo wana esengeli nanu kosalema, kasi ekozala mbala moko suka ya mokili te.
जब तिमीहरूले लडाइँ र झैझगडाहरू सुन्‍नेछौ, तब भयभीत नहोओ, यी कुराहरू पहिले हुनैपर्छ, तर अन्त्य भने तुरुन्तै हुनेछैन ।”
10 Bongo alobaki na bango: — Ekolo moko ekotelemela ekolo mosusu, bokonzi moko ekobundisa bokonzi mosusu,
तब उहाँले तिनीहरूलाई भन्‍नुभयो, “राज्य-राज्यको विरुद्धमा र देश-देशको विरुद्धमा उठ्नेछन् ।
11 mabele ekoningana makasi mpe, na bisika ebele, nzala makasi mpe bokono ya ndenge na ndenge ekozala; makambo ya somo ekosalema, mpe bilembo ya kokamwa ekomonana kowuta na Likolo.
त्यहाँ धेरै भूकम्पहरू जानेछन्, र धेरै ठाउँमा महामारी र अनिकालहरू हुनेछन् । त्यहाँ डरलाग्दा घटनाहरू हुनेछन् र आकाशमा ठुला-ठुला चिह्नहरू हुनेछन् ।
12 Kasi liboso ya makambo wana nyonso, bakokanga bino, bakonyokola bino, bakofunda bino kati na bandako ya mayangani, bakobwaka bino na baboloko, bakomema bino liboso ya bakonzi mpe ya bayangeli, mpo na Kombo na Ngai.
तर यी सबै कुरा हुन अगाडि, तिनीहरूका हात तिमीहरूमाथि पर्नेछन् र तिनीहरूले तिमीहरूलाई सताउनेछन्, सभाघरमा सुम्पिदिनेछन् र झ्यालखानामा हाल्नेछन्, तिमीहरूलाई मेरो नाउँको कारण राजाहरू र हाकिमहरूका अगाडि ल्याउनेछन् ।
13 Boye, ekozala mpo na bino libaku malamu ya kotatola solo na tina na Ngai.
यसले तिमीहरूको गवाहीका लागि अवसरतिर डोर्‍याउनेछ ।
14 Bozala na mitema ya kokita, bomitungisa te mpo na koluka koyeba ndenge nini bokosamba.
त्यसकारण, तिमीहरूले बचाउको लागि के भन्‍ने भनेर अगिबाटै हृदयमा नसोच ।
15 Pamba te, Ngai moko, nakopesa bino maloba oyo bosengeli koloba mpe bwanya oyo ekosala ete banguna na bino nyonso bandima nyonso oyo bokoloba.
तिमीहरूका विरोधीहरूले सबै कुराको खण्डन गर्न नसकून् भनेर म तिमीहरूलाई वचन र बुद्धि दिनेछु ।
16 Baboti na bino, bandeko na bino ya mibali mpe ya basi, baninga mpe balingami na bino bakokaba bino, mpe bakobomisa mingi kati na bino.
तर तिमीहरूलाई तिमीहरूका आमा बुबा र दाजुभाइहरू, नातेदारहरू र साथीभाइहरूले सुम्पिदिनेछन् र तिमीहरूमध्ये केही मृत्युका लागि सुम्पिनेछौ ।
17 Bato nyonso bakoyina bino mpo na Kombo na Ngai,
मेरो नाउँको खातिर सबैले तिमीहरूलाई घृणा गर्नेछन् ।
18 kasi suki ata moko te ya mito na bino ekobunga.
तर तिमीहरूको शिरको एउटै कपाल पनि नष्‍ट हुनेछैन ।
19 Boyika mpiko, mpe bokozwa bomoi.
तिमीहरूको सहनशीलतामा तिमीहरूले प्राण प्राप्‍त गर्नेछौ ।
20 Tango bokomona mampinga ya basoda ezingeli Yelusalemi, boyeba ete kobebisama na yango ekomi pene.
जब तिमीहरूले यरूशलेमलाई सेनाले घेरेको देख्‍नेछौ, तब त्यसको विनाश नजिकै छ भनी जान ।
21 Wana tika ete bato oyo bakozala kati na Yuda bakima na bangomba; tika ete bato oyo bakozala kati na Yelusalemi babima; mpe tika ete bato oyo bakozala kati na bilanga bazonga te kati na engumba!
तब यहूदियामा हुनेहरू पहाडहरूतिर भागून् र जो सहरको बिचमा छन् तिनीहरू सहर बाहिर भागून्, र बाहिर हुनेहरू सहरभित्र नपसून् ।
22 Pamba te mikolo wana ekozala mikolo ya pasi makasi, mikolo oyo makambo nyonso oyo ekomama ekokokisama.
यी दिनहरू बदला लिने दिनहरू हुनेछन्, यसैले लेखिएका सबै कुराहरू पुरा हुनेछन् ।
23 Na mikolo yango, mawa na basi oyo bakozala na bazemi mpe na ba-oyo bakozala komelisa bana mabele! Pamba te pasi ekozala makasi kati na mokili, mpe kanda ya Nzambe ekokweyela bato yango.
हाय ती दिनमा गर्भवती र दूध चुसाउने स्‍त्रीहरू! त्यस देशमाथि महासङ्कष्‍ट आउनेछ, र ती मानिसहरूमाथि क्रोध आइपर्नेछ ।
24 Bakoboma bango na mopanga mpe bakomema bango na bowumbu kati na bikolo nyonso ya bapaya; mpe bapagano bakonyata Yelusalemi kino tango ya bapagano ekosila koleka.
तिनीहरू तरवारले मारिनेछन् र सबै देशहरूमा तिनीहरू कैदी भएर जानेछन्, र गैरयहूदीहरूको समय पुरा नभएसम्म गैरयहूदीहरूले यरूशलेम नै कैदी बनाएर राख्‍नेछन् ।
25 Bilembo ekomonana kati na moyi, kati na sanza, mpe kati na minzoto; bongo na mokili, bikolo ekotonda na somo mpe na kobanga likolo ya lokito makasi mpe ya bambonge ya ebale monene.
सूर्य, चन्द्रमा र ताराहरूमा चिह्नहरू देखा पर्नेछन् । अनि समुद्रका गर्जनहरू र छालहरूबाट पृथ्वीमा भएका राष्‍ट्रहरू कष्‍टमा पर्नेछन् ।
26 Bato bakokufa na somo, wana bakozala kokanisa makambo oyo esengeli koya na mokili, pamba te banguya ya Likolo ekoningisama.
संसारमा आइपर्न लागेका घटनाहरूका आशङ्काले मानिसहरू मुर्छित हुनेछन्, किनकि आकाशका शक्‍तिहरू डग्मगाउनेछन् ।
27 Sima na yango, bakomona Mwana na Moto koya kati na mapata, na nguya mpe na nkembo monene.
त्यसपछि तिनीहरूले मानिसका पुत्रलाई ठुलो शक्‍ति र महामहिमाका साथ बादलमा आउँदै गरेको देख्‍नेछन् ।
28 Tango makambo wana ekobanda kosalema, botelema, botombola mito mpe boyika mpiko, pamba te lisiko na bino ekomi pene.
जब यी कुरा हुन आउनेछन्, उठ र आफ्ना शिरहरू ठाडो पारेर हेर, तिमीहरूको उद्धारको दिन नजिकै छ ।”
29 Alobaki na bango lisese oyo: — Botala malamu nzete ya figi mpe banzete nyonso mosusu:
येशूले उनीहरूलाई एउटा दृष्‍टान्‍त भन्‍नुभयो, “नेभाराको रुखलाई हेर र अरू सबै रुखहरूलाई पनि ।
30 soki kaka ebandi kobimisa makasa, boyebaka ete eleko ya moyi makasi ekomi pene.
जब तिनहरूले पालुवा फेरेको तिमीहरूले देख्छौ, तब गृष्म ऋतु नजिकै छ भनी तिमीहरू आफैँले थाहा पाउनेछौ ।
31 Ndenge moko mpe mpo na bino: tango bokomona makambo wana kosalema, boyeba ete Bokonzi ya Nzambe ekomi pene.
त्यसैले पनि, जब तिमीले यी थोकहरू भएको देख्‍नेछौ, परमेश्‍वरको राज्य नजिकै छ भन्‍ने कुरा तिमीहरूले थाहा पाउनेछौ ।
32 Nazali koloba na bino penza ya solo: bato ya ekeke oyo bakoleka te kino makambo wana nyonso ekosalema.
तिमीहरूलाई म साँचो भन्दछु, यी सब कुराहरू पुरा नभइन्जेलसम्म यो पुस्ता बितेर जानेछैन ।
33 Likolo mpe mabele ekoleka, kasi maloba na Ngai ekoleka te.
स्वर्ग र पृथ्वी टलेर जानेछ, तर मेरा वचनहरू कहिल्यै टल्नेछैनन् ।
34 Bosala keba ete mitema na bino ekoma kilo te likolo ya lokoso ya kolia, likolo ya kolangwa masanga mpe likolo ya mitungisi ya bomoi, noki te mokolo yango ekokanga bino na mbalakata,
तर तिमीहरू आफैँ होसियार रहो । त्यसकारण तिमीहरूको हृदय विलास, मतवालापान र जीवनको चिन्ताले नभरियोस् । नत्रभने, त्यो दिन तिमीहरूमाथि अचानक आइपर्ला ।
35 lokola monyama, pamba te ekoya likolo ya bato nyonso ya mokili mobimba.
यसरी नै सारा पृथ्वी भरि जिउने हरेकमाथि त्यो पासोझैँ आइपर्नेछ ।
36 Bosenzela malamu mpe bosambelaka tango nyonso, mpo ete bozwa makasi ya kokima makambo nyonso oyo ekoya mpe ya kotelema liboso ya Mwana na Moto.
तर हर समय सतर्क रहो, र हुन आउने सम्पूर्ण कुराहरूबाट उम्कनलाई बलियो हुन सक र मानिसका पुत्रका अगाडि खडा हुनलाई प्रार्थना गर्दै रहो ।”
37 Mikolo nyonso, na moyi, Yesu azalaki koteya kati na Tempelo; mpe na butu, azalaki kobima mpo na kokende kolala na ngomba ya banzete ya olive.
दिउँसोको समयमा उहाँले मन्दिरमा सिकाउनुहुन्थ्यो र साँझमा उहाँ बाहिर जानुहुन्थ्यो, र डाँडामा रात बिताउनुहुन्थ्यो जसलाई जैतून भनिन्छ ।
38 Na tongo makasi, bato nyonso bazalaki koya epai na Ye, kati na Tempelo, mpo na koyoka Ye.
सबै मानिसहरू उहाँका कुरा सुन्‍न बिहानै मन्दिरमा आउँथे ।

< Luka 21 >