< Luka 14 >
1 Mokolo moko ya Saba, Yesu akendeki kolia kati na ndako ya moko kati na bakambi ya Bafarizeo, mpe Bafarizeo bazalaki kotala Ye malamu.
και εγενετο εν τω ελθειν αυτον εισ οικον τινοσ των αρχοντων των φαρισαιων σαββατω φαγειν αρτον και αυτοι ησαν παρατηρουμενοι αυτον
2 Liboso na Ye, ezalaki na moto moko oyo azalaki kobela bokono ya kovimba nzoto.
και ιδου ανθρωποσ τισ ην υδρωπικοσ εμπροσθεν αυτου
3 Yesu atunaki Bafarizeo mpe balakisi ya Mobeko: — Boni, mobeko na biso epesaka nzela ya kobikisa moto na mokolo ya Saba to te?
και αποκριθεισ ο ιησουσ ειπεν προσ τουσ νομικουσ και φαρισαιουσ λεγων ει εξεστιν τω σαββατω θεραπευειν
4 Kasi bavandaki kimia. Yesu asimbaki mobeli yango, abikisaki ye na bokono na ye mpe azongisaki ye.
οι δε ησυχασαν και επιλαβομενοσ ιασατο αυτον και απελυσεν
5 Bongo atunaki bango: — Soki moko kati na bino azali na mwana to ngombe; bongo, na mokolo ya Saba, akweyi to ekweyi kati na libulu, boni, bokobimisa te na lombangu mwana yango to ngombe yango?
και αποκριθεισ προσ αυτουσ ειπεν τινοσ υμων υιοσ η βουσ εισ φρεαρ εμπεσειται και ουκ ευθεωσ ανασπασει αυτον εν τη ημερα του σαββατου
6 Bakokaki te kopesa Ye eyano.
και ουκ ισχυσαν ανταποκριθηναι αυτω προσ ταυτα
7 Tango Yesu amonaki ndenge nini bato oyo babengamaki na feti bazalaki kopona bisika ya lokumu, alobaki na bango lisese oyo:
ελεγεν δε προσ τουσ κεκλημενουσ παραβολην επεχων πωσ τασ πρωτοκλισιασ εξελεγοντο λεγων προσ αυτουσ
8 « Soki moto abengisi yo na feti ya libala, kokende komivandisa te na esika ya lokumu, pamba te, kati na bato oyo babengami na feti yango, ekoki kozala na moto oyo aleki yo na lokumu.
οταν κληθησ υπο τινοσ εισ γαμουσ μη κατακλιθησ εισ την πρωτοκλισιαν μηποτε εντιμοτεροσ σου η κεκλημενοσ υπ αυτου
9 Soki esalemi bongo, moto oyo abengisi bino mibale akoya koloba na yo: ‹ Tikela moto oyo kiti na yo! › Bongo, na soni nyonso, okokende kozwa esika ya suka.
και ελθων ο σε και αυτον καλεσασ ερει σοι δοσ τουτω τοπον και τοτε αρξη μετ αισχυνησ τον εσχατον τοπον κατεχειν
10 Kasi soki babengisi yo na feti, kende na yo kovanda na esika ya suka, mpo ete, tango moto oyo abengisi yo akoya, aloba na yo: ‹ Molingami na ngai, yaka kovanda na esika oyo eleki malamu! › Boye, okopesamela lokumu na miso ya bato nyonso oyo babengami na feti.
αλλ οταν κληθησ πορευθεισ αναπεσε εισ τον εσχατον τοπον ινα οταν ελθη ο κεκληκωσ σε ειπη σοι φιλε προσαναβηθι ανωτερον τοτε εσται σοι δοξα ενωπιον των συνανακειμενων σοι
11 Solo, moto nyonso oyo amitombolaka, bakokitisa ye; mpe moto oyo amikitisaka, bakotombola ye. »
οτι πασ ο υψων εαυτον ταπεινωθησεται και ο ταπεινων εαυτον υψωθησεται
12 Bongo Yesu alobaki na moto oyo abengisaki Ye: — Soki osali feti mpo ete bato baya kolia, kobengisa te balingami na yo, bandeko na yo, baboti na yo to bazwi oyo bazalaka pene na yo; noki te bango mpe bakobengisa yo mpo na kozongisela yo, na nzela wana, bolamu oyo osalaki mpo na bango.
ελεγεν δε και τω κεκληκοτι αυτον οταν ποιησ αριστον η δειπνον μη φωνει τουσ φιλουσ σου μηδε τουσ αδελφουσ σου μηδε τουσ συγγενεισ σου μηδε γειτονασ πλουσιουσ μηποτε και αυτοι σε αντικαλεσωσιν και γενηται σοι ανταποδομα
13 Kasi Soki osali feti, bengisa babola, bakufi miso, bakakatani mpe ba-ebosono;
αλλ οταν ποιησ δοχην καλει πτωχουσ αναπηρουσ χωλουσ τυφλουσ
14 mpe Nzambe akopambola yo. Atako bakoki te kozongisela yo bolamu oyo osali mpo na bango, kasi Nzambe akofuta niongo na mokolo oyo bato ya sembo bakosekwa.
και μακαριοσ εση οτι ουκ εχουσιν ανταποδουναι σοι ανταποδοθησεται γαρ σοι εν τη αναστασει των δικαιων
15 Tango moko kati na babengami ayokaki bongo, alobaki na Yesu: — Esengo na moto oyo akolia na feti kati na Bokonzi ya Nzambe!
ακουσασ δε τισ των συνανακειμενων ταυτα ειπεν αυτω μακαριοσ οσ φαγεται αριστον εν τη βασιλεια του θεου
16 Yesu azongiselaki ye: — Moto moko asalaki feti monene mpe abengisaki bato ebele.
ο δε ειπεν αυτω ανθρωποσ τισ εποιησεν δειπνον μεγα και εκαλεσεν πολλουσ
17 Tango ngonga ya kolia ekokaki, atindaki mosali na ye kokende koloba na bato oyo babengamaki: « Boya, pamba te nyonso esili kobongisama sik’oyo. »
και απεστειλεν τον δουλον αυτου τη ωρα του δειπνου ειπειν τοισ κεκλημενοισ ερχεσθε οτι ηδη ετοιμα εστιν παντα
18 Kasi bango nyonso bakomaki kosenga bolimbisi ndenge moko. Moto ya liboso alobaki: « Nawuti kosomba elanga, nasengeli kokende kotala yango; nabondeli yo, limbisa ngai! »
και ηρξαντο απο μιασ παραιτεισθαι παντεσ ο πρωτοσ ειπεν αυτω αγρον ηγορασα και εχω αναγκην εξελθειν και ιδειν αυτον ερωτω σε εχε με παρητημενον
19 Moto ya mibale alobaki: « Nawuti kosomba bangombe zomi, nasengeli komeka yango; nabondeli yo, limbisa ngai! »
και ετεροσ ειπεν ζευγη βοων ηγορασα πεντε και πορευομαι δοκιμασαι αυτα ερωτω σε εχε με παρητημενον
20 Moto mosusu alobaki: « Nawuti kobala mwasi; nakoki koya te. »
και ετεροσ ειπεν γυναικα εγημα και δια τουτο ου δυναμαι ελθειν
21 Mosali azongaki mpe ayebisaki makambo nyonso epai ya nkolo na ye. Nkolo ndako asilikaki makasi mpe atindaki mosali na ye: « Kende noki na banzela, na babalabala ya engumba, mpe memela ngai babola, ba-ebosono, bakakatani mpe bakufi miso. »
και παραγενομενοσ ο δουλοσ εκεινοσ απηγγειλεν τω κυριω αυτου ταυτα τοτε οργισθεισ ο οικοδεσποτησ ειπεν τω δουλω αυτου εξελθε ταχεωσ εισ τασ πλατειασ και ρυμασ τησ πολεωσ και τουσ πτωχουσ και αναπηρουσ και χωλουσ και τυφλουσ εισαγαγε ωδε
22 Sima na mwa tango, mosali ayaki mpe alobaki: « Nkolo na ngai, nasali ndenge otindaki ngai; kasi bisika ezali nanu. »
και ειπεν ο δουλοσ κυριε γεγονεν ωσ επεταξασ και ετι τοποσ εστιν
23 Nkolo alobaki na mosali na ye: « Kende lisusu na banzela mpe na babalabala ya engumba, tinda bango na makasi mpo ete bakota, mpe ndako na ngai etonda na bato.
και ειπεν ο κυριοσ προσ τον δουλον εξελθε εισ τασ οδουσ και φραγμουσ και αναγκασον εισελθειν ινα γεμισθη ο οικοσ μου
24 Pamba te, nazali koloba na yo: moko te kati na bato oyo babengamaki akolia biloko ya feti na ngai. »
λεγω γαρ υμιν οτι ουδεισ των ανδρων εκεινων των κεκλημενων γευσεται μου του δειπνου πολλοι γαρ εισιν κλητοι ολιγοι δε εκλεκτοι
25 Ebele ya bato bazalaki kokende elongo na Yesu. Yesu abalukaki mpo na kotala bango mpe alobaki:
συνεπορευοντο δε αυτω οχλοι πολλοι και στραφεισ ειπεν προσ αυτουσ
26 — Soki moto ayei epai na Ngai, kasi alingi Ngai te koleka tata na ye, mama na ye, mwasi na ye, bana na ye, bandeko na ye ya mibali, bandeko na ye ya basi, mpe ezala ata bomoi na ye moko, moto ya ndenge wana akoki te kozala moyekoli na Ngai.
ει τισ ερχεται προσ με και ου μισει τον πατερα αυτου και την μητερα και την γυναικα και τα τεκνα και τουσ αδελφουσ και τασ αδελφασ ετι δε και την εαυτου ψυχην ου δυναται μου μαθητησ ειναι
27 Mpe moto nyonso oyo amemaka ekulusu na ye te mpe alandaka Ngai te akoki te kozala moyekoli na Ngai.
και οστισ ου βασταζει τον σταυρον αυτου και ερχεται οπισω μου ου δυναται ειναι μου μαθητησ
28 Soki moko kati na bino alingi kotonga ndako molayi, boni, bokovanda nanu te mpe bokoluka nanu te koyeba motuya mpo na kotala soki bozali na mbongo ya kokoka mpo na kosilisa misala ya kotonga ndako yango?
τισ γαρ εξ υμων ο θελων πυργον οικοδομησαι ουχι πρωτον καθισασ ψηφιζει την δαπανην ει εχει τα εισ απαρτισμον
29 Pamba te, soki sima na bino kotia moboko, bokoki lisusu te kosilisa kotonga ndako yango, bato nyonso oyo bakobanda komona yango bakobanda koseka bino mpe koloba:
ινα μηποτε θεντοσ αυτου θεμελιον και μη ισχυοντοσ εκτελεσαι παντεσ οι θεωρουντεσ αρξωνται εμπαιζειν αυτω
30 « Botala moto oyo! Abandaki mosala ya kotonga ndako, kasi azangaki makoki ya kosilisa yango. »
λεγοντεσ οτι ουτοσ ο ανθρωποσ ηρξατο οικοδομειν και ουκ ισχυσεν εκτελεσαι
31 Ndenge moko, soki mokonzi moko alingi kokende kobundisa mokonzi mosusu, boni, akovanda nanu te mpe akotala nanu te soki, elongo na basoda na ye nkoto zomi, akoki kobundisa mokonzi oyo, elongo na basoda nkoto tuku mibale, azali koya kobundisa ye?
η τισ βασιλευσ πορευομενοσ συμβαλειν ετερω βασιλει εισ πολεμον ουχι καθισασ πρωτον βουλευεται ει δυνατοσ εστιν εν δεκα χιλιασιν απαντησαι τω μετα εικοσι χιλιαδων ερχομενω επ αυτον
32 Soki amoni ete akokoka te, wana monguna na ye azali nanu mosika, akotindela ye bato mpo na kosenga kimia.
ει δε μηγε ετι πορρω αυτου οντοσ πρεσβειαν αποστειλασ ερωτα τα προσ ειρηνην
33 Boye, kati na bino, moto nyonso oyo akoki kokabwana te na biloko na ye nyonso akoki te kozala moyekoli na Ngai.
ουτωσ ουν πασ εξ υμων οσ ουκ αποτασσεται πασιν τοισ εαυτου υπαρχουσιν ου δυναται μου ειναι μαθητησ
34 Mungwa ezali malamu; kasi soki mungwa ebungisi elengi na yango, ndenge nini bakozongisa lisusu elengi na yango?
καλον το αλασ εαν δε το αλασ μωρανθη εν τινι αρτυθησεται
35 Ekozala lisusu na tina moko te, ezala mpo na mabele to mpo na kobongisa bilanga; kasi bakobwaka yango. Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka!
ουτε εισ γην ουτε εισ κοπριαν ευθετον εστιν εξω βαλλουσιν αυτο ο εχων ωτα ακουειν ακουετω