< Luka 12 >

1 Na tango yango, lokola bankoto ebele ya bato basanganaki, kino bakomaki konyatana bango na bango, Yesu abandaki na koyebisa bayekoli na Ye: — Bosala keba na levire ya Bafarizeo, oyo ezali lokuta!
그 동안에 무리 수만 명이 모여 서로 밟힐 만큼 되었더니 예수께서 먼저 제자들에게 말씀하여 가라사대 `바리새인들의 누룩 곧 외식을 주의하라
2 Eloko moko te ebombama ekozanga komonisama, mpe eloko moko te ya sekele ekozanga koyebana.
감추인 것이 드러나지 않을 것이 없고 숨은 것이 알려지지 않을 것이 없나니
3 Nyonso oyo bokoloba kati na molili ekoyokana kati na pole ya mokolo, mpe nyonso oyo bokolobana na matoyi kati na bashambre ekosakolama wuta na likolo ya bandako.
이러므로 너희가 어두운 데서 말한 모든것이 광명한 데서 들리고 너희가 골방에서 귀에 대고 말한 것이 집 위에서 전파되리라
4 Balingami na Ngai, nazali koloba na bino: bobanga te bato oyo bakoki koboma nzoto mpe, na sima, bakoki kosala likambo mosusu te.
내가 내 친구 너희에게 말하노니 몸을 죽이고 그 후에는 능히 더 못하는 자들을 두려워하지 말라
5 Nakolakisa bino nani oyo bosengeli kobanga: bobanga Ye oyo, sima na kufa, azali na bokonzi ya kobwaka kati na lifelo. Solo, nazali koloba na bino: Ye nde bosengeli kobanga. (Geenna g1067)
마땅히 두려워할 자를 내가 너희에게 보이리니 곧 죽인 후에 또한 지옥에 던져 넣는 권세 있는 그를 두려워하라 내가 참으로 너희에게 이르노니 그를 두려워하라 (Geenna g1067)
6 Boni, batekaka te bandeke mike mitano na motuya ya mbongo ya bibende mibale? Nzokande, Nzambe abosanaka ata ndeke moko te kati na yango.
참새 다섯이 앗사리온 둘에 팔리는 것이 아니냐? 그러나 하나님 앞에는 그 하나라도 잊어버리시는 바 되지 아니하는도다
7 Ayebi kutu ata motango ya suki na bino. Bobanga te; boleki bandeke mike ebele na motuya.
너희에게는 오히려 머리털까지도 다 세신 바 되었나니 두려워하지 말라 너희는 많은 참새보다 귀하니라
8 Nazali koloba na bino: moto nyonso oyo, na miso ya bato, akotatola ete azali moto na Ngai, Mwana na Moto mpe akotatola liboso ya ba-anjelu ya Nzambe ete azali moto na Ye;
내가 또한 너희에게 말하노니 누구든지 사람 앞에서 나를 시인하면 인자도 하나님의 사자들 앞에서 저를 시인할 것이요
9 kasi ye oyo akowangana Ngai na miso ya bato, Ngai mpe nakowangana ye liboso ya ba-anjelu ya Nzambe.
사람 앞에서 나를 부인하는 자는 하나님의 사자들 앞에서 부인함을 받으리라
10 Moto nyonso oyo akoloba mabe na tina na Mwana na Moto akolimbisama, kasi ye oyo akofinga Molimo Mosantu akolimbisama te.
누구든지 말로 인자를 거역하면 사하심을 받으려니와 성령을 거역하는 자는 사하심을 받지 못하리라
11 Tango bakokumba bino kati na bandako ya mayangani, liboso ya bakambi mpe bakonzi, bomitungisa te na koluka koyeba ndenge nini bokosamba mpe maloba nini bokoloba;
사람이 너희를 회당과 정사 잡은 이와 권세 있는 이 앞에 끌고 가거든 어떻게 무엇으로 대답하며 무엇으로 말할 것을 염려치 말라
12 pamba te Molimo Mosantu akolakisa bino, na tango yango, makambo oyo bosengeli koloba.
마땅히 할 말을 성령이 곧 그 때에 너희에게 가르치시리라' 하시니라
13 Moto moko kati na ebele ya bato alobaki na Yesu: — Moteyi, loba na ndeko na ngai ete akabola na ngai libula oyo tata atikelaki biso.
무리 중에 한 사람이 이르되 `선생님, 내 형을 명하여 유업을 나와 나누게 하소서' 하니
14 Yesu azongiselaki ye: — Molingami na Ngai, nani atie Ngai Mosambisi to Mokati makambo na bino ya libula?
이르시되 `이 사람아, 누가 나를 너희의 재판장이나 물건 나누는 자로 세웠느냐?' 하시고
15 Bongo alobaki na bato nyonso: — Bosala keba! Bomibatela malamu ete bokweya te na lokoso ya konduka bomengo; pamba te, ezala kati na bofuluki, ezali bomengo te nde esalaka bomoi ya moto.
저희에게 이르시되 `삼가 모든 탐심을 물리치라! 사람의 생명이 그 소유의 넉넉한데 있지 아니하니라 하시고
16 Mpe alobaki na bango lisese oyo: — Bilanga ya mozwi moko ebotaki bambuma ebele penza.
또 비유로 저희에게 일러 가라사대 한 부자가 그 밭에 소출이 풍성하매
17 Akomaki kokanisa mpe komituna: « Nasala nini? Nazali lisusu na esika te mpo na kobomba bambuma na ngai ya bilanga. »
심중에 생각하여 가로되 내가 곡식 쌓아 둘 곳이 없으니 어찌할꼬 하고
18 Bongo amilobelaki lisusu: « Nakosala boye: nakobuka bibombelo na ngai mpo na kotonga bibombelo oyo eleki minene, nakobomba kuna ble na ngai nyonso mpe biloko na ngai mosusu.
또 가로되 내가 이렇게 하리라 내 곡간을 헐고 더 크게 짓고 내 모든 곡식과 물건을 거기 쌓아 두리라
19 Sima na yango, nakomilobela: ‹ Oh bomoi na ngai, otondi na biloko oyo ebombami mpo na mibu ebele; pema na yo, lia, mela mpe sepela! › »
또 내가 내 영혼에게 이르되 영혼아 여러 해 쓸 물건을 많이 쌓아 두었으니 평안히 쉬고 먹고 마시고 즐거워하자 하리라 하되
20 Kasi Nzambe alobaki na ye: « Zoba! Na butu ya lelo kaka, okokufa. Bongo nani akokoma nkolo biloko nyonso oyo ondukaki mpo na yo moko? »
하나님은 이르시되 어리석은 자여 오늘 밤에 네 영혼을 도로 찾으리니 그러면 네 예비한 것이 뉘것이 되겠느냐? 하셨으니
21 Ekozala bongo mpo na moto nyonso oyo andukaka bomengo mpo na ye moko, kasi alukaka te kozala mozwi na miso ya Nzambe.
자기를 위하여 재물을 쌓아 두고 하나님께 대하여 부요치 못한 자가 이와 같으니라'
22 Bongo Yesu alobaki na bayekoli na Ye: — Yango wana, nazali koloba na bino: bomitungisaka te na tina na bomoi na bino, na komituna: tokolia nini? To na tina na banzoto na bino, na komituna: Tokolata nini?
또 제자들에게 이르시되 그러므로 내가 너희에게 이르노니 `너희 목숨을 위하여 무엇을 먹을까? 몸을 위하여 무엇을 입을까? 염려하지 말라
23 Pamba te bomoi eleki bilei na tina, mpe nzoto eleki bilamba na tina.
목숨이 음식보다 중하고 몸이 의복보다 중하니라
24 Botala bayanganga: elonaka nkona te, ebukaka bambuma te, ezali te na ebombelo bambuma to na ebombelo bilei; kasi Nzambe aleisaka yango. Nzokande bino, boleki bandeke na motuya.
까마귀를 생각하라 심지도 아니하고 거두지도 아니하며 골방도 없고 창고도 없으되 하나님이 기르시나니 너희는 새보다 얼마나 더 귀하냐?
25 Nani kati na bino, na nzela ya mitungisi na ye, akoki kobakisa ata ngonga moko na molayi ya bomoi na ye?
또 너희 중에 누가 염려함으로 그 키를 한 자나 더할 수 있느냐?
26 Soki bokoki kosala te makambo oyo ya mike-mike, bongo mpo na nini komitungisa na tina na makambo mosusu?
그런즉 지극히 작은 것이라도 능치 못하거든 어찌 그 다른 것을 염려하느냐?
27 Botala ndenge bafololo ya lisi ekolaka! Esalaka te, etongaka bilamba te; nzokande, nazali koloba na bino, ezala ye moko mokonzi Salomo, kati na nkembo na ye nyonso, atikalaki kolata te lokola moko kati na yango.
백합화를 생각하여 보아라 실도 만들지 않고 짜지도 아니하느니라 그러나 내가 너희에게 말하노니 솔로몬의 모든 영광으로도 입은 것이 이 꽃 하나만 같지 못하였느니라
28 Soki Nzambe alatisaka bongo matiti oyo, lelo, ezali kati na bilanga, mpe, lobi, ekobwakama na moto, akozanga te kolatisa bino, bato ya kondima moke?
오늘 있다가 내일 아궁이에 던지우는 들풀도 하나님이 이렇게 입히시거든 하물며 너희일까보냐 믿음이 적은 자들아
29 Bomitungisaka te na tina na biloko ya kolia to ya komela, bolongola yango na makanisi na bino.
너희는 무엇을 먹을까? 무엇을 마실까? 하여 구하지 말며 근심하지도 말라
30 Pamba te ezali bapagano ya mokili oyo nde balukaka-lukaka biloko wana nyonso. Tata na bino ayebi malamu ete bozali na bosenga na yango.
이 모든 것은 세상 백성들이 구하는 것이라 너희 아버지께서 이런 것이 너희에게 있어야 될 줄을 아시느니라
31 Bolukaka nde liboso Bokonzi ya Nzambe, bongo bakobakisela bino biloko wana nyonso.
오직 너희는 그의 나라를 구하라 그리하면 이런 것을 너희에게 더하시리라
32 Oh etonga moke, bobanga te! Pamba te Tata na bino asepelaki kopesa bino Bokonzi!
적은 무리여 무서워 말라 너희 아버지께서 그 나라를 너희에게 주시기를 기뻐하시느니라
33 Boteka biloko na bino mpe bokaba epai ya babola mbongo oyo bokozwa. Bosala mpo na bolamu na bino mabenga oyo etobokaka te; bonduka bomengo kati na Likolo epai wapi ekoki kobeba te, moyibi akoki kopusana te mpe nselele ekoki kobebisa te;
너희 소유를 팔아 구제하여 낡아지지 아니하는 주머니를 만들라 곧 하늘에 둔 바 다함이 없는 보물이니 거기는 도적도 가까이 하는 일이 없고 좀도 먹는 일이 없느니라
34 pamba te epai bomengo na bino ezali, kuna mpe motema na bino ekozala.
너희 보물 있는 곳에는 너희 마음도 있으리라
35 Bomilengela mpo na mosala mpe bobatela minda na bino ya kopela.
허리에 띠를 띠고 등불을 켜고 서 있으라
36 Bozala lokola bato oyo bazali kozela bozongi ya nkolo na bango wuta na feti ya libala, mpo ete bafungolela ye ekuke tango kaka akoya mpe akobeta ekuke.
너희는 마치 그 주인이 혼인 집에서 돌아와 문을 두드리면 곧 열어주려고 기다리는 사람과 같이 되라
37 Esengo na basali oyo nkolo, tango akoya, akokuta bazali kosenzela! Nazali koloba na bino penza ya solo: nkolo mpe akolata elamba na ye ya mosala, akovandisa bango na mesa, mpe akoya kopesa bango bilei.
주인이 와서 깨어 있는 것을 보면 그 종들은 복이 있으리로다 내가 진실로 너희에게 이르노니 주인이 띠를 띠고 그 종들을 자리에 앉히고 나아와 수종하리라
38 Ekozala penza esengo mpo na basali oyo nkolo akokuta bazali kosenzela, ezala ayei na ngonga ya midi ya butu to liboso ete tongo etana.
주인이 혹 이경에나 혹 삼경에 이르러서도 종들의 이같이 하는 것을 보면 그 종들은 복이 있으리로다
39 Kasi bososola malamu likambo oyo: soki nkolo ndako ayebaki ngonga oyo moyibi akoya, alingaki kopekisa ye kokota kati na ndako na ye.
너희도 아는 바니 집 주인이 만일 도적이 어느 때에 이를 줄 알았더면 그 집을 뚫지 못하게 하였으리라
40 Bino mpe bomilengela, pamba te Mwana na Moto akoya na ngonga oyo bozali kokanisa kutu te kozela Ye.
이러므로 너희도 예비하고 있으라 생각지 않은 때에 인자가 오리라 하시니라'
41 Petelo atunaki Yesu: — Nkolo, ozali koloba lisese oyo mpo na biso to mpo na bato nyonso?
베드로가 여짜오되 `주께서 이 비유를 우리에게 하심이니이까? 모든 사람에게 하심이니이까?
42 Nkolo azongisaki: — Nani mobateli bomengo ya sembo mpe ya mayele epai ya nani nkolo akopesa mokumba ya kokamba basali na ye mpo na kopesaka bango bilei na bango na tango oyo ekoki?
주께서 가라사대 `지혜있고 진실한 청지기가 되어 주인에게 그 집종들을 맡아 때를 따라 양식을 나누어 줄 자가 누구냐
43 Esengo na mosali oyo nkolo na ye, tango akozonga, akokuta azali kosala bongo!
주인이 이를 때에 그 종의 이렇게 하는 것을 보면 그 종이 복이 있으리로다
44 Nazali koloba na bino penza ya solo: nkolo na ye akopesa ye mokumba ya kobatela biloko na ye nyonso.
내가 참으로 너희에게 이르노니 주인이 그 모든 소유를 저에게 맡기리라
45 Kasi soki mosali yango amilobeli: « Nkolo na ngai awumeli mpo na kozonga, » mpe akomi kobeta basali mpe basi basali; kolia, komela masanga mpe kolangwa,
만일 그 종이 마음에 생각하기를 주인이 더디 오리라 하여 노비를 때리며 먹고 마시고 취하게 되면
46 nkolo ya mosali yango akozonga na mokolo oyo ye, mosali, azali kozela ye te, mpe na ngonga oyo ayebi te. Boye akokata-kata ye na biteni mpe akotia ye esika moko na basali oyo bazangi bosembo.
생각지 않은 날 알지 못하는 시간에 이 종의 주인이 이르러 엄히 때리고 신실치 아니한 자의 받는 율에 처하리니
47 Mosali oyo ayebi posa ya nkolo na ye, kasi amilengeli te to asali te kolanda posa ya nkolo na ye, akobetama fimbu ebele.
주인의 뜻을 알고도 예비치 아니하고 그 뜻대로 행치 아니한 종은 많이 맞을 것이요
48 Kasi mosali oyo ayebi te posa ya nkolo na ye mpe asali makambo oyo ebongi na etumbu, akobetama fimbu moke. Na moto oyo bapesi mingi, bakosenga ye mpe mingi; mpe bakotuna na moto na moto kolanda mokumba oyo bapesi ye: na moto oyo bapesi mingi, bakotuna ye mpe mingi; mpe na moto oyo bapesi moke, bakotuna ye moke.
알지 못하고 맞을 일을 행한 종은 적게 맞으리라 무릇 많이 받은 자에게는 많이 찾을 것이요 많이 맡은 자에게는 많이 달라 할 것이니라
49 Nayei kotia moto na mokili, nazali na posa makasi ete moto yango emipelela.
내가 불을 땅에 던지러 왔노니 이 불이 이미 붙었으면 내가 무엇을 원하리요
50 Kasi ezali na libatisi moko oyo nasengeli kozwa, mpe tala ndenge nini nakomi motema moto-moto mpo na kozela kokokisama na yango!
나는 받을 세례가 있으니 그 이루기까지 나의 답답함이 어떠하겠느냐?
51 Boni, bokanisi ete nayaki mpo na komema kimia na mokili? Kimia te, bokabwani nde.
내가 세상에 화평을 주려고 온 줄로 아느냐? 내가 너희에게 이르노니 아니라 도리어 분쟁케 하려 함이로라
52 Pamba te, kobanda sik’oyo, bato mitano kati na libota moko bakokabwana: misato bakoyina mibale, mpe mibale bakoyina misato.
이 후부터 한 집에 다섯 사람이 있어 분쟁하되 셋이 둘과, 둘이 셋과 하리니
53 Tata akoyina mwana na ye ya mobali, mpe mwana mobali akoyina tata na ye; mama akoyina mwana na ye ya mwasi, mpe mwana mwasi akoyina mama na ye; mama-bokilo akoyina mwasi ya mwana na ye ya mobali, mpe mwasi ya mwana mobali akoyina mama-bokilo na ye.
아비가 아들과, 아들이 아비와, 어미가 딸과, 딸이 어미와, 시어미가 며느리와, 며느리가 시어미와 분쟁하리라' 하시니라
54 Bongo alobaki lisusu na ebele ya bato: — Tango bomonaka mapata kobima na weste, bolobaka mbala moko: « Mvula elingi konoka, » mpe ekokisamaka bongo.
또 무리에게 이르시되 `너희가 구름이 서에서 일어남을 보면 곧 말하기를 소나기가 오리라 하나니 과연 그러하고
55 Tango mopepe ya sude efulaka, bolobaka: « Molunge ekozala makasi penza, » mpe esalemaka bongo.
남풍이 붊을 보면 말하기를 심히 더우리라 하나니 과연 그러하니라
56 Bato ya bilongi mibale! Boyebi malamu kolimbola bilembo oyo bomonaka na mokili mpe na likolo, bongo mpo na nini bozali koyeba te kososola tango oyo?
외식하는 자여! 너희가 천지의 기상은 분변할 줄을 알면서 어찌 이 시대는 분변치 못하느냐?
57 Mpo na nini bososolaka te, mpo na bino moko, makambo oyo ezali sembo?
또 어찌하여 옳은 것을 스스로 판단치 아니하느냐?
58 Soki ozali kokende na esambiselo elongo na moto oyo afundi yo, sala nyonso mpo ete oyokana na ye, wana bozali nanu na nzela. Soki te, akokumba yo epai ya mosambisi, mosambisi akokaba yo na maboko ya bakengeli, mpe bakengeli bakobwaka yo kati na boloko.
네가 너를 고소할 자와 함께 법관에게 갈 때에 길에서 화해하기를 힘쓰라 저가 너를 재판장에게 끌어가고 재판장이 너를 관속에게 넘겨 주어 관속이 옥에 가둘까 염려하라
59 Nazali koloba na yo: okobima na boloko soki kaka ofuti niongo na yo kino na mbongo ya suka ya bibende.
네게 이르노니 호리라도 남김이 없이 갚지 아니하여서는 결단코 저기서 나오지 못하리라' 하시니라

< Luka 12 >