< Luka 11 >
1 Mokolo moko, Yesu azalaki kosambela na esika songolo. Tango asilisaki kosambela, moko kati na bayekoli na Ye alobaki na Ye: — Nkolo, lakisa biso kosambela ndenge Yoane alakisaki bayekoli na ye.
It happened that Jesus was praying in a certain place; and when he had done, one of his disciples said to him, Master, teach us to pray, as John also taught his disciples.
2 Yesu alobaki na bango: — Tango bozali kosambela, boloba: Tata, tika ete Kombo na Yo ebulisama, tika ete Bokonzi na Yo eya!
He said to them, When you pray, say, Father, thy name be hallowed; thy Reign come;
3 Pesa biso bilei oyo tosengeli na yango, mokolo na mokolo,
give us each day our daily bread;
4 limbisa masumu na biso, pamba te biso mpe tolimbisaka moto nyonso oyo asalaka biso mabe; mpe komema biso na komekama te.
and forgive us our sins, for even we forgive all who offend us; and lead us not into temptation.
5 Alobaki na bango lisusu: — Soki moko kati na bino azali na molingami, bongo akei epai na ye na midi ya butu mpe alobi: « Molingami, defisa ngai mapa misato;
Moreover, he said to them, Should one of you have a friend, and go to him at midnight, and say, Friend, lend me three loaves;
6 pamba te moko kati na baninga na ngai azali kosala mobembo mpe akomi epai na ngai, kasi nazangi bilei ya kopesa ye. »
for a friend of mine is come off his road to see me, and I have nothing to set before him;
7 Soki molingami oyo, wuta kati na ndako na ye, azongisi: « Kotungisa ngai te, nasili kokanga ekuke ya ndako na ngai; ngai mpe bana na ngai tolali, nakoki kolamuka te mpo na kopesa yo mapa. »
and he, from within, should answer, Do not disturb me; the door is now locked; I and my children are in bed; I can not rise to give you:
8 Nazali koloba na bino penza ya solo: ata soki akotelema te mpo na kopesa ye mapa yango, kasi akotelema penza mpo na motungisi na ye mpe akopesa ye nyonso oyo azali na yango na bosenga, pamba te azali moninga na ye.
I tell you, though he will not rise and supply him, because he is his friend; he will, because of his importunity, get up, and give him as many as he wants.
9 Boye, Ngai nazali koloba na bino: Bosenga, mpe bakopesa bino; boluka, mpe bokomona; bobeta ekuke, mpe bakofungolela bino.
I likewise tell you, ask, and you shall obtain; seek, and you shall find; knock, and the door shall be opened to you:
10 Pamba te moto nyonso oyo asengaka azwaka, moto oyo alukaka amonaka; mpe moto oyo abetaka ekuke, bafungolelaka ye yango.
for whosoever asks, obtains; whosoever seeks, finds; and to every one who knocks, the door is opened.
11 Nani kati na bino, batata, akopesa na mwana na ye nyoka soki asengi ye mbisi,
What father amongst you, would give his son a stone when he asks bread; or, when he asks a fish, would, instead of a fish, give him a serpent;
12 to akopesa ye koto soki asengi ye liki?
or, when he asks an egg, would give him a scorpion?
13 Bongo soki bino bato oyo bozali kutu mabe boyebi kopesa na bana na bino biloko ya malamu, ndenge nini Tata oyo azali na Likolo apesa te Molimo Mosantu epai ya bato oyo basengaka Ye!
If you, therefore, bad as you are, can give good things to your children; how much more will your heavenly Father give the Holy Spirit to them that ask him!
14 Mokolo moko, Yesu azalaki kobengana molimo mabe oyo ezalaki kopekisa moto koloba. Tango molimo mabe yango ebimaki, moto oyo azalaki koloba te akomaki koloba, mpe ebele ya bato bakamwaki.
Again, he was expelling a demon, which caused dumbness; and when the demon was gone out, the dumb spake, and the people wondered.
15 Kasi bamoko kati na bango balobaki: — Azali kobengana milimo mabe na nguya ya Belizebule, mokonzi ya milimo mabe.
Some, however, said, He expels demons by Beelzebub, the prince of demons.
16 Bamosusu, mpo na komeka Yesu, basengaki na Ye elembo moko kowuta na Likolo.
Others, to try him, asked of him a sign from heaven.
17 Lokola Yesu ayebaki makanisi na bango, alobaki na bango: — Bokonzi nyonso oyo ekabwani mpe ekomi komibundisa ekomipanza, mpe ndako oyo ekabwani mpe ekomi komibundisa ekokweya.
But he, knowing their thoughts, said to them, By intestine broils, any kingdom may be desolated, one family falling after another.
18 Soki Satana akomi komibundisa, bokonzi na ye ekotelema ndenge nini? Nalobi bongo mpo bolobi ete Ngai nazali kobengana milimo mabe na nguya ya Belizebule.
Now, if there be intestine broils in the kingdom of Satan; how can that kingdom subsist? for, you say, that I expel demons by Beelzebub.
19 Mpe soki Ngai nazali kobengana milimo mabe na nguya ya Belizebule, bayekoli na bino babenganaka yango na nguya ya nani? Mpo na yango, bayekoli na bino bakozala bango moko basambisi na bino.
Moreover, if I by Beelzebub expel demons; by whom do your sons expel them? Wherefore they shall be your judges.
20 Kasi soki ezali na nguya ya Nzambe nde Ngai nazali kobengana milimo mabe, wana Bokonzi ya Nzambe esili kokoma kino epai na bino.
But if I, by the finger of God, expel demons, the Reign of God has overtaken you.
21 Tango elombe oyo alata bibundeli akengelaka ndako na ye, biloko na ye ebatelamaka malamu;
When the strong one armed, guards his palace, his effects are secure.
22 kasi soki moto mosusu oyo aleki ye na makasi ayei kobundisa ye mpe alongi ye, akobotola ye bibundeli oyo azalaki kotiela motema, akokamata biloko na ye nyonso mpe akokaba yango.
But if he who is stronger, shall attack and overcome him, he will strip him of his armor, on which he relied, and dispose of his spoils.
23 Moto oyo azali elongo na Ngai te azali monguna na Ngai, mpe moto oyo asangisaka te elongo na Ngai apanzaka.
He who is not for me, is against me; and he who gathers not with me, scatters.
24 Soki molimo mabe ebimi kati na moto, ekendaka koyengayenga na bisika ekawuka mpo na koluka esika ya kopema. Kasi soki ezwi esika yango te, emilobelaka: « Eleki malamu mpo na ngai kozonga na ndako oyo natikaki. »
The unclean spirit, when he is gone out of a man, wanders over parched deserts, in search of a resting place. But not finding any, he says, I will return to my house, whence I came.
25 Tango molimo mabe yango ezongaka, ekutaka ndako yango polele, bakombola mpe babongisa malamu.
Being come, he finds it swept and embellished.
26 Bongo ekendaka lisusu kozwa milimo mosusu sambo oyo eleki yango na mabe, mpe, elongo na yango, ekotaka mpe evandaka kuna. Boye bomoi ya moto yango ekomaka lisusu mabe, koleka ndenge ezalaki liboso.
Then he goes and brings seven other spirits more wicked than himself; and having entered, they dwell there; and the last state of that man becomes worse than the first.
27 Wana Yesu azalaki koloba makambo oyo, mwasi moko agangaki wuta kati na ebele ya bato: — Esengo na mama oyo abotaki Yo mpe amelisaki Yo mabele!
While he was saying these things, a woman, raising her voice, cried to him, from amidst the crowd, Happy the womb which bore you! and the breast which suckled you!
28 Yesu azongisaki: — Esengo nde na bato oyo bayokaka Liloba na Nzambe mpe batosaka yango!
Say, rather, replied he, Happy they who hear the word of God, and obey.
29 Lokola bato bazalaki kotonda se kotonda pembeni na Ye, Yesu alobaki: — Bato ya ekeke oyo bazali bato mabe penza! Bazali kosenga elembo! Bakopesamela elembo mosusu te, longola kaka elembo ya Yona;
When the people crowded together, he said, This is an evil generation. They demand a sign; but no sign shall be given them, only the sign of Jonah.
30 pamba te, ndenge Yona azalaki elembo mpo na bato ya Ninive, ndenge wana mpe Mwana na Moto akozala elembo mpo na bato ya ekeke oyo.
For, as Jonah was a sign to the Ninevites, so shall the Son of Man be to this generation.
31 Na mokolo ya kosambisama, mwasi mokonzi ya sude akolamuka, elongo na bato ya ekeke oyo, mpe akokatela bango etumbu, pamba te awutaki mosika, na suka ya mokili, mpo na koyoka bwanya ya Salomo; nzokande awa sik’oyo, ezali na Moto oyo aleki Salomo.
The queen of the south country will arise in the judgment against the men of this generation, and cause them to be condemned: because she came from the extremities of the earth, to hear the wise discourses of Solomon: and behold, here is something greater than Solomon.
32 Na mokolo ya kosambisama, bato ya Ninive bakotelema, elongo na bato ya ekeke oyo, mpe bakokatela bango etumbu, pamba te babongolaki mitema na bango tango bayokaki mateya ya Yona; nzokande awa sik’oyo, ezali na Moto oyo aleki Yona.
The men of Nineveh will stand up in the judgment against this generation, and cause it to be condemned: because they reformed when warned by Jonah: and behold, here is something greater than Jonah.
33 Moto moko te apelisaka mwinda mpo na kotia yango na esika ya kobombama to na se ya katini. Nzokande, batiaka yango na likolo ya etelemiselo ya minda mpo ete bato oyo bazali kokota na ndako bamona pole.
A lamp is lighted, not to be concealed, or put under a vessel, but on a stand; that they who enter may have light.
34 Miso na yo ezali lokola mwinda ya nzoto na yo. Soki miso na yo ezali malamu, nzoto na yo mobimba mpe ezali kati na pole. Kasi soki ebeli, nzoto na yo mobimba mpe ekoti kati na molili.
The lamp of the body is the eye: when, therefore, your eye is sound, the whole body is enlightened; but when your eye is distempered, your body is in darkness.
35 Yango wana, sala keba ete pole oyo ezali kati na yo ekoma molili te.
Take heed, then, lest the light which is in you, be darkness.
36 Soki nzoto na yo mobimba ezali kati na pole, mpe eteni ata moko te ezali kati na molili, nzoto na yo mobimba ekotonda na pole lokola tango mwinda engengisaka yo na nzela ya pole na yango.
If your whole body, therefore, be enlightened, having no part dark; the whole will be so enlightened, as when a lamp lights you by its flame.
37 Tango Yesu asilisaki koloba, Mofarizeo moko abengisaki Ye mpo ete akende kolia elongo na ye. Yesu akotaki na ndako na ye mpe avandaki na mesa.
While he was speaking, a Pharisee asked him to dine with him. And he went and placed himself at table.
38 Kasi Mofarizeo akamwaki mingi tango amonaki ete Yesu asukoli maboko te liboso ya kolia.
But the Pharisee was surprised to observe that he used no washing before dinner.
39 Bongo, Nkolo alobaki na ye: — Bino Bafarizeo, bosukolaka libanda ya bakopo mpe ya basani, kasi botondi na moyibi mpe na mabe.
Then the Lord said to him, As for you, Pharisees, you cleanse the outside of your cups and dishes, while you yourselves are inwardly full of rapacity and malevolence.
40 Bazoba! Boni, ye oyo asalaki libanda, asalaki mpe kati te?
Unthinking men! did not he who made the outside, make the inside also?
41 Bobonza nde bomoto na bino ya kati lokola likabo epai ya Nzambe, bongo mobimba na bino ekokoma mbala moko peto.
Only give in alms what you have, and all things shall be clean to you.
42 Mawa na bino, Bafarizeo! Bofutaka eteni ya zomi ya bandembi, ya matungulu mpe ya bandunda ya lolenge nyonso, kasi bomonaka pamba bosembo mpe bolingo ya Nzambe. Nzokande bosengeli nde kotia yango na misala, mpe kozwa na motuya likambo oyo wana ya kofuta eteni ya zomi.
Alas, for you, Pharisees! because you pay the tithe of mint and rue, and of every kind of herb, and neglect justice and the love of God. These things you ought to have practiced, and not to have omitted those.
43 Mawa na bino, Bafarizeo! Bolingaka kovanda na bakiti ya liboso, kati na bandako ya mayangani; mpe bolingaka ete bato bapesa bino mbote ya lokumu, na bisika oyo bato ebele bakutanaka.
Alas, for you, Pharisees! because you love the most conspicuous seats in synagogues, and salutations in public places.
44 Mawa na bino! Bozali lokola bakunda oyo ezanga bilembo, bongo bato batambolaka na likolo na yango na kozanga koyeba!
Alas, for you! because you are like concealed graves, over which people walk without knowing it.
45 Molakisi moko ya mibeko alobaki na Yesu: — Moteyi, tango ozali koloba bongo, ozali kofinga mpe biso!
Here, one of the lawyers interposing, said, By speaking thus, Rabbi, you reproach us also.
46 Yesu azongisaki: — Bino mpe balakisi ya Mobeko, mawa na bino! Bomemisaka bato mikumba ya kilo makasi, mpe bino moko boningisaka ata mosapi moko te mpo na kosunga bango.
He answered, Alas, for you, lawyers! also; because you lade men with intolerable burdens--burdens which you yourselves will not so much as touch with one of your fingers.
47 Mawa na bino, pamba te botongaka bakunda mpo na basakoli oyo bakoko na bino baboma!
Alas, for you! because you build the monuments of the prophets, whom your fathers killed.
48 Boye, wana bosalaka bongo, botatolaka ete bondimi makambo oyo bakoko na bino basala; pamba te bango, baboma basakoli, mpe bino, bozali kotonga bakunda na bango.
Surely you are both vouchers and accessories to the deeds of your fathers; for they killed them, and you build their monuments.
49 Yango wana, Nzambe, kati na bwanya na Ye, aloba: « Nakotindela bango basakoli mpe bantoma; bakoboma bamoko, mpe bakonyokola bamosusu. »
Wherefore, thus says the wisdom of God, I will send them prophets and Apostles: some of them they will kill, others they will banish;
50 Mpo na yango, makila ya basakoli nyonso, oyo basopa wuta na ebandeli ya mokili, ekotangama na mito ya bato ya ekeke oyo,
so that the blood of all the prophets, which has been shed since the formation of the world, shall be required of this generation;
51 kobanda na makila ya Abele kino na makila ya Zakari oyo babomaki kati na etumbelo mpe Esika ya bule. Nazali koloba na bino penza ya solo: mokumba ya mabe wana nyonso ekokweyela bato ya ekeke oyo.
from the blood of Abel, to the blood of Zechariah, who fell between the altar and the house of God. Yes, I assure you, all shall be required of this generation.
52 Mawa na bino, balakisi ya Mobeko, pamba te bolongolaki fungola ya boyebi! Bino moko bokotaki te, mpe bopekisaki bato oyo bazalaki na posa ya kokota.
Alas, for you, lawyers! because you have carried off the key of knowledge; you have not entered yourselves, and those who entering, you hindered.
53 Tango Yesu abimaki na ndako, Bafarizeo mpe balakisi ya Mobeko basilikelaki Ye makasi mpe bakomaki kotungisa Ye na nzela ya mituna ya ndenge na ndenge,
While he spoke these things, the Scribes and the Pharisees began vehemently to press him with questions, on many points;
54 na kotiela Ye mitambo mpo na kozwa, kati na maloba na Ye, likambo ya kofunda Ye.
laying snares for him, in order to draw from his own mouth, matter of accusation against him.