< Luka 10 >

1 Sima na yango, Nkolo aponaki bayekoli tuku sambo na mibale mpe atindaki bango, mibale-mibale liboso na Ye, na bingumba nyonso mpe na bisika nyonso oyo Ye moko asengelaki kokende.
לאחר מכן בחר האדון שבעים תלמידים נוספים, ושלח אותם לפניו בזוגות אל הערים והכפרים שבהם עמד לבקר.
2 Alobaki na bango: — Bambuma ya kobuka etondi meke kati na elanga, kasi basali bazali moke. Boye bosenga na Nkolo elanga ete atinda basali kati na elanga na Ye.
”מאחר שהקציר רב והפועלים מעטים, “אמר להם ישוע,”התחננו לאלוהים שישלח פועלים נוספים לעזור לכם בעבודתכם למענו.
3 Bokende! Nazali kotinda bino lokola bampate kati na bambwa ya zamba.
לכו עתה וזכרו שאני שולח אתכם כשלוח כבשים בין זאבים.
4 Bomema mbongo te, sakosi te to basandale te, mpe bopesa moto moko te mbote na nzela.
אל תיקחו אתכם כסף, חפצים אישיים ואף לא זוג נעליים נוסף, ואל תעצרו בדרך לשוחח עם איש.
5 Na ndako nyonso oyo bokokota, boloba liboso: « Tika ete kimia ezala na ndako oyo! »
”בכניסתכם לכל בית ברכו אותו תחילה לשלום.
6 Soki ezali na moto ya kimia kati na ndako yango, kimia na bino ekovanda likolo na ye; soki te, kimia yango ekozongela bino.
אם באותו בית גר אדם אוהב שלום, הברכה תתקיים, ואם אין אוהב שלום באותו בית – הברכה תשוב אליכם.
7 Bovanda kuna, bolia mpe bomela nyonso oyo bakopesa bino; pamba te mosali asengeli kozwa lifuti na mosala na ye. Botambola-tambola na bandako nyonso te.
”בבואכם אל כפר או עיר אל תעברו מבית מארח אחד לאחר, אלא התארחו בבית אחד בלבד, ואל תהססו לאכול ולשתות כל מה שמגישים לכם, כי הפועל ראוי לשכרו.
8 Tango bokokota na engumba songolo, soki bayambi bino, bolia bilei oyo bakopesa bino,
”בכל עיר שבה מקבלים אתכם בשמחה איכלו את המוגש לפניכם,
9 bobikisa babeli oyo bazali kuna mpe boloba na bango: « Bokonzi ya Nzambe ekomi pene na bino. »
רפאו את החולים ואמרו להם:’מלכות האלוהים קרובה אליכם‘.
10 Kasi tango bokokota na engumba songolo, soki baboyi koyamba bino, bokende na babalabala na yango mpe boloba:
”בעיר שבה לא מקבלים אתכם צאו לרחובות וקראו:
11 « Ezala putulu ya engumba na bino, topupoli yango wuta na makolo na biso, mpo na kokebisa bino. Nzokande, boyeba malamu ete Bokonzi ya Nzambe ekomi pene. »
’כמחאה על התנהגותכם אנחנו מנערים את אבק עירכם שדבק ברגלינו, אולם דעו לכם שאכן קרובה מלכות האלוהים!‘
12 Nazali koloba na bino penza ya solo: Na mokolo wana, etumbu na yango ekozala makasi koleka etumbu ya Sodome.
אני אומר לכם שאפילו לסדום המרושעת יהיה קל יותר ביום הדין מאשר לעיר הזאת.
13 Mawa na yo, Korazini! Mawa na yo, Betisaida! Pamba te soki bikamwa oyo esalemaki kati na bino esalemaki kati na bingumba Tiri mpe Sidoni, mbele wuta kala, bavandi na yango babongola mitema, balata basaki mpe bamipakola putulu.
”אוי ואבוי לכן, כורזין ובית־צידה! אילו חוללתי בצור ובצידון את הנסים שחוללתי בקרבכן, מזמן היו שם כולם חוזרים בתשובה ולובשים שק ואפר לאות חרטה.
14 Kasi, na kosambisama, etumbu na bino ekozala makasi koleka etumbu ya Tiri mpe Sidoni.
כן, צור וצידון תקבלנה עונש קל משלכן ביום הדין!
15 Mpe yo, Kapernawumi, okanisi ete okotombolama kino na Likolo? Te, okokitisama kino na mboka ya bakufi! (Hadēs g86)
ואתם, אנשי כפר־נחום, החושבים אתם שירוממו אתכם לשמים? לגיהינום תרדו!“ (Hadēs g86)
16 Moto oyo atosi bino atosi nde Ngai, moto oyo aboyi bino aboyi nde Ngai, nzokande moto oyo aboyi Ngai aboyi nde Motindi na Ngai.
ישוע המשיך לדבר אל התלמידים:”מי ששומע לכם שומע לי; מי שמזלזל בכם מזלזל בי; ומי שמזלזל בי מזלזל באלוהים אשר שלח אותי.“
17 Tango bayekoli yango tuku sambo na mibale bazongaki, batondaki na esengo mpe balobaki: — Nkolo, ezala milimo mabe etosi biso na Kombo na Yo!
כעבור זמן־מה חזרו שבעים השליחים אל ישוע ודיווחו לו בשמחה:”אדוננו, אפילו השדים נכנעים לנו כשאנו מצווים עליהם בשמך!“
18 Yesu azongisaki: — Namonaki Satana kokweya longwa na likolo, lokola mikalikali.
”אכן, “ענה ישוע,”ראיתי את השטן נופל מן השמים כברק!
19 Napesi bino bokonzi ya konyata banyoka mpe bakoto, mpe ya kolonga nguya nyonso ya monguna, mpe eloko moko te ekosala bino mabe.
באמת הענקתי לכם סמכות וכוח להתגבר על כל כוחות האויב, ולרמוס נחשים ועקרבים. דבר לא יוכל לפגוע בכם!
20 Nzokande, bosepela te komona ete milimo mabe ezali kotosa bino; bosepela nde ete bakombo na bino ekomami kati na Likolo.
אף־על־פי־כן עליכם לשמוח לא משום שאתם יכולים להתגבר על השדים, אלא משום ששמותיכם כתובים בשמים!“
21 Kaka na tango yango, awa Molimo Mosantu atondisaki Ye na esengo, Yesu alobaki: — Oh Tata, Nkolo ya Likolo mpe ya mabele, nakumisi Yo! Pamba te obombaki makambo oyo, mpo ete bato ya bwanya mpe bato ya mayele bayeba yango te, kasi olakisi yango na bana mike. Iyo, Tata, pamba te yango nde osepelaki kosala.
לאחר מכן נמלא ישוע שמחת רוח הקודש וקרא:”אבי, אדון השמים והארץ, אני מודה לך על שהסתרת דברים אלה מפני חכמים ומשכילים, וגילית אותם לאנשים פשוטים שבוטחים בך כמו ילדים. כן, תודה לך אבי, מפני שכך רצית.
22 Tata na Ngai apesa Ngai biloko nyonso. Moko te ayebi soki Mwana azali nani, longola kaka Tata; mpe moko te ayebi soki Tata azali nani, longola kaka Mwana mpe ye oyo epai ya nani Mwana asepeli kotalisa Tata.
הכול נמסר לי מאבי; אף אחד אינו מכיר ממש את הבן, מלבד האב, ואף אחד אינו מכיר ממש את האב, מלבד הבן ואלה שהוא בוחר לגלות להם את האב.“
23 Bongo, abalolaki miso na Ye epai ya bayekoli na Ye mpe alobaki na bango moko kaka: — Esengo na bato oyo bazali komona makambo oyo bozali komona!
ישוע פנה אל תלמידיו ואמר להם בשקט:”זכות גדולה נפלה בחלקכם, שיכולים אתם לראות את אשר ראיתם.
24 Pamba te, nazali koloba na bino: basakoli mpe bakonzi ebele batondaki na posa ya komona makambo oyo bino bozali komona, kasi bamonaki yango te; batondaki na posa ya koyoka makambo oyo bino bozali koyoka, kasi bayokaki yango te.
נביאים ומלכים רבים השתוקקו לראות את מה שאתם רואים ולשמוע את מה שאתם שומעים, אך לא זכו.“
25 Molakisi moko ya Mobeko atelemaki mpe atunaki mpo na komeka Yesu: — Moteyi, nasengeli kosala nini mpo ete nazwa bomoi ya seko? (aiōnios g166)
פעם רצה אחד מחכמי־התורה לנסות את ישוע.”רבי, “שאל החכם,”מה עלי לעשות כדי לזכות בחיי נצח?“ (aiōnios g166)
26 Yesu alobaki na ye: — Makambo nini ekomama kati na mobeko? Otangaka yango ndenge nini?
”מה אומרת על כך התורה?“השיב לו ישוע בשאלה.
27 Molakisi ya mibeko azongisaki: — Linga Nkolo, Nzambe na yo, na motema na yo mobimba, na molimo na yo mobimba, na makasi na yo nyonso mpe na makanisi na yo nyonso; mpe linga moninga na yo ndenge yo moko omilingaka.
”התורה אומרת:’ואהבת את ה׳ אלוהיך בכל לבבך, ובכל נפשך ובכל מאודך; ואהבת לרעך כמוך‘“, השיב החכם.
28 Yesu alobaki na ye: — Opesi eyano ya malamu; sala bongo mpe okozala na bomoi.
”נכון מאוד“, אישר ישוע.”’אם תקיים מצוות אלה תזכה בחיי נצח‘.“
29 Kasi molakisi ya Mobeko alingaki kolakisa ete azali sembo, boye atunaki na Yesu: — Nani azali moninga na ngai?
החכם רצה להצדיק את רגשותיו (מפני שלא אהב אנשים מסוימים), ולכן שאל:”מיהו רעי?“
30 Yesu azongisaki: — Moto moko azalaki kokende na Jeriko, wana awutaki na Yelusalemi. Na nzela, miyibi babetaki ye, babotolaki ye bilamba na ye, babetaki ye mpe bakendeki na bango, batikaki ye pene ya kokufa.
ישוע השיב במשל:”יהודי אחד הלך בדרך מירושלים ליריחו והותקף על־ידי שודדים. הם הפשיטו את בגדיו מעליו, גזלו את כספו, הכו אותו באכזריות והשאירו אותו בצד הדרך פצוע קשות.
31 Nzokande, na tango yango kaka, esalemaki ete Nganga-Nzambe moko akende mpe azwa nzela yango kaka; tango kaka amonaki moto yango, akatisaki na ngambo mosusu ya nzela mpe akobaki mobembo na ye.
במקרה עבר שם כהן אחד, אולם בראותו את הפצוע עבר לצדו השני של השביל.
32 Ndenge moko mpe Molevi moko akomaki na esika yango; tango kaka amonaki moto yango, akatisaki na ngambo mosusu ya nzela mpe akobaki mobembo na ye.
עבר במקום גם איש משבט לוי. הוא הביט בפצוע המוטל בצד הדרך, אולם המשיך בדרכו.
33 Kasi moto moko ya Samari, wana azalaki kokende mobembo, akomaki na esika oyo moto yango azalaki; tango kaka amonaki ye, ayokelaki ye mawa,
הזדמן למקום שומרוני אחד, ובראותו את הפצוע נמלא רחמים.
34 apusanaki pene na ye, asopelaki bapota na ye mafuta mpe vino, mpe akangaki yango. Bongo amatisaki moto yango na likolo ya mile na ye moko, amemaki ye na ndako ya bapaya, mpe akobaki kosunga ye kuna.
השומרוני ניגש אל הפצוע, משח את פצעיו וחבש אותם, לאחר מכן הרכיב אותו על חמורו והביאו לאכסניה, שם טיפל בו והאכיל אותו.
35 Mokolo oyo elandaki, abimisaki mbongo ya bibende mibale mpe apesaki yango na nkolo ndako ya bapaya; alobaki na ye: « Salisa moto oyo malamu; tango nakozonga, nakozongisela yo mbongo nyonso oyo okobakisa! »
למחרת, לפני שהמשיך בדרכו, שילם השומרוני סכום כסף לבעל האכסניה ואמר:’דאג בבקשה לכל מחסורו של הפצוע, ואם לא יספיק הכסף – אשלם את החסר בשובי‘.
36 Yesu atunaki: — Mpo na yo, nani kati na bango misato azalaki moninga ya moto oyo akweyaki na maboko ya miyibi?
”מי מהשלושה היה לדעתך רע טוב לאיש הפצוע?“
37 Molakisi ya mibeko azongisaki: — Ezali moto oyo ayokelaki ye mawa. Yesu alobaki na ye: — Kende mpe sala bongo!
”האדם שריחם עליו“, השיב החכם.”נכון“, הסכים איתו ישוע.”לך ועשה כמוהו.“
38 Wana Yesu mpe bayekoli na Ye bazalaki kokende, Yesu akotaki na mboka moko, mpe mwasi moko oyo kombo na ye ezali Marte ayambaki Ye kati na ndako na ye.
ישוע ותלמידיו המשיכו בדרכם, וכשהגיעו לאחד הכפרים הזמינה אותם אישה בשם מרתא להתארח בביתה.
39 Mari, ndeko mwasi ya Marte, ayaki kovanda na makolo ya Nkolo, mpe azalaki koyoka makambo oyo Nkolo azalaki koloba.
אחותה מרים התיישבה על הארץ לרגלי ישוע והקשיבה לדבריו.
40 Kasi, na tango yango, Marte amipesaki na misala nyonso ya ndako; ayaki na lombangu mpe alobaki: — Ah Nkolo, ozali komona te ete ndeko na ngai atiki ngai kosala ngai moko misala? Loba na ye ete asunga ngai!
מרתא חשה לחץ מהעבודה שבהכנת ארוחה גדולה לכולם, ומשום כך פרצה לחדר וקראה:”נכון שאין זה הוגן שאחותי תשאיר לי את כל העבודה? אמור לה בבקשה שתבוא לעזור לי.“
41 Nkolo azongiselaki ye: — Marte, Marte, ozali komitungisa mpe kominyokola mpo na makambo ebele,
”מרתא, יקירתי, “השיב לה האדון,”את דואגת לכל כך הרבה דברים. עליך לדאוג לדבר אחד בלבד. מרים בחרה בדבר האחד הזה אשר לא יילקח ממנה.“
42 kasi likambo moko kaka ezali na tina. Mari aponi oyo eleki malamu, mpe moto ata moko te akobotola ye yango.

< Luka 10 >