< Levitike 9 >
1 Na mokolo ya mwambe, Moyize abengisaki Aron, bana na ye ya mibali mpe bakambi ya Isalaele.
And it comes to pass on the eighth day, Moses has called for Aaron and for his sons, and for [the] elderly of Israel,
2 Alobaki na Aron: « Zwa mwana ngombe lokola mbeka mpo na masumu na bino mpe meme ya mobali mpo na mbeka na bino ya kotumba; nyonso mibale esengeli kozala ezanga mbeba, mpe bonza yango liboso ya Yawe.
and he says to Aaron, “Take a calf for yourself, a son of the herd, for a sin-offering, and a ram for a burnt-offering, perfect ones, and bring [them] near before YHWH.
3 Bongo loba na bana ya Isalaele: ‹ Bozwa ntaba ya mobali lokola mbeka ya masumu, mwana ngombe mpe mwana meme ezanga mbeba mpe ya mobu moko lokola mbeka ya kotumba,
And you speak to the sons of Israel, saying, Take a kid of the goats for a sin-offering, and a calf, and a lamb, sons of a year, perfect ones, for a burnt-offering,
4 mpe ngombe moko ya mobali mpe meme moko ya mobali lokola mbeka ya boyokani, mpo na kobonza lokola mbeka liboso ya Yawe elongo na likabo ya bambuma basangisa na mafuta. Pamba te, na mokolo ya lelo, Yawe akobimela bino. › »
and a bullock and a ram for peace-offerings, to sacrifice before YHWH, and a present mixed with oil; for today YHWH has appeared to you.”
5 Bamemaki liboso ya Ndako ya kapo ya Bokutani biloko oyo Moyize atindaki bango; mpe lisanga mobimba bapusanaki mpe batelemaki liboso ya Yawe.
And they take that which Moses has commanded to the front of the Tent of Meeting, and all the congregation draws near and stands before YHWH;
6 Moyize alobaki: « Tala makambo oyo Yawe atindi bino kosala mpo ete nkembo na Yawe ebimela bino. »
and Moses says, “This [is] the thing which YHWH has commanded; do [it], and the glory of YHWH appears to you.”
7 Moyize alobaki na Aron: « Pusana pene ya etumbelo mpe bonza mbeka na yo ya masumu mpe mbeka na yo ya kotumba; mpe sala mosala ya bolimbisi masumu mpo na yo moko mpe mpo na bato. Bonza likabo ya bato mpe sala mosala ya bolimbisi masumu mpo na bango, kolanda ndenge Yawe apesaki mitindo. »
And Moses says to Aaron, “Draw near to the altar, and make your sin-offering, and your burnt-offering, and make atonement for yourself, and for the people, and make the offering of the people, and make atonement for them, as YHWH has commanded.”
8 Aron apusanaki pene ya etumbelo mpe akataki kingo ya mwana ngombe lokola mbeka mpo na masumu na ye moko.
And Aaron draws near to the altar, and slaughters the calf of the sin-offering, which [is] for himself;
9 Bongo bana mibali ya Aron bamemelaki ye makila. Aron azindisaki mosapi na ye kati na makila, apakolaki makila yango na maseke ya etumbelo mpe asopaki makila oyo etikalaki na makolo ya etumbelo.
and the sons of Aaron bring the blood near to him, and he dips his finger in the blood, and puts [it] on the horns of the altar, and he has poured out the blood at the foundation of the altar;
10 Atumbaki na etumbelo: mafuta, bambuma mibale oyo ezalaka na kati ya loketo mpe fwa oyo ewutaki na mbeka mpo na masumu, ndenge kaka Yawe atindaki Moyize.
and the fat, and the kidneys, and the redundance of the liver, of the sin-offering, he has made incense on the altar, as YHWH has commanded Moses;
11 Atumbaki na moto mosuni mpe poso na libanda ya molako.
and he has burned the flesh and the skin with fire, at the outside of the camp.
12 Aron akataki kingo ya mbeka ya kotumba. Bana na ye ya mibali bapesaki ye makila mpe asopaki yango na bangambo nyonso ya etumbelo.
And he slaughters the burnt-offering, and the sons of Aaron have presented the blood to him, and he sprinkles it around the altar;
13 Bapesaki ye mbeka ya kotumba bakata biteni-biteni elongo na moto, mpe atumbaki yango na etumbelo.
and they have presented the burnt-offering to him, by its pieces, and the head, and he makes incense on the altar;
14 Asukolaki biloko ya kati mpe makolo, atumbaki yango na etumbelo, na likolo ya mbeka ya kotumba.
and he washes the innards and the legs, and makes incense for the burnt-offering on the altar.
15 Aron amemaki likabo oyo ezalaki mpo na bato. Azwaki ntaba ya mobali lokola mbeka mpo na masumu ya bato, akataki yango kingo mpe abonzaki yango lokola mbeka ya masumu ndenge asalaki na mbeka ya liboso.
And he brings the offering of the people near, and takes the goat of the sin-offering which [is] for the people, and slaughters it, and makes it a sin-offering, like the first;
16 Aron amemaki mbeka ya kotumba mpe abonzaki yango kolanda mitindo.
and he brings the burnt-offering near, and makes it, according to the ordinance;
17 Amemaki mpe likabo ya bambuma, atondisaki yango na loboko na ye mpe atumbaki yango na etumbelo elongo na mbeka ya kotumba ya tongo.
and he brings the present near, and fills his palm with it, and makes incense on the altar, apart from the burnt-offering of the morning.
18 Aron akataki kingo ya ngombe ya mobali mpe ya meme ya mobali lokola mbeka ya boyokani mpo na bato; bana na ye ya mibali bapesaki ye makila mpe asopaki yango na bangambo nyonso ya etumbelo.
And he slaughters the bullock and the ram, a sacrifice of the peace-offerings, which [are] for the people, and sons of Aaron present the blood to him (and he sprinkles it around the altar),
19 Bapesaki ye mpe biteni ya mafuta ya ngombe ya mobali mpe ya meme ya mobali, mokila, mafuta ya biloko ya kati, mafuta ya bambuma mibale oyo ezalaka na kati ya loketo mpe bafwa.
and the fat of the bullock, and of the ram, the fat tail, and the covering [of the innards], and the kidneys, and the redundance on the liver,
20 Batiaki biteni yango na batolo ya banyama nyonso mibale mpe Aron atumbaki mafuta na etumbelo.
and they set the fat on the breasts, and he makes incense with the fat on the altar;
21 Aron atombolaki liboso ya Yawe likabo ya kotombola, batolo mpe mopende ya ngambo ya loboko ya mobali ndenge Moyize atindaki.
and Aaron has waved the breasts and the right leg [as] a wave-offering before YHWH, as He has commanded Moses.
22 Aron atombolaki maboko na ye epai ya bato mpe apambolaki bango; bongo akitaki sima na kobonza mbeka ya masumu, mbeka ya kotumba mpe mbeka ya boyokani.
And Aaron lifts up his hand toward the people, and blesses them, and comes down from making the sin-offering, and the burnt-offering, and the peace-offerings.
23 Moyize mpe Aron bakotaki na Ndako ya kapo ya Bokutani. Bongo tango babimaki, bapambolaki bato, mpe nkembo ya Yawe ebimelaki bato nyonso.
And Moses goes in—Aaron also—to the Tent of Meeting, and they come out, and bless the people, and the glory of YHWH appears to all the people;
24 Moto ebimaki liboso ya Yawe mpe ezikisaki na etumbelo, mbeka ya kotumba mpe biteni ya mafuta. Mpe tango bamonaki bongo, bagangaki na esengo mpe bakweyaki bilongi na bango kino na se.
and fire comes out from before YHWH, and consumes the burnt-offering and the fat on the altar; and all the people see, and cry aloud, and fall on their faces.