< Levitike 7 >

1 « ‹ Tala mobeko ya mbeka mpo na kozongisa boyokani; ezali eloko ya bule penza:
Voici la règle du sacrifice d'un bélier pour toute espèce de faute. La victime est chose très sainte.
2 ‘Bakokata kingo ya mbeka mpo na kozongisa boyokani, na esika oyo bakataka kingo ya bambeka ya kotumba. Bongo bakobwaka makila na yango pembeni-pembeni ya etumbelo.
C'est dans le lieu où l'on immole les holocaustes que l'on immolera le bélier pour la faute, et l'on répandra son sang sur la base de l'autel, tout alentour.
3 Bakobonza biteni na yango ya mafuta: mokila, mafuta oyo ezipaka biloko ya kati,
Et l'on offrira, du bélier, toute la graisse et les reins, et toute la graisse qui enveloppe les entrailles, et toute la graisse qui est dans les entrailles;
4 bambuma mibale oyo ezalaka na kati ya loketo mpe mafuta oyo ezipaka yango, oyo ezali kati na mipanzi mpe loketo. Bakolongola bafwa mpe bambuma mibale wana.
On enlèvera les deux rognons avec la graisse qui les entoure, celle des cuisses et le lobe du foie.
5 Nganga-Nzambe akotumba yango na etumbelo lokola likabo bazikisa na moto mpo na Yawe: ezali mbeka mpo na kozongisa boyokani.
Et le prêtre les portera sur l'autel: c'est l'hostie au Seigneur, pour la faute.
6 Mibali nyonso kati na Banganga-Nzambe bakoki kolia yango. Basengeli kolia yango na Esika ya bule: ezali eloko ya bule penza.
Tout mâle, parmi les prêtres, les mangera; il les mangera en lieu saint; elles seront choses très saintes.
7 Mobeko yango ezali kaka moko, ezala mpo na mbeka mpo na kozongisa boyokani to mpo na mbeka ya masumu. Nyama ezali ya Nganga-Nzambe oyo asali mosala ya bolimbisi masumu.
Semblable au sacrifice pour le péché, est le sacrifice pour la faute; la loi est une pour l'un et pour l'autre; c'est au prêtre qui aura intercédé par ce sacrifice que l'hostie restera.
8 Nganga-Nzambe oyo akobonza mbeka ya kotumba mpo na moto, akozwa poso ya nyama oyo abonzi mpe ekozala ya ye.
Le prêtre qui aura immolé l'holocauste offert par un homme, après avoir immolé la victime, en aura la peau.
9 Likabo nyonso ya gato oyo batumbi na fulu ya moto to bakalingi na kikalungu to mpe batumbi na likolo ya manzanza ezali ya Nganga-Nzambe oyo abonzi yango.
En tout sacrifice de fleur de farine, cuite au four, ou sur le gril, ou à la poêle à frire, l'offrande restera au prêtre qui l'aura faite.
10 Likabo nyonso ya gato oyo basangisi na mafuta to oyo ezali ya kokawuka ekozala ya bana mibali nyonso ya Aron; bakozwa yango ndenge moko.’ ›
En tout sacrifice de farine, pétrie ou non pétrie dans l'huile, l'offrande sera partagée également entre les fils d'Aaron.
11 ‹ Tala mibeko mpo na mbeka ya boyokani oyo moto akoki kobonza epai na Yawe:
Voici la loi de l'hostie pacifique que l'on offrira au Seigneur:
12 ‘Soki moto abonzi yango mpo na kozongisa matondi, asengeli kobonza, elongo na mbeka ya kozongisa matondi, likabo ya bagato ezanga levire kasi basangisa na mafuta, bagalete ezanga levire kasi bapakola yango mafuta mpe bagato basala na farine oyo basangisa malamu na mafuta.
Si elle est offerte comme louange à Dieu, l'homme offrira aussi, avec l'hostie de louange, des pains de fleur de farine pétris dans l'huile, et des gâteaux azymes arrosés d'huile, et de la fleur de farine pétrie dans l'huile.
13 Na likolo ya mbeka na ye ya boyokani oyo abonzi mpo na kozongisa matondi, akobakisa likabo ya bagato oyo esalemi na farine batia levire.
Il offrira ses dons avec des pains levés, et avec l'hostie pacifique de louange à Dieu.
14 Akomema eteni ya likabo moko na moko mpe akobonza yango epai na Yawe: ekozala ya Nganga-Nzambe oyo asopaki makila ya mbeka yango ya boyokani pembeni-pembeni ya etumbelo.
On prendra un de ces présents pour l'offrir en oblation au Seigneur; le reste appartiendra au prêtre qui répandra le sang de l'hostie pacifique;
15 Mosuni ya mbeka ya boyokani oyo abonzi mpo na kozongisa matondi esengeli koliama kaka na mokolo oyo abonzi yango, eloko moko te ekoki kotikala kino na tongo.
Et les chairs de l'hostie pacifique de louange seront à lui; elle sera mangée le jour même où elle aura été offerte; on n'en conservera rien pour le lendemain.
16 Soki abonzi mbeka na ye ya boyokani mpo ete apesaki elaka, na kolapa ndayi to wuta na mokano ya motema na ye moko, mbeka esengeli koliama kaka na mokolo oyo abonzi yango. Kasi soki ndambo etikali, ekoliama na mokolo oyo ekolanda.
Si l'offrande est un vœu ou un sacrifice volontaire, l'hostie sera mangée le jour même où on l'aura conduite, et le jour suivant.
17 Mosuni oyo ekotikala na mbeka, na mokolo oyo ekolanda, esengeli kotumba yango.
Ce qui, le troisième jour, resterait de ses chairs, sera consumé par le feu.
18 Soki mosuni ya mbeka ya boyokani eliami na mokolo ya misato, mbeka yango ekondimama te. Ekotangama te likolo ya moto oyo abonzi yango, pamba te ezali likabo ya mbindo; mpe moto oyo akomeka kolia yango akomema masumu.
Si l'on vient à en manger le troisième jour, elle cessera d'être favorable à celui qui l'aura offerte; elle ne lui sera point comptée: c'est une souillure. L'âme qui en aura mangé se rendra coupable de péché.
19 Bongo soki mosuni yango etutani na eloko ya mbindo, esengeli batumba mosuni yango na moto. Kasi mpo na oyo etali mosuni ya mbeka ya boyokani, kaka moto oyo azali peto nde akoki kolia yango.
Nulle chair qui aura touché une chose impure ne sera mangée; elle sera consumée par le feu. Tout homme pur pourra manger de la chair.
20 Nzokande, soki moto ya mbindo alie mosuni ya mbeka ya boyokani oyo ezali ya Yawe, basengeli kolongola ye kati na bato na ye.
Mais l'âme qui aura mangé des chairs de l'hostie pacifique qui sont au Seigneur, ayant quelque impureté sur elle, cette âme périra parmi son peuple.
21 Soki moto moko asimbi eloko ya mbindo, ezala moto ya mbindo to nyama ya mbindo to eloko mosusu ya mabe mpe ya mbindo, mpe alie mosuni ya mbeka ya boyokani oyo ezali ya Yawe, basengeli kolongola ye kati na bato na ye.’ › »
L'âme qui aura touché quoi que ce soit d'impur, soit de l'impureté de l'homme, soit des quadrupèdes impurs, soit de quelque impureté abominable, et mangera des hosties pacifiques qui sont au Seigneur, périra parmi son peuple.
22 Yawe alobaki na Moyize:
Et le Seigneur parla à Moïse, disant:
23 « Loba na bana ya Isalaele: ‹ Bokolia te mafuta ya ngombe, ya meme to ya ntaba.
Parle aux fils d'Israël; dis-leur: Vous ne mangerez point de la graisse des bœufs, ni des brebis, ni des chèvres.
24 Nzokande bokoki na bino kosalela mafuta ya nyama oyo ekufa to ya nyama oyo babomi na nyama ya zamba misala nyonso, kasi bokoki te kolia yango.
Faites n'importe quoi de la graisse des cadavres ou des têtes de bétail enlevées par des bêtes fauves, mais n'en mangez pas.
25 Moto nyonso oyo akolia mafuta ya nyama oyo babonzi epai na Yawe lokola likabo bazikisa na moto, bakolongola ye kati na bato na ye.
Quiconque aura mangé de la graisse des bestiaux qu'il aura conduits, comme hosties au Seigneur, périra parmi son peuple.
26 Na esika nyonso oyo bokovanda, bokoki te kolia makila, ezala makila ya ndeke to ya nyama.
Vous ne mangerez point de sang des bestiaux ni des oiseaux, en aucune de vos demeures.
27 Moto nyonso oyo akolia makila, bakolongola ye kati na bato na ye. › »
Toute âme qui mangera du sang, périra parmi son peuple.
28 Yawe alobaki na Moyize:
Et le Seigneur parla à Moïse, disant:
29 « Loba na bana ya Isalaele: ‹ Moto nyonso oyo akobonza epai na Yawe mbeka ya boyokani akomema eteni ya mbeka na ye lokola mbeka na ye epai na Yawe.
Parle encore aux fils d'Israël, et dis-leur: Celui qui offrira une hostie pacifique, fera aussi au Seigneur présent d'une part de l'hostie.
30 Akomema yango ye moko, na maboko na ye, mpo ete etumbama lokola likabo bazikisa na moto mpo na Yawe. Akomema mafuta mpe tolo ya mbeka mpe akotombola liboso ya Yawe tolo yango lokola likabo ya kotombola.
Ses mains porteront les offrandes au Seigneur, savoir: la graisse de la poitrine et le lobe du foie; il les portera afin de les déposer comme dons devant le Seigneur.
31 Nganga-Nzambe akotumba mafuta na etumbelo, kasi tolo ekozala mpo na Aron mpe bana na ye ya mibali.
Le prêtre offrira la graisse sur l'autel, et la poitrine sera pour Aaron et ses fils.
32 Bokopesa epai ya Nganga-Nzambe lokola likabo mopende ya ngambo ya loboko ya mobali ya bambeka ya boyokani.
De vos hosties pacifiques, vous donnerez l'épaule droite, qui est réservée au prêtre.
33 Mwana mobali ya Aron oyo akobonza makila mpe mafuta ya mbeka ya boyokani akozwa mopende ya ngambo ya loboko ya mobali.
Celui des fils d'Aaron qui offrira du sang et de la graisse de l'hostie pacifique, aura, pour sa part, l'épaule droite.
34 Pamba te, nakobanda kozwa kati na bambeka ya boyokani ya bana ya Isalaele tolo oyo batomboli mpe mopende oyo babonzi lokola likabo ya kotombola. Napesi yango epai ya Nganga-Nzambe Aron mpe bana na ye ya mibali lokola eteni na bango oyo bakobanda kozwa tango nyonso epai ya bana ya Isalaele.
Car j'ai pris, sur les hosties pacifiques des fils d'Israël, la poitrine, mise à part, et l'épaule réservée, pour les donner à Aaron et à ses fils; c'est la loi perpétuelle des sacrifices des fils d'Israël.
35 Yango nde eteni ya makabo bazikisa na moto, oyo bana ya Isalaele basengeli kopesa epai ya Aron mpe bana na ye ya mibali wuta mokolo oyo akobulisa bango mpo na kosalela Yawe lokola Banganga-Nzambe. › »
Telle est des sacrifices au Seigneur la part acquise par l'onction d'Aaron et par l'onction de ses fils, du jour ou cette onction leur a attribué l'exercice du sacerdoce de Dieu.
36 Yango nde mitindo oyo Yawe apesaki epai ya bana ya Isalaele mpo ete, wuta mokolo oyo apakolaki bango mafuta, babanda kopesa bango yango lokola eteni na bango. Ezali mibeko ya seko mpo na milongo nyonso ya bana na bango.
C'est ce que le Seigneur a prescrit de leur donner le jour ou il les a oints parmi les fils d'Israël; c'est une loi perpétuelle pour vos générations.
37 Yango nde mibeko mpo na mbeka ya kotumba, likabo ya gato, mbeka mpo na masumu, mbeka mpo na kozongisa boyokani, mbeka mpo na kobulisa mpe mpo na mbeka ya boyokani
Telle est la loi des holocaustes et des sacrifices pour le péché, pour la faute, pour la consécration et pour les hosties pacifiques.
38 oyo Yawe apesaki epai ya Moyize, na ngomba Sinai kati na esobe ya Sinai na mokolo oyo apesaki mitindo epai ya bana ya Isalaele ete babonzela Ye bambeka mpe makabo na bango.
Comme le Seigneur l'a prescrit à Moïse, sur le mont Sina, le jour où, dans le désert de Sina, il a prescrit aux fils d'Israël de faire les sacrifices au Seigneur.

< Levitike 7 >