< Levitike 6 >
1 Yawe alobaki na Moyize:
Опет рече Господ Мојсију говорећи:
2 « Soki moto asali masumu mpe abuki mobeko ya Yawe na kokosa moninga na ye mpo na eloko oyo babombisaki epai na ye to oyo adefaki to oyo ayibaki to oyo abotolaki na makasi
Кад ко згреши и учини зло дело Господу ударивши у бах ближњему свом за оставу или за ствар предану у руке или отевши шта или занесавши ближњег свог,
3 to atako amoni eloko oyo ebungaki, kasi akosi mpe alapi ndayi ya lokuta na tina na moko kati na masumu oyo moto akoki kosala;
Или нађе изгубљено шта, па удари у бах, или се криво закуне за коју год ствар коју може човек учинити и огрешити се њом,
4 moto oyo asali masumu ya boye mpe amemi ngambo, akozongisa eloko oyo ayibisaki to oyo abotolaki na makasi to oyo babombisaki epai na ye to oyo amonaki sima na kobungisa yango.
Кад тако згреши и скриви, нека врати шта је отео или присвојио преваром или шта му је било дано на оставу или шта је изгубљено нашао,
5 To lisusu, akozongisa eloko nyonso oyo na tina na yango ye alapaki ndayi ya lokuta mpe akobakisa eteni moko kati na biteni mitano. Akozongisa yango na nkolo eloko na mokolo oyo akobonza mbeka na ye mpo na masumu.
Или за шта се заклео криво, нека плати цело и још дометне пети део ономе чије је; нека му да онај дан кад принесе жртву за свој грех.
6 Mpe akomema epai ya Nganga-Nzambe mbeka na ye mpo na kozongisa boyokani elongo na Yawe. Akomema meme ya mobali oyo ezanga mbeba; akozwa yango kati na bameme mpe bantaba na ye kolanda ndenge okokata.
А на жртву за грех свој нека принесе Господу овна здравог, са ценом којом процениш кривицу нека га доведе свештенику.
7 Nganga-Nzambe akosala mpo na moto wana, liboso ya Yawe, mosala ya bolimbisi masumu; mpe moto yango akolimbisama. »
И очистиће га свештеник пред Господом, и опростиће му се свака ствар коју је учинио, те скривио.
8 Yawe alobaki na Moyize:
И рече Господ Мојсију говорећи:
9 « Pesa mitindo oyo epai ya Aron mpe epai ya bana na ye ya mibali: ‹ Tala mobeko mpo na mbeka ya kotumba: mbeka ya kotumba ekowumela na likolo ya motalaka ya etumbelo butu mobimba kino na tongo, mpe moto ya etumbelo ekozikisa yango.
Заповеди Арону и синовима његовим, и реци им: Ово је закон за жртву паљеницу: жртва паљеница нека стоји на огњу на олтару целу ноћ до јутра, и огањ на олтару нека гори једнако.
10 Nganga-Nzambe akolata nzambala na ye ya lino mpe bakaputula na ye ya lino. Akolongola putulu ya mbeka ya kotumba oyo moto ezikisaki na etumbelo mpe akotia yango na mopanzi ya etumbelo.
Свештеник нека обуче своју хаљину ланену, и гаће ланене нека обуче на тело своје, и нека згрне пепео кад огањ спали на олтару жртву паљеницу, и нека га изручи код олтара.
11 Sima, akolongola bilamba wana mpe akolata bilamba mosusu; bongo akomema putulu na libanda ya molako, na esika ya peto.
Потом нека свуче хаљине своје и обуче друге хаљине, и нека изнесе пепео напоље из логора на чисто место.
12 Moto ya etumbelo ekobanda kopela tango nyonso mpe ekoki kokufa te. Nganga-Nzambe akobanda kobakisa tongo nyonso bakoni mpe kotia mbeka ya kotumba na likolo ya bakoni; bongo akotumba biteni ya mafuta ya mbeka ya boyokani na likolo na yango.
А огањ што је на олтару нека гори на њему, нека се не гаси, него нека свештеник ложи на огањ дрва свако јутро, и нека намешта на њ жртву паљеницу, и нека пали на њему сало од жртава захвалних.
13 Moto esengeli kopela tango nyonso na etumbelo, ekoki kokufa te. ›
Огањ нека једнако гори на олтару, нека се не гаси.
14 ‹ Tala mobeko mpo na likabo ya gato: ‘Bana mibali ya Aron bakomema yango liboso ya Yawe, liboso ya etumbelo.
А ово је закон за дар: синови Аронови нека га приносе Господу пред олтаром.
15 Nganga-Nzambe akozwa na loboko na ye ndambo ya farine, mafuta mpe ansa nyonso oyo ezali na likolo ya gato; akotumba yango na likolo ya etumbelo mpo ete solo kitoko na yango esepelisa Yawe mpe ezala ekaniseli mpo na Ye.
Узевши шаку белог брашна и уља од дара и сав кад који буде на дару, нека запали на олтару спомен његов на угодни мирис Господу.
16 Ndambo oyo ekotikala, Aron mpe bana na ye ya mibali bakolia yango. Kasi bakolia yango ezanga levire, na Esika ya bule, na libanda ya Ndako ya kapo ya Bokutani.
А шта претече, нека једе Арон и синови његови; нека се једе без квасца на светом месту; у трему шатора од састанка нека једу.
17 Bakotumba yango te na levire: ezali eteni oyo napesi bango kati na bambeka na Ngai oyo etumbami na moto: ezali eloko ya bule penza lokola mbeka mpo na masumu mpe mpo na kozongisa boyokani.
Нека се не меси са квасцем; то им дадох да им буде део од жртава мојих огњених; то је светиња над светињама као жртва за грех и као жртва за преступ.
18 Bana mibali nyonso kati na bakitani ya Aron bakolia yango. Ezali eteni na bango mpo na tango nyonso mpe na milongo nyonso kati na makabo bazikisa na moto mpo na Yawe. Bato nyonso oyo bakosimba yango bakokoma bule.’ › »
Свако мушко између синова Аронових нека то једе законом вечним од колена до колена од жртава које се пале Господу; шта се год дотакне тога, биће свето.
19 Yawe alobaki na Moyize:
И рече Господ Мојсију говорећи:
20 « Tala likabo oyo Aron mpe bana na ye ya mibali bakopesa epai na Yawe, na mokolo oyo bakozwa epakolami: eteni ya zomi ya efa ya farine lokola likabo ya tango nyonso. Na tongo, akopesa eteni moko kati na biteni mibale; mpe eteni mosusu, na pokwa.
Ово је жртва Аронова и синова његових, коју ће приносити Господу онај дан кад се који помаже: десетину ефе белог брашна за дар свагдашњи, половину ујутру а половину увече.
21 Okosangisa yango liboso na mafuta, bongo okokalinga yango na kikalungu. Sima okobonza yango na biteni lokola mbeka oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe.
У тави с уљем нека се готови; пржено нека се донесе; и пржене комаде дара нека принесе на угодни мирис Господу.
22 Mwana mobali ya Aron oyo bakopakola mafuta mpo na kokitana na Aron lokola Nganga-Nzambe akobonza mpe likabo yango: ezali likabo ya libela mpo na Yawe mpe bakotumba yango mobimba.
И свештеник између синова његових, који буде помазан након њега, нека чини тако исто законом вечним; нека се пали Господу све то;
23 Mbeka nyonso oyo Nganga-Nzambe akobonza na mobimba na yango ekoliama te, ezala ata ndambo na yango. »
И сваки дар свештеников нека се сав спали, а нека се не једе.
24 Yawe alobaki na Moyize:
Још рече Господ Мојсију говорећи:
25 « Loba na Aron mpe na bana na ye ya mibali: ‹ Tala mobeko ya mbeka mpo na masumu: ‘Bakokata kingo ya mbeka mpo na masumu liboso ya Yawe, na esika oyo bakataka bakingo ya bambeka ya kotumba; ezali mbeka ya bule penza.
Кажи Арону и синовима његовим, и реци: Ово је закон за жртву ради греха: на месту где се коље жртва паљеница, нека се коље и жртва за грех пред Господом; светиња је над светињама.
26 Nganga-Nzambe oyo azali kobonza yango mpo na masumu akolia yango na Esika ya bule, na libanda ya Ndako ya kapo ya Bokutani.
Свештеник који принесе жртву за грех нека је једе; на светом месту нека се једе, у трему од шатора од састанка.
27 Moto nyonso oyo akosimba mosuni na yango akozala bule. Soki kaka makila ya mbeka yango ezwi elamba na ye, asengeli kosukola esika oyo ezwi makila, na esika moko ya bule.
Шта се год дотакне меса њеног, биће свето; и ако ко покапа крвљу њеном хаљину, оно што покапа нека опере на светом месту.
28 Bongo soki basaleli nzungu ya mabele mpo na kokalinga mosuni ya mbeka mpo na masumu, bakopanza nzungu yango. Soki bakalingi yango na nzungu ya bronze, bakopalola nzungu yango mpe bakosukola yango na mayi ebele.
И суд земљани у коме буде кувано нека се разбије; ако ли је кувано у суду бронзаном, нека се истре и водом опере.
29 Kaka mibali oyo bazali na libota ya Nganga-Nzambe nde bakoki kolia yango, pamba te ezali eloko ya bule penza.
Свако мушко између свештеника нека то једе; светиња је над светињама.
30 Nzokande, mbeka moko te mpo na masumu ekoki koliama soki bamemi makila na yango na Ndako ya kapo ya Bokutani mpo na kosala mosala ya bolimbisi masumu; esengeli kotumba yango na moto.’ › »
Али ниједна жртва за грех, од које се унесе крв у шатор од састанка да се учини очишћење од греха у светињи, нека се не једе, него нека се огњем сажеже.