< Levitike 4 >

1 Yawe ayebisaki Moyize:
locutusque est Dominus ad Mosen dicens
2 « Loba na bana ya Isalaele mpe yebisa bango: ‹ Soki moto asali masumu to likambo moko oyo epekisami na mibeko ya Yawe, tala ndenge bokosala:
loquere filiis Israhel anima cum peccaverit per ignorantiam et de universis mandatis Domini quae praecepit ut non fierent quippiam fecerit
3 ‘Soki Nganga-Nzambe oyo bapakola mafuta asali masumu, bongo na nzela ya masumu na ye amemisi bato nyonso ngambo, akobonza liboso ya Yawe mpo na masumu oyo asili kosala, mwana ngombe ya mobali oyo ezanga mbeba lokola mbeka mpo na masumu.
si sacerdos qui est unctus peccaverit delinquere faciens populum offeret pro peccato suo vitulum inmaculatum Domino
4 Boye akobonza liboso ya Yawe, mwana ngombe yango ya mobali na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani. Akotia loboko na ye na moto ya mwana ngombe mpe akokata yango kingo liboso ya Yawe.
et adducet illum ad ostium tabernaculi testimonii coram Domino ponetque manum super caput eius et immolabit eum Domino
5 Nganga-Nzambe oyo bapakola mafuta akozwa ndambo ya makila ya mwana ngombe yango ya mobali mpe akomema yango kati na Ndako ya kapo ya Bokutani.
hauriet quoque de sanguine vituli inferens illud in tabernaculum testimonii
6 Nganga-Nzambe akozindisa mosapi na ye na makila mpe akosopa ndambo ya makila mbala sambo liboso ya Yawe, liboso ya rido ya Esika ya bule.
cumque intinxerit digitum in sanguinem asperget eo septies coram Domino contra velum sanctuarii
7 Nganga-Nzambe akotia ndambo ya makila na maseke ya etumbelo ya ansa oyo ezali liboso ya Yawe kati na Ndako ya kapo ya Bokutani. Bongo ndambo mosusu ya makila ya ngombe oyo ekotikala, akosopa yango na makolo ya etumbelo ya bambeka ya kotumba, oyo ezali na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani.
ponetque de eodem sanguine super cornua altaris thymiamatis gratissimi Domino quod est in tabernaculo testimonii omnem autem reliquum sanguinem fundet in basim altaris holocausti in introitu tabernaculi
8 Akolongola mafuta nyonso ya mwana ngombe oyo asili kobonza lokola mbeka mpo na masumu, mafuta oyo ezipaka biloko ya kati, mpe nyonso oyo ekangami kati na yango
et adipem vituli auferet pro peccato tam eum qui operit vitalia quam omnia quae intrinsecus sunt
9 elongo na bambuma mibale oyo ezalaka na loketo, na mafuta oyo ezali kati-kati ya mipanzi na loketo; akolongola bafwa mpe bambuma wana mibale
duos renunculos et reticulum quod est super eos iuxta ilia et adipem iecoris cum renunculis
10 ndenge balongolaka mafuta ya ngombe oyo babonzi lokola mbeka ya boyokani. Nganga-Nzambe akotumba yango na etumbelo ya mbeka ya kotumba.
sicut aufertur de vitulo hostiae pacificorum et adolebit ea super altare holocausti
11 Kasi poso ya ngombe ya mobali, mosuni na yango nyonso, moto na yango, makolo na yango, biloko ya kati;
pellem vero et omnes carnes cum capite et pedibus et intestinis et fimo
12 elingi koloba biteni mosusu ya ngombe oyo etikali, Nganga-Nzambe asengeli komema yango libanda ya molako, na esika moko ya bule oyo ebongisama mpo na kotumba biteni ya mbeka oyo etikalaka, na esika oyo babwakaka putulu; bongo bakotumba yango na likolo ya bakoni oyo ezali kopela moto, na esika oyo babwakaka putulu.’
et reliquo corpore efferet extra castra in locum mundum ubi cineres effundi solent incendetque ea super lignorum struem quae in loco effusorum cinerum cremabuntur
13 ‘Soki lisanga mobimba ya Isalaele basali masumu na nko te mpe basali likambo moko oyo epekisami kati na mibeko ya Yawe, ata soki likambo yango eyebani te kati na lisanga, lisanga ekomema solo ngambo.
quod si omnis turba Israhel ignoraverit et per inperitiam fecerit quod contra mandatum Domini est
14 Bakobonza ngombe ya mobali lokola mbeka mpo na masumu mpe bakomema yango liboso ya Ndako ya kapo ya Bokutani.
et postea intellexerit peccatum suum offeret vitulum pro peccato adducetque eum ad ostium tabernaculi
15 Bakambi ya lisanga bakotia maboko na bango na moto ya ngombe yango liboso ya Yawe.
et ponent seniores populi manus super caput eius coram Domino immolatoque vitulo in conspectu Domini
16 Nganga-Nzambe oyo bapakola mafuta akomema ndambo ya makila ya ngombe yango kati na Ndako ya kapo ya Bokutani.
inferet sacerdos qui unctus est de sanguine eius in tabernaculum testimonii
17 Nganga-Nzambe akozindisa mosapi na ye kati na makila mpe akosopa ndambo ya makila mbala sambo liboso ya Yawe mpe ya rido.
tincto digito aspergens septies contra velum
18 Nganga-Nzambe akotia makila na maseke ya etumbelo ya ansa oyo ezali liboso ya Yawe kati na Ndako ya kapo ya Bokutani mpe akosopa makila nyonso oyo ekotikala na se ya etumbelo ya mbeka ya kotumba oyo ezali na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani.
ponetque de eodem sanguine in cornibus altaris quod est coram Domino in tabernaculo testimonii reliquum autem sanguinem fundet iuxta basim altaris holocaustorum quod est in ostio tabernaculi testimonii
19 Akolongola mafuta nyonso ya ngombe mpe akotumba yango na etumbelo.
omnemque eius adipem tollet et adolebit super altare
20 Akosala ndenge kaka asalaki na ngombe oyo ebonzamaki lokola mbeka mpo na masumu. Na bongo, Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu ya bato; mpe bakolimbisama.
sic faciens et de hoc vitulo quomodo fecit et prius et rogante pro eis sacerdote propitius erit Dominus
21 Nganga-Nzambe akomema ngombe yango libanda ya molako mpe akotumba yango ndenge atumbaki ngombe ya liboso oyo ezalaki mbeka mpo na masumu na ye moko Nganga-Nzambe.’
ipsum autem vitulum efferet extra castra atque conburet sicut et priorem vitulum quia pro peccato est multitudinis
22 ‘Soki mokambi moko asali masumu na nko te, mpo ete asali likambo oyo epekisami na mibeko ya Yawe, Nzambe na ye; amemi solo ngambo.
si peccaverit princeps et fecerit unum e pluribus per ignorantiam quod Domini lege prohibetur
23 Tango kaka akososola masumu na ye oyo asili kosala, asengeli kobonza lokola mbeka, ntaba ya mobali oyo ezanga mbeba.
et postea intellexerit peccatum suum offeret hostiam Domino hircum de capris inmaculatum
24 Akotia loboko na ye na moto ya ntaba yango mpe akokata yango kingo na esika oyo bakataka kingo ya bambeka ya kotumba, liboso ya Yawe. Ezali mbeka mpo na bolimbisi masumu.
ponetque manum suam super caput eius cumque immolaverit eum in loco ubi solet mactari holocaustum coram Domino quia pro peccato est
25 Nganga-Nzambe akozwa na mosapi na ye ndambo ya makila ya mbeka oyo ebonzami mpo na bolimbisi masumu, akotia yango na maseke ya etumbelo ya mbeka ya kotumba mpe akosopa makila oyo ekotikala na makolo ya etumbelo.
tinguet sacerdos digitum in sanguine hostiae pro peccato tangens cornua altaris holocausti et reliquum fundens ad basim eius
26 Akotumba mafuta nyonso na etumbelo ndenge batumbaka mafuta ya mbeka ya boyokani. Boye, Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu ya mokonzi; mpe mokonzi wana akolimbisama.’
adipem vero adolebit supra sicut in victimis pacificorum fieri solet rogabitque pro eo et pro peccato eius ac dimittetur ei
27 ‘Soki moto moko kati na lisanga asali masumu na nko te, mpo ete asali likambo moko oyo epekisami na mibeko ya Yawe; amemi solo ngambo.
quod si peccaverit anima per ignorantiam de populo terrae ut faciat quicquam ex his quae Domini lege prohibentur atque delinquat
28 Tango kaka akososola masumu na ye oyo asali, asengeli kobonza lokola mbeka, ntaba ya mwasi ezanga mbeba.
et cognoverit peccatum suum offeret capram inmaculatam
29 Akotia loboko na ye na moto ya mbeka mpo na masumu na esika oyo bakataka kingo ya bambeka ya kotumba.
ponetque manum super caput hostiae quae pro peccato est et immolabit eam in loco holocausti
30 Nganga-Nzambe akozwa na mosapi na ye ndambo ya makila ya mbeka mpo na masumu, akotia yango na maseke ya etumbelo ya mbeka ya kotumba, mpe akosopa makila nyonso oyo etikali na makolo ya etumbelo.
tolletque sacerdos de sanguine in digito suo et tangens cornua altaris holocausti reliquum fundet ad basim eius
31 Akolongola mafuta nyonso ndenge kaka balongolaka mafuta na mbeka ya boyokani; bongo Nganga-Nzambe akotumba yango na etumbelo lokola likabo oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe. Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu ya moto wana; mpe moto yango akolimbisama.
omnem autem auferens adipem sicut auferri solet de victimis pacificorum adolebit super altare in odorem suavitatis Domino rogabitque pro eo et dimittetur ei
32 Soki abonzi mwana meme lokola mbeka mpo na masumu na ye, asengeli komema mwana meme ya mwasi ezanga mbeba.
sin autem de pecoribus obtulerit victimam pro peccato ovem scilicet inmaculatam
33 Akotia loboko na ye na moto ya mbeka mpo na masumu, na esika oyo bakataka kingo ya bambeka ya kotumba.
ponet manum super caput eius et immolabit eam in loco ubi solent holocaustorum caedi hostiae
34 Nganga-Nzambe akozwa na mosapi na ye ndambo ya makila ya mbeka mpo na masumu, mpe akotia yango na maseke ya etumbelo ya bambeka ya kotumba. Bongo akosopa makila nyonso oyo etikali, na makolo ya etumbelo.
sumetque sacerdos de sanguine eius digito suo et tangens cornua altaris holocausti reliquum fundet ad basim eius
35 Akolongola mafuta nyonso ndenge kaka balongolaka mafuta ya mwana meme kati na mbeka ya boyokani. Mpe Nganga-Nzambe akotumba yango na etumbelo, na likolo ya makabo bazikisa na moto mpo na Yawe. Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu ya moto wana; mpe moto yango akolimbisama.’ › »
omnem quoque auferens adipem sicut auferri solet adeps arietis qui immolatur pro pacificis et cremabit super altare in incensum Domini rogabitque pro eo et pro peccato eius et dimittetur illi

< Levitike 4 >