< Levitike 27 >

1 Yawe alobaki na Moyize:
ヱホバ、モーセに告て言たまはく
2 « Yebisa bana ya Isalaele mpe loba na bango: ‹ Soki moko kati na bino alapi ndayi ya kopesa moto lokola likabo epai na Yawe, asengeli kopesa motuya oyo ekokani na lolenge ya moto na moto.
イスラエルの子孫につげてこれに言へ人もし誓願をかけなばなんぢの估價にしたがひてヱホバに献納物をなすべし
3 Tala motuya ya kopesa kolanda ndenge batangaka mbongo ya bibende kati na Mongombo: mpo na moto oyo mibu na ye ya mbotama ezali kati na mibu tuku mibale mpe tuku motoba, bagrame nkama motoba ya palata mpo na mobali;
なんぢの估價はかくすべしすなはち二十歳より六十歳までは男には其價を聖所のシケルに循ひて五十シケルに估り
4 bagrame nkama misato na tuku motoba ya palata mpo na mwasi;
女にはその價を三十シケルに估るべし
5 mpo na moto oyo mibu na ye ya mbotama ezali kati na mibu mitano mpe tuku mibale, bagrame nkama mibale na tuku minei ya palata mpo na mobali, mpe bagrame nkama moko na tuku mibale ya palata mpo na mwasi;
また五歳より二十歳までは男にはその價を二十シケルに估り女には十シケルに估るべし
6 mpo na moto oyo mikolo ya mbotama na ye ya mbotama ezali kati na sanza moko mpe mibu mitano, bagrame tuku motoba ya palata mpo na mobali, mpe bagrame tuku misato na motoba ya palata mpo na mwasi;
また一箇月より五歳までは男にはその價を銀五シケルに估り女にはその價を銀三シケルに估るべし
7 mpo na moto oyo mibu na ye ya mbotama ezali kobanda na tuku motoba mpe komata, bagrame nkama moko na tuku mwambe ya palata mpo na mobali, mpe bagrame nkama moko na tuku mibale ya palata mpo na mwasi.
また六十歳より上は男にはその價を十五シケルに估り女には十シケルに估るべし
8 Soki moto oyo alapi ndayi azali mobola to azali na makoki te ya kopesa motuya oyo ekatama, akomema epai ya Nganga-Nzambe moto oyo ye alapelaki ndayi ya kopesa lokola likabo. Boye Nganga-Nzambe akokata motuya ya kopesa kolanda makoki ya moto oyo alapi ndayi.
その人もし貧くして汝の估價に勝ざる時は祭司の前にいたり祭司の估價をうくべきなり祭司はその誓願者の力にしたがひて估價をなすべし
9 Soki moko kati na bino alapi ndayi ya kopesa lokola likabo epai na Yawe nyama oyo esengeli, nyama yango ekokoma bule;
人もしそのヱホバに禮物として献ることを爲すとこるの牲畜の中を取り誓願の物となしてヱホバに献る時は其物は都て聖し
10 asengeli te kobongola to kopesa nyama mosusu na esika ya nyama ya liboso, noki te banyama nyonso mibale ekokoma bule.
之を更むべからずまた佳を惡に惡を佳に易べからず若し牲畜をもて牲畜に易ることをせば其と其に易たる者ともに聖なるべし
11 Soki nyama oyo alapelaki ndayi ezali mbindo, nyama oyo esengeli te kopesama lokola likabo epai na Yawe, bakomema nyama yango liboso ya Nganga-Nzambe
もし人のヱホバに禮物として献ることを爲ざるとこるの汚たる畜の中ならばその畜を祭司の前に牽いたるべし
12 oyo akotala soki nyama yango ezali malamu to mabe. Motuya nyonso oyo Nganga-nzambe akokata, ekotikala bongo.
祭司はまたその佳惡にしたがひてこれが估價をなすべし即ちその價は祭司の估るところによりて定むべきなり
13 Soki mokolo nyama alingi kosikola yango, asengeli kobakisa eteni moko kati na biteni mitano ya motuya na yango.
その人若これを贖はんとせばその估る價にまた之が五分の一を加ふべし
14 Soki moto abulisi ndako na ye lokola eloko oyo ebulisami mpo na Yawe, Nganga-Nzambe akokata motuya na yango kolanda ndenge ndako yango ezali malamu to mabe. Motuya nyonso oyo Nganga-Nzambe akokata, ekotikala bongo.
また人もしその家をヱホバに聖別ささげたる時は祭司その佳惡にしたがひて之が估價を爲べし即ちその價は祭司の估るところによりて定むべきなり
15 Soki moto oyo abulisi ndako na ye lokola likabo epai na Yawe alingi kosikola yango, asengeli kobakisa eteni moko kati na biteni mitano ya motuya na yango; mpe ndako yango ekokoma lisusu ya ye.
その人もし家を贖はんとせばその估價の金にまた之が五分の一を加ふべし然せば是は自分の有とならん
16 Soki moto abulisi mpo na Yawe eteni ya mabele kati na mabele na ye, bakokata motuya ya eteni ya mabele yango kolanda milona oyo bakoki kolona kuna: bagrame nkama motoba ya palata mpo na bakilo nkama minei ya bambuma ya orje.
人もしその遺業の田野の中をヱホバに献る時は其處に撒るる種の多少にしたがひてこれが估價をなすべし即ち大麥の種一ホメルを五十シケルに算べきなり
17 Soki abulisi elanga na ye, na mobu ya kosepela kokangolama, motuya oyo bakata ekotikala bongo.
もしその田野をヨベルの年より献たる時はその價は汝の估れる所によりて定むべし
18 Kasi soki abulisi elanga na ye epai na Yawe sima na mobu ya kosepela kokangolama, Nganga-Nzambe akokata motuya na yango kolanda motango ya mibu oyo etikali kino na mobu oyo ekolanda, mobu ya kosepela kokangolama. Boye bakokitisa motuya oyo ekatama.
もし又その田野をヨベルの後に献たる時は祭司そのヨベルの年までに遺れる年の數にしたがひてその金を算へこれに準じてその估價を減すべし
19 Soki moto oyo abulisi elanga alingi kosikola yango, akobakisa eteni moko kati na biteni mitano ya motuya oyo ekatama; boye elanga yango ekokoma lisusu ya ye.
その田野を献たる者若これを贖はんとせばその估價の金の五分の一をこれに加ふべし然せば是はその人に歸せん
20 Kasi soki asikoli yango te, bongo bateki yango epai ya moto mosusu, akoki lisusu kosikola yango te.
然ど若その田野を贖ふことをせず又はこれを他の人に賣ことをなさば再び贖ふことを得じ
21 Soki elanga esikolami na mobu ya kosepela kokangolama, ekokoma bule lokola elanga oyo babulisi mpo na Yawe: ekozala mabele ya Banganga-Nzambe.
その田野はヨベルにおよびて出きたる時は永く奉納たる田野のごとくヱホバに歸して聖き者となり祭司の產業とならん
22 Soki moto abulisi epai na Yawe elanga oyo asombaki, nzokande ezali mabele ya libota na bango te,
若また自己が買たる田野にしてその遺業にあらざる者をヱホバに献たる時は
23 Nganga-Nzambe akokata motuya na yango kolanda mibu oyo etikali kino na mobu ya kosepela kokangolama; kaka na mokolo oyo Nganga-Nzambe akokata motuya na yango nde moto yango akopesa motuya na yango lokola eloko ya bule epai na Yawe.
祭司その人のために估價してヨベルの年までの金を推算べし彼は汝の估れる金高をその日ヱホバにたてまつりて聖物となすべし
24 Na mobu ya kosepela kokangolama, elanga yango ekozonga na maboko ya moto oyo atekaki yango: mokolo mabele.
ヨベルの年にいたればその田野は賣主なるその本來の所有主に歸るべし
25 Mituya nyonso ekokatama ndenge batangaka mbongo ya bibende kati na Mongombo. Mbongo moko ya ebende esengeli kozala na bagrame zomi na mibale.
汝の估價はみな聖所のシケルにしたがびて爲べし二十ゲラを一シケルとなす
26 Moto moko te akoki kobulisa mwana liboso ya nyama na ye, pamba te mwana ya liboso ezali ya Yawe; ezala ya ngombe, ya meme to ya ntaba.
但し牲畜の初子はヱホバに歸すべき初子なれば何人もこれを献べからず牛にもあれ羊にもあれ是はヱホバの所屬なり
27 Soki ezali mwana liboso ya nyama moko ya mbindo, mokolo nyama yango akoki kosikola yango na kobakisa eteni moko kati na biteni mitano ya motuya na yango; kasi soki asikoli yango te, bakoteka yango na motuya oyo ekatama.
若し汚たる畜ならば汝の估價にしたがひこれにその五分の一を加へてその人これを贖ふべし若これを贖ふことをせずば汝の估價にしたがひて之を賣べし
28 Nyonso oyo moto akopesa epai na Yawe lokola likabo ekoki kotekama te to kosikolama; ezala moto, nyama to mabele, pamba te nyonso oyo epesami epai na Yawe ezali bule mpo na Yawe.
但し人がその凡て有る物の中より取て永くヱホバに納めたる奉納物は人にもあれ畜にもあれその遺業の田野にもあれ一切賣べからずまた贖ふべからず奉納物はみなヱホバに至聖物たるなり
29 Moto moko te oyo abongisami mpo na kobebisama akoki kosikolama, basengeli koboma ye.
また人の中永く奉納られて奉納物となれる者も贖ふべからず必ず殺すべし
30 Eteni nyonso ya zomi ya biloko nyonso oyo ekowuta na mabele, ezala bambuma ya bilanga to bambuma ya banzete, ezali ya Yawe: ezali bule mpo na Yawe.
地の十分の一は地の產物にもあれ樹の果にもあれ皆ヱホバの所屬にしてヱホバに聖きなり
31 Soki moto alingi kosikola eteni na ye ya zomi, asengeli kobakisa eteni moko kati na biteni mitano ya motuya na yango.
人もしその献る十分の一を贖はんとせば之にまたその五分の一を加ふべし
32 Eteni nyonso ya zomi; ezala ya ngombe, ya meme to ya ntaba, elingi koloba nyama nyonso ya zomi oyo ekoleka na se ya lingenda ya mobateli bibwele, ekozala bule mpo na Yawe;
牛または羊の十分の一については凡て杖の下を通る者の第十番にあたる者はヱホバに聖き者なるべし
33 ezala ya malamu to ya mabe, akoki te kopona nyama mosusu na esika ya nyama oyo ya zomi. Soki atie nyama moko na esika ya nyama mosusu, nyonso mibale ekokoma bule mpo na Yawe; mpe ekoki kosikolama te. › »
その佳惡をたづぬべからずまた之を易べからず若これを易る時は其とその易たる者ともに聖き者となるべしこれを贖ふことを得ず
34 Oyo nde mitindo oyo Yawe apesaki Moyize, na ngomba Sinai, mpo na bana ya Isalaele.
是等はヱホバがシナイ山においてイスラエルの子孫のためにモーセに命じたまひし誡命なり

< Levitike 27 >