< Levitike 25 >

1 Yawe alobaki na Moyize na ngomba Sinai:
And the Lord spoke to Moses in mount Sinai, saying:
2 « Yebisa bana ya Isalaele mpe loba na bango: ‹ Tango bokokota na mokili oyo nakopesa bino; ezala mabele esengeli kopema, yango ekozala Saba mpo na Yawe.
Speak to the children of Israel, and thou shalt say to them: When you shall have entered into the land which I will give you, observe the rest of the sabbath to the Lord.
3 Mibu motoba, bokolona bilanga na bino mpe mibu motoba, bokobongisa bilanga na bino ya vino mpe bokobuka bambuma na yango.
Six years thou shalt sow thy field and six years thou shalt prune thy vineyard, and shalt gather the fruits thereof:
4 Kasi na mobu ya sambo, mabele esengeli kozala na bopemi, ekozala mobu ya Saba mpo na Yawe. Bokolona bilanga na bino te mpe bokobongisa bilanga na bino ya vino te, mabele esengeli kozala na Saba mpo na Yawe.
But in the seventh year there shall be a sabbath to the land, of the resting of the Lord: thou shalt not sow thy field, nor prune thy vineyard.
5 Bokoki kobuka te bambuma oyo ebotaki yango moko na mbala eleki to kobuka bambuma ya vino na elanga oyo babongisa te; ekozala mobu ya bopemi mpo na mabele.
What the ground shall bring forth of itself, thou shalt not reap: neither shalt thou gather the grapes of the firstfruits as a vintage: for it is a year of rest to the land:
6 Nzokande, biloko oyo mabele ekobota na mobu ya Saba, ekozala bilei na bino: yo, mowumbu na yo ya mobali, mwasi mowumbu na yo, mwana mosala na yo mpe mopaya oyo azali kovanda kati na yo
But they shall be unto you for meat, to thee and to thy manservant, to thy maidservant and thy hireling, and to the strangers that sojourn with thee:
7 elongo na banyama ya mboka mpe ya zamba oyo bazali kati na mokili na bino. Bosengeli kolia biloko nyonso oyo mabele ekobota.
All things that grow shall be meat to thy beasts and to thy cattle.
8 Bokotanga mibu sambo ya Saba, mbala sambo, na mibu sambo; mpe mibu sambo ya Saba ekosala mibu tuku minei na libwa.
Thou shalt also number to thee seven weeks of years, that is to say, seven times seven, which together make forty-nine years:
9 Bongo na sima, na mokolo ya zomi, na sanza ya sambo, na mokolo ya bolimbisi masumu, bokobeta kelelo na bisika nyonso kati na mokili na bino mobimba.
And thou shalt sound the trumpet in the seventh month, the tenth day of the month, in the time of the expiation in all your land.
10 Bokobulisa mobu ya tuku mitano mpe bokosakola, kati na mokili mobimba, kokangolama ya bavandi na yango nyonso. Ekozala mpo na bino mobu ya kosepela kokangolama na bino; moto moko na moko kati na bino akozonga na mabele na ye, na libota na ye.
And thou shalt sanctify the fiftieth year, and shalt proclaim remission to all the inhabitants of thy land: for it is the year of jubilee. Every man shall return to his possession, and every one shall go back to his former family:
11 Mobu ya tuku mitano ekozala mobu ya kosepela kokangolama na bino: bokolona te, bokobuka te biloko oyo bilanga ekobota yango moko, mpe bokobuka te bambuma ya vino ya elanga oyo babongisa te.
Because it is the jubilee and the fiftieth year. You shall not sow, nor reap the things that grow in the field of their own accord, neither shall you gather the firstfruits of the vines,
12 Pamba te ezali mobu ya kosepela kokangolama na bino, mpe esengeli kozala bule mpo na bino. Bokolia kaka bambuma ya bilanga.
Because of the sanctification of the jubilee: but as they grow you shall presently eat them.
13 Na mobu yango ya kosepela kokangolama na bino, moto nyonso kati na bino akozonga na mabele na ye.
In the year of the jubilee all shall return to their possessions.
14 Soki bozali koteka mabele epai ya ndeko na bino to soki bozali kosomba eloko songolo epai na ye, wana bozali bana mboka moko, tika ete moko te kati na bino akosa ndeko na ye.
When thou shalt sell any thing to thy neighbour, or shalt buy of him; grieve not thy brother: but thou shalt buy of him according to the number of years from the jubilee.
15 Okosomba epai ya ndeko na yo ya mboka, na motuya ya mbongo oyo bakokata kolanda motango ya mibu oyo eleki wuta mobu ya suka oyo bosepelaki kokangolama na bino; mpe akotekela yo na motuya ya mbongo oyo ekokatama kolanda motango ya mibu oyo ekotikala, mibu ya kobuka bambuma, kino bokoma na mobu oyo ekolanda, mobu ya kosepela kokangolama na bino.
And he shall sell to thee according to the computation of the fruits.
16 Soki mibu etikali ebele, bosengeli komatisa motuya; mpe soki mibu ezali moke, bosengeli kokitisa motuya, pamba te ezali motango ya mibu ya kobuka bambuma nde etekamaka: yango nde bakotekela yo.
The more years remain after the jubilee, the more shall the price increase: and the less time is counted, so much the less shall the purchase cost. For he shall sell to thee the time of the fruits.
17 Tika ete moko te akosa moninga, kasi banga Nzambe na yo; Ngai nazali Yawe, Nzambe na bino.
Do not afflict your countrymen, but let every one fear his God: because I am the Lord your God.
18 Bosalela bikateli na Ngai mpe botosa mibeko na Ngai, bongo bokowumela na kimia kati na mokili;
Do my precepts, and keep my judgments, and fulfill them: that you may dwell in the land without any fear,
19 mpe mabele ekobota mbuma na yango, bokolia mpe bokotonda mpe bokovanda na kimia.
And the ground may yield you its fruits, of which you may eat your fill, fearing no mall’s invasion.
20 Bokoki kotuna: ‘Tokolia nini na mobu ya sambo soki toloni te mpe tobuki te bambuma na biso?’
But if you say: What shall we eat the seventh year, if we sow not, nor gather our fruits?
21 Nakotindela bino mapamboli mingi na mobu ya motoba mpo ete mabele ekoka kobota bambuma mingi oyo bokoki kolia mibu misato.
I will give you my blessing the sixth year, and it shall yield the fruits of three years:
22 Wana bokolona na mobu ya mwambe, bokolia nanu bambuma ya kala mpe bokokoba kolia yango kino bokobuka bambuma ya mobu ya libwa.
And the eighth year you shall sow, and shall eat of the old fruits, until the ninth year: till new grow up, you shall eat the old store.
23 Bokoki te koteka mabele mpo na libela, pamba te mabele ezali ya Ngai, mpe bino bozali bapaya mpe baleki nzela.
The land also shall not be sold for ever: because it is mine, and you are strangers and sojourners with me.
24 Kati na mokili oyo bokozwa lokola libula, bosengeli kondima ete moto asikola mabele na ye.
For which cause all the country of your possession shall be under the condition of redemption.
25 Soki mwana mboka moko kati na bino akomi mobola mpe ateki mabele na ye, moto moko ya libota na ye ya pembeni akoki koya kosikola oyo mwana mboka wana atekaki.
If thy brother being impoverished sell his little possession, and his kinsman will, he may redeem what he had sold.
26 Soki moto wana azali na ndeko te oyo akoki kosikola yango mpo na ye; mpe ye moko akomi na bozwi bongo azwi makoki ya kosikola yango;
But if he have no kinsman, and he himself can find the price to redeem it:
27 asengeli kotanga motango ya mibu wuta atekaki mabele na ye mpe akozongisa motuya ya mibu oyo etikali epai ya moto oyo asombaki yango. Boye, akoki kozongela mabele na ye.
The value of the fruits shall be counted from that time when he sold it: and the overplus he shall restore to the buyer, and so shall receive his possession again.
28 Soki azwaki te makoki ya kosikola yango, mabele oyo atekaki ekotikala na maboko ya moto oyo asombaki yango kino na mobu ya kosepela kokangolama na ye. Ekozala na mobu yango nde mabele na ye ekozongela ye mpe akokoma lisusu nkolo na yango.
But if his hands find not the means to repay the price, the buyer shall have what he bought, until the year of the jubilee. For in that year all that is sold shall return to the owner, and to the ancient possessor.
29 Soki moto ateki ndako kati na engumba oyo bazingela na bamir, azali na makoki ya kosikola yango kaka mpo na mobu moko wuta mokolo oyo atekaki yango. Ezali kaka na tango wana nde akoki kosikola yango.
He that selleth a house within the walls of a city, shall have the liberty to redeem it, until one year be expired:
30 Soki asikoli yango te liboso ete mobu mobimba eleka, ndako oyo ezali kati na engumba oyo bazingela na bamir ekotikala libela mpo na moto oyo asombaki yango mpe mpo na bakitani na ye; bakoki te kozongisa yango na mobu ya kosepela kokangolama.
If he redeem it not, and the whole year be fully out, the buyer shall possess it, and his posterity for ever, and it cannot be redeemed, not even in the jubilee.
31 Kasi bandako oyo ezali kati na bamboka oyo bazingela te na bamir pembeni-pembeni, ekozala lokola bilanga ya mboka. Bakoki kosikola yango, mpe ekozonga epai na nkolo na yango na mobu ya kosepela kokangolama.
But if the house be in a village, that hath no walls, it shall be sold according to the same law as the fields: if it be not redeemed before, in the jubilee it shall return to the owner.
32 Balevi bazali tango nyonso na makoki ya kosikola bandako na bango, oyo ezali kati na bingumba ya Balevi.
The houses of Levites, which are in cities, may always be redeemed:
33 Soki Molevi ateki ndako na ye kati na bingumba ya Balevi, moto oyo asombi yango akozongisela ye yango na mobu ya kosepela kokangolama; pamba te bandako oyo ezali kati na bingumba ya Balevi ezali libula na bango ya libela kati na bana ya Isalaele.
If they be not redeemed, in the jubilee they shall all return to the owners, because the houses of the cities of the Levites are for their possessions among the children of Israel.
34 Kasi bilanga oyo ezali zingazinga ya bingumba ya Balevi, bakoki koteka yango te: ezali libula na bango mpo na libela.
But let not their suburbs be sold, because it is a perpetual possession.
35 Soki moto oyo azali pembeni na yo akomi mobola mpe azali lisusu te na makoki ya komisunga; okosunga ye, azala mopaya to moleki nzela; mpo ete azala malamu pembeni na yo.
If thy brother be impoverished, and weak of hand, and thou receive him as a stranger and sojourner, and he live with thee,
36 Okoki te kozwa mileki na maboko na ye; kasi banga Nzambe na yo, mpo ete mwana mboka na yo akoka kozala malamu pembeni na yo.
Take not usury of him nor more than thou gavest: fear thy God, that thy brother may live with thee.
37 Soki odefisi ye mbongo, okosenga mileki te na oyo odefisi ye; mpe soki odefisi ye bilei, okosenga te koleka oyo opesi.
Thou shalt not give him thy money upon usury, nor exact of him any increase of fruits.
38 Ngai nazali Yawe, Nzambe na yo, oyo abimisaki yo na Ejipito; mpo na kopesa yo mokili ya Kanana, mpe na kozala Nzambe na yo.
I am the Lord your God, who brought you out of the land of Egypt, that I might give you the land of Chanaan, and might be your God.
39 Soki ndeko na yo, mwana mboka, akomi mobola mpe amiteki epai na yo, kopesa ye te misala na makasi lokola mowumbu.
If thy brother constrained by poverty, sell himself to thee, thou shalt not oppress him with the service of bondservants:
40 Okozwa ye lokola moto na yo ya mosala to lokola moleki nzela oyo azali kati na bino; akosalela yo kino na mobu ya kosepela kokangolama;
But he shall be as a hireling, and a sojourner: he shall work with thee until the year of the jubilee,
41 mpe na sima, akozwa bonsomi elongo na bana na ye, akozonga na etuka na ye mpe akozongela mabele ya batata na ye.
And afterwards he shall go out with his children, and shall return to his kindred and to the possession of his fathers,
42 Pamba te, bana ya Isalaele bazali bawumbu na Ngai, oyo nabimisaki na Ejipito; bakoki te koteka bango lokola bawumbu.
For they are my servants, and I brought them out of the land of Egypt: let them not be sold as bondmen:
43 Kokonza bango te na makasi, kasi banga Nzambe na yo.
Afflict him not by might, but fear thy God.
44 Okozwa bawumbu na yo ya mibali mpe basi bawumbu na yo kati na bikolo oyo ezingeli yo; okosomba bango kaka na bikolo yango.
Let your bondmen, and your bondwomen, be of the nations that are round about you.
45 Okoki mpe kosomba bapaya oyo bazali kovanda kati na mokili na yo, mpe bato ya bituka na bango, oyo babotami kati na mokili na yo; boye bakokoma bawumbu na yo.
And of the strangers that sojourn among you, or that were born of them in your land, these you shall have for servants:
46 Okoki kotika bango epai ya bana na yo lokola libula mpo ete sima na yo bakoma bawumbu na bango mpo na libela; kasi kokonza te na makasi bandeko na yo, bana ya Isalaele.
And by right of inheritance shall leave them to your posterity, and shall possess them for ever. But oppress not your brethren the children of Israel by might.
47 Soki mopaya to moleki nzela moko kati na mokili na yo akomi na bozwi mpe moko kati na bandeko na yo, mwana mboka, akomi mobola; bongo amiteki epai ya mopaya to moleki nzela yango to epai ya moto moko ya libota na ye;
If the hand of a stranger or a sojourner grow strong among you, and thy brother being impoverished sell himself to him, or to any of his race:
48 ndeko na yo, mwana mboka, akoki kosikolama sima na ye komiteka: moto moko kati na bandeko na ye akoki kosikola ye.
After the sale he may be redeemed. He that will of his brethren shall redeem him:
49 Soki ndeko azali te mpo na kosikola ye, tata kulutu to tata leki na ye to bana mibali ya tata kulutu to ya tata leki na ye to ndeko na ye mosusu ya libota ya botata akoki kosikola ye. Nzokande soki akomi na makoki, akoki mpe komisikola ye moko.
Either his uncle, or his uncle’s son, or his kinsman, by blood, or by affinity. But if he himself be able also, he shall redeem himself,
50 Boye, ye elongo na moto oyo asombaki ye, bakotanga mibu oyo eleki wuta na mobu oyo amitekaki kino na mobu ya kosepela kokangolama; bakokata motuya ya lisiko na ye kolanda motango ya mibu ndenge ezali lifuti ya moto ya mosala.
Counting only the years from the time of his selling unto the year of the jubilee: and counting the money that he was sold for, according to the number of the years and the reckoning of a hired servant,
51 Soki etikali mibu ebele, asengeli kofuta mpo na kosikolama na ye, mbongo kolanda talo oyo basombaki ye.
If there be many years that remain until the jubilee, according to them shall he also repay the price.
52 Soki etikalaki mibu moke kino na mobu ya kosepela kokangolama, akotanga mibu yango mpe akofuta mpo na lisiko na ye kolanda motango ya mibu oyo etikali.
If few, he shall make the reckoning with him according to the number of the years, and shall repay to the buyer of what remaineth of the years,
53 Na mibu nyonso oyo akosala epai ya mosombi na ye, bakozwa ye lokola moto ya mosala; okotika te ete mosombi na ye akonza ye na makasi.
His wages being allowed for which he served before: he shall not afflict him violently in thy sight.
54 Ata soki asikolami te na moko kati na banzela oyo, ye elongo na bana na ye basengeli kozwa bonsomi na mobu ya kosepela kokangolama.
And if by these means he cannot be redeemed, in the year of the jubilee he shall go out with his children.
55 Pamba te, bana ya Isalaele bazali bawumbu na Ngai, oyo nabimisaki na Ejipito. Nazali Yawe, Nzambe na bino.
For the children of Israel are my servants, whom I brought forth out of the land of Egypt.

< Levitike 25 >