< Levitike 24 >

1 Yawe alobaki na Moyize:
Und Jehovah redete zu Mose und sprach:
2 « Pesa mitindo na bana ya Isalaele ete bamemela yo mafuta ya olive ya peto mpo na minda, mpo ete minda ekoka kopela tango nyonso.
Gebeut den Söhnen Israels, daß sie vor dich lauteres Öl von zerstoßenen Oliven bringen zur Beleuchtung, um beständig die Lampen aufzustecken.
3 Ezali kati na Ndako ya kapo ya Bokutani, libanda ya rido oyo ezali liboso ya Sanduku ya Litatoli, nde Aron akobanda kopelisa minda tango nyonso liboso ya Yawe, kobanda na pokwa kino na tongo. Ezali mobeko ya libela mpo na milongo na bino nyonso.
Außerhalb des Vorhangs des Zeugnisses im Versammlungszelt soll Aharon es anordnen vom Abend bis zum Morgen vor Jehovah beständig. Es sei eine ewige Satzung für eure Geschlechter.
4 Minda ekozala likolo ya etelemiselo ya minda, esalema na wolo ya peto, liboso ya Yawe; bakobongisa yango tango nyonso.
Auf dem reinen Leuchter ordne er die Lampen an vor Jehovah beständig.
5 Okozwa farine mpe okolamba bagato zomi na mibale, okosalela biteni mibale kati na biteni zomi ya efa mpo na gato moko na moko.
Und nimm Semmelmehl und backe es zu zwölf Kuchen, zwei Zehntel, sei jeder Kuchen.
6 Okotanda yango na milongo mibale, gato motoba na molongo moko, likolo ya mesa oyo esalema na wolo ya peto, liboso ya Yawe.
Und lege sie in zwei Reihen sechs in eine Reihe auf den reinen Tisch vor Jehovah.
7 Na molongo moko na moko, okosopa ansa ya peto oyo ekotumbama na esika ya gato lokola likabo bazikisa na moto mpo na Yawe, mpe ekozala ekaniseli.
Und gib auf die Reihe lauteren Weihrauch, und es sei zum Brote, zum Gedenken, ein Feueropfer für Jehovah.
8 Mikolo nyonso ya Saba, bokobonza lipa yango liboso ya Yawe na kombo ya bana ya Isalaele lokola boyokani ya libela.
Am Sabbathtage, am Sabbathtage soll er es anordnen vor Jehovah beständig, es ist von den Söhnen Israels, zum ewigen Bunde!
9 Gato yango ekozala mpo na Aron mpe bana na ye ya mibali; bana na ye ya mibali bakolia yango na Esika ya bule, pamba te ezali eteni ya bule koleka kati na biteni na bango oyo bazwaka na makabo bazikisa na moto mpo na Yawe. Ezali mobeko mpo na libela. »
Und es sei für Aharon und für seine Söhne, und sie sollen es essen an heiligem Orte; denn hochheilig ist es ihm von den Feueropfern Jehovahs, eine ewige Satzung.
10 Ezalaki na mwana mobali moko oyo mama na ye azalaki moto ya Isalaele mpe tata na ye, moto ya Ejipito; apusanaki kati na bana ya Isalaele mpe abundisaki moto ya Isalaele kati na molako.
Und es ging hinaus der Sohn eines israelitischen Weibes, und er war Sohn eines Ägypters, mitten unter die Söhne Israels, und es zankten sich in dem Lager der Sohn der Israelitin und ein israelitischer Mann.
11 Mwana mobali ya mwana mwasi ya Isalaele atiolaki Kombo ya Yawe mpe alakelaki yango mabe, boye bamemaki ye epai ya Moyize. Kombo ya mama na ye ezalaki « Shelomiti. » Shelomiti azalaki mwana mwasi ya Dibiri, kati na libota ya Dani.
Und der Sohn des israelitischen Weibes verwünschte den Namen und fluchte und sie brachten ihn zu Mose. Und der Name seiner Mutter war Schelomith, Dibris Tochter, vom Stamme Dan.
12 Batiaki ye na boloko kino kozela ete Yawe alakisa bango mokano na Ye.
Und sie legten ihn in Gewahrsam nieder, um sie nach dem Munde Jehovahs zu bescheiden.
13 Yawe alobaki na Moyize:
Und Jehovah redete zu Mose und sprach:
14 « Mema na libanda ya molako moto oyo atioli Nzambe. Bato nyonso oyo bayokaki ye, bakotia maboko na bango na moto na ye, mpe bato nyonso ya lingomba bakobamba ye mabanga.
Bringe den, der da fluchte, hinaus, außerhalb des Lagers, und alle, die es hörten, sollen ihre Hände auf sein Haupt legen, und die ganze Gemeinde soll ihn steinigen.
15 Loba na bana ya Isalaele: ‹ Soki moto alakeli Nzambe na ye mabe, amemi ngambo;
Und zu den Söhnen Israels sollst du reden und sprechen: Jeglicher Mann, der seinem Gotte flucht, der trage denn seine Sünde.
16 soki moto atioli Kombo ya Yawe, basengeli koboma ye: bato nyonso ya lingomba basengeli kobamba ye mabanga. Azala mopaya to mwana mboka, soki atioli Kombo ya Yawe, basengeli koboma ye.
Und wer den Namen Jehovahs verwünscht, der soll des Todes sterben; ihn steinige die ganze Gemeinde, wie der Fremdling so der Eingeborene; wenn er den Namen verwünscht, soll er sterben.
17 Soki moto abomi moto, basengeli koboma ye.
Und der Mann, der die Seele irgendeines Menschen schlägt, der soll des Todes sterben.
18 Soki moto abomi nyama ya moto mosusu, asengeli kozongisa nyama ya bomoi na esika ya nyama oyo ekufi: kolanda mobeko ya bomoi mpo na bomoi.
Und wer die Seele des Viehs schlägt, der soll erstatten Stück für Stück, Seele für Seele.
19 Soki moto azokisi moninga na ye, bakosala ye ndenge asalaki moninga:
Und der Mann, der seinen Nächsten verletzt, dem soll man tun, wie er getan hat.
20 soki abuki eteni ya nzoto, ye mpe bakobuka ye eteni ya nzoto; soki atoboli liso, ye mpe bakotobola ye liso; soki abuki linu, ye mpe bakobuka ye linu; ndenge azokisi moto mosusu, ndenge wana mpe bakozokisa ye.
Bruch um Bruch, Auge um Auge, Zahn um Zahn, der gleiche Makel, den er einem Menschen angetan, werde auch ihm angetan.
21 Moto nyonso oyo abomi nyama ya moninga na ye, akozongisa nyama mosusu; kasi oyo abomi moto, basengeli koboma ye.
Und wer ein Vieh erschlägt, der soll es erstatten, und wer einen Menschen erschlägt, soll sterben.
22 Ezala mopaya to mwana mboka, bino nyonso bozali na mobeko moko; Ngai nazali Yawe, Nzambe na bino. › »
Ein Recht sei bei euch, wie für den Eingeborenen, so für den Fremdling sei es; denn Ich bin Jehovah, euer Gott.
23 Bongo Moyize alobaki na bana ya Isalaele; mpe babimisaki na libanda ya molako moto oyo alakelaki Nzambe mabe mpe babambaki ye mabanga. Bana ya Isalaele basalaki kolanda ndenge Yawe atindaki Moyize.
Und Mose redete zu den Söhnen Israels, und sie brachten den Flucher aus dem Lager hinaus und steinigten ihn mit Steinen; und die Söhne Israels taten, wie Jehovah dem Mose geboten hatte.

< Levitike 24 >