< Levitike 22 >
1 Yawe alobaki na Moyize:
And the Lord said to Moses,
2 « Talisa Aron mpe bana na ye ya mibali ndenge nini basengeli kozala mosika ya makabo oyo bana ya Isalaele babonzelaka Ngai, mpo ete babebisa te bosantu ya Kombo na Ngai ya bule; Ngai nazali Yawe.
Give orders to Aaron and to his sons to keep themselves separate from the holy things of the children of Israel which they give to me, and not to make my holy name common: I am the Lord,
3 Loba na bango: ‹ Mpo na milongo oyo ekoya na sima mpe kati na bakitani na bino, soki moko azali mbindo mpe apusani pembeni ya makabo ya bule oyo bana ya Isalaele babonzeli Ngai Yawe, esengeli balongola moto wana na miso na Ngai. Nazali Yawe.
Say to them, If any man of all your seed through all your generations, being unclean, comes near the holy things which the children of Israel make holy to the Lord, he will be cut off from before me: I am the Lord.
4 Soki moko ya bakitani ya Aron azali na bokono na poso ya nzoto lokola maba, bokono ya kobima tofina to makila na nzoto ya mibali, akoki te kolia likabo ya bule kino tango akokoma peto. Ndenge moko mpe, akozala mbindo soki asimbi eloko oyo ekomi mbindo mpo ete etuti ebembe to mobali oyo abimisi mayi ya mibali;
No man of the seed of Aaron who is a leper, or who has a flow from his body, may take of the holy food till he is clean. And any man touching anything which is unclean because of the dead, or any man whose seed goes from him;
5 soki asimbi nyama oyo etambolaka na libumu mpe ekomisaka mbindo to soki asimbi moto nyonso oyo akoki kokomisa ye mbindo ata na nzela ya ndenge nini.
Or anyone touching any unclean thing which goes flat on the earth, or someone by whom he may be made unclean in any way whatever;
6 Moto oyo akosimba eloko ya ndenge wana akozala mbindo kino na pokwa. Akoki kolia likabo ya bule te kino tango akosukola na mayi.
Any person touching any such unclean thing will be unclean till evening, and may not take of the holy food till his flesh has been bathed in water;
7 Akokoma peto tango moyi ekolala mpe sima na yango nde akoki kolia makabo ya bule, pamba te ezali bilei na ye.
And when the sun has gone down he will be clean; and after that he may take part in the holy food, because it is his bread.
8 Akoki te kolia nyama oyo ekufi yango moko to oyo nyama ya zamba ebomi, noki te akokoma mbindo na nzela na yango. Nazali Yawe.
That which comes to a natural death, or is attacked by beasts, he may not take as food, for it will make him unclean: I am the Lord.
9 Banganga-Nzambe bakotosa malako na Ngai tango nyonso mpo ete bamema ngambo te mpe bakufa te, noki te bakokufa solo. Ngai nazali Yawe oyo abulisaki bango mpe akomisaka bango basantu mpo na mosala na Ngai.
So then, let them keep what I have put into their care, for fear that sin may come on them because of it, so causing their death because they have made it common: I am the Lord, who make them holy.
10 Moto moko te oyo azali na libota ya Banganga-Nzambe te akoki kolia makabo ya bule: ezala mopaya oyo Nganga-Nzambe abengi to mosali oyo Nganga-Nzambe azwi na mosala.
No outside person may take of the holy food, or one living as a guest in the priest's house, or a servant working for payment.
11 Kasi soki Nganga-Nzambe asombi mowumbu na mbongo na ye to soki mowumbu abotami na ndako na ye, mowumbu wana akolia makabo ya bule.
But any person for whom the priest has given money, to make him his, may take of it with him; and those who come to birth in his house may take of his bread.
12 Soki mwana mwasi ya Nganga-Nzambe abali mobali oyo azali Nganga-Nzambe te, akolia te makabo ya bule.
And if the daughter of a priest is married to an outside person she may not take of the holy things which are lifted up as offerings.
13 Kasi soki mwana mwasi ya Nganga-Nzambe akufisi mobali to akabwani na mobali, bongo amiboteli mwana te mpe azongi kovanda na ndako ya tata na ye lokola tango azalaki elenge, akoki kolia biloko ya ndenge moko na tata na ye; kasi moto oyo azali Nganga-Nzambe te akolia yango te.
But if a priest's daughter is a widow, or parted from her husband, and has no child, and has come back to her father's house as when she was a girl, she may take of her father's bread; but no outside person may do so.
14 Soki moto alie likabo ya bule na kozanga koyeba, asengeli kozongisa epai ya Nganga-Nzambe motuya ya likabo yango mpe akobakisa eteni moko kati na mitano ya motuya na yango.
And if a man takes the holy food in error, he will have to give the holy thing back to the priest, with the addition of a fifth part.
15 Banganga-Nzambe basengeli te kobebisa lokumu ya makabo ya bule oyo bana ya Isalaele babonzeli Yawe.
And they may not make common the holy things which the children of Israel give to the Lord,
16 Soki, wana bazali mbindo, balie yango, bakomemisa bana ya Isalaele ngambo oyo ekosala ete bapesa likabo mpo na kozongisa boyokani, pamba te ezali Ngai Yawe nde nabulisaka bango mpo na mosala na Ngai. › »
So causing sin to come on them when they take their holy things for food: I am the Lord who make them holy.
17 Yawe alobaki na Moyize:
And the Lord said to Moses,
18 « Yebisa Aron, bana na ye ya mibali mpe bana nyonso ya Isalaele: ‹ Soki moto ya Isalaele to mopaya oyo azali kovanda kati na Isalaele alingi kobonza mbeka ya kotumba epai na Yawe mpo na kokokisa ndayi to likabo oyo apesi kolanda mokano ya motema na ye moko,
Say to Aaron and to his sons and to all the children of Israel, If any man of the children of Israel, or of another nation living in Israel, makes an offering, given because of an oath or freely given to the Lord for a burned offering;
19 asengeli kobonza nyama ya mobali oyo ezangi mbeba kati na bangombe, bameme to bantaba mpo ete Nzambe andima yango.
So that it may be pleasing to the Lord, let him give a male, without any mark, from among the oxen or the sheep or the goats.
20 Asengeli te kobonza nyama oyo ezali na mbeba, pamba te ekondimama te.
But anything which has a mark you may not give; it will not make you pleasing to the Lord.
21 Ndenge moko mpe, soki moto alingi kobonza epai na Yawe mbeka ya boyokani oyo azwi kati na bangombe, bameme to bantaba, mpo na kokokisa ndayi to likabo oyo apesi kolanda mokano ya motema na ye moko, nyama yango esengeli kozala ezanga mbeba.
And whoever makes a peace-offering to the Lord, in payment of an oath or as a free offering, from the herd or the flock, if it is to be pleasing to the Lord, let it be free from any mark or damage.
22 Bokobonza te epai na Yawe nyama oyo ekufa liso to ezoka, oyo ezali kotambola tengu-tengu to oyo ezali na bokono na poso ya nzoto, oyo ezali na makwanza to na mapalata; bokoki te kotia nyama ya boye na likolo ya etumbelo lokola likabo bazikisa na moto mpo na Yawe.
Anything blind or broken or damaged or having any disease or any mark on it may not be offered to the Lord; you may not make an offering of it by fire on the altar to the Lord.
23 Nzokande bokoki mpe te kobonza mpo na Yawe lokola likabo oyo bopesi kolanda mokano ya mitema na bino moko, ngombe ya mobali to meme oyo ezali na makolo to maboko ekokana te. Mbeka ya boye ekoki kondimama te mpo na kokokisa ndayi.
An ox or a lamb which has more or less than its natural parts, may be given as a free offering; but it will not be taken in payment of an oath.
24 Bokobonza kaka epai na Yawe, nyama oyo mapumbu na yango bafina penza to banika, balongola to bakata; bokoki kosala bongo te kati na mboka na bino moko.
An animal which has its sex parts damaged or crushed or broken or cut, may not be offered to the Lord; such a thing may not be done anywhere in your land.
25 Bokoki kondima nyama ya lolenge oyo te na maboko ya bapaya mpo na kobonza yango epai na Yawe lokola bilei ya Nzambe na bino. Ekoki kondimama te, pamba te ezali na mbeba. › »
And from one who is not an Israelite you may not take any of these for an offering to the Lord; for they are unclean, there is a mark on them, and the Lord will not be pleased with them.
26 Yawe alobaki na Moyize:
And the Lord said to Moses,
27 « Soki mwana ngombe, mwana meme to mwana ntaba ebotami, ekosala mikolo sambo epai ya mama na yango, bongo na mokolo ya mwambe, ekondimama lokola likabo bazikisa na moto mpo na Yawe.
When an ox or a sheep or a goat is given birth, let it be with its mother for seven days; and after the eighth day it may be taken as an offering made by fire to the Lord.
28 Bokoki te kokata kingo ya ngombe ya mwasi to ya meme ya mwasi mokolo moko na mwana na yango.
A cow or a sheep may not be put to death with its young on the same day.
29 Tango bokobonza mbeka ya kozongisa matondi epai na Yawe, bobonza yango na lolenge oyo ekosala ete Nzambe andima bino.
And when you make an offering of praise to the Lord, make it in a way which is pleasing to him.
30 Esengeli bolia yango kaka mokolo wana. Bokotika eloko moko te kino na tongo. Nazali Yawe.
Let it be used for food on the same day; do not keep any part of it till the morning: I am the Lord.
31 Bobatela mitindo na Ngai mpe bosalela yango. Nazali Yawe.
So then, keep my orders and do them: I am the Lord.
32 Bokobebisa te lokumu ya Kombo na Ngai ya bule, mpo ete bana ya Isalaele bayeba solo ete Ngai nazali Mosantu. Ezali Ngai Yawe nde nabulisaki bino.
And do not make my holy name common; so that it may be kept holy by the children of Israel: I am the Lord who make you holy,
33 Nabimisaki bino na mokili ya Ejipito mpo ete nazala Nzambe na bino. Nazali Yawe. »
Who took you out of the land of Egypt that I might be your God: I am the Lord.