< Levitike 20 >

1 Yawe alobaki na Moyize
The Lord told Moses,
2 ete apesa malako oyo epai ya bana ya Isalaele: « Soki moto moko ya Isalaele to mopaya oyo avandi kati na Isalaele abonzi moko kati na bana na ye lokola mbeka epai ya nzambe Moloki, esengeli baboma ye. Bato ya mokili bakobamba ye mabanga.
“Tell the Israelites: these regulations are for both Israelites and foreigners living among them. Anyone who sacrifices their children to Molech must be executed. The community must stone them to death.
3 Ngai nakotombokela moto yango mpe nakolongola ye kati na bato na ye, pamba te abonzaki mwana na ye lokola mbeka epai ya nzambe Moloki mpo na kokomisa mbindo Esika na Ngai ya bule mpe mpo na kobebisa bosantu ya Kombo na Ngai.
I will disown them and expel them from their people, because by sacrificing their children to Molech they have polluted my sanctuary and disgraced my reputation.
4 Mpe soki bato ya mokili bakangi miso na bango tango moto wana azali kobonza mwana na ye lokola mbeka epai ya nzambe Moloki mpe baboyi koboma ye,
If the community decides to look the other way and not execute those who sacrifice their children to Molech, then I will take action against them myself.
5 ngai nakotombokela moto yango mpe libota na ye, nakolongola bango na ekolo na bango, elongo na bato nyonso oyo balandaki ye mpo na kosalela nzambe Moloki.
I will disown them and their family, and expel them from their people—and not just them, but everyone who follows them in spiritually prostituting themselves with Molech.
6 Nakotombokela lisusu bato nyonso oyo balandaka moto oyo asololaka na bakufi mpe banganga-kisi mpo na kosalela banzambe ya bikeko. Nakolongola bango kati na bato na bango.
I will also disown and expel from their people anyone who goes to mediums or spiritists and in this way commits spiritual prostitution with them.
7 Bomibulisa mpe bozala bule, pamba te nazali Yawe, Nzambe na bino.
So dedicate yourselves and be holy, because I am the Lord your God.
8 Bobatela bikateli na Ngai mpe bosalela yango. Nazali Yawe oyo akomisi bino basantu.
Keep my rules and put them into practice. I am the Lord who makes you holy.
9 Moto nyonso oyo akolakela tata na ye to mama na ye mabe, esengeli baboma ye; pamba te alakeli tata na ye to mama na ye mabe: makila na ye ekotangama na moto na ye moko.
Anyone who curses their father or mother must be executed. They have cursed their father or mother; they bear the responsibility for their punishment.
10 Soki mobali asali ekobo na mwasi ya mobali mosusu, mwasi ya moninga na ye; bango mibale, mwasi na mobali oyo basali ekobo, esengeli koboma bango.
Any man who commits adultery with someone else's wife must be executed, as well as the woman.
11 Soki mobali asangisi nzoto na mwasi ya tata na ye, asambwisi tata na ye; bango mibale, esengeli koboma bango: makila na bango ekotangama na mito na bango moko.
A man who has sex with his father's wife has brought shame on his father. Both the man and the woman must be executed. Both must surely be put to death; they bear the responsibility for their punishment.
12 Soki mobali asangisi nzoto na mwasi ya mwana na ye ya mobali; bango mibale esengeli koboma bango, pamba te basali bosoto: makila na bango ekotangama na mito na bango moko.
A man who has sex with his daughter-in-law must be executed, as well as the woman. They have done something perverse; they bear the responsibility for their punishment.
13 Soki mobali asangisi nzoto na moninga na ye mobali ndenge basangisaka nzoto na mwasi, bango mibale basali likambo moko ya mbindo; boye esengeli koboma bango mpe makila na bango ekotangama na mito na bango moko.
Men who have sex with other men as with a woman have done something disgusting. They must be executed; they bear the responsibility for their punishment.
14 Soki mobali abali mwasi mpe mama ya mwasi, ezali likambo ya mabe koleka. Bango nyonso misato: mobali mpe basi nyonso mibale, esengeli kotumba bango na moto, mpo ete mabe moko te ezala kati na bino.
A man who marries both a woman and her mother has acted perversely. They must all be burned to death so that there will be no such wickedness among you.
15 Soki mobali asangisi nzoto na nyama, esengeli koboma ye elongo na nyama yango.
A man who has sex with an animal must be executed, and the animal must be killed too.
16 Ndenge moko mpe soki mwasi asangisi nzoto na nyama, bakoboma ye elongo na nyama yango: makila na bango ekotangama na mito na bango moko.
A woman who gives herself to an animal to have sex with it must be executed, along with the animal. They must both be killed; they bear the responsibility for their punishment.
17 Soki mobali abali mwasi oyo azali ndeko na ye mpo ete abotami na mama mosusu to tata mosusu, bongo asangisi na ye nzoto, ezali likambo ya soni. Bakolongola bango na miso ya bato na bango. Lokola mobali asambwisi ndeko na ye ya mwasi, akomema ngambo.
A man who marries his sister, whether she's his father's daughter or his mother's daughter, and they have sex, has done something shameful. They must be expelled from their people in front of everybody. He has brought shame on his sister; he bears the responsibility for his punishment.
18 Soki mobali asangisi nzoto na mwasi oyo azali komona makila na ye ya sanza; bango mibale, esengeli kobengana bango kati na bato na bango, mpo te basangisaki nzoto na tango mwasi azalaki komona makila na ye ya sanza.
A man who has sex with a woman having her period he has exposed where her blood flow comes from, and she has too. They must both be expelled from their people.
19 Okosangisa nzoto te na ndeko mwasi ya tata to ya mama na yo, pamba te ekosambwisa bondeko. Soki moto asali yango, bango mibale bakomema ngambo mpo na mabe na bango.
Don't have sex with your aunt, whether on your father or your mother's side, because it brings shame on your own family. Both will bear responsibility for their sin.
20 Soki mobali moko asangisi nzoto na mwasi ya ndeko ya tata na ye to mwasi ya ndeko ya mama na ye, asambwisi ndeko ya tata na ye to ya mama na ye; bango mibale bakomema ngambo mpo na mabe na bango mpe bakokufa bazanga bana.
A man who has sex with his uncle's wife brings shame on his uncle. They will bear responsibility for their sin; they shall die without having children.
21 Soki mobali asangisi nzoto na mwasi ya ndeko na ye ya mobali, ezali likambo ya mbindo; asambwisi ndeko na ye ya mobali; bakokufa bazanga bana.
A man who marries his brother's wife does something that is unclean. He has brought shame on his brother; the couple will have no children.
22 Bobatela mpe botosa bikateli mpe mibeko na Ngai nyonso; bosalela yango mpo ete mokili epai wapi nakomema bino mpo na kovanda esanza bino te.
So keep all my rules and regulations, so that the land where I'm taking you to live won't vomit you out.
23 Bolanda te bizaleli ya bikolo oyo nakobengana liboso na bino, pamba te basalaki makambo wana nyonso mpe nayinaki bango.
Don't follow the practices of the nations I'm expelling for you. I detested them because they did all these evil things.
24 Boye nayebisaki bino: ‹ Bino nde bato bokozwa mokili na bango, mokili oyo ebimisaka miliki mpe mafuta ya nzoyi; napesi bino yango lokola libula. › Nazali Yawe, Nzambe na bino, oyo alongolaki bino kati na bikolo mpe atiaki bino pembeni.
But I have promised you that you will take over their land. I'm going to give it to you to own, a land that flows with milk and honey. I am the Lord your God, who has made you a distinctive people different from all others.
25 Yango wana bosengeli kosala bokeseni kati na nyama oyo ezali mbindo mpe oyo ezangi mbindo, kati na ndeke oyo ezali mbindo mpe oyo ezali peto. Bosengeli te komikomisa mbindo na nzela ya nyama, ya ndeke to ya nyama nyonso oyo etambolaka na libumu, oyo natiaki pembeni mpo ete bino mpe bomona yango lokola mbindo.
So make sure you observe the difference between clean and unclean animals and birds. Don't make yourselves unclean because of any animal or bird, or by anything that runs along the ground. I have made the difference clear: they are unclean for you.
26 Bozala bule, bato oyo babulisami mpo na Ngai; pamba te Ngai Yawe, nazali Bule; nalongolaki bino kati na bikolo mosusu, natiaki bino pembeni, mpo ete bozala bato na Ngai moko.
You shall be holy to me because I am holy. I am the Lord, and I have made you a distinctive people different from all other nations. You belong to me.
27 Mobali to mwasi oyo asololaka na bakufi to oyo azali nganga-kisi kati na bino, esengeli baboma ye: bakobamba bango mabanga mpe makila na bango ekotangama na mito na bango moko. »
Anyone, man or a woman, who is a medium or a spiritist must be executed. They are to be stoned to death; they bear the responsibility for their punishment.”

< Levitike 20 >