< Levitike 2 >

1 Soki moto alingi komema makabo ya mbuma epai na Yawe, makabo yango ekozala ya farine. Bongo na likolo na yango, akosopa mafuta mpe akotia ansa.
“‘When anyone offers an offering of a meal offering to the LORD, his offering shall be of fine flour. He shall pour oil on it, and put frankincense on it.
2 Akomema yango epai ya Banganga-Nzambe, bana mibali ya Aron, oyo moko kati na bango akozwa loboko mobimba ya farine mpe mafuta elongo na ansa nyonso, mpe akotumba yango na etumbelo lokola ekaniseli. Ezali likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe.
He shall bring it to Aaron’s sons, the priests. He shall take his handful of its fine flour, and of its oil, with all its frankincense, and the priest shall burn its memorial on the altar, an offering made by fire, of a pleasant aroma to the LORD.
3 Ndambo oyo ekotikala, kati na makabo ya mbuma, ekozala ya Aron mpe ya bana na ye. Ezali eteni ya bule penza kati na makabo bazikisa na moto mpo na Yawe.
That which is left of the meal offering shall be Aaron’s and his sons’. It is a most holy part of the offerings of the LORD made by fire.
4 Soki amemi likabo ya farine batumba na fulu ya moto, likabo yango esengeli kozala ya gato oyo ezanga levire, oyo basangisa na mafuta to ya mikate oyo ezanga levire mpe bapakola mafuta na likolo na yango.
“‘When you offer an offering of a meal offering baked in the oven, it shall be unleavened cakes of fine flour mixed with oil, or unleavened wafers anointed with oil.
5 Soki ezali likabo bakalinga na kikalungu, esengeli kozala ya farine ezanga levire mpe basangisa na mafuta.
If your offering is a meal offering made on a griddle, it shall be of unleavened fine flour, mixed with oil.
6 Bakokata yango na biteni mpe bakosopa mafuta likolo na yango. Ezali likabo ya bambuma.
You shall cut it in pieces, and pour oil on it. It is a meal offering.
7 Bongo soki likabo yango ezali ya bambuma bakalinga na kikalungu, ekozala ya farine basangisa na mafuta.
If your offering is a meal offering of the pan, it shall be made of fine flour with oil.
8 Bakomema epai na Yawe makabo ya mbuma oyo babongisi mpe bakopesa yango epai ya Nganga-Nzambe oyo akomema yango na etumbelo.
You shall bring the meal offering that is made of these things to the LORD. It shall be presented to the priest, and he shall bring it to the altar.
9 Nganga-Nzambe akolongola na makabo ya mbuma eteni oyo esengeli kobonzama lokola ekaniseli mpe akotumba yango na etumbelo. Ezali likabo bazikisa na moto oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe.
The priest shall take from the meal offering its memorial, and shall burn it on the altar, an offering made by fire, of a pleasant aroma to the LORD.
10 Bongo bagato oyo ekotikala, ekozala ya Aron mpe ya bana na ye ya mibali. Ezali eteni ya bule penza kati na makabo bazikisa na moto mpo na Yawe.
That which is left of the meal offering shall be Aaron’s and his sons’. It is a most holy part of the offerings of the LORD made by fire.
11 Likabo moko te ya mbuma, oyo bokomemela Yawe ekozala na levire, pamba te bokotumba te levire to mafuta ya nzoyi lokola likabo bazikisa na moto mpo na Yawe.
“‘No meal offering which you shall offer to the LORD shall be made with yeast; for you shall burn no yeast, nor any honey, as an offering made by fire to the LORD.
12 Okomema yango epai na Yawe lokola likabo ya bambuma ya liboso, kasi bokobonza yango te na etumbelo lokola makabo ya solo kitoko.
As an offering of first fruits you shall offer them to the LORD, but they shall not rise up as a pleasant aroma on the altar.
13 Okotia mungwa na makabo na yo nyonso ya bambuma mpe okobosana te kotia mungwa na likabo na yo ya bambuma, pamba te ezali elembo ya boyokani oyo Nzambe na yo asalaki. Okotia mungwa na makabo na yo nyonso.
Every offering of your meal offering you shall season with salt. You shall not allow the salt of the covenant of your God to be lacking from your meal offering. With all your offerings you shall offer salt.
14 Soki omemeli Yawe likabo ya bambuma ya liboso, okomema bambuma ya sika bakalinga na moto mpe batuta.
“‘If you offer a meal offering of first fruits to the LORD, you shall offer for the meal offering of your first fruits fresh heads of grain parched with fire and crushed.
15 Okosopela yango mafuta mpe ansa. Ezali likabo ya bambuma.
You shall put oil on it and lay frankincense on it. It is a meal offering.
16 Bongo Nganga-Nzambe asengeli kotumba eteni ya likabo elongo na ansa nyonso lokola ekaniseli. Ezali likabo bazikisa na moto mpo na Yawe.
The priest shall burn as its memorial part of its crushed grain and part of its oil, along with all its frankincense. It is an offering made by fire to the LORD.

< Levitike 2 >